Mituna ya Batángi
Wana Eva, mpe na nsima Adama, balyaki mbuma ya nzeté ya koyeba malamu mpe mabe, mbuma oyo baliaki ezalaki nde pómo?
Toyebi te. Bato mingi bakanisaki ete ‘mbuma oyo epekisamaki’ ezalaki bongo pómo, mpe na boumeli ya bikeke bato na ntɔ́ki mbala mingi bayemaki yango bongo. Kasi Biblia epesi nkombo ya nzeté yango te to mpe ya mbuma na yango te. Eve alobelaki yango bobele lokola “mbuma ya nzeté oyo ezali na katikati ya elanga.”—Genese 3:3, NW.
Lisoló oyo ezali na motó na likambo ete “Apple (pómo)” kati na búku Insight on the Scriptures lizali na ntina:
“Makanisi mpamba mazali kopesama mingi na ntina na nzeté mpe mbuma oyo emonisami na liloba ya Liebele tap·puʹach. Liloba yango moko lizali komonisa eloko oyo ekesenisami na malasi, to nsolo na yango. Euti na liloba na·phachʹ, oyo elimboli ‘kopepa; kopema mbangumbangu; kobunda mpo na kopema.’ (Ge 2:7; Yobo 31:39; Yil 15:9) Na ntina na liloba oyo, M. C. Fisher akomaki ete: ‘Boyokani [elongo na na·phachʹ] emonani lokola ete etali na esika ya liboso ndimbola oyo ekeseni mpenza, kasi makanisi ya “kopema” mpe “kobimisa nsolo” mazali na boyokani. Liloba mosusu ya lolenge moko oyo ezali na ndimbola yango ezali puah oyo elimboli “kopepa” (ya mopepe) mpe “kobimisa nsolo kitoko, kozala na malasi.”’—Theological Wordbook of the Old Testament, ekomamaki na R. L. Harris, 1980, Vol. 2, lok. 586.
“Mbuma mingi etángamaki na esika ya pómo, lokola malala, sitɔlɔ́, coing, mpe abricot. . . . Nzokande, liloba ya Arabe tuffah oyo ekangisami na yango elimboli libosoliboso ‘pómo,’ mpe ezali likambo ya ntina ete bankombo ya bitúká, lokola Tappuah mpe Beth-tappuah (mbala mosusu ebéngamaki bongo mpo ete mbuma yango ezalaki mingi na bisika wana to zingazinga na yango) ebatelamaki na ebéngeli motindo moko na lokótá Arabe oyo ekokani na yango na nzela ya liloba wana. (Yos 12:17; 15:34, 53; 16:8; 17:8) Bisika wana bizalaki na mabwaku te, kasi likoló na bankeka ya mokili wana, esika oyo ezali mpiɔ. Lisusu, tokoki mpe kobosana te ete mbala mosusu mbongwana ya bileko (malili to molungé) ya bisika yango ekokaki mpe kokesena. Nzeté ya pómo ezali mpe kolónama lelo na Israël mpe yango emonani ete ekokani mpenza na oyo Biblia eyebisi. William Thomson, oyo alekisaki mibu mingi na Syrie mpe na Palestine na ekeke ya zomi na libwa, alobaki ete amonaki bilanga ya pómo na etúká ya Askélon na bisobe ya Philistia.—The Land and the Book (Mokili mpe Búku), etalelamaki lisusu na J. Grande, 1910, nk. 545, 546.
“Nzeté ya pómo (Pyrus malus) elobelami mingi mpenza kati na Loyembo ya Solomo, epai bolingo oyo mobateli ya mpate amonisaki epai na moninga na ye Sulamite ekokisami na malili kitoko ya nzeté ya pómo mpe na elɛngi ya mbuma na yango. (Loy 2:3, 5) Ye mpe, akokanisaki mpema ya Sulamite na malasi ya pómo. (Loy 7:8; talá lisusu 8:5.) Kati na Masese (25:11) maloba mabongi, oyo mabimisami na ntango na yango makokisami na ‘pómo na wolo kati na sani ya palata.’ Longola yango, mokapo mosusu oyo molobeli pómo mozali kati na Yoele 1:12. Momeseno oyo epalangani mingi, ete pómo nde ezalaki mbuma oyo epekisamaki na Edene ezali na moboko moko te kati na Makomami. Bobele bongo, liloba ‘pómo ya liso’ ezwami kati na libongoli King James Bible (Nz 17:8; Mas 7:2; mpe mikapo misusu) kasi ezali te maloba mauti na Liebele, oyo soki ebongolami na kolanda liloba moko na moko ekozala ‘katikati ya liso [ya moto].’”—Insight on the Scriptures, Volimi 1, nkasa 131-2, ebimisami na 1988 na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.