Mosika te Mabelé ya peto makosalema mpo na esengo monene na Biso!
TOSENGELI mpenza kozala na esengo ete, Jéhovah, Nzambe na molongo mpe ya bopeto, akokokisa mokano na ye ya ebandeli ya kosala paradis na mokili mobimba! (Yisaya 11:6-9) Alaki ete: “Boye na liloba likobima na monoko na ngai, . . . ekobutwa epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai.” Lokola “Nzambe akoki kobuka lokuta te,” maloba wana ezali ya mpamba te.—Yisaya 55:11; Baebele 6:18.
Tokoki kosepela ete kati na bolingo na ye, Jéhovah akokotela liboso ete bato bakóma na ndelo, oyo nsima na yango kobebisama ya libela ya ezingelo ekoki kopekisama te!—Emoniseli 11:18.
Jéhovah akolongola baoyo bazali kobebisa mabelé na nkó, mpe bato nyonso oyo bazali kotemela bokonzi na ye, na koboya kolanda mitinda na ye ya molongo mpe ya bopeto. Moto moko te akopesamela nzela ya kobebisa Paradis oyo ekosalema na mabelé.—Masese 2:20-22.
Na nse ya Bokonzi na Nzambe, oyo ekotambwisama na Yesu Klisto, bato bakoyekola lolenge ya kolongola bantina nyonso ya kobebisama ya ezingelo. Ezali na ntango wana—kasi sikawa te—nde basaleli nyonso ya Nzambe bakobyangama ete basangana na molende moto na moto mpe na lisangá na bibongiseli oyo bikopesa nzela na kopetolama ya mabelé mobimba.—Tala Ezekiele 39:8-16.
Babiki na nsuka ya biloko mabe na ntango oyo bakosimba ebongiseli ya kopetolama yango na elimo ya komipesa mpe na molende motindo moko na oyo bazali komonisa ntango bazali kosangana na mosala ya kopetolama ya elimo na mikolo na biso.—Nzembo 110:3.
Tondimi solo ete, kopetolama eleki monene oyo ekosalema na Bokonzi na Nzambe ekopetola mabelé. Bilembo nyonso ya kobebisama bikolongwa. Okomona bikomeli ya mpambampamba lisusu te. Epai moko te okokuta milangi, manzanza, saki ya plastika, nkasa ya chewing-gums mpe ya bonbons , bazulunalo ya kopanza nsango mpe bazulunalo ebwakami oyo ezali kobebisa mabongo to bisika mosusu ya paradis.
Mosika te mabelé ya peto makosalema mpo na esengo monene na biso!
[Elilingi na lokasa 7]
Okosangana na kopetolama monene ya mabelé mobimba oyo ekosalema mosika te?