Abrahame—ndakisa mpo na baoyo nyonso balingi kozala baninga na Nzambe
‘Atikaki kondima te, andimaki na motema mobimba ete Nzambe akoki kosala yango esili ye kolaka.’—BALOMA 4:19-21.
1. Mpo na nini Satana azali koluka kotya mobulu na lisolo ya bomoi ya Abrahame?
LILOBA na Nzambe kati na Makomami ezali “na bomoi mpe na nguya”. (Baebele 4:12) Yango wana, atako ekomamaki esili bongo koleka bambula 3 500, lisolo ya boyokani oyo Jéhovah azalaki na yango elongo na Abrahame ezali liziba na mpiko mpo na baoyo nyonso bazali koluka kozala baninga na Nzambe. (Baloma 15:4) Satana, monguna monene, ayebi yango malamu, mpe asalelaki bakonzi na mangomba mpo na kobimisa ntembe likoló na lisolo yango, mpo emonana na miso na bato ete ezali lisapo mpamba.—2 Bakolinti 11:14, 15.
2. Ndenge nini bayekoli na Yesu bazalaki kotalela lisolo ya Abrahame?
2 Lokola ezali eteni moko na “Makomami nyonso mapemami”, lisolo ya Abrahame ezali solo mpe ezali na “litomba mpo na koteya” baklisto. (2 Timote 3:16; Yoane 17:17) Ntembe ezali te ete bayekoli ya liboso ya Yesu bandimaki lisolo ya Abrahame, mpamba te balobeli Abrahame mbala 74 kati na Makomami ya greke ya boklisto. Mokapo ya 11 ya mokanda epai na Baebele, mokapo oyo ezali kolendisa kondima, elobi na molai mpenza mpo na Abrahame koleka basaleli mosusu ya Nzambe ya ntango ya kala.
3. Abrahame azwaki Iokumu nini?
3 Abrahame azalaki “mosakoli” lokola basakoli mosusu te, mpamba te Jéhovah asalelaki ye mpo na kozala elilingi na ye mpenza na esakweli. (Genese 20:7; Bagalatia 4:21-26) Ezali mpo na ntina yango Yesu alobelaki ‘esika penepene na ntolo, penepene na Abrahame’, mpo na komonisa esika malamu epesameli baoyo bandimami na Nzambe.—Luka 16:22.
Likambo ya liboso oyo asalaki mpo na komonisa kondima na ye
4. Engebene Biblia, Nzambe alobaki nini na Abrame na mbala ya liboso oyo alobaki na ye?
4 Abrame, mpo ete liboso azalaki kobengama boye, akolaki na mboka “Ulu na mokili na Bakaladi”. Wana ezalaki ye kofanda na mboka yango, Jéhovah Nzambe abimelaki ye mpe alobaki na ye: “Longwa na mokili na yo mpe na bandeko na yo mpe na ndako na tata na yo, kokenda na mokili ekomonisa ngai yo. Nakozalisa yo libota monene, mpe nakopambola yo, nakozalisa nkombo na yo monene mpe okopambola bato. Nakopambola bango bapamboli yo mpe nakolakela mabe baoyo balakeli yo mabe; mpe mpo na yo mabota nyonso na nse bakopambolama.”—Genese 12:1-3; 15:7; Misala 7:2, 3.
5. (a) Ndenge nini elaka ya Nzambe ekokaki kosimba Abrame na mozindo ya motema na ye? (b) Motindo nini Abrame ayambaki elaka yango?
5 Libyangami oyo ezalaki solo komekama. Kondima yango mpo na Abrame elimbolaki kotika mboka kitoko elongo na libota na ye, mpo na kokende kofanda mosika, na mokili ya bopaya. Kasi elaka na Nzambe na bolingo esimbaki solo motema na Abrame. Lokola akomaki mokolo mingi mpe mwasi na ye azalaki ekomba, emonanaki lokola ete nkombo na ye elingaki kolimwa nsima mwa moke. Nzokande, Nzambe alakaki ye ete uta na ye “Libota monene” ekobima. Epai mosusu, elaka na Nzambe ezalaki na nsango malamu ya kitoko mingi mpo na bato nyonso, mpo esakolaki ete ntango ekoya oyo mabota nyonso makopambwama. (Bagalatia 3:8) Abrame andimaki elaka ya Jéhovah, mpe atikaki mboka wana ya bonzenga. Biblia elobi na biso ete “abimaki mpe, ata ayebaki esika ekokenda ye te.”—Baebele 11:8.
6. (a) Na Genese 11:31, mpo na nini elobami ete Téra nde akamataki libota na ye mpo na kokende? (Misala 7:2-4)
6 Kondima ya Abrame elendisaki bato bazalaki penepene na ye. Bato na ndako na ye, bakisa tata na ye Téra, mpe Lota, mwana na ndeko na ye, bakendaki na ye elongo. Nzokande, lokola Téra nde azalaki tata, elobami na ntina wana ete ye nde akamataki bango mpo na kokenda na bango. (Genese 11:31) Abrame asungamaki mingi na mwasi na ye Saraï, oyo na nsima nkombo na ye ebongwanaki ete Sara. Ayimayimaki te mpo ete batikaki biloko mingi. (Genese 13:18; 24:67) Yango wana tokoki kokamwa te na kotanga ete ekufaki Sara, “Abrahame [akotaki na hema] mpo na koyoka mawa mpo na Sara mpe mpo na kolela ye”. (Genese 23:1, 2) Mwasi wana oyo azalaki na kondima makasi mpe azalaki kotosa mobali na ye na motema na ye mobimba amonisamaki lokola ndakisa na kitoko ya solo ya elimo mpo na basi baklisto.—Baebele 11:11, 13-15; 1 Petelo 3:1-6.
7. Na eleko na biso, ndenge nini baklisto mosusu basili komonisa kondima ekokani na oyo ya Abrame mpe ya Sara?
7 Na mikolo na biso, baklisto mingi bazali komonisa kondima motindo moko na komipesa na bolingo malamu mpo na kosakola nsango ya Nzambe na barégió epai kuna mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali monene, mpo na kosala na imprimerie to na expédition ya mikanda mikolimbolaka Biblia mpe mpo na kotonga bandako ya sika esengeli mpo na kokokisa misala yango. (Matai 24:14) Baklisto wana bazali bango nyonso kotosa etinda oyo: “Bokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso.” Nsima na kokota na mokili ya bopaya, mbala mingi basengelaki komesena na bomoi ya sika. Bamosusu batiki matomba ya mosuni mpo na kozonga na bamboka na bango kozalisa bayekoli.—Matai 28:19, 20.
Misala misusu ya kondima
8. Na libaku nini mosusu Jéhovah abimelaki Abrame mbala ya mibale?
8 Abrame afandaki na mboka Harana kino na kufa na tata na ye Téra. (Genese 11:31, 32) Nsima na yango akatisaki ebale Efalata elongo na bato na ndako na ye mpe akendaki na mokili epai na ngele to na sud. Akomaki kino na “esika na Sekeme”, katikati na mokili na Kanana. Ezalaki solo mokili kitoko! Sekeme ezali kati na lobwaku moko ekobotaka mingi katikati na milongo mibale ya bangomba, oyo epai moko ngomba eleki molai ezali ngomba Ebala mpe epai mosusu ngomba eleki molai ezali ngomba Gerizime. Eteni wana ya mokili ebengamaki ete “paradis ya Mabelé ya ndaka”. Ezali na esika wana mpenza Jéhovah amonanaki lisusu na Abrame mpe alobaki na ye: “Nakopesa mokili oyo na bana na yo.”—Genese 12:5-7.
9. (a) Na lolenge nini ya kokamwa Abrame alandaki komonisa kondima na ye? (b) Liteya nini tozwi na ndakisa na ye?
9 Abrame asalaki likambo mosusu mpo na komonisa kondima na ye. Lisolo eyebisi biso ete “atongaki etumbelo wana mpo na Jéhovah”. (Genese 12:7) Yango elimboli ete boye apesaki mbeka ya nyama, mpamba te liloba ya hébreu ebongolami ete “etumbelo” elimboli “esika mpo na mbeka”. Na nsima, Abrame asalaki makambo mosusu ya motindo oyo moko na bisika bisusu na mokili yango, mpo na komonisa kondima na ye. Epai mosusu, ‘abelelaki nkombo ya Jéhovah’. (Genese 12:8; 13:18; 21:33) Liloba ya hébreu ebongolami ete “kobelela nkombo ya Jéhovah” elimboli mpe “kosakola nkombo yango”. Boye Abrame azalaki na molende ya kosakola nkombo ya Nzambe na ye, Jéhovah, na bato na ndako na ye mpe na Bakanane. (Genese 14:22-24) Bobele bongo, na mikolo na biso, baoyo nyonso balingi kozala baninga na Nzambe basengeli kobelela nkombo na ye na kondima. Esengeli na bango mpe kosangana na mosala ya kosakola, kopesaka epai na “Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso, yango mbuma na bibebu bizali koyambola nkombo na ye”.—Baebele 13:15; Baloma 10:10.
10. (a) Na motindo nini mosusu Abrame amonisaki kondima na ye? (b) Ndakisa nini atikaki mpo na baklisto oyo bazali batata ya mabota? (1 Timote 3:12)
10 Abrame amonisaki kondima na ye epai na Jéhovah na mitindo mingi mosusu. Apesaki mabonza mpo na kobatela kimya, kasi mpe ayikaki mpiko liboso na makambo na mpasi. (Genese 13:7-11; 14:1-16) Atako azalaki na bozwi mingi, atyaki motema na ye na bozwi te. (Genese 14:21-24) Azalaki nde moyambi na bapaya mpe asimbaki losambo ya Jéhovah. (Genese 14:18-20; 18:1-8) Likoló na nyonso, azalaki tata ya libota oyo azalaki kopesa ndakisa malamu mpe azalaki kolanda malako ya Jéhovah, kopesaka etinda na bana na ye mpe na bato na ndako na ye ete nsima na ye, babatela “nzela ya Jéhovah mpo na kosalaka boyengebene”. (Genese 18:19) Bato na ndako na Abrame bakesenaki bongo na Bakanane oyo bafandaki na Sodome mpe Gomore, bamboka mibale penepene wana, oyo bafandi na yango bamibebisaki na bosoto na pite ya mibali na mibali. Abrame akokaki kopesa nzela te ete masumu motindo wana makoka kosalema na ndako na ye. Lokola libota na ye balandaki ndakisa na ye, na kobelelaka nkombo ya Jéhovah na kondima, yango emonisi ete azalaki kokamba ndako na ye na lolenge malamu mpenza.—Genese 16:5, 13; 24:26, 27; 25:21.
‘Alembaki te kati na kondima’
11. Nini esalisaki Abrame ete ayika mpiko na mimekamo azwaki na boumeli ya mbula nkama oyo “afandaki na mokili ya bopaya”?
11 Kondima makasi ya Abrame esalisaki ye ete ayika mpiko na bampasi oyo akutanaki na yango, na mbula nkama oyo afandaki katikati na bato oyo bazalaki komitanga ete bango bankolo mokili. (Genese 12:4; 23:4; 25:7) Biblia elobi: ‘Afandaki lokola mopaya kati na mokili na elaka, kati na hema mpo na ndako, esika moko na Yisaka mpe na Yakobo, basangani na ye na libula na elaka yango. Mpo ete azalaki kozela mboka [Bokonzi na Nzambe] oyo ezali na miboko na solo, Nzambe azali motongi mpe mozalisi na yango. Soko batyaki mitema na esika eutaki bango, mbele bazwaki nzela na kozonga wana.’—Baebele 11:9, 10, 15; tala Baebele 12:22, 28.
12. Libaku nini ya kozonga na Ulu emonanaki noki epai na Abrame, mpe azwaki ekateli ya kosala nini?
12 Nsima mwa moke wana ekotaki Abrame na mokili na Kanana, nzala makasi eyaki na mokili yango. Mbele ekokaki kozala ‘libaku malamu mpo na ye ete azonga’ na Ulu. Mboka yango, penepene na ebale Efalata, ezalaki na mabelé mapolisami malamu mpe ezalaki kotalela mbula te. Nzokande, na esika ete azonga na mboka yango, Abrame atyaki kondima na ye epai ya Jéhovah mpe akendaki nde na Ezipito. Ezalaki likama kokende na mokili yango. Lokola azalaki na mwasi kitoko mpe azalaki mopaya, bomoi na ye ezalaki na likama kati na mokili yango. Kasi alakisaki Saraï aloba te ete azali mobali na ye. Jéhovah apambolaki Abrame mpo na kondima na ye, mpe mwa moke nsima azongaki na Mabelé ya ndaka na bozwi mingi koleka.—Genese 12:10 kino 13:2; 20:12.
13. Elimboli nini makambo oyo ete Saraï azalaki kobota te mpe Abrahame abombaki ete azali mobali na ye te?
13 Makambo oyo mazali mpe eteni moko na elakiseli ya esakweli, kati na yango Abrame azalaki etaliseli mpo na koteya biso, ata ye moko azalaki koyeba yango te. Saraï, oyo azalaki ntango nyonso ekomba, azalaki elilingi na lisangá ya Jéhovah na likoló esalami na baanzelu ya sembo, lisangá oyo ezali lokola mwasi mpo na ye. Mwasi oyo kitoko mpe ya elilingi azelaki bambula koleka 4 000 liboso ya kobimisa libota ya solo ya Abrahame Monene, Jéhovah Nzambe. Monyokoli ya polele oyo basaleli na sembo na Nzambe bazwaki na boumeli ya bambula wana nyonso ya bozeli, emonanaki lokola ete Jéhovah abombaki likambo oyo ete azalaki mobali na mwasi wana.—Genese 3:15; Yisaya 54:1-8; Bagalatia 3:16, 27, 29; 4:26.
14. (a) Lokola Saraï azalaki ekomba, asalaki nini? (b) Eloko nini esalamaki ntango Abrame akomaki na mibu 99, mpe mpo na nini?
14 Nsima na kofanda mbula zomi lokola mopaya na mokili yango, Abrame azalaki na mwana te oyo akokaki kokitana ye. Lokola elikya ezalaki lisusu te, Saraï akamataki moombo na ye Agala mpe apesaki na Abrame ete akoka kobotela ye mwana. Ezali motindo yango Isamaele abotamaki. (Genese 12:4; 16:1-4, 16) Kasi libota ya ndaka oyo ekopesa mapamboli esengelaki kobima na nzela mosusu. Ekomaki Abrame na mbula 99, Nzambe abongolaki nkombo na ye, ekomaki Abrahame, mpo alobaki ete “nakozalisa yo tata na mabota mingi”. Abongolaki mpe nkombo ya Saraï ekomaki Sara mpe alakaki ye ete akobota mwana mobali.—Genese 17:1, 5, 15-19.
15. (a) Mpo na nini Abrahame asekaki ntango ayokaki ete Sara akobotela ye mwana? (b) Ndenge nini Abrahame amonisaki lisusu ete azali na kondima makasi?
15 Abrahame (mpe Sara na nsima) asekaki na kokanisaka likambo yango, mpamba te eleko ya kobota mpo na bango esilaki koleka. (Genese 17:17; 18:9-15) Nzokande, koseka wana elakisaki te ete azangaki kondima. Biblia elimboli: ‘Abetaki ntembe na elaka na Nzambe te, kasi akembaki mingi kati na kondima; apesaki Nzambe nkembo. Andimaki na motema mobimba ete Nzambe akoki kosala yango esili ye kolaka.‘ (Baloma 4:18-21) Bobele na mokolo yango, Abrahame amonisaki ete azali na kondima makasi. Mpamba te, Jéhovah asengaki ye ete amikatisa ngenga elongo na mibali nyonso na ndako na ye, lokola elembo na kondimana oyo asalaki elongo na ye. (Genese 15:18-21; 17:7-12, 26) Abrame asalaki nini nsima na kozwa etinda wana uta epai na Nzambe? ‘Akataki bango ngenga bobele na mokolo yango pelamoko elakaki Nzambe ye.”—Genese 17:22-27.
16. (a) Likambo nini esalamaki na mokolo Yisaka akilisamaki mabele? (b) Kolongolama ya Agala mpe ya lsamaele ezalaki kolakisa nini?
16 Na mbula elandaki, Sara abotaki Yisaka, nkombo oyo elimboli “koseka”. (Genese 21:5, 6) Ekomaki mokolo na kokilisa mwana mabele. Na elambo esalamaki mpo na libaku yango, lsmaele ayokaki zuwa mpe anyokolaki Yisaka. Bongo Sara asengaki na Abrahame ete abengana Agala elongo na mwana na ye. Jéhovah mpe andimaki likanisi yango. Atako ayokaki mawa mingi, Abrahame atosaki noki. (Genese 21:8-14) Engebene Bagalatia 4:21-30, likambo yango ezalaki etaliseli mpo na komonisa ete Abrahame Monene akotya nsuka na boyokani na ye elongo na libota ya Yisraele na mosuni. Lokola bato nyonso, Bayisraele babotamaki kati na boombo na masumu. (Baloma 5:12) Kasi, epai mosusu, baboyaki kondima Yesu Klisto, Libota ya solo ya Abrahame, oyo ayaki mpo na kosikola bango. (Yoane 8:34-36; Bagalatia 3:16) Motindo Isamaele anyokolaki Yisaka, bobele bongo Yisraele ya mosuni banyokolaki Yisraele ya elimo, lisangá ya boklisto oyo eutaki kosalema sika, eteni ya mibale ya libota ya Abrahame.—Matai 21:43; Luka 3:7-9; Baloma 2:28, 29; 8:14-17; 9:6-9; Bagalatia 3:29.
Komekama ya kondima na ye oyo elekaki monene
17. Na nsima etinda nini emekaki makasi kondima ya Abrahame?
17 Bolingo bozalaki na Abrahame, mobange, mpo na mwana na ye Yisaka, ezalaki solo bolingo monene oyo mbala mosusu tata mosusu te akoki kooka bongo mpo na mwana na ye. Kanisa eloko nini ayokaki ntango Nzambe apesaki ye etinda oyo: “Kamata mwana na yo, mwana na yo bobele moko, Yisaka, oyo yo olingi ye mingi, mpe kenda na mokili na Moliya mpe kaba ye pelamoko mbeka na kotumba kuna na likoló na ngomba ekolobela ngai yo.”—Genese 22:1, 2.
18. Abrahame asalaki nini ntango Jéhovah apesaki ye etinda ete apesa Yisaka lokola mbeka?
18 Na ntembe te Abrahame akokaki koyeba te ntina na etinda makasi boye. Nzokande, lokola momeseno, atosaki noki. (Genese 22:3) Atambolaki mikolo misato, mikolo na mpasi mingi, liboso ya kokoma na ngomba oyo Nzambe aponaki. Atongaki etumbelo likoló na yango abongisaki nkoni mpo na mbeka. Na kati wana, boye ayebisaki Yisaka eloko nini alingaki kosala, mpe mbele lsaka akokaki kokima. Kasi Yisaka amitikaki ete tata na ye mpaka akanga ye makolo mpe maboko, mpe alalisa ye likoló na etumbelo. (Genese 22:4-9) Ndenge nini tokoki kolimbola botosi motindo oyo?
19. (a) Tokoki koloba boni mpo na botosi mpe mpiko ya Yisaka? (b) Na mikolo na biso, liteya nini mabota ya baklisto bakoki kozwa na boyokani oyo ezalaki kati na Abrahame mpe Yisaka?
19 Lokola emonisi yango Genese 18:19, Abrahame akokisaki mikumba na ye nyonso epai na Yisaka. Na ntembe te boye ateyaki malamumalamu na mwana na ye mokano ya Jéhovah ya kosekwisa bakufi. (Genese 12:3; Baebele 11:17-19) Mpo na Yisaka, ye alingamaki mingi na tata na ye Abrahame, mpe na ntembe te alingaki kosepelisa ye na makambo nyonso, mingimingi wana ekomaki ntango ya kosala mokano na Nzambe. Ezali solo liteya kitoko mpo na mabota ya baklisto na ntango na biso!—Baefese 6:1, 4
20. Ndenge nini Abrahame amonisaki botosi na ye, mpe ndenge nini azwaki mbano?
20 Komekama ekomaki na nsuka na yango. Abrahame akamataki mbeli mpo na koboma mwana na ye, nde na ntango wana Jéhovah akangisaki ye nzela mpe alobaki na ye: “Sikawa nayebi ete obangi Nzambe, mpo ete oboyi kopesa ngai mwana na yo te, mwana na yo bobele moko.” (Genese 22:11, 12) Ezalaki solo mbano kitoko mpo na Abrahame na koyoka Nzambe ye mpenza apesaki litatoli mpo na boyengebene na ye! Amonaki ete akokisi oyo Nzambe azali kosenga epai na moto azangi kokoka. Likambo eleki ntina, kosepela oyo Jéhovah asepelaki liboso mpo na kondima na ye elongisamaki. (Genese 15:5, 6) Nsima na yango, Abrahame atumbelaki Nzambe mbeka na mpate mobali, oyo Nzambe ye moko apesaki yango na ekamwiseli, na esika ya Yisaka. Na nsima ayokaki lisusu Jéhovah azongelaki bilaka na ntina na kondimana oyo asalaki elongo na ye. Na nsima, abengamaki moninga ya Jéhovah.—Genese 22:13-18; Yakobo 2: 21-23.
21. Komekama yango etalisaki nini kati na esakweli, mpe esengeli kolendisa biso na koluka nini?
21 Mbeka oyo Abrahame andimaki kopesa ezalaki “elakiseli”., (Baebele 11:19) Elakisaki mbeka ya motuya mingi mpe esalaki ye mpasi mingi, oyo Jéhovah Nzambe apesaki ntango atindaki Mwana na ye molingami na mabelé mpo ete akufa lokola “Mwana na mpate na Nzambe, molongoli na lisumu na mokili”. (Yoane 1:29) Likambo oyo ete Yisaka andimaki kokufa elakisaki ete Yisaka Monene, Yesu Klisto, akondima na bolingo nyonso kosala mokano na Tata na ye na likoló. (Luka 22:41, 42; Yoane 8:28, 29) Mpo na kosukisa, lokola Abrahame azwaki mwana na ye na bomoi uta na etumbelo, bobele bongo Jéhovah azwaki Mwana na ye molingami longwa na bakufi lokola ekelamu ya elimo mpe ya nkembo. (Yoane 3:16; 1 Petelo 3:18) Oyo nde elendiseli mpo na baoyo balingi kozala baninga na Nzambe na mikóló na biso!
22. Ndenge nini etuluku moko ya bato baponami bazwi litomba na bolingo monene na Nzambe?
22 Lokola bazali na kondima kati na likambo oyo ya bolingo mingi esalamaki na Abrahame monene, Jéhovah Nzambe, etuluku moko ya bato baponami batangami bayengebene lokola bana na Nzambe. (Baloma 5:1; 8:15-17) Bato yango baponamaki liboso kati na Bayuda, na nsima kati na Bapakano; bazali solo bapambwami na nzela na Libota ya Abrahame, Yesu Klisto. (Misala 3:25, 26; Bagalatia 3:8, 16) Bango bazali eteni ya mibale ya libota ya Abrahame. (Bagalatia 3:29) Motuya na bango mobimba ekozala 144 000. Na ndakisa na Yesu, bango mpe bazali kosekwisama mpo na bomoi ya likoló nsima na komimonisa sembo kino na kufa.—Baloma 6:5; Emoniseli 2:10; 14:1-3.
23. (a) Ndenge nini bamilió na bato bazali kopambwama na nzela na batikali na libota na Abrahame? (2 Bakolinti 5:20) (b) Mapamboli nini mosusu mazali kozela “ebele monene”?
23 Bobele na ntango yango, bamilió na bato bauti na mabota nyonso ‘bazali kopambwama’ na koyambaka malamu mosala oyo batikali moke na libota na Abrahame bazali kosala na bolingo. (Genese 22:18) Mayoki na motema na bango masimbamaki na koyoka ete bato na masumu bakoki kotangama bayengebene lokola baninga na Nzambe. Na motindo yango, ‘ebele monene ya bato bauti na mabota nyonso’ bandimami na Nzambe. “Basukoli nzambala na bango mpe bayeisi yango mpembe na makila na Mwana na mpate”. Na ndakisa ya baklisto bapakolami, bango mpe bazali “kosalela Nzambe mosala ya bosantu, butu na moi”. Ebele monene oyo bazali na elikya kitoko mingi ya kozala na bomoi ya seko kati na Paradis na mabelé lokola “bana na Nzambe”. (Emoniseli 7:9-17; 21:3-5; Baloma 8:21; Nzembo 37:29) Kasi liboso ete mapamboli yango mazwama, makambo na ntina mingi masengeli kosalema. Ezali yango ekomonisama na lisolo oyo ezali kolanda.
Bozongeli
◻ Ndenge nini kondima ya Abrahame mpe ya libota na ye emekamaki?
◻ Na mikolo na biso, ndenge nini baklisto bazali komonisa kondima motindo moko?
◻ Na mitindo nini mosusu Abrahame amonisaki kondima?
◻ Na nini Abrahame, Sara mpe Yisaka bazali bandakisa mpo na mabota ya baklisto?
◻ Likambo monene ya kondima ya Abrahame emonisaki nini?
(b) Na makambo nini Sara azali ndakisa mpo na basi baklisto lelo?