Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/7 nk. 20-24
  • Libala oyo ekopesa matomba epai na bankoto na bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libala oyo ekopesa matomba epai na bankoto na bato
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzambe aponi mwasi mpo na Yisaka
  • Ezalela ya mwasi mpe ya basaleli na ye
  • Libala ya lsaka Monene
  • Libala na Mwana na Mpate ebelemi
  • Rebeka alingaki kosepelisa Yehova
    Teyá bana na yo
  • Rebeka andimaki kosepelisa Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Bakei koluka mwasi mpo na Yisaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • “Nandimi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/7 nk. 20-24

Libala oyo ekopesa matomba epai na bankoto na bato

“Jéhovah Nzambe na biso, Mozwi-na-Nguya-Nyonso, asili kobanda koyangela . . . tokumisa ye mpo ete libaku na Mwana na Mpate esili koya. Mwasi na ye asili komibongisa nzoto‘’​—EMONISELI 19:6, 7, M.N.

1. Ntango nini loyembo na esakweli ekomami na Emoniseli 19:6-8 ekoyembama, mpe mpo na nini?

MALOBA oyo ya ntina mingi mazwami na loyembo moko ya esakweli mpo na bolongi. Ntango nini nzembo yango ekoyembama? Ekozala nsima na kobomama na monguna monene ya losambo ya Jéhovah, “Babilone Monene”, “mwasi na pite” na elilingi, elingi koloba mangomba nyonso ya lokuta. Babilone Monene esengeli kobomama, mpamba te elobi lokuta mingi na nkombo ya Nzambe. Esili kozimbisa mokili na ndenge emikotisi kati na makambo na politike, na kosalaka na lokoso mpe na koyinaka mpe kobomisaka basambeli ya solo ya Jéhovah.​—Emoniseli 17:1-6; 18:23, 24; 19:1, 2; Yakobo 4:4.

2. (a) Ndenge nini Jéhovah akoboma Babilone Monene? (b) Na esika ete bakumisa Jéhovah, bakonzi ya mokili bakosala nde nini nsima na koboma mangomba ya lokuta?

2 Mosika te, Jéhovah Nzambe akotia na motema na bakonzi ya politike likanisi ya koboma ye. (Emoniseli 17:12, 16, 17) Nzokande, ata bakoboma mangomba ya lokuta, elingi koloba te ete bakosangana mpo na koyemba loyembo oyo ekomami awa na likoló. Nkutu, na kopusama na Satana, to Gog, bakobundisa basambeli ya solo oyo bafandi na kimya mpe bamikaboli na mabe oyo mazali kosalema na mokili.​—Yisaya 2:2-4; Ezekiele 38:2, 8-12; Yoane 17:14; Yakobo 1:27.

3. Mpo na bantina nini basaleli na Jéhovah awa na mabelé bakosangisa mingongo na bango mpo na koyemba loyembo euti na likoló?

3 Likambo wana oyo bakonzi ya politike bakosala mpo na kobundisa libota ya Nzambe ekotumola nkanda ya Nzambe mpe ye akokweisa bongo etumba ya Armagedon, na boumeli na yango mokili oyo eboyi Nzambe ekobomama nyonso. Nsima na yango Satana mpe bilimu mabe bakokangama. (Emoniseli 16:14, 16; 19:11-21; 20:1, 2) Na botondi nyonso na motema, bato nyonso oyo bakobika bakosangisa mingongo na bango mpo na koyemba loyembo oyo euti na likoló: “Bokumisa Jah, mpo ete Jéhovah Nzambe na biso, Mozwi-na-Nguya-Nyonso asili kobanda koyangela.” (Emoniseli 19:6) Makambo wana oyo makoningisa mokili makozala ebandeli na eleko moko ya sika. Wana Jéhovah akolongisa bokonzi na ye mpe akolimwisa na mabelé bato nyonso oyo bazali kobeta ntembe mpo na bokonzi na ye. Ngonga ekokoka mpo libala esalama na likoló. Loyembo wana ya esakweli elandani boye: “Tosepela, tozala na esengo; tokumisa ye mpo ete libala na Mwana na Mpate esili koya. Mwasi na ye asili komibongisa nzoto.”​—Emoniseli 19:7, 8.

4. (a) Mwana na Mpate azali nani mpe “mwasi” na ye azali nani? (b) Mituna nini mitunami, mpe ndenge nini tokoki koyanola yango?

4 Mwana na mpate ezali Yesu Klisto akembisami, mpe “mwasi” na ye ezali liboke mobimba ya bayekoli ya sembo 144 000 bapakolami oyo bakosangana elongo na ye na likoló. Bango wana elongo, mobali mpe mwasi na ye na likoló nde bakokisi motuya mobimba na basangani ya Bokonzi na Nzambe, oyo bakotombola bato, bakisa basekwi, na ezalela ya kokoka ya bato bazangi masumu. (Emoniseli 5:8-10; 14:1-4; 20:4, 12, 13; 21:3-5, 9, 10; 22:1-3) Makambo oyo makozala liboso na libala wana ya kopambwama, makoleka malamu? Ndenge nini okoki kozwa litomba na libala yango? Mpo na koyanola na mituna yango, totalela lisolo ya libala ya Yisaka, ndenge eyebisami na mokapo 24 ya Genese.

Nzambe aponi mwasi mpo na Yisaka

5, 6. Mpo na nini Abrahame alingaki soko moke te ete Yisaka abala mwasi Mokanane, mpe yango ezali ndakisa malamu mingi mpo na banani lelo? (1 Bakolinti 7:39)

5 Lisolo yango ebandi na maloba na Abrahame epai ya kapita ya basali na ye, na ntembe te Eliezele. (Genese 15:2; 24:2) Abrahame alobaki na ye: “Nakokatisa yo ndai na nkombo ya Jéhovah, Nzambe na likoló mpe na mokili, ete okokamatela mwana na ngai mwasi kati na basi na Kanana te, baoyo nazali kofanda kati na bango. Nde okokenda na mokili na ngai mpe na libota na ngai mpe okokamata mwasi mpo na mwana na ngai lsaka.”​—Genese 24:3, 4.

6 Mpo na nini Abrahame alingaki soko moke te ete mwana na ye abala mwasi Mokanane? Ezali mpo ete Bakanane bazalaki bakitani na Kanana, oyo alokamaki na Noé. (Genese 9:25) Epai mosusu, bayebanaki mpo na misala na bango mabe, mpe mingimingi mpo ete bazalaki kosambela Jéhovah te. (Genese 13:18; Levitike 18:3, 17-28) Yango wana Abrahame alingaki ete mwana na ye abala mwasi kati na libota na ye, bakitani na Semi, oyo Noé apambolaki ye na kopemama na Nzambe. (Genese 9:26) Ezali wana ndakisa moko malamu mingi mpo na baklisto oyo bazali kokana kobala na mikolo na biso.​—Deteronome 7:3, 4.

7. Ndenge nini Abrahame abongisaki Eliezele mpo na kotinda ye na mobembo?

7 Eliezele asimbaki nzela mpo na mobembo molai ya bakilometre koleka 800 kino na Mezopotami. Amilengelaki malamu mpo ete akumbaki biloko mingi likoló na bachamo zomi. (Genese 24:10) Epai mosusu, akokaki kokanisa maloba oyo ya nkolo na ye, makokaki kolendisa kondima na ye: “Jéhovah, Nzambe na likoló, . . . akotinda anzelu na ye na liboso na yo, mpe okokamata mwasi mpo na mwana na ngai kuna.”​—Genese 24:7.

8, 9. (a) Likambo nini esalamaki ntango Eliezele akomaki na mboka ya Nahola? (b) Asalaki nini mpo akoka kopona mwasi malamu mpo na Yisaka?

8 Na nsuka na mobembo na ye, akomaki kino na mboka na Nahola, kuna na nord na mokili na Mezopotami. Agumbisaki bachamo mabolongo penepene na liziba na mai, na libanda na mboka mpo ete balembaki mingi. Ezalaki ngonga oyo basi bazalaki na momeseno ya kokenda kotoka mai -libaku malamu mpo na Eliezele ete apona mwasi mpo na lsaka! Kasi ekokaki azala elenge mwasi ya motindo nini? Oyo aleki bonzenga? Te. Eliezele azalaki koluka liboso na nyonso mwasi moko oyo azali na bomoto kitoko na miso na Nzambe. Ezali yango emonisami na libondeli ya kosokema oyo abondelaki na ntango yango: “O Jéhovah, Nzambe na nkolo na ngai Abrahame, salisa ngai lelo mpe lakisa ete olingi nkolo na ngai Abrahame. Nakotikala penepene na liziba ntango bana basi bakoya mpo na kotoka mai. Soko nalobi na mwana moko: kitisa elókó na yo namela mai, soko mwana azongisi: Mela na yo, tika namelisa mpe bachamo na yo, nakoyeba ete azali mwasi oyo olingi kopesa lsaka, mosaleli na yo. Boye nakomona mpe bolingo olakisi nkolo na ngai.”​—Genese 24:11-14; Liloba lya Nzambe.

9 Yango ezalaki solo komekama mpo na kotala. Engebene buku la Nouvelle Encyclopédie britannique, chamo oyo ayoki mposa ya mai mpenza akoki komela ‘95 litres (bidons zomi na libwa ya balitres mitano na moko) ya mai na 10 minutes’. Ata soki bachamo ya Abrahame eyokaki mposa makasi ya mai na motindo yango te, basi na ntango wana bayebaki solo ete banyama wana bazalaka komela mai mingi. Esengelaki mwasi na motema malamu, oyo alingi mosala mpe azali na molende mpo na kondima ye moko ete amelisa bachamo zomi balembi, ya moto oyo ye ayebi te.

10, 11. (a) Motindo nini libondeli ya Eliezele eyokamaki? (b) Ndenge nini Rebeka amonisaki bizaleli malamu mingi? (c) Na ntango yango Eliezele asalaki nini?

10 Naino Eliezele asilisaki kosambela te, losambo na ye endimamaki, mpamba te lisolo elobi: “Tala Rebeka azalaki koya . . . Ye azalaki elenge mwasi kitoko, abali naino te, ayebi mpe mobali te. Akiti na liziba, atondisi elókó mpe abuti lisusu. Mosali akei mbangu, alobi na ye: Nabondeli yo, tika namela ata moke na elókó na yo. Elenge mwasi ayanoli: Mela na yo, tata, mpe akitisi elókó ya mai. Awa asili kopesa ye mai, alobi: Tika natoka mpe mpo na bachamo na yo, yango mpe esilisa mposa. Asopi elókó na ye mobimba na katini ya bachamo, mpe azongi noki na liziba kotoka lisusu mpe lisusu. Amelisi bachamo nyonso.”​—Genese 24:15-20; Liloba lya Nzambe.

11 Eliezele azalaki se “kotala ye na kokamwa nyonso”; libondeli na ye eyokamaki na ekamwiseli. Ntango elenge mwasi oyo abongi kokumisama asilisaki komelisa bachamo, Eliezele apesaki ye mbano ya lopete moko ya zolo mpe minyololo mibale ya wolo ya kolata na maboko (bracets). Na nsima atunaki ye: “Yo ozali mwana na nani?” Ntango ayokaki ete azali mwana na mwana na ndeko na Abrahame, Eliezele akumbamaki liboso na Jéhovah mpo na kosambela ye na limemya nyonso, mpe alobaki: “Tika ete Jéhovah, Nzambe na nkolo na ngai Abrahame akumisama. Alakisi bolingo mpe ngolu epai na nkolo na ngai! Akambi ngai na nzela mpe akomisi ngai epai ya bandeko ya nkolo na ngai.”​—Genese 24:21-27; Liloba lya Nzambe.

12. Baboti na Rebeka balobaki nini?

12 Rebeka akendaki mbangu koyebisa makambo yango na baboti na ye. Na nsima, ntango tata mpe ndeko mobali na Rebeka bayokaki na monoko na Eliezele ye moko ntina na mobembo na ye mpe motindo Jéhovah ayokaki libondeli na ye, bakakatanaki te, bandimaki ete Rebeka akoma mwasi ya Yisaka. “Eyoki mosali na Abrahame maloba na bango, afukami na nse, akumisi Jéhovah. Abimisi biloko ya motuya, wolo na palata na bilamba, apesi Rebeka. Apesi mpe mabonza na motuya mingi na ndeko na ye mpe na mama na ye.”​—Genese 24:52, 53; Liloba lya Nzambe.

Ezalela ya mwasi mpe ya basaleli na ye

13. Nini emonisaki ete Jéhovah aponaki mwasi malamu?

13 Ndenge nini Rebeka atalelaki libaku malamu ya koponama na Nzambe mpo na kokoma mwasi ya Yisaka? Na mokolo elandaki, mayoki na ye mozindo mamonisamaki. Esilaki ye kokokisa ntina na mobembo na ye, Eliezele alukaki kozonga noki epai na nkolo na ye. Kasi libota ya Rebeka balingaki kotikala na ye naino ata mikolo zomi. Bongo batunaki Rebeka soki andimi kokende noki. Azongisaki ete “Nalingi”. Na kondimaka kotika libota na ye kozanga kozelisa mpe kondima kokende na mokili mosika mpo na kobalama na mobali oyo amona naino ye te, amonisaki kondima makasi na motindo Jéhovah azali kotambwisa makambo. Yango emonisaki ete Nzambe aponaki mwasi oyo abongaki.​—Genese 24:54-58.

14. (a) Banani bakendaki elongo na Rebeka? (b) Mobembo ya motindo nini ezalaki liboso na bango?

14 Rebeka akendaki ye moko te. Lisolo eyebisi boye ete: “Rebeka, elongo na basaleli na ye [ya basi] batelemi, babuti likoló na bachamo.” (Genese 24:61) Basimbaki bongo nzela mpo na mobembo ya makama mingi, bakilometre koleka 800 kati na mokili ya bopaya. Engebene mokanda Le monde animal (na Anglais), “vitese ya botamboli ya chamo oyo akumbi bozito ezali penepene na kilometre 4 na ngonga moko”. Soki bachamo ya Abrahame etambolaki bongo ngonga mwambe na mokolo moko, esengelaki na bango mikolo koleka 25 mpo na kokoma esika efandaki Abrahame na régió ya Neguebe (eteni moko na mokili na Kanana).

15. (a) Ndakisa nini ya malamu mingi epesameli biso na Eliezele, na Rebeka mpe na basaleli na ye ya basi? (b) Makambo yango mazalaki elilingi ya nini?

15 Eliezele, mpe Rebeka elongo na basaleli na ye ya basi, batyaki elikya nyonso epai na Jéhovah ete akotambwisa bango. Tala ndakisa malamu mingi mpo na baklisto ya lelo! (Masese 3:5, 6) Epai mosusu, lisolo yango ezali esakweli oyo ezali kolendisa kondima na biso. Lokola tomonaki yango, Abrahame elakisi Jéhovah Nzambe, oyo apesaki Mwana na ye molingami, Yisaka Monene, mpo ete bato basikwama na masumu mpo na kozwa bomoi ya seko. (Yoane 3:16) Libala ya Yisaka esalamaki mwa moke nsima wana bomoi na ye ebikisamaki likoló na etumbelo na mbeka. Yango ezali elilingi na esakweli na kobongisama na libala na likoló oyo ebandaki mpenza nsima na lisekwa na Yesu.

Libala ya lsaka Monene

16. (a) Mpo na nini mosaleli na Abrahame abongi mpo na kozala elilingi na elimo santu na Nzambe? (b) Motuna nini motunami na ntina na elimo mpe na mwasi na libala?

16 Nkombo Eliezele elimboli “Nzambe na ngai azali mosungi”. Eliezele, kolandaka ndimbola ya nkombo na ye mpe misala na ye, azalaki elilingi mpenza ya elimo santu ya Abrahame Monene, Jéhovah Nzambe, elimo santu oyo atindaki awa na mabelé, ekokani na mokili mosika, mpo na kopona awa mwasi abongi na lsaka Monene, Yesu Klisto. (Yoane 14:26; 15:26) Kelasi na mwasi na libala ezali “lisangá”, oyo esalami na bayekoli na Yesu babotami na elimo santu mpo na kozala bana na Nzambe na elimo. (Baefese 5:25-27; Baloma 8:15-17) Rebeka azwaki makabo ya motuya mingi; bobele bongo basangani ya liboso ya lisangá ya boklisto bazwaki makabo na ekamwiseli na mokolo na Pantekote ya mobu 33, komonisaka ete babengamaki na Nzambe. (Misala 2:1-4) Na ndakisa ya Rebeka, basili kotika makambo nyonso ya mokili mpe bondeko moko te ya mosuni ekoki kopekisa bango kolanda Mobali na bango na likoló. Uta ntango babengami kino na kufa na bango, kelasi na mwasi basengeli komibatela baseka na elimo na boumeli ya mobembo na bango katikati na mokili oyo etondi na makama mpe oyo Satana azali kosalela mpo na kozimbisa bato. (Yoane 15:18, 19; 2 Bakolinti 11:3; Yakobo 4:4) Etondi bango na elimo santu, kelasi na mwasi bazali kobenga bato mosusu ete bazwa litomba na bibongiseli oyo Jéhovah asili kokamata mpo na lobiko. (Emoniseli 22:17) Bino mpe bozali kolanda ndakisa na ye na kondimaka kotambwisama na elimo?

17. (a) Bachamo zomi ezali elilingi ya nini? (b) Ezalela na biso esengeli kozala nini epai na Biblia mpe na mikanda mikolimbolaka Biblia, oyo kelasi na mwasi na libala ezali kobimisela biso? (Misala 17:11)

17 Kelasi na mwasi na libala bazali kopesa motuya monene na eloko elakisamaki na bachamo zomi. Kati na Biblia, motango zomi elakisaka ezalela ya kokoka mpo na oyo etali biloko ya mabelé. Bachamo zomi ekoki bongo kozala elilingi na Liloba na Nzambe, oyo ezali mobimba mpe ya kokoka, na nzela na yango kelasi na mwasi na libala bazali kozwa bilei mpe makabo na elimo. (Yoane 17:17; Baefese 1:13, 14; 1 Yoane 2:5) Na ntina na mosala oyo Rebeka asalaki ya komelisa bachamo mai, La Tour de Garde ya 1er Mai 1949 epesaki ndimbola elandi, na kokokisaka yango na baye basali kelasi na mwasi na libala: “Bazali na limemya mingi mpo na Liloba na Nzambe oyo ezali kopesa bango ndambo monene na elimo yango. Bazali koluka litomba na bango kati na Liloba na Nzambe ekomami, bazali kosalela yango, bazali ntango nyonso koyoka mposa na Liloba na Nzambe na kotosaka yango, na komonisaka botondi na bango mozindo mpo na nsango ezali kati na yango mpe mokano na yango mpe na kolukaka kokolisa boyebi na bango ya Liloba yango.” Na ndakisa, na bolingo nyonso, batikali na kelasi na mwasi babimisi mpo na litomba ya bamilió ya bato libongoli moko kitoko ya Biblia: Les Saintes Ecritures Traduction du monde nouveau. Ata Biblia yango esili kobongolama na monoko na yo to te, omonisaka botondi na yo na koyekolaka Biblia ntango nyonso mpe mikanda ya boyekoli Biblia oyo mipesameli biso na kelasi na moombo?​—2 Timote 3:16.

Libala na Mwana na Mpate ebelemi

18. Mpo na nini basaleli ya Rebeka babongi mpo na kozala elilingi ya bato oyo bazali kosalisa mwasi na libala na mikolo na biso?

18 Wana ete mokili oyo ya Satana ezali na mikolo na yango ya nsuka, “ebele monene” na bato bakokani na “basaleli” ya Rebeka basangani esika moko na batikali na kelasi na mwasi ya libala. Basaleli na Rebeka bazalaki mingi, bobele bongo motuya na bato oyo bazali kolanda kelasi na mwasi na libala ezali mingi koleka ba 144 000. Bango bazali “ebele monene” na “bampate mosusu” na Yesu Klisto. (Emoniseli 7:4, 9; Yoane 10:16) Na motindo na bango ya basaleli ya sembo ya mwasi ya libala, bato yango basengeli mpe kosenzela ete babebisama te na mokili mabe oyo etambwisami na Satana. Basengeli mpe komitika kotambwisama na elimo ya Jéhovah mpe na Liloba na ye, oyo kelasi na mwasi na libala ezali kolimbwela bango. Kasi mbano na bango ekeseni. Soki balandi kosunga na bosembo nyonso mwasi na libala na Klisto, bakobika na nsuka na mokili oyo ya Satana mpe bakozala na elikya kitoko ya kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis.-Emoniseli 21:3, 4.

19. Nini esalamaki ntango Rebeka mpe basaleli na ye bakomaki na nsuka na mobembo na bango?

19 Rebeka na “basaleli” na ye bakomaki malamu? Ee. Biblia elobi: “Na mpokwa Yisaka abimaki mpo na kotambola na elanga. Afungolaki miso mpe atalaki mpe amonaki bachamo bazalaki koya. Rebeka afungolaki miso, mpe emonaki ye Yisaka, akitaki na chamo.” Nsima wana Eliezele asololaki ndenge mobembo na ye elekaki malamu, Yisaka akamataki Rebeka mpe ye akomaki mwasi na ye mpe “alingaki ye”.​—Genese 24:63-67.

20. Esengo nini etalisamaki na elilingi na libala ya lsaka?

20 Bobele bongo, mokano oyo Jéhovah asili kokana mpo na mwasi na Klisto ekoki kokwea te. (Yisaya 55:11) Mosika te, Babilone Monene oyo esili kokweisama ekobomama, mpe batikali na kelasi na mwasi bakosilisa mobembo na bango. Na ntango wana, ngonga ekokoka mpo na bango ete bakabwana na baninga na bango oyo bazali kosala mosala esika moko na bango, mpe basangana na libala elongo na Yisaka Monene kuna na likoló. Ekozala ntina na esengo monene na molongo mobimba!-Emoniseli 19:6-8.

21. Wana ete libala na likoló elingi kosalema, biso banso tosengeli kosala nini?

21 Na kozelaka ntango yango, bamilió na bato bazali kopambwama uta sikawa na koyambaka malamu nsango esakolami na batikali na kelasi ya mwasi, oyo motuya na bango ezali se kokita. Liboso ete bango nyonso basilisa bomoi na bango na mabelé na nzela na kufa, mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, oyo makokani na mwasi na pite, makobomama, mpe ekozala wana ebandeli na “bolozi monene, lokola emonani naino te longwa na ebandeli ya mokili”. Ntango etikali eyei mokuse. Soki olingi kobika, osengeli kotosa mibeko ya Nzambe. (Matai 24:14, 21; Malako 13:10; Luka 21:15; Yoane 13:34) Mibeko yango mizali na ntina mingi mpo na eleko na biso oyo moto na moto asengeli kozwa ekateli. Ata ozali moko na kelasi na batikali na mwasi to moko kati na “ebele monene” oyo bazali kosala na bango esika moko, landa kotosa Jéhovah. Kosalaka bongo, okokumisa ye mpe okozala na elikya ya kozwa bolamu ya seko. Oyo nde esengo ekozala na ebele monene ntango Jéhovah, oyo azali kotalela bango uta sikawa lokola baninga na ye, ‘akosala biloko nyonso biloko na sika mpe akopesa bolamu ya seko na bamilio na bato na mabelé oyo makobongwana paradis!​—Emoniseli 21:5; 22:1, 2, 17.

Bozongeli

◻ Makambo nini ya ntina mingi makosalema mosika te?

◻ Nini emonisi ete libala na likoló ekolonga na makambo nyonso?

◻ Na mikolo na biso, nani akokani na Rebeka mpe na basaleli na ye?

◻ Lisolo ya libala ya lsaka eteyi biso nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto