Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/6 nk. 20-25
  • Topesamelaki mayaka ya motuya monene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Topesamelaki mayaka ya motuya monene
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likambo oyo tokoki kobosana te
  • Mimeseno ya sika
  • Toyekolaki Espagnol mpe tobandaki mosala
  • Mimekamo ya liboso na engumba Madrid
  • Makambo kitoko tomonaki na Madrid
  • Mosala eboti mbuma epai na basoda
  • Moyekoli ya Biblia oyo akeseni na basusu
  • Libyangi oyo tomizelaki na yango te
  • Totikaki mokumba na biso ya misionɛrɛ
  • Tosakolaki kati na bilangwiseli mpe mobulu
  • Ekateli moko ya mpasi
  • “Awa ezali biso na Mosala oyo . . . , Tozali kotika Te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Tokutanaki na makambo oyo tokanisaki yango te na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • ‘Esengo na baoyo nyonso bazali kozela Jéhovah’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Natyaki miso mpe motema na ngai na libonza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/6 nk. 20-25

Topesamelaki mayaka ya motuya monene

LISOLÓ YA RICHARD GUNTHER

Ezalaki na sanza ya Sɛtɛ́mbɛ ya mobu 1959. Tozalaki kati na masuwa moko ya Italie oyo ebéngamaki Julio Caesar wana tozalaki kokatisa Mai monene ya Atlantique kouta na New York mpo na kokende na Cádiz, na Espagne. La Société Watch Tower etindaki ngai elongo na mwasi na ngai Rita, mpe Paul mpe Evelyn Hundertmark, babalani oyo batindamaki mpe na moko na bamboka oyo ezali kati na eteni ebéngami péninsule ibérique. Mikakatano minene mizalaki kozela biso. Kasi lolenge nini tobandaki kosala mosala ya misionɛrɛ?

NGAI mpe Rita tozwaki batisimo mpo na kokóma Batatoli ya Yehova na 1950 na New Jersey, na Etats-Unis. Mwa moke na nsima, tozwaki ekateli oyo na nsima ya bambula esengelaki kopesa biso mayaka ya motuya monene. Tozalaki na lisangá oyo ezalaki na bandeko mibali mpe bandeko basi baoyo bakokaki mpo na kosala na teritware yango. Na yango, tomiyokaki ete tosengelaki kondima kokende kosala epai kuna bazalaki na mposa ya basakoli. Na liyangani ya mikili mingi ya Batatoli ya Yehova oyo esalemaki na engumba New York na 1958, tosɛngaki ete tókende na mosala ya misionɛrɛ.

Mwa moke na nsima, tobyangamaki mpo ete tokɔta na Galadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watch Tower, mpe na nsima na mbula moko tokamataki nzela mpo na kokende na Espagne lokola bamisionɛrɛ. Lokola tomipesaki mingi na bibongiseli wana mpe totɔ́ndaki na esengo, na ntango yango toyebaki motuya ya libaku oyo epesamelaki biso te. Yesu alobaki na ntina na mayaka ya motuya monene. (Matai 13:45, 46) Atako yango ezalaki te likambo ya ntina kati na lisese na ye, mpo na biso moko mokumba na biso ya kosala lokola bamisionɛrɛ ekokanaki na mayaka wana. Na kotalela bomoi na biso ya bambula eleki, sikawa tozali mpenza komona malamu motuya ya likabo wana kitoko ya mosala kati na lisangá ya Yehova.

Likambo oyo tokoki kobosana te

Na ntango wana mateya ya bamisionɛrɛ ya Galadi mazalaki kopesama na ezingelo ya zamba kitoko na Finger Lakes, na ekólo ya New York. Kuna, tolekisaki basanza motoba ya kitoko wana tokɔtaki na mozindo kati na boyekoli ya Biblia mpe tozalaki na boninga ya solosolo ya boklisto, mosika na makambo ya mokili oyo mpe mobulungano na yango. Baninga na biso bayekoli bautaki na mikili mingi: Australie, Bolivie, Grande-Bretagne, Grèce, mpe Nouvelle-Zélande. Kasi, eumelaki te, tokómaki na mokolo ya kozwa mapolɔ́mi. Na Augústo 1959, topesanaki mbote ya nsuka na mpisoli na miso wana moto na moto azalaki kokende na esika atindamaki mpo na mosala ya misionɛrɛ. Sanza moko na nsima, tokómaki na Espagne.

Mimeseno ya sika

Tokitaki na libongo oyo ezali na súdi ya engumba Algeciras, mpembeni ya Libanga monene ya Gibraltar. Na butu wana, biso minei, ngai na Rita mpe Paul mpe Evelyn Hundertmark, tomataki engbunduka mpo na kokende na Madrid. Tokendeki na Hotel Mercador, epai kuna tosengelaki kozela mpo na kokutana na basangani ya filiale ya la Société oyo ezalaki kosala misala na kobombama. Espagne ezalaki na nsé ya boyangeli ya bokonzi mabe ya Generalissimo Francisco Franco. Yango elimbolaki ete lingomba bobele moko oyo endimamaki na Leta ezalaki bongo Lingomba ya Katolike ya Loma. Kosala makambo ya Lingomba mosusu polele epekisamaki na mibeko, mpe mosala ya ndako na ndako ya Batatoli ya Yehova epekisamaki. Ata mpe kosala makita ya lingomba epekisamaki, na yango Batatoli ya Yehova, oyo motuya na bango ezalaki pene na 1 200 kati na masangá 30 na Espagne na eleko wana, bakokaki te koyangana na Bandako ya Bokonzi, lokola na mikili misusu. Tosengelaki koyangana na nkuku na bandako ya bandeko.

Toyekolaki Espagnol mpe tobandaki mosala

Mokakatano na biso ya liboso ezalaki bongo ya koyekola lokótá. Na sanza ya liboso tozalaki kolekisa bangonga 11 na mokolo mpo na koyekola Espagnol​—ngonga minei na kelasi ntɔ́ngɔ́ nyonso, mpe ngonga nsambo tozalaki koyekola biso moko. Na sanza ya mibale, tozalaki kosala bobele bongo na ntɔ́ngɔ́, kasi nsima ya nzánga ezalaki mpo na mosala ya kosakola ndako na ndako. Okoki kondima yango? Toyebaki naino lokótá te mpe na mwa maloba ya mokuse ya bokɔti na lisoló oyo tosimbaki na motó mpe ekomami likoló ya lokasa moko, ngai mpe Rita tozalaki kobima na mosala ya kosakola bobele biso moko!

Nazali komikundola ete nabɛtaki na ekuke ya ndako moko na Vallecas, kartyé moko ya basáli ya Madrid. Nasimbaki lokasa na ngai ya bokɔti na masoló na mabɔkɔ mpo na komikundola makambo, nazalaki koloba na Espagnol ete: “Mbote. Tozali kosala mosala ya boklisto. Biblia elobi ete (tozalaki kotánga mokapo moko). Tolingi kotikela yo mwa búku oyo.” Elenge mwasi yango atalaki biso bobele mpamba mpe na nsima akamataki mwa búku yango. Na ntango tozongelaki ye na mbala ya nsima, akɔtisaki biso na ndako mpe ntango biso tozalaki koloba, ye azalaki kotala biso bobele mpamba. Tobandaki boyekoli ya Biblia elongo na ye na meko oyo tokokaki kosala yango, na boumeli ya boyekoli, azalaki bobele koyoka mpe kotala. Na nsima ya mwa ntango, ayebisaki biso ete ayokaki te makambo oyo toyebisaki ye na ntango toyaki kotala ye mpo na mbala ya liboso kasi ayokaki bobele liloba Dios (Nzambe), mpe bobele yango nde esalisaki ye mpo ayeba ete ezalaki likambo ya malamu. Na nsima, akómaki na boyebi mingi ya Biblia mpe ayaki kozwa batisimo, kokómáká bongo Motatoli ya Yehova.

Ezalaki na ngai mpasi mingi mpo na koyekola Espagnol. Wana ezalaki ngai kotambola kati na engumba, nazalaki kosimba lolenge ya kosalela maloba na motó. Oyo nazalaki kosimba na pɔ́sɔ ya liboso, nazalaki kobosana yango na pɔ́sɔ mosusu! Ezalaki mpenza likambo ya kolɛmbisa. Mbala mingi nazalaki pene ya kotika koyekola. Lokola nazalaki koloba Espagnol mabe, bandeko mibali ya Espagne basengelaki kozala na motema pɛtɛɛ wana nazalaki kokamba bango. Mokolo moko na liyangani ya etúká, ndeko mobali moko apesaki ngai lokasa moko likoló na yango akomaki liyebisi moko mpo ete natánga yango na ebaelo. Lokola ezalaki na ngai mpasi mpo na kotánga makomi na ye, nayebisaki ete: “Lobi bomema ba muletas (pángo) na bino awa na libanda ya masano.” Esengelaki nde kozala, “Lobi bomema ba maletas (basakosi ya minene) na bino awa na libanda ya masano.” Na bongo, bato banso basekaki, mpe na yango nayokaki nsoni.

Mimekamo ya liboso na engumba Madrid

Mwa bambula wana ya liboso na Madrid ezalaki mpasi mpo na ngai mpe Rita. Tozalaki kokanisa mingi ndako mpe baninga na biso oyo totikaki. Na ntango nyonso oyo tozalaki kozwa mokanda oyo mouti na Etats-Unis, tozalaki kooka mposa ya mboka na biso. Bileko wana ya kokanisa bisika toutaki ezalaki kobulunganisa biso, kasi elekaki. Totikaki ndako na biso, libota na biso, mpe baninga na biso mpo ete na esika na bango, tozwa mayaka ya motuya monene. Tosengelaki komesana.

Na ntango tokómaki liboso na Madrid tozalaki kofanda na mbola (internat) moko ya kala. Tozwaki eteni moko ya ndako mpe tozalaki kolya mbala misato na mokolo. Ndako yango ezalaki na mwinda te, mpe mbeto na yango ezalaki oyo esalemi na matiti. Mbongo oyo tozalaki kofuta na nsuka ya sanza ezalaki kosilisa mwa mosolo oyo bazalaki kopesa biso sanza na sanza. Mingimingi na midí tozalaki kolya kuna, mama nkolo ndako azalaki kotika biloko na biso ya mpokwa kati na litumbo ete ezala ntango nyonso na mɔ́tɔ mpo ete tozala na eloko ya kolya na butu wana tozongi. Nzokande, lokola tozalaki kosala mosala ya kosakola na boumeli ya mokolo kino na mpokwa, tozalaki koyoka nzala makasi. Soki mwa mosolo oyo bapesaka biso na nsuka ya sanza esili, tozalaki kosalela mwa mosolo na biso ya moke oyo etikali na kosomba chocolat oyo ezalaki na ntalo moke. Nzokande, mosika te, makambo mabongwanaki na ntango mokɛngɛli ya zone oyo atindamaka na la Société ayaki. Amonaki ezalela ya mpasi oyo tozalaki kati na yango mpe alobaki ete tokokaki koluka ndako mosusu ya mwa moke mpo na kosalela yango lokola ndako ya bamisionɛrɛ. Yango ezalaki malamu koleka na mbola (internat), epai kuna ezalaki kosɛnga ete tosukolaka kati na kikuku na saani ya monene. Sikawa tozalaki na douche, na frigo mpo na kobomba bilei, mpe lituká oyo ekosalaka na lotilíki mpo na kolamba bilei na biso. Tozalaki na botɔ́ndi mingi mpo na yango.

Makambo kitoko tomonaki na Madrid

Tozalaki kosala mosala ya kosakola ndako na ndako na bokɛngi nyonso. Yikiyiki ya mokolo na mokolo na Madrid ezalaki likambo malamu mpo na biso, ezalaki kobomba biso mpo ete tomonana te ete tokeseni na bato mosusu. Tozalaki komeka kolata mpe kosala lokola basusu mpo ete tomonana te ete tozali bapaya. Mwango na biso ya kosakola ndako na ndako ezalaki ya kokɔta na buludíngi moko, kobɛta na ekuke ya ndako moko, kosolola na moto mpe na nsima kotika buludíngi wana, balabála wana, mpe kartyé wana. Likoki ezalaki ntango nyonso ete molobani na biso ayebisa na bapolisi na telefone, na yango koumela na zingazinga wana ezalaki likambo ya mayele te. Ya solo, atako Paul mpe Evelyn Hundertmark bazalaki mpenza na mayele na kosaláká lolenge wana, bakangaki bango mpe babenganaki bango na mboka wana na 1960. Bakendeki na Portugal, mboka ya pembeni, basalaki kuna na boumeli ya bambula mingi; Paul azalaki kotambwisa misala ya filiale oyo ezalaki kosala na nkuku. Lelo oyo azali mokɛngɛli ya ville na San Diego, na etúká ya Californie.

Nzokande, mpo na biso bokokanisi esalemaki. Bobele mwa moke na nsima, bamisionɛrɛ motoba oyo batindamaki na Portugal basɛngisamaki ete balongwa na mboka wana! Yango ebimisaki likambo moko malamu mpamba te Eric mpe Hazel Beveridge, baoyo tozalaki na bango na kelasi moko na Galadi, sikawa batindamaki ete balongwa na Portugal mpe baya na Espagne. Na yango, tokendeki kuna na Hotel Mercador na Febwáli 1962​—na mbala oyo ezalaki nde mpo na koyamba Eric mpe Hazel na ntango bakómaki.

Ezalaki na mikolo wana ya ebandeli nde ngai mpe Rita tomonaki bokosi ya mangomba mpo na mbala ya liboso. Tozalaki koyekola Biblia elongo na babálani mibale, Bernardo mpe Maria oyo bazalaki kofanda na mwa ndako moko ya moke etongami na biteni ya biloko ya botongi oyo Bernardo ye moko azalaki kolokota. Tozalaki koyekola na bango na butu mpenza, na nsima ya boyekoli, bazalaki kopesa biso mampa; vinyo, mpe fromage to eloko nyonso oyo bakokaki kozala na yango. Namonaki ete fromage yango ezalaki lokola oyo esalemaka na Etats-Unis. Mokolo moko na butu na nsima ya boyekoli, babimisaki linzanza oyo ezalaki na fromage yango. Mpe ekomamaki na makomi minene likoló, na Lingelesi, ete, “Euti na Baameriké mpo na bato ya Espagne​—esengeli kotekama te.” Lolenge nini libota wana ya babola bazwaki fromage yango? Leta asalelaki lingomba ya Katolike mpo ete ekabola yango epai na babola. Kasi sángó azalaki kotekisa yango!

Mosala eboti mbuma epai na basoda

Nokinoki likambo moko ya kitoko emonanaki, ezalaki lipamboli monene mpo na biso mpe mpo na bato mingi mosusu. Tozwaki mokanda moko eutaki na biro ya filiale ete tokende kotala elenge mobali moko na nkombo ya Walter Kiedaisch, oyo azalaki soda na káa ya basoda ya mpepo ya Etats-Unis oyo ezalaki na Torrejón, na ntáká ya mwa bakilomɛtɛlɛ na libandá ya Madrid. Tokendeki kotala ye mpe mwasi na ye, tobandaki boyekoli ya Biblia elongo na ye mpe mwasi na ye mpe babalani mosusu mibale oyo bazalaki mpe basoda ya mpepo kuna.

Na ntango wana, nazalaki kotambwisa pene na boyekoli ya Biblia mitano elongo na basoda ya mpepo ya Etats-Unis, nyonso ezalaki kosalema na Lingelesi. Kati na bango, nsambo bazwaki batisimo na nsima, mpe ntango bazongaki na Etats-Unis, minei kati na bango bakómaki bankulutu kati na masangá.

Ezalaki na ntango oyo tozalaki na makoki mingi te ya kokɔtisa babúku, bazulunalo, mpe ba Biblia kati na mboka mpamba te mosala na biso mopekisamaki. Nzokande, babúku mosusu ezalaki koya na nzela ya ba touristes mpe baoyo bazalaki komemela biso yango longwa na Etats-Unis. Biro ya filiale epesaki ngai mokumba ya kokamba depó ya mikanda na nkuku. Ezalaki eteni ya ndako ya kobomba biloko ya mosala ya biro na Vallecas. Mwasi ya nkolo ndako yango azalaki Motatoli ya Yehova. Atako ye moko azalaki Motatoli te, mobali yango azalaki komemya mosala na biso, apesaki ngai nzela ete nasalela nsima ya ndako na ye mpo na kokanga maboke ya mikanda mpo na kotinda yango na bingumba mosusu kati na mboka atako ye moko mpe misala na ye mizalaki na likámá. Lokola ndako yango esengelaki ntango nyonso komonana lokola oyo ekanisamaki ete ebongaki kozala​—ndako oyo ezali na bosoto, mobulumobulu—⁠nasengelaki kosala mesa moko ya mosala mpe mitalaka ya kotya mikanda, oyo ekokaki kotyama mpe kosalelama nokinoki mpe na nsima kobomba yango nokinoki. Na mpokwa, nazalaki kozela kino bato banso bakobima na ndako yango mpo ete nakoka kobimisa biloko na ngai nokinoki.

Ezalaki libaku moko kitoko kosangana kati na mosala ya kokabola bilei ya elimo, lokola bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpe mikanda mosusu, na masangá kati na mboka mobimba. Yango ezalaki ntango ya esengo.

Rita azalaki na esengo ya kotambwisa boyekoli ya Biblia 16, soko 8 kati na bato yango bakómaki Batatoli ya Yehova. Dolores azalaki elenge mwasi moko ya libala oyo azalaki kobima libándá te na ntango ya eleko ya mpiɔ makasi mpo ete azalaki na bokono ya motema. Na ebandeli ya eleko ya molunge azalaki kotelema mpe kosala mwa misala. Dolores azalaki na kondima makasi; na yango, wana ntango ekokaki mpo na liyangani ya etúká na engumba Toulouse, na France, azalaki na mposa makasi ya kokende. Monganga akebisaki ye ete ebongaki te akende mpo ete kolongɔnɔ́ ya motema na ye ezalaki malamu te. Alataki bilamba ya ndako mpe mapapa mpe maboko mpamba, akendeki na esika bazwaka engbunduka mpo na kopesa mbote epai na mobali na ye, mama na ye mpe basusu oyo bazalaki kosala mobembo. Mpisoli ebandaki kobima ye na miso, mpamba te akokaki te kokanga motema komona bango kokende mpe kotika ye, na yango ye amataki na engbunduka, mpe akendeki na France! Rita ayebaki te. Kasi na ntango tokómaki kuna na liyangani, akamwaki mingi na ntango amonaki Dolores, atɔ́ndaki na esengo!

Moyekoli ya Biblia oyo akeseni na basusu

Tokoki te kosukisa lisoló ya mosala na biso na Madrid kozanga ete tolobela Benigno Franco, “el profesor.” Motatoli moko ya mboka wana amemaki ngai ete tokende kotala mobangé mobali moko mpe mwasi na ye, oyo bazalaki kofanda na mwa ndako moko ya bobola. Nabandaki koyekola Biblia elongo na ye. Nsima wana ayekolaki na boumeli ya pene na mbula moko na ndambo, asɛngaki ete azwa batisimo mpe ete akóma Motatoli ya Yehova.

Mobangé mobali yango, Don Benigno Franco, azalaki ndeko ya Francisco Franco, mokonzi mabe ya Espagne oyo azalaki koyangela na eleko wana. Emonani lokola ete Don Benigno azalaki ntango nyonso moto oyo azalaki kolinga bonsomi. Na boumeli ya etumba ya bana-mboka na Espagne, akendeki na ngámbo ya baoyo balingaki kotya demokrasi mpe atɛlɛmɛlaki ndeko na ye​—mokonzi yango ya basoda oyo alongaki etumba mpe atyaki bokonzi mabe oyo esimbamaki na Bakatolike. Kobanda na 1939, Don Benigno abotolamaki lotómo ya kosala mosala. Na yango, esalemaki ete ndeko ya Generalissimo Francisco Franco, mokonzi mabe ya Espagne, akómaki Motatoli ya Yehova.

Libyangi oyo tomizelaki na yango te

Na 1965 biro ya Filiale ya Espagne ebengisaki biso mpo ete tobanda mosala ya botamboli kati na zongazonga na engumba Barcelone. Yango esɛngaki ete totika bandeko nyonso ya bolingo oyo tosilaki komesana na bango na Madrid. Sikawa mpo na ngai, esengelaki bobele te kobanda likambo moko ya sika, kasi lisusu momekamo. Likambo yango ezalaki ya kobangisa mpamba te nazalaki ntango nyonso kondimela makoki na ngai te. Nayebi malamu ete Yehova nde apesaki ngai nzela ya kosala malamu kati na lolenge wana ya mosala.

Kotala masangá pɔ́sɔ na pɔ́sɔ ezalaki kosɛnga ete nalalaka na bandako ya bandeko. Tozalaki te na esika bobele moko ya kofanda mpo na eleko molai, pene na pɔ́sɔ mibale nyonso, tozalaki kokende na ndako mosusu. Yango ezalaki mpasi, mingi mpenza mpo na mwasi. Kasi, mosika te, José mpe Roser Escudé, baoyo bazalaki kofanda na Barcelone, babyangaki biso ete tokende kofanda elongo na bango mpo na boumeli ya mikolo mingi. Amonisaki mpenza bolingo, mpamba te yango elimbolaki ete tolingaki kofanda esika moko na boumeli ya ntango molai mpo na kobomba biloko na biso mpe esika ya ntango nyonso mpo na kozonga na ndako mikolo nyonso ya Lomingo na mpokwa.

Ngai mpe Rita tolekisaki mbula minei oyo elandaki nsima na mosala ya zongazonga na etúká ya Catagne, oyo ezwami na libongo ya Méditerranée. Makita na biso nyonso ya Biblia ezalaki kosalema na kobombama na bandako ya bandeko, mpe mosala na biso ya kosakola ndako na ndako ezalaki mpe kosalama na kobombama mpo na kobenda likebi ya bato te. Na bantango mosusu, tozalaki kosangisa lisangá mobimba mpo na kokende na “pique-nique” na zamba, mingimingi na ntango tozalaki kosala mayangani ya zongazonga.

Tokozala ntango nyonso kokumisa mingi bandeko na biso ya elimo oyo bamipesi, baoyo balingaki kobungisa misala mpe bonsomi na bango, na kosaláká makasi mpo ete masangá mazala na bomoko mpe na mɔ́tɔ ntango nyonso. Mingi kati na bango bapesaki ndakisa malamu mpo ete mosala ya kopalanganisa nsango malamu ekóma kino na bingumba mike oyo ezalaki na libándá ya engumba monene. Yango etyaki moboko ya bokóli monene na Espagne nsima wana bipekiseli bilongolamaki mpe bonsomi ya losambo epesamaki na 1970.

Totikaki mokumba na biso ya misionɛrɛ

Na boumeli ya mbula zomi na Espagne, libaku malamu na biso ya kosalela Yehova elembisamaki mwa moke mpo na ezalela ya makambo ya baboti na biso. Na mabaku mingi, ezalaki mpenza kosɛnga ete totika mokumba na biso mpo na kozonga na mboka na biso mpo ete tokende kosalisa mama mpe tata na ngai. Nzokande, na lisungi ya bolingo ya bandeko mibali mpe bandeko basi ya masangá oyo mazalaki pene na baboti na ngai, tozalaki na likoki ya kokóba mosala na Espagne. Ee, moko na makambo oyo esungaki biso ete tokoka kokokisa libaku malamu ya kosala kati na mosala ya misionɛrɛ na bambula wana ezalaki milende ya basusu oyo bazalaki kosangana elongo na biso na kotyáká matomba ya Bokonzi na esika ya liboso.

Na nsuka, na Dɛsɛ́mbɛ 1968, tozongaki na mboka na biso mpo ete tokende kosunga mama na ngai. Bobele na sanza yango, tata na ngai akufaki, mpe sikawa mama na ngai atikalaki ye moko. Lokola nazalaki naino na mwa likoki ya kosala kati na mosala ya ntango nyonso, tozwaki mokumba ya kosala mosala ya zongazonga kasi na mbala oyo na Etats-Unis. Na bambula 20 oyo elandaki na nsima, tozalaki kosala na bazongazonga ya lokótá ya Espagnol. Atako tosilaki kobungisa mayaka na biso ya motuya mingi ya mosala ya misionɛrɛ, kasi tozwaki mosusu.

Tosakolaki kati na bilangwiseli mpe mobulu

Sikawa tokómaki kosala elongo na bandeko na biso basi mpe mibali oyo bazalaki kofanda na bakartyé ya bingumba esika mobulu ezalaki mingi. Bobele na pɔ́sɔ ya liboso ya mosala ya zongazonga na Brooklyn, na New York, babotolaki Rita sakosi na ye ya komema na mabɔkɔ.

Mokolo mosusu, ngai mpe Rita tozalaki elongo na etuluku moko kati na mosala ya kosakola ndako na ndako na kartyé mosusu ya engumba New York. Na ntango tokatisaki na kwɛ moko, tomonaki bato moko basali molɔngɔ́ liboso ya lidusu ya efelo ya ndako moko oyo bato bafandaka lisusu te. Na ntango totambolaki moke kati na balabála yango, tomonaki mobali mɔkɔ atɛlɛmaki na mopanzi ya balabála mpe azalaki kotala biso. Mosusu atɛlɛmaki na kwɛ mosusu oyo ezalaki mwa mosika, azalaki kotala soki akomona motuka ya bapolisi. Tolekaki katikati na esika bazalaki kotekisa bilangwiseli! Abulunganisamaki liboso na ntango atalaki biso, kasi na nsima amonaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe abangaki lisusu te. Akokaki kokanisa ete nazalaki polisi! Na nsima angangaki na Espagnol ete, “¡Los Atalayas! ¡Los Atalayas!” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli!). Bayebaki soki biso tozalaki banani, bayebaki biso mpo na bazulunalo mpe makambo manso malekaki malamu. Wana nazalaki koleka pene na ye, nalobaki ete, “¿Buenos dias, como está?” (Mbote, ozali malamu?) Ayanolaki na kosengáká ete nasambela mpo na ye!

Ekateli moko ya mpasi

Na 1990, eyaki komonana mpenza polele ete nasengelaki kozala elongo na mama na ngai mikolo nyonso. Tosalaki makasi mpo na kotikala kati na mosala ya zongazonga, kasi na mayele nyonso, tomonaki ete tokoki te kokokisa mikumba nyonso mibale na mbala moko. Tolingaki mpe kondimisama soki mama azalaki kobatelama na bolingo nyonso. Kasi na mbala oyo lisusu, tosengelaki kotika mayaka ya motuya monene, eloko oyo ezalaki na motuya mpenza mpo na biso. Mabanga nyonso ya ntalo kati na mokili mpe nyonso oyo yango ekoki kosala mpo na moto ezali mpenza na motuya moke soki tokokanisi yango na mabanga ya ntalo ya kosala lokola misionɛrɛ to mokɛngɛli-motamboli kati na lisangá ya Yehova.

Ngai mpe Rita tozali sikawa na mibu koleka 60. Tozali mpenza kosepela mpe na esengo ya kosala na lisangá moko ya lokótá ya Espagnol na esika nazali kofanda sikawa. Soki totali lisusu mibu tolekisaki kati na mosala ya Yehova, tozali kotɔ́nda ye mpo ete apesaki biso mayaka ya motuya monene.

[Elilingi na lokasa 23]

Elongo na Rita mpe Paul mpe Evelyn Hundertmark (na lobɔkɔ ya mobali) na libándá ya esika ya masano ya Madrid

[Elilingi na lokasa 24]

Nazali kosala kati na lisangá moko na “pique-nique” kati na zamba

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto