Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/2 nk. 26-29
  • Ezali libunga ya nani?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezali libunga ya nani?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mikakatano mitali mosolo
  • Kookisama mawa mpo na bana
  • Kozanga kokóla na elimo
  • Komilóngisa ya nsuka
  • Tóndima bosolo ya makambo
  • Tokoki kopamela Jéhovah te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Ndenge ya kosalisa bana ntango balongi te na likambo moko
    Lisalisi mpo na libota
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Baboti mpe bana: Bótyaka Nzambe na esika ya liboso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/2 nk. 26-29

Ezali libunga ya nani?

MOBALI ya liboso, Adama, abandisaki yango. Nsima ya kosala lisumu alobaki na Nzambe ete: “Mwasi oyo yɔ opɛsaki ete ajala na ngai, apɛsi ngai mbuma na njete yango. Ngai mpe nalei.” Ya solo, alingaki mpenza koloba ete: “Ezali libunga na ngai te!” Mwasi ya liboso, Eva, asalaki bobele motindo moko wana alobaki ete: “Nyoka akosi ngai, mpe nalei.”​—Genese 3:12, 13.

Ezaleli oyo bato bazali na yango ya koboya kondima mokumba ya makambo oyo bango moko basali, ebandaki bongo na elanga Edene. Osilá naino kokumba ngambo motindo oyo? Na ntango mikakatano mibimaka, opamelaka nokinoki bato mosusu? To otalelaka malamu likambo yango mpo na komona soki libunga ezali mpenza ya nani? Kati na bomoi ya mokolo na mokolo, ezalaka mpasi te mpo na kokangama na motambo ya ezaleli ya kopamela basusu mpo na mabunga na biso moko mpe koloba ete, “Ezali libunga na ngai te!” Tiká tótalela makambo oyo esalemaka mbala mingi mpe tótala soki bato mosusu bazalaka na momeseno ya kosala nini. Lisusu, kanisá likoló na oyo okoki kosala soki likambo motindo moko likómeli yo.

Mikakatano mitali mosolo

Na ntango bakutani na mokakatano monene motali mosolo, bato mingi balobaka ete, “Ezali libunga na ngai te​—ezali nde nkita, bato ya mombongo bazangi sembo, komata ya ntalo ya biloko.” Kasi, makambo oyo nyonso masengeli mpenza kopamelama? Ekoki kozala ete ezalela ya makambo oyo ezangi elikya epusaki bango na komeka kosala mombongo oyo eyebani malamu te soki ezali mpenza ya sembo. Na bantango mosusu ezaleli ya lokoso ebungisaka makanisi malamu, mpe bato bazali komikɔtisa na lolenge ya mombongo oyo eyebani te; na yango, bazali kozwama na motambo ya moyibi. Bazali kobosana lisese oyo ete “Miso ekosaka.” Bazali koluka batoli oyo ezali kosepelisa matoyi na bango, kasi ntango mikakatano ya nkita mibimaka, ekómaka likambo ya mpasi, balukaka kopamela bato mosusu. Na mawa nyonso, yango emonanaka mbala mosusu ata kati na lisangá ya boklisto.

Basusu bazwamaki na motambo ya komikɔtisa na myango ya mombongo ya bozoba to ata mpe ya lokuta, na ndakisa kosomba diamá ya lokuta, kopesa mosolo mpo na kosala baemisyó ya televizyó oyo ekweaki nokinoki, to bapesaki maboko na mosala ya kosomba mpe kotekisa bandako oyo etambolaki malamu te. Ekoki kozala ete mposa eleki ndelo ya kozala na bozwi elimwisaki toli oyo ya Biblia kati na makanisi na bango: “Baoyo bajali na mposa na kojua mosɔlɔ, bakokwea kati na komekama mpe na lilonga, . . . mpe bamitɔbɔli bango mpenja na bolɔji mingi.”​—1 Timɔtɛ 6:9, 10.

Kobimisa mbongo na kozanga komipekisa ekoki mpe komemela moto mikakatano na ntina etali mosolo. Basusu bakanisaka ete basengeli komonana lokola bato oyo bazalaka kati na bazulunalo oyo ekolakisaka biloko oyo ebimi sika, kosala mibembo ya bopemi oyo ezali kosɛnga mosolo mingi, kokende kolya na lɛsitolá moko ya lokumu mingi, mpe kosomba biloko ya masano ya mikóló oyo ebimi mpenza sika​—mituka, masuwa, bamasini ya fɔtɔ́, radio, nyonso oyo mpo na kominanola na yango. Ya solo, na nsima ya ntango, basusu bakoki kozala na makoki ya kosomba biloko motindo oyo nsima ya kosala bibongiseli na mayele nyonso mpe na kobombáká mosolo mokemoke. Nzokande, baoyo bazali na motema mɔ́tɔmɔ́tɔ mpo na kozwa yango bazali komikɔtisa kati na nyongo monene. Soki bamikɔtisi kati na nyongo monene, libunga ezali ya nani? Emonani polele ete baboyaki kolanda toli kitoko oyo ezwami na Masese 13:18: “Bobola mpe nsɔni ijali epai na ye oyo akoboya mateyo.”

Kookisama mawa mpo na bana

Basusu bakoki koloba ete: “Ezali libunga ya bankulutu, yango wana bana na ngai batikaki solo. Batyelaki bana na ngai likebi mpenza te.”

Bankulutu bazali mpenza na mokumba ya koleisa mpe kobatela etongá, kasi ezali boni mpo na baboti bango moko? Bamonisaka ndakisa mpo na oyo etali bambuma ya elimo kati na makambo na bango nyonso? Boyekoli ya libota ezalaki kotambwisama mbala na mbala? Baboti bazalaka na molende kati na mosala ya Yehova mpe basalisaka bana na bango na komibongisa mpo na yango? Bazalaki kosɛnzɛla mpo na oyo etali baninga ya bana na bango?

Bobele bongo, mpo na oyo etali eteyelo, ezalaka pɛtɛɛ mpo na baboti koloba ete: “Ezali libunga ya balakisi, yango wana mwana na ngai asalaki malamu te na eteyelo. Balingaki mwana na ngai te. Nkutu, eteyelo yango ekolakisaka malamu te.” Kasi baboti bazalaki pene ya kokende mbala na mbala na eteyelo yango? Baboti batalelaki manáka mpe lolenge ya mateya ya mwana na bango? Badevuare na ye ezalaki kosalema engebene mikolo mibongisami liboso, mpe azalaki kozwa lisungi soki mposa emonani? Likambo ya ntina ekoki kozala likambo litali bizaleli to bolɛmbu ya mwana soko mpe moboti?

Na esika ete baboti bápamela eteyelo, ekozala malamu soki baluki mpenza koyeba soki bana na bango bazali na ezaleli malamu mpe soki basalelaka malamu mabaku ya koyekola oyo epesameli bango na eteyelo.

Kozanga kokóla na elimo

Na bantango mosusu, moto moko akoki koloba ete: “Nakokaki kozala makasi na elimo, kasi ezali libunga na ngai te soki nazali makasi te. Bankulutu batyelaka ngai likebi mpenza te. Nazalaki ata na moninga moko te. Elimo ya Yehova ezali kati na lisangá oyo te.” Nzokande, basusu kati na lisangá yango bazali na baninga, bazali na esengo, mpe bazali kokóla malamu na elimo; mpe lisangá epambolami mpe ezali kokóla mpe ezali na elimo malamu. Kasi mpo na nini basusu bazali na mikakatano?

Bato mingi balingaka te kozala na boninga ya penepene elongo na bato oyo bazalaka na makanisi mabe mpe na elimo ya koimaima. Kozala na maloba ya kozokisa mpe koimaima ntango nyonso ekoki kolɛmbisa. Mpo na koboya ete elimo na bango élɛmba te, basusu bakoki kotika kosala boninga elongo na bato motindo wana. Kotaleláká yango lokola ete lisangá lizali kolinga ye te, moto mosusu akoki kobanda kotambolatambola; akolongwa na lisangá ya liboso mpo na kokende na lisangá mosusu, mpe na nsima akobanda kotambola lisangá moko nsima na lisangá mosusu. Lokola bitongá oyo ekotambolaka na bisobe ya Afrika oyo bazali ntango nyonso koluka esika matiti malamu ezali, bobele bongo mpe baklisto oyo ya “kotambolatambola” bazali ntango nyonso koluka lisangá oyo ebongi na bango. Bakozala mpenza na esengo soki bakoluka nde bizaleli malamu epai na basusu mpe kosala makasi ete bango moko mpe bámonisa mpenza bambuma ya elimo ya Nzambe kati na bomoi na bango mpenza!​—Bagalatia 5:22, 23.

Basusu bakosalaka bongo na kosaláká milende makasi ya kosolola na moto mokomoko na mikolo nyonso ya makita kati na Ndako ya Bokonzi mpe na kopesa ye longonya na bosembo nyonso na likambo malamu oyo ye asali. Ekoki kozala mpo ete bana na ye bazali na etamboli malamu, azangisaka makita ya boklisto te, biyano malamu oyo apesaka kati na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, elimo ya boyambi oyo amonisi na lolenge andimi ete Boyekoli ya Mokanda ya lisangá mpe makita ya mosala ya kosakola esalemaka na ndako na ye, mpe bongo na bongo. Na kosaláká ete ozala na mokano ya komona bizaleli malamu oyo, na ebandeli, ekoki kozipama na bizaleli ya kozanga kokoka, na ntembe te, okozanga te komona bizaleli malamu kati na bandeko na yo mibali mpe basi. Yango ekopusa yo ete olinga bango, mpe okomona ete okozanga te kozwa na baninga ya sembo.

Komilóngisa ya nsuka

“Ezali mokano ya Nzambe.” “Ezali bongo mpo na Zábolo.” Ekoki mpenza kozala ete na nsuka, moto akoki koluka komilóngisa na kopameláká Nzambe to na kopameláká Satana mpo na mabunga na ye moko. Ezali solo ete ezala Nzambe, to mpe Satana, bakoki kozala na bopusi likoló na makambo mosusu oyo ekoki kosalema kati na bomoi na biso. Nzokande, basusu bakanisaka ete makambo nyonso mpenza kati na bomoi na biso, ezala ya malamu to ya mabe, eutaka na Nzambe to na Satana. Lokola nde makambo nyonso oyo masilá kokómela bango, ata moko te ezalaki mbuma ya misala na bango moko. “Soki Nzambe alingi ete názwa motuka ya sika, akosala ete názwa yango.”

Bato motindo wana bazali kokamba bomoi na bango kozanga bwanya, bazali kokamata mikano na ntina etali lolenge ya kosalela mosolo to makambo mosusu na kokanisáká ete Nzambe akobikisa bango. Soki misala na bango ya kozanga bwanya ebimisi likambo moko ya mpasi, na ntina etali nkita to makambo mosusu, bazali kopamela Zábolo. Kosala likambo nokinoki kozanga ‘kotánga motuya’ mpe na nsima kopamela Zábolo mpo na libunga, to mpe oyo ezali lisusu mabe koleka, komizela ete Yehova akosunga, ezali bongo lolendo mpe ezali na boyokani na Makomami te.​—Luka 14:28, 29.

Satana alukaki kopusa Yesu ete akanisa motindo wana mpe andima te mokumba ya misala na Ye. Na kotalela lisenginya ya mibale, Matai 4:5-7 eyebisi ete: “Bongo, Satana atambolisi ye kino mboka na bulɛɛ mpe atɛmisaki ye likolo na samba na Tempelo, alobi mpe na ye ete, Sɔkɔ ojali Mwana na Njambe, omibwaka yɔ mɔkɔ na nse. Jambi ekomami ete, Akolaka banje na ye na ntina na yɔ, bakomɛma yɔ na mabɔkɔ na bango, ete otuta litambe na yɔ na libanga tɛ.” Yesu ayebaki ete akokaki te kotya elikya ete Yehova akosunga ye soki akokaki mpenza kosala likambo oyo ya bozoba, oyo ekokaki nkutu komema ye na komiboma. Na yango, azongisaki ete: “Ekomami ete, Okomeka Nkolo Njambe na yɔ tɛ.”

Baoyo bazalaka na momeseno ya kopamela Zábolo to Nzambe mpo na misala na bango moko ya mabe bakokani mpenza na baoyo balandaka zébi ya banganga-minzoto, bango batyaka Nzambe to Zábolo na esika ya minzoto. Bandimisami mpenza ete makambo nyonso oyo masalemaka eleki bango na nguya, batalelaka te lilako oyo ezali na Bagalatia 6:7: “Sɔkɔ moto akokona nini, akobuka bobɛlɛ yango.”

Tóndima bosolo ya makambo

Moto moko te akoki kobeta ntembe likoló na likambo oyo ete tozali kobika kati na mokili oyo ezangi kokoka. Makambo malobelami awa mazali oyo masalemaka mpenza. Bato mosusu bakoyiba biso mosolo. Bakonzi mosusu ya misala bakozala sembo te. Baninga ya bana na biso bakoki kozala na bopusi mabe likoló na bana na biso. Balakisi mpe biteyelo mosusu bazali na mposa ya kobongisama lisusu. Na bantango mosusu, bankulutu basengeli komonisa lisusu bolingo mpe boboto mingi koleka. Kasi tosengeli kobosana te bopusi ya ezalela ya kozanga kokoka mpe, lokola Biblia ezali komonisa yango, “mokili mobimba ejali kolala kati na oyo mabe.” Na yango, ezali sembo te na kokanisa ete nzela na biso ya bomoi ekozala ntango nyonso pɛtɛɛ.​—1 Yoane 5:19.

Lisusu, tosengeli koyeba bizaleli na biso moko ya kozanga kokoka mpe bandelo ya makoki na biso mpe koyeba ete mbala mingi, mikakatano na biso ezalaka bongo mbuma ya bozoba na biso moko. Paulo apesaki baklisto ya Loma toli oyo ete: “Najali koloba na mɔkɔ na mɔkɔ kati na bino ete boleka tɛ komikanisa bino mpenja na motindo mobɔngi tɛ.” (Baloma 12:3) Toli yango ezali mpe na nguya na mikolo na biso. Soki likambo moko etamboli malamu te kati na bomoi na biso, tokolanda te nokinoki ndakisa ya bankɔ́kɔ na biso, Adama mpe Eva, mpe koloba te ete: “Ezali libunga na ngai te!” Nzokande, tokomituna ete, ‘Likambo nini nakokaki kosala mpo ete nakoka kopɛngola likambo oyo ya mawa? Nasalelaki ekateli malamu kati na likambo yango mpe nalukaki toli epai na moto moko oyo azali na mayele? Otalelaki moto to bato mosusu lokola ete bazali na libunga te, na kopesáká bango limemya?’

Soki tolandi malako ya boklisto mpe tosaleli makanisi malamu, tokozala na baninga mingi mpe tokozala na mikakatano mingi te. Mikakatano mingi ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo ekosila. Tokozala na esengo kati na boyokani na biso elongo na basusu mpe tokotunama te motuna oyo ete: “Ezali libunga ya nani?”

[Bililingi na lokasa 28]

Baboti bakoki kosalisa bana ete bákola na elimo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto