Oyo Bokonzi na Nzambe ekoki komemela yo
YESU KLISTO alakisaki na bayekoli na ye ete babondelaka boye: “Tika bokonzi na yo eya!” (Matai 6:10) Mbala boni baoyo bazali koloba ete bazali bayekoli na Klisto balobaki maloba oyo epai na Nzambe!
Nzokande, Yesu asukaki te bobele na kolakisa bayekoli na ye kobondela mpo na Bokonzi. Bokonzi ekomaki moko na mateya minene ya kosakola na ye. Na yango, Encyclopédie britannique elobi ete Bokonzi na Nzambe “etalelami mpenzampenza lokola motó na likambo monene ya mateya na Yesu.”
Ntango bayekoli na Klisto bazali kobondela mpo na Bokonzi, mpo na eloko nini bazali mpenza kobondela? Eloko nini Bokonzi na Nzambe ekoki komemela bango, mpe yango ekoki komemela yo nini? Ndenge nini Yesu azalaki kotalela yango?
Lolenge oyo Yesu azalaki kotalela Bokonzi na Nzambe
Mbala mingi Yesu azalaki komilobela lokola “Mwana na moto.” (Matai 10:23; 11:19; 16:28; 20:18, 28) Yango ekundweli biso mosakoli Danyele, oyo alobelaki “mwana na moto.” Na boyokani na likambo moko oyo esengelaki kosalema kuna na likoló, alobaki ete: “Namonaki na bimononeli na butu mpe namonaki lokola mwana na moto koya na mapata na likoló, mpe akomaki epai na Oyo na Kalakala mpe abelemisamaki na ye. Mpe nguya na nkembo na bokonzi epesamaki na ye, ete mabota mpe mikili mpe nkota nyonso basalela ye.”—Danyele 7:13, 14.
Kolobaka mpo na eleko oyo akozwa bokonzi yango, Yesu ayebisaki na bantóma na ye ete: “Wana Mwana na moto akofanda na kiti na bokonzi na ye na nkembo, bino baoyo bosili kolanda ngai, bokofanda mpe na kiti na bokonzi zomi na mibale.” Alobaki mpe lisusu ete: “Ekoya Mwana na moto na nkembo na ye, . . . akoyanganisa mabota nyonso liboso na ye mpe akokabola kati na bango lokola ekosalaka mobateli na bampate mpe bantaba . . . Bango [bato mabe] bakolongwa kino etumbu na seko nde bayengebeni kino bomoi na seko.”—Matai 19:28; 25:31, 32, 46.
Kati na bisakweli wana, kolobelama ya bakiti na bokonzi mpe ya mabota nyonso emonisi ete Bokonzi ezali boyangeli oyo kati na yango Yesu mpe bayekoli na ye mosusu bakoyangela bato. Boyangeli yango ekozala na nguya ya kolongola bato mabe mpo na koboma bango. Nzokande, na nse na boyangeli ya Bokonzi na Nzambe, baoyo bazali na mposa ya boyengebene bakozwa uta na Nzambe likabo ya bomoi na seko.
Ezali bongo polele ete Bokonzi na Nzambe ezali boyangeli ya likoló etyami na Nzambe. Ezali Lingomba te, mpe eloko moko te kati na Makomami epesi nzela na komona ete yango ezali boyangeli ya eleko moko moke. Lisusu, boyangeli oyo euti na Nzambe ekokaki te kozala bobele kati na motema ya moto na moto. Lokola Bokonzi na Nzambe ezali boyangeli, ezali kokoma te eloko mosusu kati na mitema na biso na ntango tozali kokoma basangani ya lingomba na boklisto. Kasi mpo na nini basusu bazali kokanisa ete Bokonzi ezali ezalela ya motema?
Bokonzi na Nzambe bozali mpenza kati na biso?
Bato mosusu bazali kokanisa ete Bokonzi bozali kati na motema na biso nakotalela lolenge oyo babongoli mosusu ya Biblia babongolaki Luka 17:21. Engebene Nouvelle version Segond révisée, Yesu alobaki kati na mokapo wana ete: “Bokonzi na Nzambe bozali kati na bino.”
Na ntina yango, Le dictionnaire interprétatif de la Bible (angl.) elobi: “Atako mbala mingi etangami mpo na kopesa ndakisa moko ya liteya oyo endimi ‘kosolola na moto elongo na Nzambe’ to ya ‘makambo mazali na bososoli’ na oyo Yesu alobaki, ndimbola wana etongami mpenzampenza likoló na libongoli ya kala, ‘na kati na bino,’ . . . epai ‘bino’ etalelami lokola singulier, engebene ndimbola mabe ya sika oyo bazali kopesa yango; ‘bino’ . . . ezali pluriel (Yesu azali koloba na Bafalisai—v. 20) . . . Liteya oyo ete bokonzi na Nzambe ezali eloko moko ya kati, ezalela ya elimo to motindo na lobiko ya moto ye moko, eyokani te na ba versets oyo ezingi verset yango, bakisa mpe likanisi oyo K[ondimana] ya S[ika] na mobimba na yango epesi na yango.”
Note moko na ntina na Luka 17:21 kati na la Nouvelle version Segond révisée emonisi ete maloba na Yesu makokaki kobongolama boye: “Bokonzi na Nzambe bozali katikati na bino.” Mabongoli mosusu ya Biblia mazali kokoma ete: “Bokonzi na Nzambe bozali katikati na bino” to “esika bino bozali.” (Jérusalem; Osty; TOB) Na kotalela Les Saintes Ecritures—Traduction du monde nouveau, Yesu alobaki ete: “Bokonzi na Nzambe bozali katikati na bino.” Yesu alingaki te koloba ete Bokonzi bozalaki kati na motema ya Bafalisai bato na lolendo baoyo mpo na bango nde ye azalaki koloba. Kasi Yesu alingaki koloba ete ye, Masiya oyo bazalaki kozela uta kala mpe Mokonzi aponami, azalaki mpenza katikati na bango. Nzokande, esengelaki koleka ntango molai liboso ete Bokonzi na Nzambe eya.
Ntango oyo Bokonzi na Nzambe esengeli koya
Bayekoli mosusu na Yesu Klisto baponamaki mpo na koyangela elongo na ye kati na Bokonzi ya masiya na likoló. Lokola Yesu, bazali kokufa sembo epai na Nzambe mpe bazali kosekwisama mpo na bomoi ya elimo kuna na likoló. (1 Petelo 3:18) Na motuya ya 144 000, motuya moko moke mpenza, bakozala mikonzi mpe banganga basombami kati na bato. (Emoniseli 14:1-4; 20:6) Kati na baoyo bakoyangela elongo na Yesu ezali mpe na bantóma na ye ya sembo.—Luka 12:32.
Wana ezalaki ye koloba na bayekoli na ye mokolo moko, Yesu apesaki elaka oyo: “Kati na baoyo batelemi awa, ezali na bato mosusu oyo bakokufa te liboso ete bamona naino Mwana na moto koya kati na bokonzi na ye.” (Matai 16:28, MN) Verset oyo elandi emonisi ete elaka na Yesu ekokanaki bobele mwa mikolo na nsima ntango amemaki misato kati na bayekoli na ye likoló na ngomba, epai kuna abongwanaki liboso na bango. Bazwaki bongo emonaneli na ye kati na nkembo ya Bokonzi. (Matai 17:1-9) Kasi Bokonzi na Nzambe botyamaki na ntango wana te. Elingaki kotyama ntango nini?
Moko na masese na Yesu emonisi ete asengelaki kotyama mbala moko te lokola Mokonzi masiya. Na Luka 19:11-15, tozali kotanga “Alobi . . . lisese moko mpo ete azalaki pene na Yelusaleme mpe bango bazalaki kokanisa ete bokonzi na Nzambe ekomonana nokinoki. Na bongo alobaki ete: ‘Moto moko na lokumu akendaki mobembo na mokili mosusu mosika mpo na kozwa Bokonzi mpe kozonga. Abyangi zomi kati na boombo na ye, mpe apesi bango mbuma na palata mokama mokama. Alobi na bango ete: “Bosala mombongo kino ekozonga ngai.” . . . Wana esili ye kozwa bokonzi, azongi, mpe atindi babyangela ye baombo oyo apesaki mosolo mpo ete ayeba soko moto na moto azwi boni na mombongo na ye.’”
Na eleko wana, yango esengelaki kozwa ntango molai na moto moko mpo na kokende longwa na Yisraele kino na Rome, na kozela kati na engumba yango kino ekopesamela bokonzi mpe kozonga na mboka na ye lokola mokonzi. “Moto na lokumu,” ezalaki bongo Yesu. Na likoló, asengelaki kozwa epai na Tata na ye bokonzi, kasi akokaki kofandisama na kiti mbala moko te lokola Mokonzi masiya. Bayekoli na ye basengelaki kosala mombongo na kolandaka kosakola nsango malamu ya Bokonzi na boumeli ya ntango molai koleka liboso ete azonga lokola Mokonzi.
Lolenge oyo Bokonzi na Nzambe ekoya
Ntango baoyo balingi Nzambe bazali kobondela mpo ete Bokonzi na ye eya, likambo nini basengaka? Basengaka na boye ete Bokonzi na likoló esala na lolenge ya nguya na kobomaka biyangeli nyonso ya bato, oyo bikokisaki te bilaka na yango ya kopesa kimya mpe bolamu ya solo. Kobendaka likebi likoló na likambo yango, mosakoli Danyele akomaki: “Mpe na mikolo na mikonzi yango Nzambe na lola akotemisa bokonzi bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa bikonzi oyo nyonso, mpe [yango moko] ekotikala lobiko na lobiko.” (Danyele 2:44) Likambo yango lisengelaki kosalema ntango nini?
Yesu asakolaki ete yango ekosalema na libota ya baoyo bakozala batemwe ya mbongwana monene kati na makambo na bato. Mpo na oyo etali “komonana” na ye, Yesu apesaki “elembo” ya makambo ndenge na ndenge lokola bitumba oyo bimonana naino te, koningana na mabelé, nzala, maladi mabe, bakisa mpe kosakolama ya nsango malamu na Bokonzi na Nzambe kati na mokili mobimba.—Matai, mikapo 24, 25; Malako, mokapo 13; Luka, mokapo 21.
Esakweli na Yesu ezali kolobela makambo oyo mazali kosalema sikawa, na ekeke ya ntuku mibale. Na bongo ntango etikali lisusu mingi te, liboso ete Bokonzi na Nzambe epesa mapamboli kitoko epai na bato. Yo mpe okoki kozala kati na baoyo bakosepela na matomba ya boyangeli na Bokonzi na Nzambe. Kasi eloko nini Bokonzi na Nzambe ekoki kopesa na yo, mpe na baoyo yo olingaka?
Bolamu oyo Bokonzi na Nzambe ekomemela bato
Esengo ekozala na mabelé mobimba. Na nse na “likoló na sika,” Bokonzi ya likoló, ekozala na “mabelé na sika,” libota ya mokili mobimba esalemi na bato ya botosi oyo bakofanda na nse na Bokonzi na Nzambe. Ntóma Yoane akomaki ete: “Nzambe ye moko akozala na bango elongo. Mpe akolongola mpisoli nyonso na miso na bango.” Na bongo ekozala bobele mabaku ya esengo, mpamba te “na mawa, na kolela, na mpasi ekozala lisusu te.”—Emoniseli 21:1-4.
Liwa ekozala lisusu te. Eloko mabe oyo epesaka biso mawa ekopimela biso lisusu te baoyo tolingi mingi. “Moyini oyo akobukana na nsuka ezali kufa.” (1 Bakolinti 15:26) Oyo nde esengo ntango bokundi bato ekotika esika na lisekwa ya baoyo bazali kati na makanisi ya Nzambe!—Yoane 5:28, 29.
Na esika na maladi mpe na bilemɛ, bato bakozala na kolongonu malamu na nzoto. Ebele na mbeto ya balopitalo oyo etondi na bato bazali kobela na nzoto to na makanisi ekozala lisusu te. Monganga monene, Yesu Klisto, akosalela mbeka na lisiko na ye “mpo na kobikisa bato na mabota.” (Emoniseli 22:1, 2; Matai 20:28; 1 Yoane 2:1, 2) Kobikisa oyo abikisaki bato na ntango azalaki awa na mabelé ezalaki bobele bilakiseli ya oyo akosala na nzela na Bokonzi na Nzambe.—Tala Yisaya 33:24; Matai 14:14.
Bilei bikotonda mingi. Lokola mokomi na nzembo alobaki yango, “masango makotondana na mokili ata kino likoló na nkeka.” (Nzembo 72:16) Likoló na yango, esakweli ya Yisaya ebakisi ete: “Na ngomba oyo Jéhovah na bibele akobongisela mabota nyonso elambo na bilei na mafuta, elambo na vinyo oyo esili koumela na bilei kitoko bitondi na mafuta mpe na vinyo eumeli mpe eponami.” (Yisaya 25:6) Ya solo, na nse na boyangeli ya Bokonzi, nzala ekopesa mawa te epai na bafandi ya mabelé.
Mabelé mobimba ekokoma paradis. Na lolenge yango nde ekokokana elaka na Yesu oyo apesaki yango epai na mosali mabe oyo abongolaki motema: “Okozala na ngai elongo kati na Paradis.” (Luka 23:43) Yo mpe okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo, ekosikolama na mabe mpe oyo ekobongolama na elanga monene, epai ekozala malamu mpo na kofanda.—Yoane 17:3.
Bilikya oyo kitoko bipesameli bato nyonso ya botosi. Liloba lipemami ya Jéhovah, Biblia, epesi biso bilaka wana kitoko. Ezali wana nyonso oyo Bokonzi na Nzambe ekoki mpenza komemela yo.
[Elilingi na lokasa 7]
Ozali kondima na oyo Yesu alobaki likoló na Bokonzi na Nzambe?