Bisanga ya océan Indien biyoki nsango malamu
BISANGA Rodriguez, Maurice, la Réunion, bisanga ya Seychelles, Mayotte mpe Comores ekamati pene monene ya ndambo na zolongano (cercle) na bonene ya mokili ya Madagascar, epai na ouest ya océan Indien, soko bamilió 3,9 ya bakilometele carrés. Atako bonene wana, mabelé mazali bobele na bonene ya bakilometele carrés soko 7 300. Mpo na popilasió ya bamilió 2,3 ya bato, bisanga wana bitongami kati na bisanga bizali na bato mingi kati na mokili.
Lelo, ba Témoins de Jéhovah 2 900 bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe na molende nyonso epai na bafandi ya bisanga wana. Lokola batangwi mosika, ba Témoins wana bazali kosepela mingi mpenza na bavizite ya bakɛngɛli ya zongazonga mpe na ba assemblées ebongisami mbula na mbula na filiale ya la Societé Watch Tower oyo ezali na engumba Vacoas, na esanga Maurice. Na bantango wana, bamonaka kokokana ya maloba nyonso oyo ya Yisaya 42:10, ete: “Boyembela Jéhovah loyembo ya sika, mpe bosanzola ye longwa na ndelo na mokili; bino bokokitaka kino na mai monene mpe na oyo etondisi yango; bino bisanga mpe bafandi na yango!”
Kala mingi te, bamonisi ya filiale bakendaki na bisanga yango mpo na kotala masangá mpe kosala ba assemblées spéciales ya mbula na mbula oyo esalemaki na mokolo moko na motó na likambo ete “Bozala bulee kati na etamboli [na bino] nyonso,” engebene 1 Petelo 1:15. Basalaki mobémbo molai na océan, mpenzampenza na nzela na mpepo minene, to mbala mingi na mpepo mike, mpe na ba goélettes mpe ba bricks ya mike. Landa biso ete omona lolenge nini bisanga wana mosika ya océan Indien biyokaki nsango malamu.
Rodriguez: Esika tokómaki liboso
Ngonga moko na ndambo nsima na kouta na mpepo longwa na esanga Maurice, tomonaki etando na mabangá ya pauni mazingi nzalé oyo kati na yango ezali na ndambo na mabelé mafandami na bato moke. Ezali esanga Rodriguez, esika oyo tokómaki liboso.
Libandá ya mpepo litongami na etando na mabangá ebéngami Point Coraille. Na esika wana, mabangá ya pauni mazali minene na boye ete okoki kopalola yango lokola biliki mpe kosalela yango mpo na kotonga ndako. Minibus moko ememaki biso longwa libandá ya mpepo kino na Port Mathurin, engumba monene, na nzela moko moke ya nyokanyoka. Na nsima, na ngambo ya esanga, tomonaki bitando ya mabangá kuna mosika, mpe nzalé ezalaki na langi bule oyo ezalaki na mabangá na ngámbo na yango. Lokola eleko ya mbula eutaki kosila mosika te, bitongá ya ngombe, na mpate mpe ntaba bizali kolya epai na epai na nkiteli ya ngomba ezipami na matiti mingi mpe kitoko.
Assemblée spéciale na biso ya mokolo moko esalemaki na Salle du Royaume moko ya moke ebongisamaki malamu, oyo ezalaki na centre ya engumba Port Mathurin. Mosala mobandaki na Rodriguez na 1964. Lelo, basakoli 36 bazali kosakola nsango malamu epai na bafandi 37 000 ya esanga wana. Ezalaki esengo na komona bato 53 oyo bayanganaki na assemblée yango mpe na kotala batisimo ya elenge mobali moko ya mibu 18. Atako mama na ye ayebi kotanga te mpe ayebi kokoma te, nde ayambaki solo na 1969 mpe azali ntango nyonso kosalela Jéhovah atako botɛmɛli ya libota. Bana na ye mibale basili komipesa epai na Jéhovah.
Nsima na assemblée, tolekisaki poso moko mpo na kosakola kati na esanga. Tozalaki koloba monoko ya esanga Maurice, mpamba te ezalaki monoko oyo bazalaki koloba awa, na Rodriguez. Mobembo na bus mpe nsima kotambola mwa moke na makolo, esalisaki biso na kotala teritware na biso: lobwaku na matiti mingi oyo ebandi longwa na ngomba kino na mai monene. Oyo nde biloko kitoko tomonaki yango: mai ya mua bulé, etando ya mabangá mpɛmbɛ mpe, na nsima, tomonaki océan na langi bulé makasi! Kosepeláká na mopepe kitoko mpe na pɛto, tomilɛngɛlaki.
Mpo na kokóma na ebele na bandako mike oyo ezali na lobwaku yango, tolekaki na banzela mike kati na bilanga, na kokatisáká mbala na mbala moluká oyo mozalaki na pɔtɔpɔ́tɔ mingi. Ndako nyonso eyambaki biso na esengo mpe tokokaki kolobela bafandi na yango, mapamboli oyo mosika te makouta na Bokonzi. Nsima na mwa ntango moke, tokómaki mosika na lobwaku, kasi tosengelaki kozonga. Tosengelaki bongo kotambola bangonga mingi mpe komata lisusu ngomba, kasi boyambi ya bafandi na esanga esalisaki biso: basɛngaki biso ete bakumba biso nsima na jeep moko.
Nsima na mobembo wana molɛmbisaki, tosepelaki kozonga na Béthel kitoko ya Vacoas. Assemblées spéciales ya mokolo moko ebongisamaki na salle moko ya Leta. Mokolo ya liboso, bato 760 bautaki na masangá 6 kati na masangá 12 ya esanga, bayanganaki. Mokolo molandaki, bobele programme yango elakisamaki epai na bayangani 786 oyo bautaki na masangá mosusu motoba. Na boumeli ya mikolo mibale wana, bato minei bazwaki batisimo. Lelo, ba pionniers spéciaux 30 mpe ba pionniers permanents 50 bazali koyebisa nsango malamu epai na bafandi ya esanga.
Mosika kuna na bisanga ya Seychelles
Ntango ekoki ete tokamata lisusu mpepo mpo na kokenda na nord, mpo na kopumbwa bakilometele 1 600 likoló na mai monene makaboli biso na Mahé, moko na bisanga ya Seychelles. Na monoko ya esanga wana, babéngi yango Zil Elwannyen Sesel, oyo elimboli “bisanga mosika ya Seychelles.” Lokola ezalaki mosika, biro ya filiale ebongisaki bobele vizite mibale na mobu nyonso. Assemblée spéciale ya mokolo moko mpe assemblée de circonscription esalemaki esika moko na boumeli ya mikolo misato, na printemps. Assemblée ya distrike esalemaki nsima bobele na mbula wana. Tokómaki na katikati ya octobre mpe ezalaki na libaku ya assemblée wana nde tokendaki. Nsima na yango, tokendaki kotala lisangá na boumeli ya poso moko. Kuna lisusu, tozwaki libaku ya koloba monoko ya esanga Maurice.
Bandeko na biso ya esanga Praslin mpe La Digue, bisanga oyo bizali zingazinga, bakómaki. Oyo nde esengo na komona bamonisi ya bikólo 12! Salle du Royaume ya esanga wana, oyo esalelamaki mpo na assemblée, ebongisamaki na garage monene ezalaki nsima na ndako ya Témoin moko. Lokola bobele balobi motoba, kati na bango balobi mosusu bazalaki bapaya nde batyamaki na programme, basusu kati na bango bazwaki libaku kitoko ya kosala badiskur mingi na boumeli ya mikolo wana minei. Basakoli 81 basepelaki mingi wana bamonaki bato 216 koyangana na mokolo ya nsuka ya assemblée.
Na ntango assemblée esilaki, tomataki na goélette mpo na kokende na Praslin, esanga oyo etangwi na nord-est ya Mahé na ntaká ya bakilometele 40. Masuwa wana kitoko mazali na molai ya bametele 18, masalami na nzeté ya tacamahac, ekoki komema bato 50 mpe bozito ya ba tonnes soko 36. Na ntango totikaki libongo ya Mahé mpo na kokende na Praslin, oyo ezalaki kuna mosika, tozalaki sé koyoka lokito ya moteur diesel elongo na bilamba mpɛmbɛ bikovimbaka na mopepe, bityami na bikangelo (mats) mibale bikosalisaka mpo na kotambwisa masuwa.
Nsima na ngonga mibale na ndambo, totambolaki zingazinga na ngomba na mabangá mpe tokɔtaki na mai na kimya ya Sainte–Anne. Ekitaki biso na libóngo, tomonaki bandeko na biso oyo bazalaki kozela biso. Esanga wana moke ezalaki na basakoli 13, mpe bapaya 8 bautaki na bituka mosusu. Tosepelaki mingi wana tomonaki bato 39 bayanganaki na salle na biso ya moke na diskur sipésiale. Bokóli kitoko emonanaki.
Tokokaki kolongwa na Praslin te kozanga ete tomona lobwaku kitoko ya Mai, esika etondi na kokoti pembeni na mai monene, oyo ezali kobota mbuma minene mingi koleka bakokoti nyonso na mokili: mbuma moko ekoki kozala na bakilo 20. Na nsé na mwa molili moke na langi na mpondu mpe na mwa malili ya zámba wana, tomonaki kokóla ndenge na ndenge na banzeté na mbila wana. Engebene moto na leta oyo akokambaka bato balingi kotala zámba, nzeté na kokoti oyo eleki molai kati na yango, ezalaki na molai ya bametele 31 na mbala ya nsuka oyo bamekaki yango na 1968. Tokanisaki ete banzeté mosusu ya minene ezalaki na mbula 800. Esengeli mibu 25 mpo na nzeté moko liboso ete ebota mbuma, mpe esengeli mibu 7 mpo ete kokoti ekomela. Ezalaki likambo na kokamwa te ete mokambi akebisa biso boye ete: “Bokamata bobele bafɔtɔ́ mpe botika bobele matambé ya makolo [na bino].”
Na ntɔngɔ elandi, na 7 heures, tomataki masuwa mpo na kokende na esanga moke ya La Digue. Ebele na masuwa mike mazingaki barrage. Ezalaki koyokanisa bafandi 2 000 ya esanga mpe bato ya mikili misusu. Babalani oyo bakóli mpenza, bango bato ya ekolo Suisse baoyo bafandi na bisanga wana uta 1975, bazalaki kozela biso. Na esika na komata likálo libendami na ngombe lokola “taxi,” totambolaki likoló na zɛlo mpe na mabangá na yango minene makómi sɛlisɛli mpo na mai monene mpe mpo na mbula. Nsima na kolya bilei na ntɔngɔ, na libandá, tolekaki parc moko moke, epai bazalaki kobotisa mwa bandeke moindo oyo ekomonanaka mingi te, mpo ete tokende epai na ndambo na bato oyo basepelaki na solo. Bazalaki 13, mpe bayanganaki wana mpo na koyoka diskur lisalemaki na monoko ya esanga. Tokutanaki na mobali mpe mwasi oyo, mpo na mposa ya kokola na elimo, basalaki nyonso esengelaki mpo na kobongisa libala na bango ete endimama na Leta. Ee, ata na bisanga wana mosika, Jéhovah azali mpenza kokɔtisa biloko kitoko ya mabota.
Tozongi na nzela ya esanga Réunion
Na bisanga nyonso epai totambolaki na boumeli ya mobembo na biso, Réunion ezalaki esanga na bozwi mingi. Pene na mabelé, tomonaki nzela monene oyo ekabwanaki na biteni minei, mpe etondaki na mituka mingi oyo mizalaki kouta na kapitale, Saint-Denis. Bandako minene etongami na esika ekaboli mai monene mpe ngomba. Esanga wana ezali na bafandi 580 000, ekómaki elanga na kobota mbuma mingi mpo na mosala ya kosakola Bokonzi. (Matai 9:37, 38) Lelo, basakoli 2 000 baoyo bakabolami na masangá 21, bazali kosakola nsango malamu na molende
Assemblée spéciale ya mokolo moko esalemaki na esika monene ya masano, oyo ezipamaki likoló. Tozalaki na esengo ya komona bato 3 332 oyo bayanganaki na yango, mpe tosepelaki na ntango bato 67 kati na bango bazwaki batisimo. Nsima na kolekisa ntango malamu elongo na bamisionere ya esanga wana, tokendaki na esika mosusu.
Mayotte: esanga na malasi
Nsima na kosala mobembo ya ngonga mibale, mpepo na biso oyo ezalaki na bisika 40 emilɛngelaki mpo na kokita na libandá ya mpepo ya engumba Pamanzi, oyo ezali esanga moke ekangisami na engumba Dzaoudzi, kapitale ya Mayotte, na nzela moko ezali na molai ya kilometele 1,9. Likoló na yango na langi ya bulé etondi na mapata mpɛmbɛ, na bangomba na yango ezali na nkiteli kitoko mpe na océan na yango na langi ya bulé makasi te, ezali kosala ete esanga wana ekóma paradis ya kimya na mikili ya molungé. Mayotte esili kozwa nkombo ebongi na yango ete esanga na malasi mpo na nsolo kitoko ya ilang-ilang (nzeté oyo bakosalaka na yango malasi). Mai mabimisamaka na folólo na yango matindamaka na France: bakosalelaka yango malasi maleki na lokumu mingi na mokili mobimba.
Esengelaki na biso minutes 15 mpo na kokóma na masuwa na esanga monene. Na ntango tokómaki na ndako ya bamisionere, epai tolyaki mwa bilei, basɛngaki biso ete toyangana na boyekoli ya mokanda, na bakilometele 19 longwa na esika wana, na ngámbo mosusu ya esanga, likambo oyo lisilisaki elikya nyonso ya bopemi. Mobembo tosalaki na banzela mike na jeep oyo kapo na yango ekokaki kolongolama, ezalaki mpenza kobangisa. Tokanisaki ete tozalaki pene ya kotuta bato, bangombe mpe mituka misusu. Kasi mokumbi motuka na biso, ye moto ya ekólo France amesenaki mpenza na nzela yango. Tokómaki na Chiconi kuna tokutanaki na libota epai boyekoli ya mokanda ezali kosalema.
Tata, ye oyo azalaki liboso musulmá, alakisaki biso bana na ye mwambe. Mwana na ye ya mobali oyo azalaki na mibu minei, apesaki biso mbote na motindo na bonkoko, tososolaki yango bobele nsima. Akekisaki mokɔngɔ na lobɔkɔ moko likoló na lobɔkɔ mosusu, mpe atelemaki liboso na biso. Tomekaki liboso kopesa ye mbote ya lobɔkɔ, na nsima mwasi na ngai amekaki kokamata mabɔkɔ na ye mpo atya yango likoló na motó na ye. Na ntango akamwaki na ezaleli na biso, elenge mobali azalaki kozela na motema molai, wana afungolaki miso na ye minene. Tososolaki ete, totya mabɔkɔ na ye likoló na motó na ye. Na ntango boyekoli ebandaki, ezalaki na bayangani 14. Ekómaki biso na katikati na boyekoli, moto moko oyo azali kosepela na solo akɔtaki mpe apesaki biso nyonso mbote na mabɔkɔ. Emonani ete, wana ezalaki mpe moko na mimeseno na bango.
Butu engelaki na zámba na ntango tozalaki kozonga. Tomonaki bangembó minene ikolyaka mbuma, oyo ezalaki kokende na banzete epai bazalaki koluka bilei na bango na butu. Tookaki mpe nsolo na ngayi ya mbuma ya nzeté minene ya Inde, nkombo na yango durion, oyo ekweaki na nzela ya nyokanyoka, mpe tookaki elɛngi ya mánga, ya payipayi mpe mapéla. Ezalaki esika oyo etondaki na ebele na Maki, nyama moko moke ekokani na makako nde motó na yango lokola nkanza (renard) mpe ezalaki na mokila molai molingamilingami mpe mokoki kokanga eloko. Na nsɔngé ya nkeká, tomonaki likambo moko kitoko: sanza na langi na motané ngɛlingɛli, ebimaki na nzalé mpe engɛngɛli mai ya kimya. Ata sofele na biso alɛmbisaki lombango ya motuka ete atala yango, likambo oyo biso mpe tosalaki yango na boumeli ya mobembo na biso.
Na ntɔngɔ elandaki, tokendaki kosakola elongo na bamisionere. Tokendaki liboso kotala elenge mobali moko azalaki molakisi mpe azalaki koloba Lifalansé malamu. Afandaki na mabelé mpe biso tofandaki na mbeto na ye. Na boyekoli bolandaki elongo na elenge mobali mosusu, ye afandaki lisusu na mabelé na chambre na ye ya moke mpe afandisaki biso na matela etyami na nsé. Mokemoke, tozalaki kosanzésanzé lolenge na kofanda, atako milende nyonso oyo tosalaki mpo na kobosana mokakatali mazwaki biso na makolo mpe motoki oyo mozalaki kokitela biso na mokɔngo. Ezalaki mpasi mpenza mpo na kotya makanisi nyonso na boyekoli oyo bozalaki kosalema ndambo na Lifalansé, ndambo na monoko ya Mahé, wana radio ezalaki koyemba banzembo kitoko ya ntango wana.
Vizite na biso ya nsuka ezalaki epai na elenge mobali oyo autaki na Comores. Asɛngaki biso kolimbisa ye mpo ete Lifalansé na ye ezalaki mabe, mpe abimisaki brochure na ye mpe amilɛngɛlaki mpo na boyekoli. Wana misionere azalaki koyebisa ngai lisoló moko molai, elenge mobali wana akataki ye maloba mpe alobaki ete alingaki kotanga paragrafe. Ezalaki lolenge na ye ya kosɛnga biso na bonkondé ete totika makɛlɛlɛ. Bato yango nyonso bazalaki bamusulmá, likambo oyo lipekisaki bango te ete bamonisa mposa monene mpo na makambo oyo bazalaki koyekola na Biblia.
Tomitunaki mpo na nini ebele na bilenge mibali bazalaki koyekola Biblia, nzokande basi mpe bilenge basi moke mpenza bandimaki yango. Balimbolaki biso ete yango euti na mimeseno ya bonkoko mpe ya mabota. Kobala basi mingi endimami ezala kati na lingomba to mpe na Leta, mpe mwasi nyonso azali na ndako na ye moko. Lokola mama nde azali na bokonzi likoló na libota, tata azali na bopusi mingi te likoló na yango. Bayebisaki biso ete, engebene momeseno na bango, bana basi bakofandaka epai na mama na bango kino bakobala. Nzokande, bana mibali bakotikaka ndako naino bazali bilenge mpe bakotongaka banga na bango moko to ndako moke, to mpe bakofanda ebele kati na banga moko. Ezali mpo na bantina wana nde bilenge mibali bazali na likoki ya koyekola Biblia na bonsomi nyonso soki balingi yango, kasi bobele bilenge basi moke nde bazali na bonsomi wana.
Assemblée spéciale ya mokolo moko esalemaki na mokolo ya lomingo. Ntɔngɔ ezalaki kitoko, kasi na katikati ya mokolo, likoló lizipamaki na mapata mpe mosika te mbula makasi enɔkaki. Moto moko te amitungisaki, mpamba te mbula ememaki bobele mwa mpiɔ. Wana ezalaki lisusu libaku ya kozwa ebele na bozwi na elimo. Basakoli 36 mpe ba pionniers basepelaki komona bayangani 83 mpe bato 3 oyo bazwaki batisimo.
Likambo kitoko ya assemblée wana ezalaki kobima ya brochure Sepela na bomoi ya seko na mabelé! na monoko ya Mahé. Ezalaki te bobele brochure ya la Société Watch Tower oyo ebimaki na monoko ya Mahé, kasi ezalaki mpe mokanda bobele moko oyo mobimaki na monoko wana. Kati na brochure yango, likomi ya arabe lizali na ekomeli ya Baloma, mpamba te na eteyelo, bazalaki koyekola likomi ya arabe kasi bayekolaki monoko ya arabe te. Bato bazalaki na makoki ya kosala mabondeli na motó mpe kotanga Coran na arabe; nzokande bazalaki te kokanga ntina ya makambo oyo bazalaki koloba mpe kotanga. Bakamwaki wana bamonaki ete bakokaki kokanga ntina ya makambo oyo bazalaki kotanga na arabe kati na brochure wana. Ya solo mpenza, ezalaki nde monoko na bango moko ya Mahé, oyo ebongwamaki na arabe na lolenge na kokoma yango. Oyo nde esengo na komona bilongi na bango kongɛnga wana basosolaki ndimbola ya makambo oyo bazalaki kotanga!
Bato bazalaki kokakatana te mpo na kondima ba brochures yango. Kati na moko na bamboka mike oyo etangwi mosika, mobali moko abɛlɛmaki epai na biso wana tozalaki kopesa litatoli epai na mwasi moko. Alobaki na ndeko moko na monoko ya Mahé mpe alobaki na ye na mongóngó makasi mingi. Tomonaki lokola nde atɛmɛlaki biso. Yango eumelaki mwa ntango mingi; mobali yango azalaki koloba na bilembo mingi. Na nsima, ndeko alimbolaki biso ete mobali yango azalaki komilela ete: “Lolenge nini bokoki komizela ete tomikundola makambo nyonso oyo boyebisaki biso, soki bozali kozonga kotala biso bobele mbala moko na mobu? Lolenge nini bokoki kobanza yango? Bosengeli koya mbala na mbala mpo na koyebisa biso makambo oyo.”
Tozali na likanisi motindo moko na mobali wana. Ya solo mpenza, na nzela na nsango malamu ya Bokonzi, Jéhovah azali koyanganisa biloko kitoko ya mabota nyonso. Atako batangwi mosika na océan, bafandi ya bisanga wana basangisi mingóngó na bango mpo na koyemba loyembo ya masanzoli oyo ezali komata epai na Jéhovah Nzambe, Mozalisi mpe Tata na bango na likoló.—Hagai 2:7, MN.
[Karte na lokasa 21]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
SEYCHELLES
OCÉAN INDIEN
COMORES
MAYOTTE
MADAGASCAR
MAURITIUS
RÉUNION
RODRIGUES
[Elilingi na lokasa 23]
Ngomba na mabangá ya Praslin, kati na mai ya Sainte-Anne
[Elilingi na lokasa 24]
Likálo libendami na ngomba lokola “taxi” na engumba La Digue, na bisanga ya Seychelles
[Elilingi na lokasa 25]
Na Mayotte, mosakoli mwasi moko alakisi brochure ya sika