Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/10 nk. 21-26
  • Olimbisaka lokola Yehova alimbisaka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Olimbisaka lokola Yehova alimbisaka?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mose abondeli​—Yehova ayoki
  • Losambo ya bikeko ya Manase mpe ekobo oyo Davidi asalaki
  • Ntango Salomo abulisaki tempelo
  • Kolimbisa kati na Makomami ya Greke ya boklisto
  • ‘Bókóba kolimbisana bamoko na bamosusu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Yehova, Nzambe Oyo ‘Alimbisaka’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Yehova—Moto oyo aleki bato nyonso na likambo etali kolimbisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Mpo na nini koyeba kolimbisa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/10 nk. 21-26

Olimbisaka lokola Yehova alimbisaka?

“Sɔkɔ bokolimbisa bato bikweli na bango, Tata na bino na Likolo akolimbisa mpe bino. Nde sɔkɔ bokolimbisa bato tɛ, Tata na bino akolimbisa bino bikweli na bino tɛ.”​—MATAI 6:14, 15.

1, 2. Tozali na mposa ya Nzambe ya lolenge nini mpe mpo na nini?

“YEHOVA ajali na motema molai, ajali mpe na mawa; [akosilikaka noki te, NW] mpe boboto na ye ekoyikanaka. Mpamela na ye ekoumela tɛ, akobatelaka nkanda na ye ntango molai tɛ. Asalaki epai na biso pelamɔkɔ masumu na biso tɛ; apɛsaki biso libonja lokola ekoki na [mabungá, NW] na biso tɛ. Jambi lokola molai na lola ejali na likolo na mokili, boboto na ye ejali monɛnɛ boye epai na baoyo bakobangaka ye. Mosika pelamɔkɔ yango kati na epai na ebimelo na ntango mpe epai na elimwelo na yango, mosika boye asili kolongola bipɛngwɛli na biso. Pelamɔkɔ tata akoyokela bana na ye mawa, boye [Yehova] akoyokelaka bango mawa baoyo bakobangaka ye. Jambi ayebi njoto na biso, ajali kobosana tɛ ete tojali bobɛlɛ mputulu.”​—Njembo 103:8-14.

2 Lokola uta na libumu ya mama tozali kati na lisumu mpe tobotami na mabungá, na ezalela ya kozanga kokoka oyo tosangolaki, oyo ezali kosala ntango nyonso ete tózala baombo ya mobeko ya lisumu, tozali mpenza na mposa ya Nzambe oyo ‘ayebi ete tosalemi na mputulu.’ Bambula nkámá misato nsima wana Davidi alobaki na ntina na Yehova na lolenge mpenza ya kitoko kati na Nzembo 103, Mika, mokomi mosusu ya Biblia, akumisaki Nzambe wana moko na motindo mokokani mpenza na oyo Davidi asalaki, mpamba te ye alimbisaka masumu: “Nani ajali Njambe lokola yɔ, ye oyo alimbisi masumu, mpe atiki lipɛngwi na litika na libula na ye? Akobatela nkanda na ye libela tɛ mpɔ ete asepeli kosalaka na boboto. Akobongwana lisusu mpe akoyokela biso mawa; akonyatela mabunga na biso na nse na makolo. Okobwaka masumu yɔnsɔ na bango kino bojindo na mai.”​—Mika 7:18, 19.

3. Kolimbisa elimboli nini?

3 Kati na Makomami ya Greke, liloba libongolami na “kolimbisa” elimboli “kotika.” Tósimba likambo oyo ete Davidi mpe Mika, baoyo touti kotánga maloba na bango bapesi mpe ndimbola yango moko na maloba ya kitoko mpenza. Mpo na kopesa motuya mingi na bonene ya ezaleli ya kolimbisa oyo Yehova azali na yango, tiká tótalela mwa bandakisa oyo ye amonisaki ezaleli yango. Ndakisa ya liboso emonisi ete makanisi ya Yehova makoki kobongwana longwa na ekateli azwi ya koboma kino ekateli ya kolimbisa.

Mose abondeli​—Yehova ayoki

4. Bayisraele bazalaki naino kobanga kokɔta na Mokili ya Ndaká ata nsima wana basilaki komona makambo nini oyo mamonisaki nguya ya Nzambe?

4 Yehova abimisaki libota ya Yisraele longwa na Ezipito kozanga likámá mpe amemaki bango penepene na mokili oyo alakaki ete akopesa bango lokola mboka na bango, kasi baboyaki kokende na mboka yango, mpamba te bazalaki kobanga bato oyo bazalaki na Kanana. Atako bamonaki lolenge Yehova abikisaki bango na Ezipito na nzela na bolɔ́zi zomi, lolenge afungolaki nzela ya kokima kati na Mai Motane, lolenge abomaki mampinga ya Ezipito oyo emekaki kolanda bango, lolenge asalaki elongo na bango kondimana ya Mibeko na ngomba Sinai, oyo ekómisaki bango libota liponami ya Yehova, mpe lolenge ya likamwisi oyo azalaki kopesa bango mana mokolo na mokolo, oyo ezalaki kouta na likoló mpo na koleisa bango, nde ata bongo babangaki mpo na kokɔta na Mokili ya Ndaká mpamba te babangaki bato milai oyo bazalaki na Kanana!​—Mituya 14:1-4.

5. Lolenge nini banɔ́ngi mibale ya sembo bamekaki koyikisa Bayisraele mpiko?

5 Mose mpe Alona babulunganaki mingi na komona lolenge bato bazalaki kobanga. Yosua mpe Kalebe, banɔ́ngi mibale ya sembo, bamekaki koyikisa Bayisraele mpiko: ‘Ezali mokili moko malamu mingi, mokili motondi na mabɛlɛ mpe na mafuta ya nzoi. Bóbanga bato ya mokili yango te; Yehova azali elongo na biso!’ Na esika ete báyikisama mpiko na maloba oyo, batomboki wana oyo bazalaki kobanga bamekaki nde kobamba Yosua mpe Kalebe mabanga.​—Mituya 14:5-10, NW.

6, 7. (a) Yehova azwaki ekateli ya kosala nini wana Bayisraele baboyaki kokɔta na Mokili ya Ndaká? (b) Mpo na nini Mose andimaki te etumbu oyo Yehova alingaki kopesa na Yisraele, mpe yango ebimisaki litomba nini?

6 Yehova ayokaki nkanda! “[Yehova] alobelaki Mose ete, ‘Bato oyo bakotiola ngai ntango molai boni? Bakoboya kondima ngai ntango molai boni ata nasili kosala bilembo oyo yɔnsɔ na kati na bango? Nakobɛta bango na malali mpe nakolongola libula na bango, mpe nakojalisa na yɔ libota lileki bango na monɛnɛ mpe na makasi.’ Mose nde alobelaki [Yehova] ete, ‘Na bongo Baejipito bakoyoka mpɔ yango, mpɔ ete yɔ obimisaki bato oyo na kati na bango na nguya na yɔ, mpe bango bakosolola na bafandi na mokili oyo. . . . Bongo sɔkɔ yɔ okoboma bato oyo lokola moto mɔkɔ, mbɛlɛ mabota bayoki lokumu na yɔ bakoloba ete, “Mpɔ ete [Yehova] akokaki tɛ kokɔtisa bato oyo na mokili mokataki ye ndai na kopɛsa na bango, yango wana abomi bango na [mokili mokauki, NW].”’”​—Mituya 14:11-16.

7 Mose asɛngaki bolimbisi, na ntina na nkombo ya Yehova: “‘Nabɔndɛli yɔ, limbisa mabe na bato oyo kokokana na monɛnɛ na boboto na yɔ, mpe lokola esili yɔ kolimbisa bato oyo longwa na Ejipito kino sasaipi.’ Bongo [Yehova] alobaki ete, ‘Ngai nasili kolimbisa pelamɔkɔ na monɔkɔ na yɔ.’”​—Mituya 14:19, 20.

Losambo ya bikeko ya Manase mpe ekobo oyo Davidi asalaki

8. Makambo nini Manase, mokonzi ya Yuda asalaki?

8 Ndakisa eleki monene oyo emonisi ezaleli Yehova azali na yango ya kolimbisa etaleli likambo ya Manase, mwana ya mokonzi malamu Hizikiya. Manase azalaki na mibu 12 wana abandaki koyangela na Yelusaleme. Atóngaki bisika na likoló, asalaki etumbelo mpo na Baala, asalaki makonzi ya losambo, afukamaki liboso na minzoto ya likoló, asalelaki bankisi mpe makambo na bondɔki, azalaki na basololi na bilimu mabe mpe bayebisi na makambo mazali koya, atyaki ekeko kati na tempelo ya Yehova, mpe alekisaki bana na ye moko kati na mɔ́tɔ na lobwaku ya mwana na Hinomo. “Asalaki mabe mingi na miso na [Yehova]” mpe “asalisaki Yuda mpe bafandi na Yelusaleme masumu kino balekaki na mabe mabota oyo [Yehova] abebisaki bango liboso na bana na Yisalaele.”​—2 Ntango 33:1-9.

9. Lolenge nini Yehova amonisaki mawa epai na Manase, mpe yango ebimisaki matomba nini?

9 Na nsuka, Yehova ayeisaki Baasulia kobundisa Yuda, mpe bakangaki Manase mpe bamemaki ye na Babilone. “Ejalaki ye na mpasi, abɔndɛlaki elongi na [Yehova], Njambe na ye mpe amisɔkisaki mingi liboso na Njambe na batata na ye. Abɔndɛlaki ye mpe ye ayambaki malɔmbɔ na ye mpe ayokaki libɔndɛli na ye mpe ayeisaki ye lisusu na Yelusaleme na bokonji na ye.” (2 Ntango 33:11-13) Na bongo, Manase alongolaki banzambe ya bapaya, bikeko, mpe bitumbelo mpe abwakaki yango na libándá ya mboka. Abandaki kopesa mbeka na etumbelo ya Yehova mpe apusaki Yuda na kosalela Nzambe ya solo. Yango ezalaki elakiseli monene ya ezaleli oyo Yehova azali na yango ya kolimbisa wana moto amonisi komikitisa, abondeli ye mpe atiki misala na ye ya mabe na komonisáká mpenza mbuma ya kobongola motema!​—2 Ntango 33:15, 16.

10. Lolenge nini Davidi amekaki kobomba lisumu oyo asalaki elongo na mwasi ya Uliya?

10 Lisumu ya ekobo oyo mokonzi Davidi asalaki elongo na mwasi ya Uliya, Mohiti, eyebani malamu. Asukaki te bobele na kosala ekobo na ye, kasi asalaki lisusu mayele mabe ntango mwasi wana akómaki na zemi. Mokonzi apesaki ndingisa na Uliya ete alongwa na etumba, kolikyáká ete soki ayei akokende na ndako na ye mpe akosangana na mwasi na ye. Kasi, mpo na komonisa limemya epai na baninga na ye basodá oyo bazalaki na etumba, Uliya aboyaki. Na bongo Davidi abyangaki ye mpo na kolya mpe alangwisaki ye masanga, kasi atako bongo akendaki epai na mwasi na ye te. Na bongo Davidi akomelaki mokonzi na basodá ete atya Uliya na liboso, na esika eleki makasi kati na etumba, mpo ete abomama, ezali yango nde esalemaki.​—2 Samwele 11:2-25.

11. Lolenge nini Davidi asalisamaki na kokóma na kobongola motema na lisumu na ye, kasi mpasi nini azwaki?

11 Yehova atindaki mosakoli na ye Natana epai na Davidi mpo na komonisa mokonzi lisumu na ye. “Dawidi alobaki na Natana ete, ‘Nasaleli [Yehova] lisumu.’ Natana alobaki mpe na Dawidi ete ‘[Yehova] alimbisi lisumu na yɔ, okokufa tɛ.’” (2 Samwele 12:13) Davidi atungisamaki mingi na ntina na lisumu na ye mpe amonisaki kobongola motema na ye kati na libondeli moko ya sembo, oyo asalaki epai na Yehova ete: “Sɔkɔ olingaki mbɛka, mbɛ napɛsi yɔ yango, nde yɔ okosepelaka na makabo na kotumba tɛ. Makabo majali malamu na miso na Njambe ijali [elimo etutami, NW]; Ɛ Njambe, yɔ okoboya motema motutami mpe na mawa tɛ.” (Njembo 51:16, 17) Yehova aboyaki te libondeli ya Davidi oyo eutaki na motema motutami. Atako bongo, Davidi azwaki etumbu makasi, na boyokani na maloba ya Yehova na ntina na kolimbisa oyo mazali na Exode 34:6, 7, (NW): “Akozanga kopesa etumbu soko moke te.”

Ntango Salomo abulisaki tempelo

12. Salomo asɛngaki nini na ntango abulisaki tempelo, mpe nini ezalaki eyano ya Yehova?

12 Ntango Salomo asilisaki kotonga tempelo ya Yehova, alobaki kati na libondeli na ye ya kobulisa tempelo ete: “Yokamela malɔmbɔ na moombo na yɔ mpe na libota na yɔ Yisalaele wana bakobɔndɛla na esika oyo; ɛɛ, yoka kuna na efandelo na yɔ na likolo mpe ekoyoka yɔ, limbisa.” Yehova ayanolaki ete: “Sɔkɔ nakokanga lola ete mbula ejala tɛ, to sɔkɔ nakolakisa mayoyo ete malia mokili, to sɔkɔ nakotinda malali kati na bato na ngai; sɔkɔ bato na ngai, baoyo babiangami na nkombo na ngai, bakomikitisa mpe bakobɔndɛla mpe bakoluka elongi na ngai mpe bakomibongola na njela mabe na bango, boye nakoyoka kuna na likolo, nakolimbisa masumu na bango mpe nakobikisa mokili na bango.”​—2 Ntango 6:21; 7:13, 14.

13. Ezekiele 33:13-16 emonisi nini mpo na lolenge oyo Yehova atalelaka moto?

13 Wana Yehova azali kotala yo, azali kondima yo ndenge ozali sikawa, kasi ndenge ozalaki kala te. Ekozala lokola Ejekiele 33:13-16 eyebisi ete: “Wana ekoloba ngai na moyɛngɛbɛni ete akobika sɔlɔ, sɔkɔ nde akotia motema na ye na boyɛngɛbɛnɛ na ye, mpe asali lisumu, mɔkɔ na misala na ye na boyɛngɛbɛnɛ ekokanisama tɛ; kasi mpɔ na lisumu esili ye kosala, mpɔ na yango akokufa. Lisusu, wana ekoloba ngai na moto mabe ete, ‘Okokufa sɔlɔ, sɔkɔ ye abongwi na lisumu na ye, mpe asali yango ebɔngi mpe na sembo; sɔkɔ moto mabe ajongisi ndanga, mpe ajongisi yango ebɔtɔlaki ye, mpe atamboli na mibeko na bomɔi, mpe asali lisumu tɛ; ye akobika sɔlɔ, akokufa tɛ. Mɔkɔ na masumu masalaki ye makotangama na ye tɛ; ye asali yango ebɔngi mpe na sembo, mpe akobika sɔlɔ.”

14. Nini ekesenisi mpenza lolenge ya kolimbisa ya Yehova?

14 Kolimbisa oyo Yehova Nzambe azali kolimbisa biso ezali na likambo moko oyo ekesenisi yango, likambo oyo ezali mpasi mpo na bato komonisa yango moko epai na mosusu kati na kolimbisa na bango​—ye alimbisaka mpe abosanaka. Bato mosusu bakoloba ete, ‘Nakoki kolimbisa oyo osali ngai, kasi nakokoka kobosana yango te.’ Na kokesena, talá oyo Yehova alobi ete akosala: “Nakolimbisa bokɛsɛnɛ na bango, nakokanisa mpe mabe na bango lisusu tɛ.”​—Yilimia 31:34.

15. Makambo nini masili kokomama oyo mazali komonisa lolenge oyo Yehova alimbisaka?

15 Yehova azali kolimbisa basambeli na ye awa na mabelé uta bankóto mingi ya bambula. Azali kolimbisa masumu oyo bazali koyeba ete basalaki yango, mpe oyo bazali koyeba te ete basalaki yango. Lolenge na ye ya komonisa mawa, motema molai, mpe ya kolimbisa ezali na nsuka te. Yisaya 55:7 elobi ete: “Tika ete moto mabe alongwa na njela na ye mpe moto na masumu alongwa na mabanja na ye. Tika ete abutwa epai na [Yehova], ete ayokela ye mawa, epai na Njambe na biso, jambi akolimbisa na sɔlɔ.”

Kolimbisa kati na Makomami ya Greke ya boklisto

16. Mpo na nini tokoki koloba ete lolenge ya kolimbisa ya Yesu ezali na boyokani na oyo ya Yehova?

16 Masoló ya kolimbisa ya Nzambe matondi mingi kati na Makomami ya Greke ya boklisto. Yesu alobeli yango mbala mingi, komonisáká ete azali na likanisi motindo moko na Yehova kati na likambo yango. Makanisi ya Yesu mauti epai na Yehova, azali komonisa Yehova, azali elilingi ya sikisiki ya Yehova; komona ye elimboli komona Yehova.​—Yoane 12:45-50; 14:9; Baebele 1:3.

17. Lolenge nini Yesu amonisaki ete Yehova alimbisaka “solo mpenza”?

17 Likambo oyo ete Yehova alimbisaka mpenza solo emonisamaki kati na moko na masese ya Yesu, lisese ya mokonzi moko oyo alimbisaki moombo oyo azalaki na nyongo ya batalanta 10 000 (soko badolare 33 000 000). Kasi ntango moombo wana aboyaki kolimbisa moninga na ye moombo oyo azalaki na nyongo na ye ya badenali nkámá moko (soko badolare 60), mokonzi asilikaki. “‘Ɛ moombo mabe mpenja! Nalimbisi yɔ nyongo yango yɔnsɔ mpɔ ete obɔndɛli ngai. Ekokaki nde na yɔ tɛ koyokela mosalani na yɔ mawa lokola ngai nayokeli yɔ mawa?’ Mpe na nkanda, nkolo na ye apɛsi ye epai na [banyokoli] kino akofuta ye nyongo na ye yɔnsɔ.” Na nsima Yesu amonisaki ndimbola ya lisese yango: “Tata na ngai na Likolo akosalela bino bongo sɔkɔ bokolimbisa na mitema na bino moto na moto ndeko na ye tɛ.”​—Matai 18:23-35.

18. Mpo na nini tokoki koloba ete lolenge Petelo azalaki kotalela kolimbisa ekesenaki na oyo ya Yesu?

18 Liboso ete Yesu apesa lisese wana, Petelo ayaki epai na Yesu mpe atunaki ye ete: “Nkolo, sɔkɔ ndeko na ngai akosalela ngai mabe, nalimbisa ye mbala boni? Kino mbala nsambo?” Petelo akanisaki ete kosala bongo ekozala bongo komonisa boboto mingi. Atako Bakomeli mpe Bafalisai batyaki bandelo mpo na oyo etali kolimbisa, Yesu alobaki na Petelo: “Nalobi na yɔ tɛ kino mbala nsambo kasi kino mbala [ntuku nsambo na nsambo, (NW)].” (Matai 18:21, 22) Mbala nsambo elingaki kokoka te mpo na mokolo moko, lokola Yesu alobaki: “Bokeba na bino! Sɔkɔ ndeko na yɔ asali lisumu, pamela ye. Sɔkɔ abongoli motema, limbisa ye. Ata asaleli yɔ lisumu mbala nsambo na mokɔlɔ mɔkɔ, mpe abongwi epai na yɔ mbala nsambo koloba ete, ‘Nakwei’; mbɛ olimbisa ye.” (Luka 17:3, 4) Wana Yehova alimbisaka biso masumu, akanisaka yango lisusu te​—yango ezali likambo ya esengo mpo na biso.

19. Nini tosengeli kosala mpo ete Yehova alimbisa biso?

19 Soki tozali na komikitisa mpo na kobongola motema mpe koyambola masumu na biso, Yehova akosala na bolingo malamu mpo na litomba na biso: “Sɔkɔ tokoyambola masumu na biso, ye ajali sembo mpe moyɛngɛbɛni mpɔ na kolimbisa biso masumu na biso mpe kopɛtɔla biso na bokɛsɛnɛ yɔnsɔ.”​—1 Yoane 1:9.

20. Motindo nini Sɛtɛfanɔ amonisaki ezaleli ya kolimbisa masumu?

20 Sɛtɛfanɔ, moyekoli ya Yesu, komonisáká elimo ya kolimbisa na lolenge ya kokamwa, wana ebele na bato oyo bazalaki na nkanda bazalaki kobamba ye mabanga, angangaki na maloba oyo ete: “‘Nkolo Yesu, yamba [elimo, NW] na ngai!’ Akwei na mabɔlɔngɔ na ye, mpe abiangi na mongongo makasi ete, ‘[Yehova], tangela bango lisumu oyo tɛ!’ Esili ye koloba bongo alali [kati na kufa, NW].”​—Misala 7:59, 60.

21. Mpo na nini bolingo malamu oyo Yesu amonisaki na kolimbisáká basodá Baloma ezalaki likambo ya kokamwa mingi?

21 Yesu atikaki ndakisa eleki monene mpo na oyo etali ezaleli malamu ya kolimbisa. Banguna na ye bakangaki ye, basambisaki ye na lolenge oyo elongobani na mibeko te, bakweisaki ye, bafingaki ye, babwakelaki ye nsoi, babetaki ye na mpimbo esalemi na mposo ya banyama oyo mbala mosusu ezalaki na mikuwa mpe na bibende na nsɔ́ngɛ́ na yango, mpe na nsuka babakisaki ye na nzeté na boumeli ya bangonga mingi. Baloma nde basanganaki mingi na minyoko yango. Nzokande, wana Yesu alingaki kokufa likoló na nzeté yango ya mpasi, alobaki epai na Tata na ye ya likoló na ntina na basodá oyo bakakisaki ye na nzeté ete: “Tata, limbisa bango mpɔ ete bayebi yango ejali bango kosala tɛ.”​—Luka 23:34.

22. Maloba nini mazwami na Lisoló likoló na Ngomba, tosengeli koluka kosalela yango?

22 Kati na Lisoló na ye likoló na Ngomba, Yesu alobaki ete: “Bolinga bayini na bino mpe bobɔndɛla mpɔ na banyɔkɔli na bino.” Na nsuka ya mosala na ye awa na mabelé, ye moko atosaki etindá yango. Ezali wana likambo makasi mingi mpo na biso, baoyo tozali kobundisa bolɛmbu ya nzoto na biso oyo ebebá? Tosengeli mpenza komeka kosalela maloba oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye nsima na kolakisa bango libondeli oyo ya Tata na biso: “Sɔkɔ bokolimbisa bato bikweli na bango, Tata na bino na Likolo akolimbisa mpe bino. Nde sɔkɔ bokolimbisa bato tɛ, Tata na bino akolimbisa bino bikweli na bino tɛ.” (Matai 5:44; 6:14, 15) Soki tozali kolimbisa lokola Yehova alimbisaka, tokolimbisa mpe tokobosana.

Ozali komikundola?

◻ Lolenge nini Yehova atalelaka masumu na biso mpe mpo na nini?

◻ Mpo na nini Manase azongisamaki na bokonzi na ye?

◻ Likambo nini ekesenisi mpenza ezaleli ya kolimbisa ya Yehova oyo ezali mpasi mpo na bato ete bámekola yango?

◻ Lolenge nini ezaleli ya Yesu ya kolinga kolimbisa ezali likambo ya kokamwa mingi?

[Elilingi na lokasa 24]

Natana asalisaki Davidi na komona ntina ya koluka bolimbisi epai na Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto