Mituna na batangi
Tosengeli kosukisa engebene Matai 11:11 ete Yesu ayebaki liboso ete Yoane Mobatisi akokufa liboso na ye?
Ee, emonani lokola ete Yesu ayebaki ete Yoane akozala na bomoi molai te mpo ete akóma moklisto mopakolami, mpamba te [Yesu] alobaki ete: “Solo nazali koloba ete: Kati na baoyo babotami na basi, moto moko ee abimi oyo aleki Yoane Mobatisi na monene; kasi ye oyo azali moke kati na bokonzi ya makoló aleki ye na monene.”—Matai 11:11, MN.
Na ntango anzelu Gabriele ayebisaki ete Yoane asengelaki kobotama, asakolaki ete “na elimo mpe na nguya na Eliya,” Yoane ‘akobongisa libota mpo na Jéhovah.’ Yoane asengelaki kozala mosakoli, oyo asengelaki kobongisa libota moko mpo na Masiya na Jéhovah. Kasi na maloba oyo na Nzambe, ata eloko moko te elakisi ete Yoane ye moko asengelaki kokóma moyekoli na Masiya oyo asengelaki koya, mpe yango eyebisamaki soko moke te na maloba na esakweli na Zakaria, tata na Yoane.—Luka 1:17, 67-79.
Na yango, nsima na kobatisa Yesu, Yoane akóbaki kosakola mpe kabatisa, kolendendelaka kati na mosala na ye motalaki kobongisa libota. Yoane ayebaki na likamwisi ete Yesu asengelaki kobatisa bato na elimo santu, kasi alobaki te ete ye moko akozwa elimo santu, mpo na kokóma bongo moklisto mopakolami. (Matai 3:11) Epai mosusu, Yoane ayebaki ete mosala na ye masengelaki kokita, nzokande oyo na Yesu mosengelaki komata.—Yoane 3:22-30.
Wana Yesu alobaki makambo oyo tozali kotanga na Matai 11:11, Yoane azalaki na bolɔkɔ. Yesu ayebisaki ete mosakoli wana akangisamaki azalaki moke liboso na ye oyo aleki moke kati baoyo, na nsima, basengelaki kokóma banganga-mikonzi kati na makoló. Atako bongo, emonani lisusu ete Yesu ayebaki ete mosika te Yoane asengelaki kokufa; akotika mokili liboso ete nzela ya “sika” mpo na bomoi ya seko efungolama. (Baebele 10:19, 20) Yango elimboli ete Yoane akokaki kozala na bomoi te kino na Pantɛkɔte ya mobu 33, mokolo oyo bayekoli na Yesu babandaki kopakolama na elimo. Na yango, likanisi na Yesu lizwami na Matai 11:11 likoki mpe kotalelama lokola elakiseli ete, ayebaki ete Yoane akokenda na likoló te.