Kolongola libebi na motema mpe na elimo
JÉHOVAH apesaki bato mposa ya bosoto to ya mobulu te. Efandelo na bango esengelaki kozala paradis ya bopeto, ya molongo mpe ya kitoko. Nzambe akanaki te ete ebongwana ebwakelo ya bosoto.—Genese 2:8, 9.
Nzokande, nsima ya kobwaka etambwiseli ya Nzambe, bato babandaki kosala ebongiseli na bango moko mpo na kotambwisa mokili. Lokola bakokaki kozwa litomba na mayele ya Nzambe te mpe lokola bazangaki eksperianse, basengelaki komeka na kotatabana. Lisoló ya bato endimisi bosolo ya Biblia oyo elobi ete bato bakoki te kolonga komitambwisa bango moko; uta bankoto ya bambula “moto azali na bokonzi likoló na moto mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9; Yilimia 10:23) Mikakatano ya lelo oyo mitali kobebisama ya mabelé, na mitindo na yango nyonso, miuti na kozanga makoki na moto mpo na koyangela malamu.
Tondima Likanisi ya Nzambe
Bato oyo balingi kosepelisa Nzambe bazali kosala makasi mpo na kobika engebene mitinda ya bopeto mipesami na Mozalisi. Na yango, ba Témoins de Jéhovah bakutanaki na mikakatano na assemblée internationale oyo ebongisamaki na engumba Prague, na mboka Tchécoslovaquie, na katikati ya mobu 1991.a Penepene na bato 75 000 basengelaki koyangana, ebele na bato oyo stade ya Strahov elingaki kokoka mpo na koyamba bango. Kasi, stade wana esalelamaki te na boumeli ya mibu mitano. Mpe lokola ezangaki kobongisama, ebebaki mingi mpenza. Ba Témoins de Jéhovah soko 1 500 basalaki bangonga koleka 65 000 mpo na kobongisa mpe kopakola yango langi ya sika. Ntango assemblée ebandaki, mosala wana ya bopeto esilaki kokomisa stade esika ya peto oyo ebongi mpo na kosambela Jéhovah, Nzambe ya solo.
Eloko nini ezali kopusa ba Témoins de Jéhovah na komikesenisa, nzokande bato mingi bapesaka bobele motuya moke na bopeto mpe na molongo? Bokangami na bango na batoli ya Biblia oyo elobi ete baklisto basengeli kobwaka bizaleli ya mabe, lokola moimi, kozanga limemya mpo na basusu, lokoso, mpe kozanga bolingo. Biblia elobi ete: “Bosili kobwaka [bomoto] ya kala na misala na yango nyonso.” Botya na esika na yango “[bomoto] ya sika oyo ezalisami ya sika mpo na boyebi, kino ekozwa ye motindo na Mozalisi na yango.” Bomoto oyo etondi na bolingo mpo na bopeto, molongo, mpe bonzenga ezali kobwaka mbindo nyonso ya nzoto mpe ya elimo.—Bakolose 3:9, 10; 2 Bakolinti 7:1; Bafilipi 4:8; Tito 2:14.
Bomoto ya sika ezali kosenga na baklisto ete bamibanzabanza na kobebisama ya ezingelo, batya bosoto mpambampamba te mpe basengeli kotosa mibeko oyo biyangeli bizali kopesa mpo na kobatela ezingelo. Bomoto ya sika ezali kosalisa bango na kopengola ezaleli ya moimi oyo, na ntina na bolembu ezali kotinda na kobwakabwaka bosoto bipai nyonso. Ezali kolendisa limemya mpo na biloko ya bato mosusu, mpe ezali kopekisa kosalela makomi mpambampamba lokola mwango ya kolimbola makanisi, mpe lokola kominanola ya malamu, to lokola lolenge moko ya ntóki. Ezali kosenga ete ndako, mituka, bilamba mpe nzoto ebatelama peto.—Tala Yakobo 1:21.
Bato oyo baboyi kolata bomoto ya sika, bakoki nde kopamela Nzambe mpo ete aboyi bazala na bomoi kati na paradis na ye oyo ezali koya? Soko moke te. Moto oyo motema to makanisi na ye “ebebisami” akotya na likama kitoko ya paradis oyo ekozala na mabelé mobimba, kopesáká bongo mawa mingi epai na baoyo bazali na mposa ya kobatela yango. Ekateli na Nzambe ya “kobebisa babebisi na mokili” ezali ya sembo mpe ya bolingo.—Emoniseli 11:18; 21:8.
Tosengeli kopesa Maboko na Molende?
Yango elingi koloba ete, baklisto basengisami na kopesa maboko na miango ya kopekisa kobebisama to kosimba bibongiseli bikamatami mpo na bopeto?
Ezali polele ete kobebisama ya ezingelo ezali na makama mpo na kolongono ya nzoto mpe mpo na kobatelama ya bato. Jéhovah azali komibanzanza na makambo yango, lokola emonisami na mibeko oyo apesaki na Bayisraele. (Exode 21:28-34; Deteronome 22:8; 23:12-14) Kasi na eleko moko te atindaki libota na ye ete elakisa bato na mabota mosusu makambo ya kobatelama; ata baklisto mpe ya ekeke ya liboso bazwaki etinda moko te ya kosala bongo.
Lelo oyo, makambo ya kobatela ezingelo makoki nokinoki kokoma makambo ya politike. Ya solo, ba partis politiques mosusu esalemaki mingimingi mpo na kotalela makambo ya ezingelo. Moklisto oyo amikotisi na makambo ya politike azali lisusu na bokatikati te. Nzokande, Yesu apesaki na bayekoli na ye motinda oyo: “Bazali bato na mokili te, lokola ngai nazali moto na mokili te.” Moklisto oyo akotyola lisengami yango azali na likama ya kotyama na molongo ya “mikonzi na ekeke oyo, baoyo basengeli kolimwa.”—Yoane 17:16; 1 Bakolinti 2:6.
Yesu alukaki te kosilisa mikakatano nyonso ya bato na ntango na ye; asengaki mpe bayekoli na ye te ete basala bongo. Apesaki bango nde etinda oyo: “Boye bokende kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango . . . , kolakisa mpe bango ete batosa makambo nyonso masili ngai kolaka bino.” Apesaki bango etinda moko te na ntina ya makambo na ezingelo.—Matai 28:19, 20.
Mpo na kolimbola eloko oyo esengelaki kozwa esika ya liboso kati na bomoi ya moklisto, Klisto alobaki: “Bolukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe, mpe boyengebene na ye.” (Matai 6:33) Ntango Jéhovah, na nzela na Bokonzi ya Masiya, akosala ete mitinda na ye ya sembo mitosama na mabelé mobimba, mikakatano ya ezingelo mikosila mpo na libela mpe bato nyonso bakosepela.
Ba Témoins de Jéhovah bazali bongo komonisa etelemelo ya bokatikati. Na kotalela Baloma 13:1-7, esengami na bango ete batosa na bosembo nyonso mibeko ya biyangeli mitali kobatela ezingelo. Lisusu, mobeko na Nzambe na ntina ya bolingo ya bazalani ekopusa bango na komonisa limemya mpo na biloko ya bato mosusu—ezala ya bato nyonso to ya moto moko—na kobebisa yango te to na kobwaka bosoto te na motindo mopekisami na mibeko. Kasi na polele nyonso, bazwi etinda moko te oyo esengi bango ete bakamba misala mitali kotya bopeto na mokili mobimba. Yango wana bazali kotya mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi na esika ya liboso, mpo bayebi ete ezali yango kosala likambo ya malamu oyo ekoumela seko.
Kopetolama ya Elimo
Bayisraele ya kala bakebisamaki mbala na mbala na makama balingaki kozwa soki babebisi mabelé na kosopa makila, na kozala na bomoi ya mbindo, to na kozanga botosi mpo na biloko ya bulee. (Mituya 35:33; Yilimia 3:1, 2; Malaki 1:7, 8) Na polele, bakweisamaki mpo na kobebisama wana ya elimo, kasi te mpo na kobebisama ya efandelo oyo na ntina na yango mbala mosusu bazalaki na ekweli.b
Na bongo, ezali liboso mpenza kobebisama ya elimo nde moklisto asengeli kosala makasi ya koboya yango lelo oyo. Akosala yango na “kolata bomoto ya sika,” oyo ekolongola mbindo nyonso ya motema mpe na elimo. Koleka bamilió minei ya ba Témoins de Jéhovah bazali kozwa litomba ya kopetolama wana ya elimo, na kokokisa kati na bango bopeto ya losambo mpe ya bizaleli, motindo moko na bopeto ya nzoto.—Baefese 4:22-24.
Lelo ezali ntango mpo na kotya kopetolama ya elimo. Kopetolama na mabelé mobimba ekolanda na nsima, mpe yango ekobatela efandelo na biso ete ekóma ebwakelo ya bosoto te na kopesáká yango ezingelo ezangi bosoto oyo ebongi na yango.—Mosakoli 3:1.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa bandimbola mingi na ntina na ba assemblées wana ya Europe de l’ Est, tala Réveillez-vous! ya 22 Décembre 1991.
b Bayisraele bayebaki mwango ya koniangwisa bibende. Bitika ya biloko bizwamaki na bisika mosusu ya kobimisa kwivre; mpo na kosala bisaleli ya tempelo bazalaki koniangwisa kwivre. (Tala 1 Mikonzi 7:14-46.) Ezali mpasi koloba ete konangwisama wana ezangaki kobimisa mwa kobebisama ya ezingelo na lolenge ya milinga mpe ya bosoto, oyo ezalaki na mwa makama. Kasi, Jéhovah apesaki nzela ete mwa kobebisama moke esalema na etuká wana oyo ezalaki na bato mingi te mpe etangwami.