Justin—Filozofe, mokɔteli na boklisto ya solo mpe martyr
“TOLINGI ete batalela malamu bifundeli oyo basali na ntina na biso. Soki yango ezali solo, tika ete bapesa biso etumbu lokola yango esengami. Soki likambo mabe oyo tosali ezali te, ekozala nde likambo na sembo, na kotalela bifundeli ya mpamba oyo bisalemi na kokweisa bato basali likambo te . . . Soki mpe nsima wana bongengisami na ntina ya likambo yango kasi botaleli yango na bosembo te, bokozwa etumbu liboso na Nzambe.”
Ezali na maloba oyo nde Justin, moto ya ekeke ya mibale oyo azalaki komilobela moklisto, asengaki ete asambisama na mokonzi molóma Antonin le Pieu. Justin asengaki ete basala ankete moko ya malamumalamu na ntina na bomoi mpe bindimeli ya baoyo bazali komilobela ete bazali baklisto. Lisengi oyo mpo ete bosembo esalelama eutaki epai ya moto moko oyo mateya oyo azwaki mpe filozofi na ye ezali na ntina monene.
Bomwana na ye mpe mateya oyo azwaki
Justin azalaki mopakano, abotamaki penepene na 110 ya eleko na biso na Samalia, na Flavia Neapolis, oyo ezali lelo engumba ya sika ya Naplouse. Azalaki komitanga mosamalia, nzokande emonani lokola ete tata na ye mpe nkoko na ye bazalaki bato ya loma to geleke. Mateya oyo azwaki kati na bimesano ye bapakano sangisa na mposa oyo azalaki na yango ya solo ememaki ye na koyekola na makasi mpenza filozofi. Bolukiluki na ye epai na ba stoïciens, ba péripatéticiens mpe ba pythagoriciens etikaki ye na kozanga kokokisa bamposa na ye, ayaki komipesa na mateya ya Platon.
Kati na moko na mikanda na ye, Justin azali kolobela mposa na ye ya kosolola na bafilozofe. Alobi: “Namonisaki mposa na ngai epai na Stoïcien moko. Nsima na kolekisa mwa ntango elongo na ye, namimonaki te ete nakomaki koyeba makambo mingi likoló na Nzambe (mpo ete filozofe oyo namipesaki na ye azalaki te koyeba Nzambe ye moko) . . . Natikaki ye mpo nakomipesa na filozofe mosusu.”—Dialogue de Justin, philosophe et martyr, avec le Juif Tryphon.
Na nsima Justin ayaki komipesa na péripatéticien moko oyo azalaki kosepela mingi na mbongo koleka solo. “Andimaki kozala elongo na ngai na mikolo ya liboso,” elobi Justin, “na nsima asengaki ngai ete toyokana na ntina na makambo ya kofuta mbongo, mpo ete boyokani na biso ezala eloko ya mpamba te. Na ntina ya likambo oyo natikaki ye nokinoki, na kotalelaka ye te lokola filozofe.”
Na mposa na ye ya koyoka “nini ezali mpenza makambo mpe mibeko ya filozofi,” Justin amipesaki mpo na yango na “Pythagoricien moko oyo ayebanaki mingi, oyo azalaki na lolendo mingi na ntina na mayele na ye.” Justin alobi: “Nalobelaki ye mposa na ngai ya kokoma mwana na ye ya kelasi mpe moyekoli na ye. Alobaki na ngai ete: ‘Mpo na yango, oyekolaki miziki, astronomie, mpe géométrie? Okanisi ete okoki kokanga likambo moko [ya elimo] kati na oyo ezali komema na bolamu, [kozanga ete] oyekola yango liboso?’ . . . [A]benganaki ngai wana nalobaki ete nayekolaki yango te.”
Na kolemba nyonso, Justin alandaki bolukiluki na ye ya solo na komibalolaka epai na ba platoniciens baye bayebanaki mingi. Alobi: “Moto moko ya mayele akomaki mpenza na engumba na biso. Azalaki Platonicien ya mayele mingi. Nokinoki nabandaki kokutana na ye, na bongo nabandaki komikolisa; nazalaki mokolo na mokolo kosala bokoli ya sika. . . . Na mwa ntango moke, namikangaki ete nakomaki moto na mayele.” Mpe Justin asukisaki ete: “Nazalaki nde zoba koleka.”
Justin alukaki kozanga litomba solo na kosanganaka na bafilozofe. Nzokande, wana azalaki kokanisa na bozondi penepene na mai monene, akutanaki na moklisto moko aumeli mingi, “nkoko moko abongi na komemyama oyo azalaki na eloko moko ya malamu mpe ya kokamwa.” Lisolo esalamaki kati na ye na nkoko yango ebendaki likebi na ye likoló na mateya ya moboko ya Biblia, na komonisaka ye ntina ya kozwa boyebi ya sikisiki ya Nzambe.—Baloma 10:2, 3.
Moklisto oyo nkombo eyebani te, alobaki na Justin ete: “Bato bazalaki na bomoi kala, baoyo bazalaki bato minene ya kala koleka baoyo bazali komikumisa ete bafilozofe, bato yango ya kala bazalaki bato ya esengo, bato ya bosembo mpe bato na motuya na miso ya Nzambe, . . . balobaki makambo mpo na mikolo mizali koya mpe makambo yango mazali kokokisama lelo, bato yango babengami basakoli. Bobele bango moko . . . batondaki na Elimo santu, bamonaki mpe basakolaki na bato solo.” Kolamwisaka mingi mposa ya Justin, moklisto oyo alandaki na kolobaka: “Makomi na bango mazali kino lelo: baoyo bazali kotanga yango bakoki . . . komizwela litomba monene, mpo na koyeba ebandeli mpe nsuka ya makambo.” (Matai 5:6; Misala 3:18) Mpo na kolanda elendiseli ya mobali oyo abongi na komemyama mpe azali na boboto, Justin ayekolaki nokinoki na mposa mpenza Makomami, mpe emonani ete azalaki na limemya mpo na Makomami mpe mpo na bisakweli na Biblia, lokola yango emonisami na mikanda oyo ye akomaki.
Boyekoli na likebi ya mikanda na ye
Justin akamwaki mingi na mpiko ya baklisto liboso na liwa. Asimbamaki lisusu na motema mpo na bosolo ya mateya ya Makomami ya liebele. Mpo na kopesa makanisi mabongi komonisa bonene ya makambo mazali kati na mokanda na ye Dialogue avec Tryphon, Justin abangaki Genese, Exode, Levitike, Deteronome, 2 Samwele, 1 Mikonzi, Nzembo, Yisaka, Yilimia, Ezekiele, Danyele, Hosea, Yoele, Amosa, Yona, Mika, Zakaria mpe Malaki, bakisa mpe ba Evanzile. Motuya monene oyo azalaki kopesa na mikanda wana ya Biblia emonani polele na lisolo na ye elongo na Tryphon, kati na yango azali kolobela losambo ya bayuda oyo ezalaki koteya endimeli na Masiya.
Elobamaki ete Justin azalaki mopalanganisi ya nsango malamu, koyebisaka nsango malamu na mabaku nyonso. Emonani lokola ete asalaki mibembo mingi. Alekisaki mwa ntango na Efeze, mpe na ntembe te afandaki mikolo mingi na Loma.
Mikanda ya Justin misangisi oyo babengi na lifalansé apologies, oyo ekomamaki na ntina ya kolongisa boklisto. Kati na Première apologie na ye, Justin azali koluka kolimwisa molili makasi ya filozofi ya bapakano na nzela ya pole eutaka na Makomami. Alobi ete mayele ya bafilozofe ezali bobele lokuta mpe mpamba na kokokanisa yango na nguya ya maloba mpe ya misala na Klisto. (Tala Bakolose 2:8.) Justin azali kolongisa baklisto oyo batalelami lokola bato mpamba kati na bango ye azali komimona. Nsima na kobongwana na ye, alandaki komimonisa lokola filozofe na kolobaka ete asila kozwana na filozofi bobele moko ya solosolo.
Mpo ete bazalaki koboya kopesa losambo na banzambe ya bapakano, baklisto ya ekeke na mibale bafingamaki ete bazali bato bandimaka Nzambe te. Justin azongisaki ete: “Tozali te bato oyo bandimaka Nzambe te. Tozali kosambela Mozalisi ya molongo oyo . . . Moto oyo alakisaki biso makambo oyo . . . ezali Yesu Klisto, . . . mwana na Nzambe ya solo.” Mpo na oyo etali bikeko mpe lolenge na kosalema na yango, Justin alobaki ete: “Yango ezwi nkombo ya banzambe. Naloba nini, mpo na biso yango ezali kozanga bososoli, ezali kotuka bonzambe . . . Ezali kozimbisama! Bosengeli koyeba ete ezali nde baluki na bisengo bato basalaka banzambe oyo bino bozali kosambela.”—Yisaya 44:14-20.
Kotangaka mbala mingi Makomami na greke ya boklisto, Justin azali komonisa endimeli na ye mpo na lisekwa, mpo na bizaleli ya boklisto, mpo na batisimo, mpo na bisakweli ya Biblia (mingimingi oyo etalaki Klisto) mpe mpo na mateya na Yesu. Mpo na oyo etali Yesu, Justin azali kotanga Yisaya wana endimi ye ete: “Elembo na nguya na ye ezali na mapeka na ye (oyo ya Klisto).” Justin alobi lisusu ete: “Soki tozalaki kozela bokonzi ya bato, mbele tokowangana [ete tozali baklisto.]” Nsima na kotalela mimekamo mpe mibeko ya baklisto, Justin andimi ete mpo na kosalela malamumalamu Nzambe, esengeli kosala mokano na Ye, na nsima alandi na kolobaka “ete akotinda bato mosusu kosakola makambo oyo kati na mokili mobimba.”
La Deuxième apologie de Justin (oyo etalelami lokola nsuka na oyo ya liboso) ekomami mpo na Eyanganelo monene oyo ezalaki na Loma ya kala (sénat). Justin azali kobenda likebi na baloma na kolobelaka lisolo ya minyoko oyo baklisto bazwaki nsima wana bakomaki na boyebi ya sikisiki ya Yesu Klisto. Bakonzi ya Loma bazalaki mpenza kopesa ntina mingi te na ezaleli malamu ya mateya na Yesu oyo ezalaki komonana kati na bizaleli ya baklisto. Nzokande komonisa kaka bosangani na boklisto ekokaki komemela makama ya liwa. Justin atangaki maloba na moto moko na nkombo Lucius, oyo alobaki na ntina ya moto moko oyo ateyaki na ntango ya kala mateya na Klisto: “Tala mobali oyo azali moto na ekobo te, moluki na bisengo te, mobomi na bato te, moyibi te, mobotoli te, oyo akoki komonana ata na mabe moko te; andimi bobele ete abyangama moklisto mpe bozali kokweisa ye”?
Maloba malandi ya Justin mamonisi kino na meko nini, bato bazalaki na makanisi mabongi te na eleko wana na ntina na baoyo bazalaki komilobela baklisto: “Ngai mpe, nazali kozela komimona kolandama mpe kokangama na nzete ya mpasi na moko na baoyo napesaki nkombo to na Crescens, oyo azali moninga ya makelele mpe ya bisengo. Nkombo filozofe ebongi te na moto oyo azali kofunda biso liboso ya bato nyonso, nzokande ayebi biso te, oyo azali kofinga baklisto ete bazali bato oyo bandimaka Nzambe te mpe bato na bosoto, mpo na kosepelisa bato mingi oyo babungi nzela. Moto oyo akolandela biso kozanga kotanga mateya na Klisto, azali moto oyo abongi na kufa; aleki mabe koleka bato oyo bazangi boyebi: mpamba te baoyo bazangi boyebi mbala mingi bazalaka te kosambisa to kolobela makambo oyo bayebi te.”
Liwa na ye
Justin afundamaki na bokonzi ya Loma lokola motombokisi na bato ezala na Crescens, to na bafilozofe oyo bazalaki kolinga kobika kozanga mibeko mpo na bizaleli, mpe mpo na yango azwaki ekweli ya kufa. Bakataki ye motó na Loma penepene na 165 ya eleko na biso mpe akomaki bongo “martyr” (oyo elimboli “motatoli”). Nde mpo na yango azwaki nkombo ya Justin le Martyr.
Na bokokani na bato mosusu batanga ya ntango na ye, ekomeli ya Justin mbala mosusu ezangi bonzenga mpe takte, kasi emonani ete mobali yango azalaki mpenza na molende mpo na solo mpe mpo na bosembo. Likoki ezali te na koloba na bosolo nyonso na meko nini bomoi na ye ezalaki na boyokani na Makomami mpe na mateya ya Yesu. Mikanda ya Justin mizali na ntina na kotalela makambo ya lisolo ya bato mpe biteni ya Biblia oyo ezali kati na yango. Mikanda yango mizali kopesa mwa likanisi mpo na bomoi mpe mikakatano ya baoyo bazalaki komilobela ma ekeke ya mibale ete bazalaki kati na boklisto.
Justin asalaki milende makasi mpo na komonisa na bakonzi bozangi sembo ya minyoko oyo baklisto bazwaki. Bobwaki na ye ya losambo ya lokuta mpe ya filozofi mpo na kolanda boyebi ya sikisiki ya Liloba na Nzambe ezali kokundwela biso ete na Athène ntóma Paulo alobaki na molende na ntina na Nzambe ya solo mpe na Yesu Klisto oyo asekwaki epai na bafilozofe, épicuriens mpe stoïcien.—Misala 17:18-34.
Justin azalaki ye moko na mwa boyebi na ntina na lisekwa ya bakufi na boumeli ya mbula nkoto. Elikya ya solo ya lisekwa eyeisaka makasi kondima! Esungaki baklisto liboso ya minyoko mpe epesaki bango nzela na koyikela mikakatano minene mpiko kino kufa.—Yoane 5:28, 29; 1 Bakolinti 15:16-19; Emoniseli 2:10; 20:4, 12, 13; 21:2-4.
Na bongo, Justin alukaki solo mpe abwakaki filozofi ya greke. Lokola apologiste, Justin alongisaki mateya mpe misala ya baoyo bamilobelaki ete bazalaki baklisto. Mpo na yango akufaki lokola martyr mpo ete amikomisaki mosangani ya boklisto. Bolingo na Justin mpo na solo mpe litatoli na ye ya molende liboso na minyoko ezali mpenza na ntina mingi, mpo lelo baoyo bazali kolanda Klisto na bosembo nyonso bazali komonisa bizaleli yango na bomoi na bango.—Masese 2:4-6; Yoane 10:1-4; Misala 4:29; 3 Yoane 4.