Okoki koyanola?
Okanisaki na mozindo likoló no binemero ya sika ya Mosenzeli? Boye, tala soki okoki kayanola na mituna milandi:
▫ Wapi “elembo na molamu” oyo Jéhovah azali komonisa epai na baoyo bazali kolanda matambo na Yesu? (Nzembo 86: 17)
“Esengo na elimo santu” elendisaki baklisto ya liboso mpe epesaki bango makoki ya koyiko mpiko kati na minyoko mikeseni oyo bakutanaki na yango. (1 Batesoloniki 1:6) Ezali mpe lolenge moko lelo oyo, Jéhovah, Mopesi ya “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi,” azali komimonisa mokabi na kopesáká “elimo santu na baoyo bakosengáká ye yango.” (Yakobo 1:17; Luka 11:13) Na yango esengo na elimo santu oyo ezali kolendisa boyekoli na Yesu ezalaki “elembo na malamu.”—15/12, Lokasa 18 kina lokasa 19.
▫ Mpo na nini ezali na ntina mingi mpo na biso kondima likanisi ya Nzambe na ntina na lokuta?
Tozali kotanga kati na Nzembo 5:6 ete Nzambe “akoboma baoyo bokolobaka lokuta.” Emoniseli 21:8 ebakisi ete likabo na baoyo nyonso bakolobaka lokuta ezali “kufa ya mibale.” Yango wana kondima likanisi ya Nzambe mpo na lokuta ekopesa biso ntina makasi ya koloba solo mpe ya kozwa likabo ya bomoi.—15/12, lokasa 23.
▫ Losambo ya lolenge nini Basamaria bazalaki kosalela? (Yoana 4:20)
Kati na losambo na bango oyo esangisi makambo mingi, Basamaria bazalaki kondima kati na Makomami bobele mikanda mitano ya liboso ya Moize, oyo ebengami Pentateuque. Penepene ya ekeke ya minei L.T.B., batongoki tempelo moko na ngomba Gelizimi, mpo na kowelana ya tempelo ya Nzambe na Yelusaleme. Atako tempelo na bango ebomamaki, lelo oyo mbula na mbula, Basamaria bakumisaka Pasika na Gelizimi.—1/1, lokasa 25.
▫ Boklisto basengeli kopesa lisungi na milende ya kobatela ezingelo na biso na libebi to mpo na bopeto na yango?
Ntango azalaki na mabelé, Yesu alukaki te kosilisa mikakatano nyonso ya bato na ntango na ye. Ntango Jéhovah akotosisa na mabelé mobimba mitinda na ye ya sembo, na nzela na Bokonzi ya Masiya, mikakatano ya ezingelo mikobongisama libela. Yango wana ba Témoins de Jéhovah bazali komonisa etelemelo ya bokatikati. Bolingo ya bazalani ezali kopusa bango na kozala na limemya mpo na biloko na moto mosusu, kasi ezali likambo ya ntina wana bazali kotya nsango ya Bokonzi na Nzambe na esika ya liboso. (Matai 6:33)—1/1, lokasa 31.
▫ Na meko nini Yesu azalaki momemi na pole na mokili? (Yoana 8:12)
Yesu amipesaki na kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe. (Luka 4:43, Yoane 18:37) Lisusu atondolaki polelepolele lokuta ya mangomba mpe apesaki bonsomi ya elimo na baoyo bakangami na boombo ya mangomba. (Matai 15:3-9) Oyo eleki mpenza, amonisaki ete azali pole na mokili na kopesáká bomoi no ye ya moto ya kokoka lokola lisiko. (Matai 20:28; Yoane 3:16)—15/1, lokasa 10 kino lokasa 11.
▫ Wapi mwa bontina tozali na yango ya komonisa botosi epai na Jéhovah Nzambe?
Jéhovah azali Moyangeli ya molongo mobimba, mpe mpo na ntina wana, tosengeli komonisa botosi epai na ye. Lisusu, lokola Jéhovah Mozalisi na biso azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso, moto moko te akoki kolonga na kotemela ye; moto moko te asengeli kobosana lisengisi azali na yango ya kozala na botosi epai na ye. Bikelamu nyonso ya mayele basengeli kotosa Mozalisi na bango mpamba te bazalisamaki mpo na kosalela ye, mpe yango epesi bango mokumba ya kotosa Nzambe na makambo nyonso.—1/2, lokasa 10 kino lokasa 11.
▫ Nini esalisaki Yozefe na kotemela lisenginya ya kosala pite elongo na mwasi ya Potifare?
Nguya moko makasi ezalaki kopusa elimo na ye. Boyokani na ye elongo na Jéhovah ezalaki na ntina mingi mpo na ye, mpe ayebaki ete kosala pite elingaki kozala lisumu monene bobele epai na Potifare te, kasi, na koleka epai na Nzambe.—15/2, lokasa 21.
▫ Maloba ya Yesu malimboli nini wana alobaki ete: “Ngai nazali ... solo?” (Yoane 14:6)
Yesu asukaki te bobele na koloba mpe koteya solo; amonisaki yango kati na bomoi na ye. Na yango, boklisto ya solo ezali bobele likanisi mpamba te, kasi ezali lolenge ya bomoi.—1/3, lokasa 15.
▫ Liteya nini ya kobondisama tokoki kozwa kati na Nzembo 51?
Nzembo wana ezali kosalisa biso na kososola ete soki tokweyi na lisumu, mpe soki tobongoli solo motema, Tata na biso ya likoló, oyo alingi biso, akoyoka bileli na biso mpo na motema mawa na ye mpe akobikisa biso na kozanga elikya. Nzokande, tomibanzabanza liboso mpo na nsoni oyo ebwakami likoló na nkombo na Jéhovah.—15/3, lokosa 18.
▫ Batisimo na mai elimboli nini?
Baoyo bazali kozwa batisimo bazali komonisa ete basili kopesa bomoi na bango epai na Jéhovah Nzambe. Bazali komonisa na kozindisama na bango na mai ete basili kokufa na lolenge na bomoi na bango yo kala, oyo etalaki bango moko. Kobima na mai ezali kolimbola ete basengeli sikawa kobika mpo na kokokisa mokano na Nzambe, mpe kotya yango na esika ya liboso kati na bomoi na bango. (Matai 16:24)—1/4, lokasa 5 kino lokasa 6.