Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/7 lok. 13
  • Nsango malamu ya Bokonzi na Australie

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsango malamu ya Bokonzi na Australie
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokimi moko ya ekolo Viêt Nam
  • Solo esimbi motema ya mwasi moko oyo afandaka na mboka
  • Telefone eleli na esika oyo ekanamaki te
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • “Longwa na minɔkɔ na bana”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • “Mokapo nyonso oyo azalaki kotanga esimbaki motema na ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Yehova azali na makasi koleka banguna na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/7 lok. 13

Masolo ya basakoli ya Bokonzi

Nsango malamu ya Bokonzi na Australie

LOKOLA na mikili misusu 211, ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na molende nyonso na Australie. Batemwe koleka 49 000 ya mboka wana ezwami na nsuka ya mokili bazali kosepela na mapamboli minene. Na boumeli ya mibu, bapaya mingi ya bikolo ndenge na ndenge bayaki kofanda kuna, na boye ete masangá 58 ya minoko na bapaya mazali lelo kosangana na mosala ya kosakola Filiale ya la Société Watch Tower na Australie etindelaki biso mwa masolo oyo ya kolendisa:

Mokimi moko ya ekolo Viêt Nam

Mokimi moko ya ekolo Viêt Nam, oyo sikawa azali kofanda na Australie, abokwamaki kati na liteya moko oyo ezali kokumisa losambo na bakufi, na confucianisme (losambo ebandisamaki na filozofe Confucius, ye moto na Chine), na budisme mpe filozofi mosusu ya bato na Azia mpe Eropa. Kino na 1975, azalaki kobunda kati na limpinga ya Viêt Nam du Sud. Na 1979, bakataki ye loboko ya mwasi mpo na mwa mbuma moko oyo ebimaki ye. Lokola azalaki na mposa makasi ya bonsomi, na 1983 amikotisaki kati na masuwa moko ya moke elongo na bato 24 mosusu mpo na kokima Viêt Nam. Nsima na kosala bokutani moko ya nsomo na batomboki, masuwa ekotaki kati na ebale monene ya Chine na boumeli ya mikolo motoba, na nse ya moi makasi, liboso ete ekoma penepene na Malaisie. Na nsuka ya sanza mitano oyo balekisaki kati na camp moko ya bakimi (réfugiés), mobali yango azwaki ndingisa ya kofanda na Australie. Sanza misato na nsima, ayokaki masolo na ntina na solo. Maloba na Yesu oyo mazwami kati na Yoane 8:32 mapesaki eyano na mposa na ye mozindo ya bonsomi: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” Batemwe bamonisaki ye bolingo mingi. Lelo oyo azali Témoin de Jéhovah, ye mpe azali sikawa kosalisa bato mingi oyo balobaka lokota ya mboka Viêt Nam na koyeba solo oyo ezali kosikola.

Solo esimbi motema ya mwasi moko oyo afandaka na mboka

Na nord-ouest ya Australie, wana ezalaki ye kosakola na bato ya ekolo moko oyo bafandaka na mboka kati na esika moko ebengami “La lainerie”, elenge pionnier moko elongo na moninga na ye bakutanaki na mwasi moko. Ntango ayokaki ntina ya boyei na bango, mwasi wana akamataki fungola oyo azalaki kolata na nkingo mpo na kofungola ebakata na sanduku ya manzanza. Kozanga komizela na likambo yango, Batemwe wana mibale bamonaki bongo, na katikati ya biloko na ye moko, ba brochures mibale ya la Société Watch Tower mpe Biblia moko oyo enuni. Bafandaki na mabelé mpe babandaki boyekoli na kosalelaka moko na ba brochures yango mibale. Atako ayebaki kotanga mpe kokoma te, mwasi yango azalaki kopesa motuya monene na ba brochures wana asilaki komisombela liboso. Na esengo na ye monene, azali sikawa koyekola mbala na mbala.

Telefone eleli na esika oyo ekanamaki te

Na Sydney, engumba ya milió misato na bato, elenge mwasi ya mibu misato oyo azalaki kosakana na telefone abongisaki nimero moko kozanga kokanela yango. Emonanaki ete ezalaki nimero ya mwasi moklisto moko Témoin de Jéhovah. Ntango azwaki telefone, akanisaki liboso ete ezalaki nkoko na ye ya moke ya mobali. Na nsima, ayokaki mongongo ya mokolo; ezalaki mama ya mwana mwasi wana ya moke, oyo azalaki kosenga ye bolimbisi. Lisolo elandaki, na boumeli na yango ndeko mwasi apesaki litatoli. Molobani na ye akamwaki na maloba oyo: “Nazalaki mpenza na elikya ete Batemwe bakoleka lisusu epai na ngai. Nazali na mposa ya kokoma Témoin de Jéhovah!” Mpe alimbolaki ete eutaki koleka sanza mibale, akendaki na Pérou mpe asepelaki mingi na etambweli ya mama leki na ye mpe ya bandeko na ye mosusu baoyo bakomaki ba Témoins de Jéhovah. Abakisaki: “Bana oyo bazalaki mpenza bademo mike bakomi sikawa baanzelu!” Bibongiseli bikamatamaki mpo na boyekoli ya Biblia, mpe mwasi yango azali se kokola-nyonso wana ezali mpo na telefone oyo mwana na ye ya mwasi ya moke alelisaki na esika oyo ekanamaki te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto