Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/1 lok. 32
  • “Motatoli na sembo kati na makoló na mapata”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Motatoli na sembo kati na makoló na mapata”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/1 lok. 32

“Motatoli na sembo kati na makoló na mapata”

LIBOSO mpenza ete moto ya yambo atambola na mabele, sanza ezalaki kongenga na butu kati na likolo. Na eleko mosusu bato mingi, basambelaki yango lokola nzambe. Plutarque mokomi Mogreke, alobaki ete kuna ezalaki efandelo ya nsuka mpo na milimo ya peto nsima ya kufa na bango. Na masapo ya bato ya mikili Baltes, sanza ezali moto, mobali ya moi. Bazalaki na matata kati na libala na bango, nde sanza akimaki mwasi na ye, kozanga komonana mbala mingi elongo na ye kati na makolo!

Na mikolo na biso, ntango bilenge mpe mikolo oyo balinganaka mingi bamonaka sanza, yango epesaka bango nzela ya komonisa mayoki na bango ya bolingo. Na bambula 1960, bato ya mayele babimisaki mosolo mingi mpo na kotinda bato na sanza ete bamema mwa bakilo ya mabanga na yango mpo na bolukiluki. Nzokande ezali na likambo moko liyebani malamu na ntina na sanza. Mokolo na mokolo, ekobimaka mpe ekolalaka na elaka na yango. Ezali kolanda nzela na yango na sembo nyonso kino tokoki kotanga, na boumeli ya bambula nkoto, bantango oyo ekobongwanaka mpe oyo kongenga na yango emonanaka te.

Ntango Bayisraele bazalaki komona sanza, bazalaki komikundola likambo moko ya kitoko. Nzambe alakaki ete bokonzi ekolongwa na libota ya Mokonzi Davidi te. Alobaki: “Yango ekoumela libota ya Davidil seko na seko lokola sanza, lokola motatoli ya sembo na makolo na mapata.” (Nzembo 89:35-37) Elaka wana ekokana-ki epai na Yesu, “Mwana na Davidi.” (Luka 18:38) Nsima na liwa na ye, Yesu ase-kwaki lokola elimo oyo ekokufa lisusu te mpe amataki na likolo. (Misala 2:34-36) Na nsima, atyamaki lokola Mokonzi na Bokonzi na Nzambe na likolo. (Emoniseli 12:10) Bokonzi wana ezali koyangela sikawa mpe “ekoumela libela na libela.” (Danyele 2:44) Ezali ndimbola wana nde Yesu, momonisi na libota ya Davidi, oyo akokufa lisusu te, akoumela lokola sanza, ye “motatoli ya sembo kati na makolo na mapata.”

Na yango, mbala nyonso oyo okomona sanza kongenga na likolo, omikundola elaka ya Nzambe epai na Davidi mpe pesa matandi lokola Bokonzi na Nzambe ezali sikawa koyangela mpe ekoyangela libela na libela, mpo na nkembo na Nzambe mpe mpo na bolamu ya seko ya bato na sembo.​—Emoniseli 11:15

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]

Frank Zullo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto