Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/3 nk. 24-27
  • “Mai na bomoi” mazali kopunzwapunzwa na bisanga ya Cap-Vert

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mai na bomoi” mazali kopunzwapunzwa na bisanga ya Cap-Vert
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • São Vicente eyoki “monoko na peto”
  • Libota lipɛtolami
  • Molende makasi na esanga Fogo
  • Solo eboti mbuma na etuká ya katolike
  • Vizite ya nsuka​—esanga ya Sal
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/3 nk. 24-27

“Mai na bomoi” mazali kopunzwapunzwa na bisanga ya Cap-Vert

MINISTRE de la justice ya ekólo Cap-Vert alobaki ete: “Lolenge oyo ba Témoins de Jéhovah bazali na ekólo Cap-Vert uta 1958 mpe lolenge bazali kosalela losambo na bango ezali likambo moko malamu.” Azalaki koloba epai na batemwe mibale oyo babéngamaki na biro na ye. Abakisaki ete: “Tozali na mawa mingi ete ba Témoins de Jéhovah baumelaki mingi liboso ete bandimama na Leta.”

Nsima na ntango mingi, ba Témoins de Jéhovah na bisanga ya Cap-Vert bakomikundola lisoló wana lisalemaki na mokolo ya 30 novembre 1990 mpe emonisaki ete bandimami na Leta lokola lingomba kati na mboka wana. Nzokande, mpo na batemwe oyo bozalaki wana, ezalaki mpenza likambo moko ya esengo, mpamba te ezalaki na 1958 nde moko kati na bango mibale, Luis Andrade, akutanaki na libaku ya kozwa mikanda ya la Société Watch Tower oyo mikolimbolaka Biblia. Nsima na kotanga yango nyonso, asosolaki ete asili komona solo. Na esengo nyonso, abandaki kolobela makambo oyo ayekolaki epai na moninga na ye ya kala, Francisco Tavares. Na bambula elandaki, bango nyonso mibale balandaki komela mai ya solo na kotangáká bazulunalo La Tour de Garde mpe Réveillez-vous! oyo bazwaki abonema. Mbula zomi na nsima, na mobu 1968, bazwaki batisimo na vizite ya yambo oyo mokɛngɛli ya zongazonga asalaki na bisanga ya Cap-Vert.

Ndeko Andrade mpe ndeko Tavares bakangaki ntina ya mikumba na bango ya kosangana na kosakolama ya libyangi oyo ete: ‘Yaka! . . . Mela mai na bomoi lokola likabo.’ (Emoniseli 22:17) Bamilɛngɛlaki mpo na kolónga ntembe oyo ezalaki na teritware na bango ya mpasi esalemaki na bisanga bizalaki epai na epai. Lokola ezali kati na océan Atlantique, mpe etangwi na ouest ya engumba Dakar, na Sénégal na ntaká ya bakilometele 560, Cap-Vert ezali esika esalemi na bisanga minene zomi mpe na mwa bisanga mike. Nkombo Cap-Vert ezalaki na ebandeli mpo na bisanga mike bizali na ngambo ya Afrika. Kasi, mpo ete bambula ekonɔkaka mingi te, bisanga wana bizali na bilóna te mpe bafandi na yango 350 000 basengeli kozwa mwa milóna moke na mabelé oyo makaoki.

Bambula 30 oyo euti koleka, bamisionere mpe ba pionniers spéciaux basili kosala mosala makasi na lolenge ya basali ya ntango nyonso mpo na komema mai na bomoi epai na bafandi na bisanga wana. Ebimisaki matomba nini? Kala mingi te, mokɛngɛli moko ya zongazonga ya mboka Portugal akendaki kotala masangá ya Cap-Vert. Totika ye ayebisa makambo oyo akutaki kuna.

São Vicente eyoki “monoko na peto”

Tosalaki vizite na biso ya liboso na esanga São Vicente. Wana tolongwaki na vuatire uta libandá ya mpepo mpo na kokende na ville, tomonaki mabangá minene ya ngomba oyo ezipamaki na zɛlo oyo ememamaki na mopepe. Kokaoka ya Afrique du Nord esili kokóma kino na bisanga ya Cap-Vert! Kobanda décembre kino février, harmattan, mopepe makasi mpe mokoutaka longwa na Sahara, mopepaka likoló na océan mpe mozipaka bisanga na zɛlo mpe na mputulu. Mbala mosusu, londende ya mputulu ezali makasi na motindo boye ete bampepo ekoki kopumbwa te. Mwa ndambo na milóna oyo mitikali, mikokaoka wana mopepe yango mokopepa.

Nzokande, mpo na makambo na elimo, maziba na mai na bomoi mazali kopunzwapunzwa. Ba Témoins de Jéhovah basili kosala masangá mibale ya engumba Porto Grande, mpe basakoli na Bokonzi 167 bazali kosala mingi mpo na komema mai na bomoi ya solo epai na bafandi 47 000 ya esanga São Vicente. Na mikolo ya wikende, bato soko 400 bayanganaka na Salle du Royaume, na makita oyo matongami likoló na Biblia.

Na boumeli ya bavizite na biso oyo tozalaki kolekisa poso moko na esika moko, tozalaki kosala bibongiseli mpo na assemblée de district “Monoko na peto,” esengelaki kosalema na esika moko kitoko ya engumba wana. (Sofoni 3:9) Bayangani nyonso bazalaki bato 756 elongo na bandeko oyo bautaki na bisanga ya Santo Antao mpe na São Nicolau baoyo basanganaki elongo na bafandi ya esika wana. Bato ntuku mibale na minei bazwaki batisimo. Programme ezalaki na drame ezwami na Biblia oyo elakisamaki na Batemwe. Mobali moko, mokambi na boyekoli ya makambo mpo na kosala filme, atalaki drame mpe alobaki ete: “Toyekolaki na boumeli ya mobu moko kasi tozwaki mikakatano mingi. Nde bato oyo basali drame na bino basali kitoko koleka biso, nzokande bayekolaki bobele na boumeli ya sanza mibale.” Lokola assemblée esukaki na esengo, ntango ekokaki mpo na kokende na engumba Praia, kapitale ya Ekólo Cap-Vert, na esanga São Tiago.

Libota lipɛtolami

Bambula oyo euti koleka, bafandi mingi ya bisanga mosusu bayaki na kapitale mpo na koluka mosala. Ebele na bandako mike ya mabelé etongamaki pembeni na engumba, koyeisáká lisusu moke makoki ya kozwa mai mpe bisika ya kosalisa nzoto. Mpo na kobakisa bozwi na bango, mabota mingi bazali kobokolo ntaba, ngulu mpe nsoso oyo ezali mbala mingi kotambola na balabala. Yango esalaki ete maladi epalangana mingi.

Atako makambo wana ya mpasi, na engumba Praia, ezali na masangá mibale oyo mazali kokóla malamu maye mazali soko na ntalo mobimba ya basakoli na Bokonzi 130. Batemwe wana ya esengo basili mpenza ‘kozwa litomba’ na kosalela makambo oyo bayekolaki kati na Biblia. Mpo ete bazali kosala makasi ya kozala libota ya peto mpe mosantu, bandeko na biso mpe bana na bango bazali kolongono malamu na nzoto mpe na elimo. Ata soko bazali na bomoi ya mpasi, kasi bazali bazwi kati na elimo.​—Yisaya 48:17; 1 Petelo 1:15, 16.

Na ntango tokómaki, bandeko bazalaki kosala mpo na bibongiseli ya assemblée de district na bango. Batemwe mpe bato oyo bazalaki kosepela na solo, baoyo bauti na bisanga nyonso ya São Tiago, mpe na bisanga ya Sal mpe na Fogo, bayaki na assemblée mpe Jéhovah apambolaki bango, mpamba te bayangani nyonso bazalaki bato 472. Bango nyonso bazalaki mpenza na esengo, ata bana mike oyo bilongi na bango bizalaki kongɛnga! Efandaki biso na ebele na bato wana bazalaki koyoka, tomonaki mpenza ete esengeli te kotyola “mokolo na makambo mike.” (Zakaria 4:10) Bokóli nyonso wana ebandaki bobele na bato mibale oyo bayekolaki solo ekokisi sikawa mibu 30!

Liboso na kotika esanga wana, tokendaki kotala bituluku mibale ya Vila Assomada mpe ya Tarrafal, libandá ya engumba. Esanga wana mabulumabulu, mabelé makobotaka te mpe makaoki. Kasi, epai un epai tozalaki komona bitando ya milóna kitoko mpe na banzeté​—ba hectares ya banzeté ya kokoti, ya makemba, ya papayi, ya mangolo mpe banzeté mosusu. Yango ekundwelaki biso esakweli na Yisaya oyo elobi ete, mokolo mosusu, lisobe likaoki likobimisa matiti. (Yisaya 35:1) Lolenge moko na esika kitoko kati na elimo, bituluku wana mibale ya Batemwe bazali lelo kopesa bilei mpe mai ya elimo mingi epai na bato mingi oyo bafandi kuna.

Molende makasi na esanga Fogo

Esanga elandaki ezali bongo Fogo, oyo elimboli “mɔ́tɔ.” Nkombo na ye euti na mɔ́tɔ mingi oyo ekobimaka na ngomba na yango. Ngomba Cano ekobimisela mɔ́tɔ na nguya mingi. Ezali ndambo na mabelé mabimi na mai monene mpe mazali na bametele 2 800 longwa na nivo ya mai kino na nsonge na yango. Lokola mbula makasi eutaki konɔka na esanga wana, mbula monene nsima na mibu mingi, bato bazalaki na esengo mpenza, mpe bamipesaki na mosala na bango ya kolóna madesu mpe manioko, bilei ya ntina mingi na Ekólo Cap-Vert.

Nzokande, bato wana na botɔndi mingi bamipesaki te na koleka ndelo kino kotika mpe koboya komela mai ya solo na Biblia. Atako yango ezalaki mpasi mpo ete bavuatire ezalaki mingi te mpe ezalaki mabe, tokutanaki na bituluku misato bikeseni. Tozwaki esengo mingi na ntango bato 162 bayanganaki na makita, nzokande esanga ezalaki bobele na basakoli na Bokonzi 42. Yango emonisaki molende ya etuluku moke ya bandeko mibali mpe basi baoyo balekisaki ngonga 15 na mwayene mpo na komema mai na elilingi ya solo mpe na bomoi, epai na bafandi 32 000 ya esanga Fogo.

Solo eboti mbuma na etuká ya katolike

Tosengelaki lisusu kotala bandeko ya bisanga ya Santo Antão mpe São Nicolau. Lokola yango emonani na bankombo wana, Lingomba ya katolike ya Loma ezalaki na bopusi likoló na bisanga yango na boumeli ya bikeke mingi. Atako katolike ezali lingomba ya liboso ya Ekólo Cap-Vert, bato mingi ya motema sembo bazali kobaluka epai na Biblia mpo na mai na yango kitoko ya solo.

Basakoli na Bokonzi 49 ya masangá mibale ya mike oyo mazali na nsuka na nsuka ya Santo Antão basalaki makasi mpo na kokokisa bamposa ya elimo ya bafandi 44 000 ya esika wana. Na lisangá ya Porto Novo, bato 512 bayanganaki na diskur piblike. Mpo na basakoli na Bokonzi 32 oyo bazalaki wana, bamonaki mpenza ete bato mingi oyo bakokanaki na bampate bazalaki na mposa ya solo na Santo Antão.

Na esanga São Nicolau, mosala mosili kobanda uta mwa bambula mingi wana pionnier moko ya mwasi ya Portugal atambwisaki boyekoli na Biblia elongo na libota moko ya esanga wana na nzela na mikanda. Na nsima, na 1978, pionnier moko ya Portugal azwaki ekateli ya kozonga na esanga esika abotamaki, na São Nicolau, mpo na koyebisa solo ya Biblia epai na bafandi 15 000 ya esanga wana. Na ntango asalaki likita ya liboso na esanga wana, ezalaki bobele na moyangani moko​—ye moko! Kasi Jéhovah Nzambe ayanolaki na mabondeli ya mayoki bozindo oyo asalaki na boumeli ya likita wana. Na boumeli ya vizite na biso, basakoli 48 ya masangá misato batondaki na esengo na komona bato 335, motuya mobimba ya bayangani na makita.

Assemblée de circonscription ya liboso na esanga wana esalemaki na boumeli ya vizite na biso. Esika ya masano ya engumba wana epesamelaki biso kozanga kofuta mpo tosala ebongiseli na biso. Basali na leta bapesaki sonorisation mpe mituka kozanga lifuti. Basakoli na Bokonzi 19 ya lisangá ya esanga wana, bayambaki bandeko 100 baoyo bautaki na mikili mosusu mpe balambaki bilei mpo na bayangani 208. Atako mpasi nyonso oyo bandeko bazali koyikela yango mpiko mokolo na mokolo, bapesaki likabo mpo na Fonds ya la Société mpo na botongi ba Salles du Royaume.

Na mboka wana, etamboli malamu ya ba Témoins de Jéhovah eyebani na bato nyonso, mpe bakonzi mingi ya mosala batunaka bango soki bazali na mposa ya basali. Na ndakisa, nkolo station-service bobele moko ya esanga wana atunaki Témoin moko ete asala epai na ye, mpo ete azalaki na mposa ya moto na sembo. Lokola ndeko wana azalaki kosala epai mosusu, ayanolaki ye ete akomeka kolukela ye moto mosusu. Kasi mobali wana azongisaki mpenza ete: “Moto yango asengeli kozala Témoin oyo asili kozwa batisimo!” Sanza misato na nsima, alobaki epai na ndeko na biso ete: “Bobele ba Témoins de Jéhovah nde basengeli kosimba mosolo!”

Vizite ya nsuka​—esanga ya Sal

Vizite ya nsuka ya mobémbo na biso ezalaki na esanga ya Sal, oyo nkombo na yango elimboli “mongwa,” emonisami na kompanyi ya liboso ya esanga wana. Lisangá moke ya esanga wana lizali na basakoli 22 oyo bazali kosala makasi mpo na komema nsango na Bokonzi epai na bafandi 6 500 ya esanga wana. Ezalaki esengo monene na koyebisa nsango malamu epai na bafandi ya esanga wana, mpo ete pene na bandako nyonso esɛngaki biso ete tokɔta mpe tokokaki koloba epai na bafandi mingi ya ndako.

Mobémbo na biso mosukaki na vizite kati na esanga ya Sal. Oyo nde mapamboli na kosalana elongo na basaleli na Jéhovah na Ekólo Cap-Vert! Bisanga wana bizali sikawa na basakoli na Bokonzi 531, mpe motuya oyo mozali mpenza kobakisama mpamba te bato 2 567 oyo bayanganaki na Ekaniseli ya liwa na Klisto na 1991 bazali kolanda kozwa bilei ya elimo. Atako ba Témoins de Jéhovah ya bisanga wana bazali na bozwi mingi te na mosuni, kasi bazali bazwi mpe baleisami malamu kati na elimo. Bazali mpenza na botɔndi epai na Jéhovah na kobimisa ebele na mai na bomoi kati na bisanga wana mpo na nkembo mpe lokumu na ye!

[Karte na lokasa 24]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

CAP-VERT

SANTO ANTÃO

SÃO VINCENTE

SÃO NICOLAU

SANTA LUZIA

SAL

BOA VISTA

MAIO

SÃO TIAGO

FOGO

BRAVA

Praia

Océan Atlantique

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto