Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/4 lok. 32
  • Nzeté na Bokonzi grenade euti na ndako na Jéhovah?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzeté na Bokonzi grenade euti na ndako na Jéhovah?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/4 lok. 32

Nzeté na Bokonzi grenade euti na ndako na Jéhovah?

NA ISRAEL, baarkéologe bakundolaki nzeté ya bokonzi mingi, nzete oyo bato oyo bazali na bokonzi bazalaki kosimba yango. (Genese 49:10; Esetele 8:4; Ezekiele 19:14) Mitó na nzete mosusu ya Lachis ezalaki na lolenge ya grenade. Libota na Nzambe eyebaki mbuma wana malamu.​—Deteronome 8:8; Loyembo na Salomo 4:13.

Kala mingi te, bakundolaki bililingi ya nzete na lolenge ya grenade oyo ezali na fololo esalemi na mpembe na nzoku (tala yango na foto wana). Bolai na yango ezali ya ba millimètres 43, mpe lidusu ezali oyo ezali na nse na yango ezali kopesa likanisi ete wana ezalaki eteni mosusu ya nzeté yango ya bokonzi. Tala makomi oyo mazali na ekomeli ya kala ya Liebele, ekomami uta ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso.

Na ntango ya kala eteni moko ya mpembe ya nzoku ebukanaki, yango wana mwa makomi moke masali kozanga, mpe mosusu mazali komonana bobele ndambo. Nzokanda, bayekoli ya makomi ya kala bazali kopesa likanisi ete ezalaki lokola elakisami awa na nse. (Engebene Biblical Archeologist.) Bisika minene oyo ezali kati na makomi etindaki bato na mayele na kobimisa mateya mibale. André Lemaire, moto ya mayele ya ekolo France, apesaki likanisi oyo ete: “Ezali ya Tem[ple ya Nkol]o [Yahvé], bulee mpo na banganga.” Nahman Avigad apesaki likanisi mosusu oyo: “Likabo ya bulee mpo na banganga ya (kati) na ndako ya Yahvé.”

Bato wana ya mayele mpe basusu, bakomaki na bosukisi ete na ebandeli nzeté yango ya bokonzi ezalaki na makomi minei ya nkombo mpenza ya Nzambe: Jéhovah. Bakokaki bongo kokuta liloba “ndako ya Jehovah,” oyo ezali komonana mbala mingi kati na Biblia.​—Exode 23:19; 1 Mikonzi 8:10, 11.

Bato mingi bazali mpe kokanisa ete motó ya nzeté wana ya bokonzi ezalaki ya nganga moko kati na temple oyo Salomo atongaki to epesamaki mpo na temple yango. Ezali likambo na ntina na komona ete lolenge ya grenade ezalaki komonana mbala mingi kati na temple na Nzambe.​—Exode 28:31-35; 1 Mikonzi 7:15-20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto