Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/2 nk. 3-4
  • Paradis to ebwakelo ya bosoto: okopona nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Paradis to ebwakelo ya bosoto: okopona nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bobele kati na “Paradis” te
  • Ezali na Likama moke kasi na Mitungisi mingi
  • Oyo nde Mosala monene!
  • Mosika te Mabelé ya peto makosalema mpo na esengo monene na Biso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Kolongola libebi na motema mpe na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Bopɛto ezali mpenza na ntina nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Kolongola bosɔtɔ na mwango babéngi Compostage
    Lamuká!—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/2 nk. 3-4

Paradis to ebwakelo ya bosoto: okopona nini?

MOTO moko te akokaki kobunga ye: touriste moko oyo auti na Mpoto, azali na mposa ya kopema mpe azali kozela na motema likoló kosepela na molungé ya moi kati na esanga moko kitoko lokola paradis. Wana ezalaki ye koleka etando monene ya maboke ya zelo pembeni ya libongo ya mai monene, alukaki nzela na ye malembe kati na biteni ya milangi, manzanza, saki ya plastiki, nkasa ya chewing-gums mpe ya bonbons, bazulunalo ya kopanza nsango mpe bazulunalo misusu oyo ebwakami. Na kosilika, amitunaki soki ezalaki solo wana paradis oyo ye asalaki mobembo mpo na koluka yango.

Yo moko osila kokutana na likambo motindo yango? Mpo na nini bato balukaka kolekisa ntango na paradis moko, kasi wana ekomi bango kuna, bakomona mabe moko te na kokómisa yango ebwakelo ya bosoto?

Bobele kati na “Paradis” te

Kozanga limemya motindo yango etali te bobele kitoko, bonzenga mpe bopeto ya bisika lokola “paradis” epai ba touristes mingi bazali kokende. Mokili ya lelo mosili mpenza kobebisama bipai nyonso. Bakompanyi mingi ezali mpenza kobebisa ezingelo na etando monene ntango ezali kobimisa ba tonnes mingi ya bosoto. Kozanga kolongola malamu bosoto oyo ezali na ngenge mpe makama oyo euti na kosopa pétrole na mai ezali kobebisa eteni monene ya mabelé na biso, kokomisaká yango esika ebongi te mpo na bomoi.

Bitumba mpe bizali kobebisa mabelé. Wana mokili mozalaki kati na nsomo, etumba oyo esalemaki na 1991 na Golfe Persique ebakisaki lisusu kobebisama ya mabelé. Mapinga ya Irak matyaki mɔ́tɔ na nkó nyonso na mabulu ya pétrole 600, mpe bakómisaki Koweït “emonaneli ya lifelo ya Emoniseli,” engebene maloba ya zulunalo moko ya Mpoto. Zulunalo ya Allemagne oyo ebyangami Geo ebyangaki lifelo yango ete “likama lileki monene ya ezingelo oyo esalema naino te na moto.”

Na nsuka ya etumba, mosala monene ya kopetola esika ebandaki nokinoki. Bobele kozimisa mɔ́tɔ na mabulu ya pétrole epesaki mosala makasi oyo ezwaki basanza mingi. Lisangá ya mokili mobimba mpo na kolongono (OMS) elobaki ete kobakisama ya kobebisama ya ezingelo na Koweït ekoki kobakisa motuya na bakufi na mboka wana na 10 %.

Ezali na Likama moke kasi na Mitungisi mingi

Soki bandakisa ya kobebisama monene ya ezingelo ezali bobele moke, nzakande baoyo bazali kobebisa kasi na etando ya moke bazali na bankoto mingi. Bato oyo bazali kobwaka bosoto na balabala mpe “bayemi” ya bililingi mpe makomi bazali mbala mosusu babebisi oyo bazali kopesa makama mingi te, kasi ata bongo bazali kolongola mabelé makoki na yango ya kozala paradis.

Na bisika mosusu makomi mazali bipai nyonso na boye ete bato bazali kotyela yango mpenza likebi lisusu te. Makomi mazali likoló na engbunduka oyo ekokende na nse ya mabelé, mazali likoló ya bitutu ya bandako minene, mpe kati na ndako moke ya koloba na telefone. Makomi mazali lisusu kosuka bobele na bitutu ya kabiné ya bato nyonso te.

Bingumba mosusu bitondi na bandako ebeba mpe oyo basundola. Ba quartiers ebeba na bandako mpe mapango matondi na bosoto. Mituka oyo ebeba, masini oyo babwaka, mpe biteni ya bibende bizali kotondisi mabanda ya ba fermes oyo mbele elingaki kozala mpenza bisika ya kosepelisa.

Kati na bisika mosusu bato bazali mpenza komibanzabanza na bosoto mpe mbindo te. Kolata molato ya bongo na bongo ezali te bobele komonana malamu, kasi esili lisusu kokóma ndakisa oyo bato bazali kolanda. Baoyo balingaka kolata malamu mpe kozala peto bazali komonana na mawa nyonso lokola bato bazangi ntina.

Oyo nde Mosala monene!

Ekozala mpenza mosala monene mpo na kobongola mabongo, bazamba mpe bangomba ya efandelo na biso ya mabelé mobimba ete ekóma paradis oyo tozali komona na bizipeli ya mikenda kitoko ya ba touristes​—kozanga kolobela oyo ekosengela kosalema na bingumba, na bamboka mike, na ba fermes, mpe na bato bango moko!

Touriste oyo tolobelaki na ebandeli asepelaki ntango amonaki etuluku moko ya bapetoli koleka mpo na kolongola eteni monene ya bosoto na esika azalaki. Kasi, batikaki biteni ya milangi, ba biyunda ya milangi (bouchons), nkasa ya makomi na manzanza mpe biteni ya makaya, mpo na kolobela bobele yango. Bongo, ata nsima ya bopeto, emonanaki polele ete esika yango ekokanaki mingi na ebwakelo ya bosoto kasi mpenza na paradis te.

Mpo na kopetola mabelé mobimba, mpo ete ekóma ebwakelo ya bosoto te ekosengela kolongola bitika nyonso ya bosoto ya biloko yango mabe. Elikya ezali oyo emonisi ete kopetolama motindo wana ekosalema? Soki ezali bongo, ekosalema lolenge nini? Nani akosala yango? Ekozala ntango nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto