Lolenge oyo bato mingi bazali kotalela Bokonzi na Nzambe
YESU KLISTO alobelaki mbala mingi Bokonzi na Nzambe. Na ntina yango, mokomi na masolo na bato H. G. Wells akomaki: “Likesenisi mosusu ya polele, ezali bongo ntina monene oyo Yesu apesaki, kati na mateya na ye, na oyo abengi Bokonzi na makoló, mpe esika moke oyo Bokonzi yango esili kozwa kati na milulu mpe kati na mateya ya mangomba mingi ya boklisto. Liteya wana ya Bokonzi na makoló, oyo ezali bongo moboko ya mateya na Yesu mpe oyo ezwi esika moke kati na mangomba ya boklisto, ezali mpenzampenza moko na mateya ya mbongwana monene oyo elengisa mpe ebongola naino boye te makanisi ya bato.”
Mpo na nini mangomba mazali na makambo mingi te ya koloba likoló na Bokonzi na Nzambe? Ekoki kozala, mbala mosusu mpo ete bazali na ntembe na ntina na Bokonzi yango. Makanisi nini bato bazali na yango na ntina na Bokonzi?
Lolenge oyo Bokonzi na Nzambe etalelami
Bato mosusu bazali kokanisa ete Bokonzi na Nzambe ezali nde Lingomba ya katolike. Nsima wana baepiskópo bandimaki moyangeli Constantin lokola mokonzi na bango na likita ya Nicée na mobu 325 ya ntango na biso, Lingomba emikotisaki kati na politike mpe elakisaki na bato ete Bokonzi esilaki koya. Encyclopédie britannique elimboli ete engebene mateya ya Augustin (354-430 ya ntango na biso), “Bokonzi na Nzambe esilaki kobanda kati na mokili oyo uta kosalema ya Lingomba” mpe ezali “mpenza kati na mibeko ya Lingomba.”
Basusu bazali kotalela Bokonzi na Nzambe lokola mosala ya bato. Encyclopédie bobele moko wana elobi ete: “Mangomba ya Protestá . . . makomaki nokinoki Mangomba ya mokili, moko na moko na mibeko na yango. Mangomba yango mpe, mapekisaki bozeli ntango ya nsuka” mingi mpenza na ntina etali koya ya Bokonzi na Nzambe. H, G. Wells akomaki lisusu ete: “Bato bazalaki lisusu koyokanisa bomoi na bango, na Bokonzi na Nzambe te, kasi nde na bikonzi oyo bizalaki komonana lokola ya malamu: Bikolo France mpe Angleterre, la Sainte Russie, Espagne, Prusse . . . Mikili nyonso wana mikomaki banzambe na mikili ya Mpoto.”
Likanisi oyo ete Bokonzi na Nzambe ezali mosala ya bato, ezali mpe komonana na mikolo na biso. Encyclopédie britannique elimboli ete: “Likambo yango limonisami kati na likanisi ya moboko oyo endimi ete moto ye moko asengeli kobongisa mokili moko malamu koleka mpo na ntango ezali koya, na kosalaka yango mpe kobongisaka yango. Lisusu likambo yango limonisami na likanisi oyo milende ya moto misengeli kozwa esika ya ‘elikya’ mpe ‘bozeli.’” Mpo na oyo etali “évangile social” (“kosakolama ya nsango malamu na nzela na misala ya kosalisa bato”), Encyclopédie se moko wana ekobi ete: “Lisangá yango litalelaki nsango na boklisto na ntina na Bokonzi na Nzambe mpenzampenza lokola nguya moko oyo ezali kokana kobongisa lisusu libota na bato ya mokili na boyokani na mibeko ya Bokonzi na Nzambe.”
Bayuda mingi bazali mpe kotalela Bokonzi lokola mosala na bato. Na 1937, elobamaki, na boumeli ya likita moko ya balabi oyo bamikaboli na baninga mosusu na engumba ya Columbus, Ohio, na Etats-Unis: “Tozali komona ete mokumba na biso monene ezali ya kosala na bomoko elongo na bato nyonso mpo na kotyama ya bokonzi na Nzambe, ya bondeko kati na mokili mobimba, ya boyengebene, ya solo mpe ya kimya na mabelé. Yango nde ezali mokano na biso ya libiki.”
Likanisi mosusu oyo lipalangani mingi ezali oyo ete Bokonzi na Nzambe ezali ezalela ya motema. Na ndakisa, na Etats-Unis, baprotestá oyo babengami les baptistes de Southern Baptist Convention balobaki na 1925 ete: “Bokonzi ezali boyangeli na Nzambe kati na motema mpe kati na bomoi ya moto na boyokani nyonso ya bato, kati na balolenge nyonso mpe mibeko nyonso ya libota libongisami ya bato. . . . Bokonzi na Nzambe ekozala ya kokoka ntango makanisi mpe mokano ya moto ekozala na nse na mokano ya Klisto.”
Na bongo, Mangomba mazali mpenza Bokonzi na Nzambe? Bokonzi yango ekotyama na nzela na bato? Ezali nde ezalela ya motema? Mpe eloko nini Bokonzi na Nzambe ekoki komemela yo?