Eloko eleki motuya kati na ebwakelo ya bɔsɔtɔ na Ezipito
OKOKAKI nde komizela ete ozwa makomi na Biblia maleki motuya kati na ebwakelo na bɔsɔtɔ? Ezali yango nde ekómaki na nsuka ya ekeke oyo euti koleka, na kati na lisobe ya Ezipito. Totala oyo elekaki.
Kobanda 1778 kino nsuka na ekeke ya zomi na libwa, bokundoli mingi ya papyrus bosalemaki na Ezipito. Kasi, soko bambula koleka monkámá, bolukiluki malamu bosalemaki te. Liboso, bankóló na bilanga ya etúka epai na nord ya Ezipito, bazalaki mbala na mbala kokuta mikanda ya kala; na nsima, lisangá Egypt Exploration Fund, na Grande-Bretagne, lisosolaki ete esengelaki kotinda bato nokinoki mpo na yango. Ba savants mibale ya Oxford, Bernard Grenfell mpe Arthur Hunt, baponamaki mpo na kosala bokundoli na ngele ya Fayoum, etúka bakolónaka bilanga mingi (oyo tozali komona awa na likoló).
Mpo na M. Grenfell, emonanaki lokola nde eloko ekozwama na bitiká ya al-Bahnasah na ntina na nkombo na yango ya kala na monoko na Greke, ete Oxyrhynchos. Oxyrhynchos ezalaki centre ya boklisto na Ezipito mpe engumba monene ya ekeke ya minei mpe ekeke ya mitano na ntango na biso. Basalaki ebele na bandako na basángó na zingazinga na yango, mpe ezalaki na bitiká mingi na engumba oyo ya etúka wana. M. Grenfell alikyaki kokuta bandambo na mikanda ya baklisto, kasi eloko moko te ezwamaki na bolukiluki bosalemaki kati na nkunda mpe na bandako oyo ekweaki. Etikalaki bobele bibwakelo ya bosɔtɔ ya engumba wana, mosusu ezalaki na bolai ya bametele libwa. Emonanaki lokola ete ntina ezalaki te na koluka ba papyrus na esika wana; atako bongo, bakundoli na biloko na kala bazwaki ekateli ya komeka kotimola yango.
Bokundoli ya eloko eleki motuya
Na 1897, libulu moke litimolamaki mpo na komeka, kasi nsima na mwa bangonga ba papyrus ya kala ekundolamaki, kati na yango ezalaki na mikanda batindeli bato, na mikanda ya kosala boyokani mpe mikanda mpo na makambo ya leta. Zɛlo oyo ememamaki na mopepe, ezipaki yango mpe molungé ya moi mobatelaki yango na boumeli ya mibu soko 2 000.
Bobele nsima ya mwa basanza misato, balukiluki babimisaki pene na ba tonnes mibale ya papyrus na engumba Oxyrhynchos. Batondisaki bakesi 25 ya minene oyo batindaki na Angleterre. Mpe na boumeli ya mbula zomi oyo elandaki, ba savants mibale wana ya molende bazalaki kozonga na Ezipito, na eleko nyonso ya mpiɔ mpo na kokólisa bibliotɛke na bango.
Mokolo moko, biloko oyo bazwaki na ntango bazalaki kosala bokundoli na nkunda ya Tebtunis, ezalaki bobele bibembe ya ngandó bityamaki nkisi ete bipɔla te. Mosali moko asilikaki mpe abukaki yango. Kasi akamwaki mpenza, mpamba te amonaki ete bibembe yango bilingamaki na nkasa ya papyrus. Bamonaki ete basalaki bobele motindo moko mpo na bangandó mosusu, mpe ete barulo ya papyrus ekɔtisamaki kati na mingóngó ya bangandó mosusu. Bandambo ya mikanda na kelasi ya kala mibimisamaki, mpe mikanda na mitinda ya mokonzi mpe mikanda ya boyokani, misamgisamaki na mikanda ya mombóngo mpe na mikanda oyo batindelaki bato.
Mikanda wana mizalaki na motuya nini? Mizalaki na ntina mingi, mpo ete yango ekomamaki na bato minene te, na monoko na koïne, monoko na greke oyo mozalaki kolobama na bato mingi na eleko wana. Lokola maloba mingi oyo basalelaki ezalaki mpe kati na Makomami na Greke na Biblia, “Kondimana na Sika,” emonanaki noki ete monoko mosalelamaki kati na Makomami ezalaki Greke ya sipesiale te, lokola ba savants mosusu balobaki yango, kasi ezalaki monoko malobamaki na bato mpamba. Na yango, na koyekoláká lolenge oyo maloba yango mazalaki kosalelama mingi, basosolaki ndimbola na yango mpenza kati na Makomami na greke na boklisto.
Makomi na Biblia
Bandambo na makomi na Biblia mazwamaki mpe lokola; mingi ezalaki na nkomá ya kitoko te, ebongisamaki malamu mingi te, mpe ekomamaki na esika malamu mingi te, emonisi bongo Biblia ya bato minene te. Totalela mwa makomi yango.
M. Hunt akundolaki kopi ya mokapo ya yambo ya Evanzile ya Matai, oyo ezalaki na versets 1 kino 9, 12, mpe 14 kino 20, oyo ekomamaki na ekeke ya misato ya ntango na biso, ekomamaki na nkomá minene. Likomi yango lipesamaki elembo P1 mpe ekómaki mokanda ya yambo na molongó na ba papyrus oyo ekundolamaki na bisika bikeseni, oyo ezali lelo soko na makomi monkámá to biteni na mikanda ya Makomami na greke na boklisto. Mwa ba versets oyo ekundolamaki na M. Hunt, ezalaki na mosala nini? Na ntembe te, lolenge na nkomá oyo esalelamaki, epesaki nzela na koloba ete makomi yango mokomamaki na ekeke ya misato ya ntango na biso, mpe kotalelama ya makambo oyo mazali kati na yango emonisaki ete yango ekokanaki na makomi ya Wescott mpe Hort, oyo eutaki kokundolama kala mingi te na ntango wana. Likomi P1 libómbami na University Museum ya Philadelphie, na États–Unis.
Lokasa ya papyrus loutaki na mokanda moko, lolakisami na lobɔkɔ ya mwasi, oyo ndambo na Yoane, mokapo 1, mpe na lobɔkɔ ya mobali, mwa biteni ya mokanda na Yoane, mokapo 20. Na kobakisáká biteni oyo bizangi, tokoki kokanisa ete Evanzile mobimba ezalaki na nkasa 25 mpe ete mokapo 21 mozalaki kati na yango uta ebandeli. Bapesaki likomi yango elembo P5; balobaki ete ekomamaki na ekeke ya misato ya ntango na biso mpe ezali sikawa na British Library ya Londres.
Ndambo oyo ezali na mokapo ya Baloma 1:1-7 kati na yango, ekomaki na nkomá minene mpe na kitoko mingi te mpo na yango nde ba savants mosusu bakanisaki ete, ekomamaki mbala mosusu na bato oyo bazalaki koyekola kokoma. Bapesaki yango elembo P10 mpe balobi ete ekomamaki na ekeke ya minei ya ntango na biso.
Bakundolaki papyrus ya monene mingi, oyo ezali na ndambo na misato ya mokanda ya Baebele. Ekomamaki na ngámbo mosusu na rulo oyo ezalaki na makomi na kelasi ya Tite-Live, mokomi na masoló na kala. Mpo na nini kotya makambo makeseni, bamoko ngámbo na liboso mpe mosusu na nsima? Lokola ezalaki komonana mingi te na ntango wana mpe lokola bikomeli bizalaki ntalo mingi, bakokaki te kobebisa ba papyrus oyo ekómaki ya kala. Likomi yango lipesameli elembo P13, mpe balobi ete ekomamaki na ekeke ya misato to na ekeke ya minei ya ntango na biso.
Lokasa moko ya papyrus, oyo ezali kati na yango na ndambo na makambo ya mokapo 8 mpe mokapo 9 ya mokanda epai na Baloma, ekomami na nkomá mike mpenza, euti na mokanda moko mozalaki pene na bolai ya 11,5 cm mpe na monene ya 5 cm. Elobami ete na ekeke yo misato ya ntango na biso, Makomami mabimisamaki na mwa buku moke ebongi na kotya na libenga. Likomi yango lizwaki elembo P27, mpe yango nyonso ekokani na Codex Vaticanus.
Ndambo na nkasa minei ya codex (mokanda monene) ya Septante, libongoli ya Greke, ezali na ndambo na makambo ya mikapo motoba ya Genese. Codex wana ezali na ntina mingi, mpamba te ekomamaki uta ekeke ya mibale soko na ekeke ya misato ya ntango na biso; lisusu, mikapo yango mizali te kati na Codex Vaticanus mpe mimonisami malamu te kati na Codex Sinaiticus. Lokola etyami na nkombo ya Papyrus 656, nkasa yango ebatelami na bibliotɛkɛ Bodleian, na Oxford.
Bandambo nyonso wana elakisi ata kokesena moko monene te na makomi ya kala oyo tozali na yango, mpe eyebisi ete bato mpamba oyo bafandi na etuka etangwi na Ezipito, bazwaki makomi na Biblia nokinoki. Ezali mpe kolendisa kondima na biso mpo na bosikisiki mpe bosolo na Liloba na Nzambe.
[Elilingi na lokasa 27]
Papyrus ya etúka Fayoum oyo ezali na ndambo na makambo na Yoane, mokapo 1
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na lotómo ya British Library
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est