Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/1 nk. 3-4
  • Okokamatama mpo na kokende na Likolo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okokamatama mpo na kokende na Likolo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makanisi makeseni na ntina na kolimwa
  • Konɛtwa
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • ‘Bakamatami mpo na kokutana na Nkolo’​—Lolenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • “Kosikolama na bino ekómi pene”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Kozonga ya Kristo
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/1 nk. 3-4

Okokamatama mpo na kokende na Likolo?

BATO mingi bandimaka ete bakokende na likolo ntango bakokufa. Kasi basusu bakanisaka ete bakokamatama mpo na kokende na likolo na nzela ya oyo babengaka ete enlèvement to kolimwa. Ezali yango elikya na yo?

Mpo na yango moteyi moko ya protesta ayebisaki ete enlèvement ezali “kolimwa na lolenge ya pwasa ya bamilio mingi ya bato kozanga ete bayeba epai bakei!” Engebene Diksionere ya mateya ya Evanzile malimbolami na Teoloji (na Lingelesi), liloba “kolimwa” ezali mpo na “lingomba esangani elongo na Klisto na koya na ye ya mibale.”

Basusu bazali komona yango likambo ya kotungisama na kokanisa kotika baninga mpe bandeko ya libota mpo na kokutana na Yesu Klisto. Nzokande, mingi bazali kondima ete kolimwa esengeli kosalema. Yango ekosalema solo? Soki bongo, ntango nini?

Makanisi makeseni na ntina na kolimwa

Biblia emonisi ete liboso ya ebandeli ya Boyangeli ya Mbula Nkoto elakami ya Klisto, ekozala na eleko oyo ebengami “bolozi monene.” Yesu ayebisaki ete: “Ekozala na bolozi monene lokola emonanaki naino te longwa na ebandeli ya mokili kino sikawa, mpe ekobima boye lisusu te.” (Matai 24:21; Emoniseli 20:6) Bamoko bakanisi ete kolimwa ekosalema liboso ya bolozi monene. Basusu bazali kokanisa ete yango ekosalema na boumeli ya eleko wana. Basusu mpe bazali kokanisa ete kolimwa ekoya nsima na mpasi monene wana.

Likanisi oyo ete kolimwa ekozala nsima ya bolozi monene eyebanaki mingi kino na ebandeli ya ekeke ya zomi na libwa. Na nsima, na Angleterre ebandaki kozala na etuluku moko etambwisamaki na John Nelson Darby, mokonzi ya kala na lingomba ya Irlande. Ye mpe ba anglicans oyo bandimaki makanisi na ye bakomaki koyebana lokola ba Frères. Kobanda esika lingomba na bango esalemaki na Plymouth, Darby atambolaki kosakola na Suisse mpe na mikili misusu ya Europe. Azalaki kondima ete bozongi na Klisto esengelaki kosalema na biteni mibale. Esengelaki kobanda na kolimwa ya nkuku, kati na yango “basantu” basengeli kokamatama liboso ya eleko ya mbula nsambo ya bolozi oyo ekobebisa mabele. Na nsima Klisto akomonana polele, elongo na “basantu” wana, mpe elongo basengeli koyangela na mabele mpo na mbula nkoto.

Darby alobelaki mingi ntina ya kokabwana na mokili, mpe baoyo balandaki makanisi na ye bayebanaki lokola ba Frères ya bokangami makasi. B. W. Newton atambwisaki etuluku moko oyo endimaki ete kolimwa ekosalema, kasi te liboso ya bolozi monene. Alexander Reese mokoteli ya endimeli oyo ete kolimwa ekosalema nsima ya bolozi monene andimaki ete: “Mateya ya kolimwa ya nkuku mayokani te na elikya ya Koya ya Klisto.”

Baoyo bandimaka ete kolimwa ekozala liboso ya bolozi monene bandimi ete bokeseni wana kati na makanisi ezali na bopusi makasi na “lolenge ya elikya na [bango] na kotalela koya ya Klisto.” Basusu bazali kotya motema kati na “mateya ya kolimwa ya ndambo,” kondimaka ete baoyo bazali sembo epai na Klisto bakolimwa liboso mpe baoyo bakangami na makambo ya mokili bakolimwa na nsima.

Bituluku mingi ya bateyi bazali kosakola kolimwa ya baklisto ya sembo oyo ekosalema mosika te. Nzokande, liboso ya makanisi wana makeseni, mokanda moke mobimisamaki na lingomba ya Pantekote ya Elim na Grande-Bretagne eyebisi ete: “Ntango tozali kondima makambo minene malobeli kozonga na Nkolo Yesu . . . . bonsomi epesameli biso na kolimbola esakweli engebene kondima ya moto na moto. Mingi bazali kondima etemelo ya bokatikati, kozelaka na motema molai ete makambo yango moko masalema na kolanda ebongiseli ya esakweli.”

Liloba lipemami ya Nzambe, Biblia, ezali mokanda oyo tosengeli kotanga mpo na koyeba bosolo ya bindimeli na biso. (2 Timote 1:13; 3:16, 17) Na bongo, yango elobi nini na ntina na kolimwa?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto