‘Bakamatami mpo na kokutana na Nkolo’—Lolenge nini?
NSUKA ya ebongiseli oyo mabe esili kobelema. Lokola ngonga moko moko, minite moko moko, seconde moko moko ezali koleka, tobelemi na makambo minene masakolamaki uta kala. Kolimwa ezali nde moko na makambo yango? Soki ezali bongo, ntango nini mpe lolenge nini yango ekosalema?
Liloba “kolimwa” ezali te kati na Biblia. Kasi baoyo bazali kondima yango batangaka maloba ya ntóma Paulo mazwami na 1 Batesaloniki 4:17 lokola moboko ya endimeli na bango. Tika ete totalela mokapo wana kati na zingazinga na yango. Ntoma Paulo akomaki:
“Bandeko, tolingi te ete bozanga koyeba makambo na bango basili kolala kati na kufa; ete boyoka mawa te lokola basusu baoyo bazali na elikya te. Mpo ete soki tozali kondima ete Yesu akufaki mpe asekwi lisusu, bongo na nzela na Yesu, Nzambe akoyeisa lisusu bango balali kati na kufa esika moko na ye. Mpo na yango tokolobaka na bino na liloba na Jéhovah, ete biso bato na bomoi baoyo totikali kino koya na Nkolo, tokoleka liboso na baoyo balali kati na kufa te. Mpo ete Nkolo ye moko akokita longwa na likolo na konganga makasi, na mongongo na mokolo na baanzelu mpe na kobeta na kelelo na Nzembe, mpe baoyo basilaki kokufa kati na Klisto bakosekwa liboso. Na nsima biso bato na bomoi baoyo tokobika, elongo na bango, tokokamatama kati na mapata mpo na kokutana na Nkolo kati na mopepe; mpe bongo tokozala libela elongo na Nkolo. Mpo na yango, bolanda kobondisanaka na maloba oyo.”—1 Batesaloniki 4:13-18, MN.
Lisanga ya Tesaloniki ezalaki naino ya sika ntango ntoma Paulo atindaki mokanda na ye ya liboso epai na baklisto bazalaki kuna penepene na mobu 50 ya T.B. (Ntango na Biso) Basangani ya lisanga bazalaki na mawa mpo ete basusu kati na bango basilaki Ukolala kati na kufa.” Nzokande, oyo ntoma Paulo akomaki elendisaki Batesaloniki na elikya ya lisekwa.
“Koya” na Klisto
Wana andimaki ete baklisto ya sembo oyo basilaki kokufa bakosekwa, ntoma Paulo ayebisaki lisusu ete: “Bato na bomoi baoyo totikali kino koya na Nkolo, tokoleka liboso na baoyo balali kati na kofa te.” (Verset 15) Ya solo, “koya” na Nkolo oyo elobelami na ntoma [Paulo] ebongi kotyamelama motema. Awa na makomi ya ebandeli mokapo esaleli liloba ya Greke pa-rou-si’an, oyo elimboli “kozala elongo na.”
Ntango mokonzi moko mopaya asali mobembo mpo na kotala mboka mosusu, mikolo oyo akolekisa [na mboka yango] mbala mingi miyebisamaka. Yango mpe ezalaki solo mpo na koya na Nkolo Yesu Klisto. Mosenzeli ezali ntango nyonso komonisa bilembeteli epai na bayekoli na motema sembo ete engebene bisakweli ya Biblia, koya na Yesu kati na nguya ya Bokonzi na likoló ebandaki na 1914. Makambo masalemaki kobanda mbula wana mamonisi ete koya na Yesu ezali ya kozanga komonana. (Matai 24:3-14) Na yango, na kolobaka ete baklisto mosusu oyo bakozala na bomoi na boumeli ya koya na Nkolo basengelaki “kokamatama kati na mapata mpo na kokutana na Klisto kati na mopepe,” ntoma Paulo alingaki koloba te ete babiki wana basengeli kokutana na Klisto na etando ya mabele, kasi bakokutana na ye nde na esika ezangi komonana na miso ya bato, na likolo epai Yesu afandi na loboko ya mobali ya Nzambe. (Baebele 1:1-3) Kasi bazali banani?
“Yisraele ya Nzambe”
Makomami mayebisi makambo mingi na ntina na Bayisraele ya mosuni mpe lisusu mazali kolobela mpo na “Yisraele ya Nzambe” ya elimo. Bandimi Bayuda mpe Bapakano basangani esika moko mpo na kokokisa motuya ya etuluku wana epakolamaki na elimo santu na Nzambe, to nguya na ye ekosalaka mosala. (Bagalatia 6:16; Baloma 11:25, 26; 1 Yoane 2:20, 27) Mokanda ya Emoniseli emonisi ete motuya ya Yisraele wana ya elimo ezali 144 000, baoyo nyonso bamonisami elongo na Mwana na Mpate, Yesu Klisto, na Ngomba Siona ya likolo. Elongo na Klisto, bakozala bakonzi mpe banganga kati na likolo. (Emoniseli 7:1-8; 14:1-4; 20:6) Kati na bango esengeli kozala na baoyo bazalaki kati na masanga ya Tesaloniki mpe bipai nyonso, atako mposo to bikolo na bango ezali nini.—Misala 10:34, 35.
Liboso ete basangani ya Yisraele bakoka kozwa mbano ya likolo, basengeli kokutana na likambo moko. Lokola kufa na Yesu likolo na nzete ya mpasi ezalaki liboso ya lisekwa na ye mpo na kozala na bomoi na makolo, bobele bongo baklisto oyo bazali na elikya ya likolo basengeli kokufa liboso ya kozwa mbano na bango. (1 Bakolinti 15:35, 36) Yango esengelaki kozala solo mpo na basangani na Yisraele ya elimo baoyo bazalaki na bomoi na ekeke ya liboso ya T.B. mpe yango ezali solo mpo na baoyo bazali na bomoi lelo.
Nsima na kolobela “koya na Nkolo,” ntoma Paulo alobelaki eleko oyo Bayisraele ya elimo ya sembo oyo bakufaki basengelaki kozwa mbano na bango ya likolo. Akomaki: “Nkolo ye moko akokita longwa na likolo na konganga makasi, na mongongo ya mokolo na baanzelu mpe na kobeta ya kelelo na Nzambe, mpe baoyo bakufaki kati na Klisto bakosekwa liboso.” (Verset 16) Na yango, soki koya na Klisto lokola Mokonzi esilaki kobanda, tosengeli komizela ete lisekwa na likoló lisilaki kobanda epai na basangani ya Yisraele ya elimo oyo basilaki kokufa na bosembo nyonso. (1 Bakolinti 15:23) Bazali sikawa kosala pene na Yesu kati na likoló. Kasi ezali boni mpo na motuya moke na baklisto bapakolami baoyo bazali naino na bomoi na mabele? Bazali kozela kolimwa?
“Bakamatami”—Lolenge nini?
Nsima na kolobela mpo na baklisto bapakolami oyo basilaki kokufa, ntoma Paulo abakisaki: “Na nsima biso bato na bomoi baoyo tokobika, elongo na bango, tokokamatama kati na mapata mpo na kokutana na Nkolo kati na mopepe; mpe bongo tokozala libela elongo na Nkolo.” (Verset 17) “Bato na bomoi” basengeli kozala baoyo bazali na bomoi na boumeli ya koya na Klisto. Basengeli “kokamatama” mpo na kokutana na Nkolo Yesu. Lokola ezalaki mpo na basembwi baklisto ya kala, esengeli na bango liboso kokufa mpo na kokoka kozala esika moko na Klisto kati na likolo.—Baloma 8:17, 35-39.
Wana ezalaki ye kokomela baklisto ya Kolinti, ntóma Paulo alobaki ete: “Bandeko, nazali koloba na bino ete mosuni mpe makila ekoki kosangola Bokonzi na Nzambe te. Oyo ekopolaka ekosangola yango ezangi kopola te. Tala, nazali koloba na bino likambo libombami. Biso nyonso tokolala kati na kufa te, kasi tokobongwana motindo mosusu, na mwa ntango moke, na ntango na kobweta na liso, wana ekobeta kelelo ya nsuka. Mpo ete kelelo ekobeta mpe bakufi bakosekwa na kozanga kopola, mpe biso tokobongwana motindo mosusu.” (1 Bakolinti 15:50-52) Na kokufaka na bosembo nyonso na boumeli ya koya na Klisto, moko na moko ya batikali na Yisraele ya elimo azali kozwa nokinoki lifuti na ye ya likoló. “Na kobweta na liso,” azali kosekwisama lokola ekelamu ya elimo mpe azali “kokamatama” mpo na kokutana na Yesu mpe kosala lokola moyangeli elongo na ye kati na Bokonzi ya makoló. Kasi ezali boni mpo na baoyo nyonso mosusu bazali kosambela Jehovah? Lokola nsuka ya ebongiseli oyo mabe ezali kobelema, bango mpe bakokamatama mpo na kokende na likolo?
Kobika—Kasi kolimwa te
Mpo ete koya na Klisto lokola mokonzi ebandaki na 1914, tokómi mosika sikawa na “ntango ya nsuka” ya mokili oyo. (Danyele 12:4) Ntoma Paulo akebisaki ete: “Bandeko, mpo na makambo na ntango mpe bileko, bozali na mposa te ete bakomela bino. Mpo ete boyebi malamu ete mokolo na Jehovah ekoya lokola moyibi kati na butu. Wana ekoloba bango ete: ‘Kimya mpe kobatelama ezali sikawa!’ libebi likokwela bango pwasa lokola mpasi ya kobota ekoyelaka mwasi oyo azali na zemi; mpe nzela na kokima ekozala te.” (1 Batesaloniki 5:1-3) Kasi baklisto oyo bazali kokengela bakokima. Lolenge nini?
Kosakola oyo ete “Kimya mpe kobatelama ezali sikawa!” ezali likambo likosalema liboso ya eleko oyo Yesu abengaki ete “bolozi monene.” Kolobelaka “ebele monene” ya bato na sembo oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko kati na paradis na mabele, mokanda ya Emoniseli elobi ete: “Baoyo wana bazali bato oyo bauti na bolozi monene, mpe basukoli bilamba na bango mpe bakomisi yango mpembe na makila na Mwana na Mpate.” (Emoniseli 7:9, 14; Luka 23:43) Bazali kotya motema na kolimwa te. Kasi, bazali nde na elikya ya kobikisama awa na mabele. Mpo na komibongisa na yango, basengeli kozala ntango nyonso na bokengi na elimo. Lolenge nini okoki kosala yango mpe kobika na nsuka ya ebongiseli oyo?
Osengeli ‘kotengatenga te mpe kolata nguba na kondima mpe bolingo mpe elikya lokola ekoti na lobiko.’ (1 Batesaloniki 5:6-8) Sikawa ezali ntango ya kotya likebi na Liloba ya esakweli na Nzambe, Biblia. Lokola ntango ezali koleka kino nsuka ya ebongiseli oyo, tobatela toli oyo ya ntdma Paulo: “Botyola bisakweli te. Kasi botalela makambo nyonso mpe bosimba makambo malamu ngwi.” (1 Batesaloniki 5:20, 21) Ba Témoins de Jéhovah bazali kobyanga yo na Salle du Royaume na bango, epai okoki komipesa elongo na bango kati na boyekoli ya bisa-kweli ya Biblia mpe makambo mosusu matali Liloba lipemami ya Nzambe.
Lokola ozali kokola kati na boyebi ya sikisiki mpe kondima, okososola kokokisama ya mokano na Nzambe oyo etali kosikola molongo na bampasi na yango mpe kozongisa mabelé ekóma lisusu paradis. Na komonisaka kondima, okoki kozala kati na babiki ya bolozi monene; bango bakozala na libaku malamu ya koyamba bamilio na bato oyo bakosekwa mpo na kozala na bomoi na mabelé. Oyo nde esengo na kozala na bomoi na nse ya Bokonzi na Nzambe bopesami na maboko na Yesu Klisto mpe bayangeli elongo na ye, baoyo bakosila ‘kokamatama mpo na kokutana na Nkolo’ na kosekwisamaka mpo na kozala na bomoi kati na makoló!
Engebene Makomami, nini ekozala elikya ya solo mpo na ebele ya bato ya botosi? Ezali kolimwa te. Na esika na yango, ezali nde bomoi ya seko na mabele na nse na Bokonzi ya Nzambe.
[Elilingi na lokasa 7]
Babiki na bolozi monene bakeyamba bato oyo bakosekwa mpo na bomoi na paradis na mabelé na nse na boyangeli ya Yesu mpe ya baoyo bakosila “kokamatama” mpo na kokende na Likoló