Nkunda ya Petelo: Ezali na Vatican?
“NKUNDA ya Mokóló ya bantoma esili komonana.” Ezali yango nsango ya bolóngi oyo Pápa Pius XII ayebisaki na nzela ya radio ya Vatican. Ezalaki na nsuka ya mobu 1950, mpe bolukiluki mingi oyo esalemaki na nsé ya Basilique Saint-Pierre eutaki kokóma na nsuka na yango. Engebene bato mosusu, matomba ya bokundoli wana ya biloko ya kala emonisaki ete Petelo akundamaki solo na Vatican. Nzokande, bato banso te bazali kondima yango.
Mpo na Bakatolike, ndako-nzambe Saint-Pierre oyo ezali na Vatican, ezali na ndimbola moko monene. Búku moko ya Katolike elobi ete: “Mokano ya liboso oyo bato basalaka mobembo ya losambo na Loma ezali mpo na kokutana na mokitani ya Petelo mpe kozwa lipamboli na ye, mpamba te Petelo akómaki na Loma mpe akundamaki kuna.” Kasi ezali solo ete Petelo akundamaki na Loma? Nkunda na ye ezali na Vatican? Bato basili komona mikuwa na ye?
Libombami ya bokundoli biloko ya kala
Bolukiluki, oyo ebandaki na mobu 1940 mpe oyo eumelaki pene na mibu zomi, ezali likambo oyo ezali kobimisa ntembe makasi. Bakundoli ya biloko ya kala oyo baponamaki na pápa bamonaki nini? Moko na makambo oyo bamonaki ezalaki bongo malita ya bapakano oyo ezalaki na nkunda mingi. Na katikati ya bankunda yango, na nsé ya oyo bazali kobénga lelo ete etumbelo ya pápa, bamonaki oyo ebéngami édicule, monimá moko oyo ebongisamaki lokola efandelo ya ekeko to elilingi moko, esalemi kati na efelo moko oyo ezipami na simá ya motane mpe ezingelami na bifelo mibale epai na epai. Na nsuka, mpe na lolenge ya kokamwa mpenza, bitika ya bato mpe emonanaki, oyo elobamaki ete yango eutaki na moko ya bifelo oyo ezali epai na epai.
Ezali wana nde bandimbola ndenge na ndenge ebandaki kopesama. Engebene bato na mayele mingi ya Katolike, bokundoli ezali kondimisa bindimeli oyo ete Petelo afandaki mpe abomamaki na Loma lokola martíru na boumeli ya boyangeli ya Néron, mbala mosusu na boumeli ya monyoko oyo ebimaki na mobu 64 T.B. Elobamaki nkutu ete bitika yango ezali mikuwa ya ntoma wana mpe ekoki koyebana bongo na nzela ya likomi oyo, engebene ndimbola moko, elobi ete: “Petelo azali awa.” Emonani lokola ete Pápa Paul VI andimaki likanisi oyo wana asakolaki bokundoli ya “bitika ya Santu Petelo, oyo ebongi ete biso banso tosambela mpe tokumisa yango.”
Nzokande, nzela moko na bandimbola wana, ezalaki mpe na makanisi oyo ezalaki kotɛmɛla yango. Mokatolike moko na nkombo ya Antonio Ferrua, oyo azalaki Jésuite, mokundoli na biloko ya kala oyo asanganaki na bolukiluki oyo esalemaki na Vatican, andimaki na mabaku mingi ete ‘apesamelaki nzela te ya kokoma na mikanda’ makambo nyonso oyo ye ayebi na ntina na likambo yango, makambo oyo malingaki mpenza kokweisa likanisi oyo endimi ete bitika ya Petelo bimonani. Lisusu, búku moko ya Loma, oyo ekomamaki na Cardinal Poupard mpe ebimisamaki na 1991, elobaki ete “na ntina na mikuwa ya moto oyo bakutaki na nsé ya Efelo ya Motane, bilembeteli ya siansi bimonisi boyokani soko moke te na ntoma Petelo.” Likambo ya kokamwa, na ebimelo oyo elandaki (nsima na 1991) maloba wana malongolamaki, mpe mokapo ya sika, na motó ya likambo oyo “Likambo ya solo: Petelo azalaki na Loma” ebakisamaki.
Bandimbola likoló na biloko bimonani
Ntembe ezali te ete biloko oyo bimonani bikoki kobimisa bandimbola ndenge na ndenge mpe ezali komonisa makambo makeseni engebene moto na moto. Ya solo, bakomi na makambo ya kala ya Katolike oyo bayebani mingi bandimi ete “makambo matali lisoló ya kobomama mpenza ya Petelo lokola martíru na Loma, mpe esika oyo ye akundamaki, ezali kobimisa ntembe monene.” Biloko bimonani bimonisi nini mpo na yango?
Monimá édicule ezali, engebene baoyo bazali koluka kokɔtela bindimeli ya Katolike, “elembo ya kokanisama” oyo elobelaki moto moko na nkombo Gaius, oyo azalaki sángó mpe azalaki na bomoi na ebandeli ya ekeke ya misato T.B. Engebene Eusebius ya Kaisalia, mokomi na makambo ya mangomba na ekeke ya minei, Gaius alobaki ete akokaki ‘komonisa elembo ya kokanisama ya Petelo likoló na Ngomba ya Vatican.’ Bakɔteli ya bindimeli wana bazali koloba ete ntoma [Petelo] akundamaki kuna, na nsé ya monimá oyo na nsima ekómaki kobéngama “elembo ya kokanisama ya Gaius.” Nzokande, basusu bazali kolimbola makambo mamonisamaki na bolukiluki yango na lolenge lokeseni mpenza, komonisáká ete baklisto ya liboso bazalaki kotya likebi mingi te na bokundi ya bakufi na bango mpe ete ata soki Petelo abomamaki kuna, kozwa nzoto na ye ekokaki kozala mpasi mingi. (Talá etánda, lokasa 29.)
Ezali na baoyo bazali kondima te ete “elembo ya kokanisama ya Gaius” (soki yango emonanaki mpenza) ezali nkunda. Bazali kondima ete yango ezali monimá oyo basalaki mpo na lokumu ya Petelo pene na nsuka ya ekeke ya mibale mpe ete na nsima yango “ekómaki kotalelama lokola monimá ya nkunda.” Nzokande, engebene Oscar Cullmann, moto ayebi makambo ya teoloji, “bolukiluki na Vatican emonisi soko moke te nkunda ya Petelo.”
Ezali boni mpo na mikuwa? Esengeli kolobama ete epai mikuwa miutaki mpenza ezali mpe mpasi mpo na koyeba yango. Uta na ekeke ya liboso malita ya bapakano mazalaki na oyo ebéngami sikawa ete Ngomba ya Vatican, bitika mingi ya bato ekundamaki kati na etúká yango, mpe mingi esilaki komonana. Likomi oyo ezali na mobimba na yango te (mbala mosusu ekomamaki na ekeke ya minei) oyo basusu balobi ete ezali komonisa esika bamonaki bitika yango lokola nkunda ya ntoma, ekoki kozala nde “oyo bakanisaka ete ezali mikuwa ya Petelo.” Lisusu, bayekoli mingi na makambo oyo makomamaka likoló na bandako bandimi ete likomi yango ekoki nkutu kolimbola “Petelo azali awa te.”
‘Bindimeli oyo bibongi na kotyela motema te’
“Mikanda ya liboso mpe oyo ebongi mpenza na kotyela motema elobeli te esika oyo Petelo abomamaki lokola martíru, kasi kati na mikanda oyo miyaki na nsima mpe oyo ebongi mpenza te na kotyela motema nde tozali kokuta likanisi oyo elobi ete esika yango ezalaki na Vatican,” ezali wana maloba ya D. W. O’Connor, mokomi na makambo ya bato. Na yango, likanisi oyo ete nkunda ya Petelo ezali na Vatican eutaki na bindimeli oyo ebongi na kotyela motema te. O’Connor andimi ete: “Ntango bitika bikómaki likambo ya ntina mingi, baklisto bakómaki kondima mpenza ete elembo ya kokanisama ya Petelo emonisaki solo esika oyo nkunda na ye ezali.”
Bindimeli wana bikólaki nzela moko na losambo ya biloko oyo basantu batiká, bindimeli oyo endimami na Makomami te. Kobanda na ekeke ya misato mpe ya minei, bituluku mingi ya mangomba bisalelaki biloko oyo basantu batiká, ya solo mpe ya lokuta—mpe yango ezangaki te kopesa matomba ya mosolo—kati na etumba mpo na kokóma na bokonzi boleki bonene na “makambo ya elimo” mpe mpo na kokólisa lokumu na bango moko. Na yango, kondimisamáká ete bitiká ya Petelo bizali na nguya ya kosala bikamwiseli, batámboli basalaki mibembo ya losambo mpo na kokóma na esika oyo bakanisaka ete ezali nkunda na ye. Na nsuka ya ekeke ya motoba, bandimi bazalaki na momeseno ya kobwaka biteni ya bilamba oyo bimekami na kilo, likoló na “nkunda” yango. Búku moko ya ntango wana elobi ete: “Likambo ya kokamwa, soki kondima ya moto yango ezali makasi, wana bilamba bilongolami na nkunda, ekotonda na bizaleli malamu ya Nzambe mpe ekozala na kilo koleka ndenge yango ezalaki liboso.” Yango emonisi bonene ya bindimandima oyo ezalaki na ntango wana.
Na boumeli ya bikeke mingi, masapo lokola oyo mpe bindimeli oyo bizali na moboko te ekólisaki mingi lokumu ya ndako-nzambe monene ya Vatican. Nzokande, makanisi oyo mazalaki kotɛmɛla yango mabimaki. Na ekeke ya 12 mpe na ekeke ya 13, ba Vaudois bakweisaki makanisi wana ya kolekisa ndelo mpe, na nzela ya Biblia, balimbolaki ete Petelo akendaki na Loma soko moke te. Bikeke mingi na nsima, babandisi ya Mbongwana ya Protestá bamonisaki mpe likanisi motindo moko. Na ekeke ya 18, bafilozofe oyo bayebani mingi bamonaki bindimeli yango lokola ezalaki na moboko te na kotalela Lisoló ya bato mpe Makomami. Likanisi yango endimami mpe na bato na mayele, ya Katolike mpe bato mosusu, oyo bazali na mikolo na biso.
Petelo akufaki na Loma?
Petelo, moto na Galilai oyo azalaki molɔ́bi mbisi, azalaki te na likanisi ya komitombala likoló ya bankulutu oyo bazalaki na lisangá ya boklisto ya ekeke ya liboso. Nzokande, alobaki mpo na ye moko ete azali “nkulutu moninga.” (1 Petelo 5:1-6, Revised Standard Version) Bomoto ya komikitisa ya Petelo ekeseni na lokumu oyo bazali kopesa na eloko oyo bakanisaka ete nkunda na ye, lokola yango ekoki komonana na moto nyonso oyo akei kotala ndako-nzambe monene ya Vatican.
Mpo na kondimisa ete yango ezali likoló ya mangomba mosusu ya boklisto, Lingomba ya Katolike elukaki kotombola ‘mikanda oyo mikomamaki nsima mpe oyo mibongi na kotyela motema te’ oyo ezali koloba ete Petelo afandaki mpo na mwa ntango na Loma. Nzokande, likambo ya kokamwa, bindimeli mosusu ya kala bizali te kotalela ete nkunda na ye ezalaki na Vatican, kasi nde epai mosusu kati na Loma. Bongo, mpo na nini te kotalela makambo ya sikisiki oyo mazali kati na Biblia, liziba bobele moko ya solo mpo na koyeba makambo oyo matali Petelo? Kati na Liloba ya Nzambe ezali polele ete, na kotosáká malako oyo azwaki na lisangani ya mikóló-bakambi ya lisangá ya boklisto oyo ezalaki na Yelusaleme, Petelo akokisaki mosala na ye kati na eteni ya ɛ́sti ya mokili ya kala, kamata mpe Babilone.—Bagalatia 2:1-9; 1 Petelo 5:13; kokanisá na Misala 8:14.
Wana azalaki kokomela baklisto oyo bazalaki na Loma, soko na mobu 56 T.B., ntoma Paulo apesaki mbote na basangani soko 30 ya lisangá yango kozanga ata kotánga Petelo. (Baloma 1:1, 7; 16:3-23) Na nsima, kati na mobu 60 mpe 65 T.B., Paulo akomaki mikanda motoba longwa na Loma, kasi Petelo atángami te—oyo ezali elembo monene emonisi ete Petelo azalaki kuna te.a (Kokanisá na 2 Timoté 1:15-17; 4:11.) Mosala ya Paulo kati na Loma elobelami na nsuka ya mokanda ya Misala, kasi awa mpe lisusu, likambo moko te elobelami na ntina na Petelo. (Misala 28:16, 30, 31) Na bongo, botaleli ya solo ya bilembeteli ya Biblia, oyo esalemi na bosembo nyonso, ekoki bobele kotinda biso na koloba ete Petelo asakolaki te kati na Loma.b
“Bokonzi” ya pápa ezwi moboko na yango likoló na bindimeli oyo bibongi na kotyela motema te mpe bosaleli mabe ya mikapo ya Makomami. Moboko ya Boklisto ezali Yesu, kasi Petelo te. Paulo alobi: ete ‘Klisto azali motó na lisangá.’ (Baefese 2:20-22; 5:23) Ezalaki Yesu Klisto nde Yehova atindaki mpo na kopambola mpe kobikisa baoyo nyonso bazali na kondima.—Yoane 3:16; Misala 4:12; Baloma 15:29; talá lisusu 1 Petelo 2:4-8.
Na bongo, baoyo nyonso bazali kokende kotala oyo bakanisi na bosembo nyonso ete ezali nkunda ya Petelo, mpo na ‘kokutana na mokitani na ye’ bazali liboso ya mokakatano ya kondima ‘bindimeli bibongi na kotyela motema te’ to kondima Liloba ya Nzambe oyo libongi na kotyela motema. Lokola baklisto bazali na mposa ete losambo na bango endimama epai na Nzambe, ‘bazali kotalela ntango nyonso Yesu, Esaleli ya kondima na bango,’ mpe ndakisa ya kokoka oyo ye atikaki mpo na biso ete tólanda yango.—Baebele 12:2; 1 Petelo 2:21.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Soko na bambula 60-61 T.B., Paulo akomaki mikanda na ye epai na Baefese, na Bafilipi, na Bakolose, na Filemona, mpe epai na Baebele; soko na mobu 65 T.B., akomaki mokanda na ye ya mibale epai na Timoté.
b Motuna oyo ete: “Petelo azalaki na Loma?” elobelamaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Febwáli 1, 1973, (ebimeli ya Lifalansé) nkasa 92-94.
[Etanda na lokasa 29]
“Botimoli emonisaki bilembo ya nkunda te na nsé ya édicule; ezali mpe na elembo te oyo emonisi ete baklisto bakamataki nzoto ya Santu Petelo na mabɔkɔ na babomi na ye mpo na kokundama na baklisto. Na kotalela lolenge makambo mazalaki kosalema, nzoto ya moto oyo azalaki mopaya (peregrinus), mpe engebene mibeko, moto mpamba oyo azali moto mabe, asengelaki kobwakama kati na ebale Tibre. . . . Lisusu, bakokaki te kozala na mposa ya kobomba bitika ya nzoto na ntango wana ya kala lokola esalemaki na nsima, wana molende ya kozela nsuka ya mokili esilaki kokita mpe wana losambo ya bamartíru esilaki kobanda. Na yango, likanisi oyo ete nzoto ya Santu Petelo ekamatamaki te mpo na bokundi nde ezali likanisi ya solo.”—The Shrine of St. Peter and the Vatican Excavations, ekomamaki na Jocelyn Toynbee mpe John Ward Perkins.