Lisungi mpo na mokili ya Ukraine
BA RADIO, batelevizyo mpe bazulunalo ezali kopesa bansango ya mawa mingi. Mbongwana mpo na oyo etali nkita, bozangi biloko ya kolya mpe nzala ezali kosala mosala na yango na mokili, mpo na mbala oyo ezali komonana mingi na bisika bikeseni biye bisangisaki mikili ya Union soviétique, oyo lelo esili kokabwana. Collège central ya ba Témoins de Jéhovah eutaki kosɛnga kala mingi te na filiale ya la Société Watch Tower na mokili ya Danemark ete bakamata bibongiseli mpo na kosunga ba Témoins ya mokili ya Ukraine baoyo bazangi biloko. Bandeko ya mokili ya Danemark basalaki nini?
Kozanga koumela basalaki oyo basengaki bango! Bureau ya filiale esengaki na bandeko kokende na bazando kosomba bilei na talo malamu. Mokanda moko motindamaki na masangá nyonso ya ba Témoins de Jéhovah ya Danemark mpo na koyebisa bango bamposa oyo ezalaki. Filiale eyebisaki ete: “Masangá nyonso bazalaki na mposa mingi na kopesa lisungi na bango. Na nsuka tokoki komonisa na lolenge ya solo mawa oyo tozali na yango mpo na bandeko oyo bazali na mpasi.” Mituka mitano ya minene na mituka mibale ya milai mpo na komema biloko mpe basofele 14 oyo bamipesaki lokola bavolontere, bakomaki na filiale ya Danemark na samedi le 7 décembre 1991. Batemwe oyo basalaka na filiale batondisaki mituka yango na biloko ya kolya biye bisombamaki.
Na lundi 9 décembre na midi, mituka yango mityamaki na nzela mpo na kosala mobémbo molai na koleka mikili ya Mpoto mpo na kokende na mokili ya Ukraine. Filiale ekomi ete: “Ezalaki likambo ya kokamwa na komona libota mobimba ya Béthel koyangana esika moko mpo na kopesa bango mbote ya maboko. Toyebaki ete mituka mingi oyo ezalaka komema lisungi epai na bato ekutanaka na mikakatano; yango wana tosalaki ebele ya mabondeli mpo ete esunga bandeko na biso na boumeli ya mobémbo.”
Na mokolo ya 18 décembre, kozela na motema mawa esilaki. Filiale ya Danemark ezwaki nsango ete mituka ekomaki kozanga likama na engumba ya Lviv, na mokili ya Ukraine. Bandeko ya Ukraine bazwaki makabo. Lokola ezalaki esengo na basofele kokitisa 1 100 paquets ya 20 kilos oyo moko moko na yango ezalaki na misuni, na farine, na loso, na sukali mpe na biloko mosusu ya ntina! Biloko nyonso eyaki na mituka yango ezalaki ya 22 tonnes. Filiale ya Danemark ekomi ete: “Tozali na esengo monene mpe tozali kotonda Jéhovah na ndenge abatelaki mituka mpe ndenge oyo apesaki biso libaku oyo mpo na kopesa lisungi.”
Bibongiseli mpe bizali kokamatama mpo na kotindama na bilamba. Mpo na yango lisusu filiale eyebisi ete “masangá bayanolaki na libyangi yango na lolenge ya kokamwa.” Ya solo, Jéhovah ‘azali kokomisa basaleli na ye bazwi mpo na makabo nyonso.’ (2 Bakolinti 9:11) Nzokande, mpo na oyo etali basaleli ya Jéhovah bakooka esengo bozindo na kopesaka makabo na bandeko na bango mibali mpe basi. Bolingo oyo bazali komonisa na lolenge yango ezali elembo mpo na koyeba bayekoli ya Yesu. (Yoane 13:35) Bolingo motindo oyo ezali komonana mingi te na mokili oyo kati na yango bato mingi bazali na mposa ya lisungi.