Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/5 nk. 16-17
  • Na ntina na Bokonzi ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na ntina na Bokonzi ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
  • Banani bakoyangela na Bokonzi ya Nzambe?
  • Bokonzi ya Nzambe ekozala wapi?
  • Bokonzi ya Nzambe ekosala nini mpo na makambo ya mabe?
  • Bokonzi ya Nzambe ekoyangela bato ya ndenge nini?
  • Bokonzi ya Nzambe ekosala nini mpo na bato awa na mabelé?
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Oyo Yesu ateyaki na ntina na Bokonzi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/5 nk. 16-17

Yesu ateyi biso

Na ntina na Bokonzi ya Nzambe

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Bokonzi ya Nzambe ezali guvernɛma oyo ekoyangela mabelé mobimba. Yesu alobaki boye: “Bosengeli kobondela ndenge oyo: . . . ‘Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.’”​—Matai 6:9, 10; Danyele 2:44.

Banani bakoyangela na Bokonzi ya Nzambe?

Yesu asengelaki kokóma Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Liboso abotama, anzelu ayebisaki Malia boye: “Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, mpe akoyangela.” (Luka 1:30-33) Longola yango, Yesu aponaki bayekoli na ye mosusu mpo báyangela elongo na ye. Alobaki na bantoma na ye boye: “Bino bozali bato oyo bokangami na ngai makasi na kati ya komekama na ngai; mpe nazali kosala kondimana elongo na bino, ndenge mpe Tata na ngai asali kondimana elongo na ngai, mpo na bokonzi moko.” (Luka 22:28, 29; Danyele 7:27) Bayekoli nyonso oyo bakoyangela elongo na Yesu bakozala bato 144 000.​—Emoniseli 5:9, 10; 14:1.

Bokonzi ya Nzambe ekozala wapi?

Bokonzi ya Nzambe ekozala na likoló. Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Soki nakei mpe nabongiseli bino esika [na likoló], nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai mpenza, mpo esika ngai nazali bino mpe bózala wana. . . . Ngai nazali kokende epai ya Tata.”​—Yoane 14:2, 3, 12; Danyele 7:13, 14.

Bokonzi ya Nzambe ekosala nini mpo na makambo ya mabe?

Yesu akolongola bato nyonso ya mabe oyo bazali awa na mabelé. Yesu alobaki boye: “Ntango Mwana ya moto [Yesu] akoya na kati ya nkembo na ye mpe baanzelu nyonso elongo na ye, bongo akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo. Mpe bikólo nyonso ekoyanganisama liboso na ye, mpe akokabola bato bamosusu epai bamosusu epai . . . Mpe bango [bato mabe] bakokende na kolongolama ya seko, kasi bayengebene na bomoi ya seko.”​—Matai 25:31-34, 46.

Bokonzi ya Nzambe ekoyangela bato ya ndenge nini?

Yesu alobaki boye: “Esengo na bato ya elimo ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabelé.” (Matai 5:5; Nzembo 37:29; 72:8) Mabelé ekotonda na bato oyo, banda lelo oyo, bazali na bolingo. Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Nazali kopesa bino komandema ya sika, ete bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino, mpo bino mpe bólingana bino na bino. Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoane 13:34, 35.

Bokonzi ya Nzambe ekosala nini mpo na bato awa na mabelé?

Yesu akosilisa maladi nyonso. Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, ateyaki bato “makambo oyo etali bokonzi ya Nzambe, mpe abikisaki baoyo bazalaki na mposa ya kobikisama.” (Luka 9:11) Nsima ya kozwa emonaneli ya Yesu oyo asilaki kosekwisama, ntoma Yoane alobaki boye: “Namonaki likoló moko ya sika ná mabelé moko ya sika . . . Nayokaki mongongo moko ya makasi euti na kiti ya bokonzi elobi ete: ‘Talá! Hema ya Nzambe ezali elongo na bato . . . Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te.’”​—Emoniseli 21:1-4.

Bokonzi ya Nzambe ekokómisa mabelé mobimba Paladiso. Mosali-mabe oyo abomamaki elongo na Yesu alobaki boye: “Yesu, kanisá ngai ntango okokɔta na bokonzi na yo.” Yesu alobaki na ye boye: “Ya solo nazali koyebisa yo lelo, Okozala elongo na ngai na Paladiso.”​—Luka 23:42, 43; Yisaya 11:4-9.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 8 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?a

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto