Mituna na batangi
◼ Mitinda na Biblia mizali kopesa nzela na babalani baklisto ete basalela nkisi ya monganga (pilule) lokola mwango ya kopekisa kobota?
Makomami mazali koyebisa sikisiki te ete babalani baklisto basengeli kobota bana, to motuya boni ya bana basengeli kobota. Ezali likambo ya babalani na kozwa ekateli elongo soki balingi komeka kotia ndelo na bonene ya libota na bango. Soki bandimi kosala yango, liponi ya metode na bango oyo bakosalela mpo na kopekisa kobota etali mpe bango mibale. Nzokande, na boyokani na mayele na bango ya Biblia mpe elongo na lisosoli na bango, basengeli komituna soki bazali komemya kobulisama ya bomoi na kosalelaka metode moko to mosusu mpo na kopekisa kobota.
Biblia ezali komonisa ete bomoi ya moto ezali kobanda uta ebandeli ya zemi; Mozalisi azali komona bomoi oyo esili kosalama, ’‘embryon” to ebandeli ya mwana oyo esengeli kokola kati na libumu (matrice). (Nzembo 139:16; Exode 21:22, 23a; Yilimia 1:5) Na ntina yango, tosengeli kosala eloko moko te mpo na kosukisa to koboma bomoi oyo euti kobanda. Ekozala kolongola zemi.
Bankisi ya kopekisa kobota esalelami mingi kati na mokili. Ndenge nini epekisaka zemi? Ezali mpenzampenza na lolenge mibale ya bankisi to pilules: pilule combinée mpe micropilule au progesatif pur. Boyekoli epesaki nzela na komonisa polele mitindo bankisi yango ezali kosala kati na nzoto mpo na kopekisa zemi.
Pilule combinée ezali na ba hormones mibale: oestrogène moko mpe progestatif moko. Engebene U.S. Food and Drug Administration (Kompanyi ya ba ameriké mpo na bilei mpe nkisi ya monganga) “mosala ya liboso“ ya pilule combinée ezali “kopekisa bokoli ya ovule” to likeyi ya mwasi. Bazali koloba ete, kosalela yango mbala na mbala, pilule wana ezali kopekisa libela ete ovaire ebota lisusu likeyi te. Nzokande, ntango likeyi moko te ebotami, zemi ekoki mpe kobanda te kati na batrompes. Atako lolenge na pilule oyo ezali mpe komema mbongwana ya endomètre [mai oyo mazali kati na matrice] (likambo oyo ezali kokitisa makoki ya kopesa esika na zemi ete etanda na kati)”, bazali kotalela likambo yango lokola ete ezali mosala ya mibale oyo pilule wana ekoki kosala.
Mpo na kolembisa bampasi oyo ezali koya nsima ya komela pilule yango, babimisaki ba pilules combinées oyo ezali na doze moke ya oestrogène. Bazali koloba ete ba pilules mike wana ezali kopesa mwa nzela ete ovaire ekoka kobota makeyi (ovules). Na ntina yango, tala oyo monganga Gabriel Bialy, mokonzi na mosala ya institut américain mpo na santé, oyo ezali na mokumba ya kotalela bokoli ya makambo matali kopekisa kobota, alobaki: “Botaleli mingi ya sianse emonisi ete ata pilule oyo ezali na doze moke ya oestrogène, ezali kokanga bokoli ya likeyi ya mwasi na 100% te, kasi mingi mpenza penepene na 95%. Nzokande, ata soki likeyi (ovule) ezali kobotama yango elimboli te ete zemi ebandi.”
Soki mwasi azali komela pilule combinée te engebene ebongiseli to programme oyo epesameli ye, mosala ya mibale ya pilule ekoki kosala ete zemi epekisama. Boyekoli oyo esalemi na ntina na basi oyo babosanaki komela pilule na bango mikolo mibale emonisaki ete 36% kati na bango bazwaki lisusu ovule to likeyi na bango. Zulunalo Contraception (anglais) ezali koyebisa ete, kati na makambo yango, “mosala ya ba pilules likolo na endomètre mpe likolo na glaire cervicale ekoki kolanda kobatela bango ete bazwa zemi te.
Tokoloba nini mpo na lolenge mosusu ya pilule, oyo ebengami micropilule au progestatif pur? Mokanda moko ya monganga (Drug Evaluations [1986]) elobi mpo na yango: ”Kopekisa kobotama ya ovule (likeyi ya mwasi) ezali mosala ya liboso te ya ba pilules au progestatif pur mpo na oyo etali kopekisa zemi. Ezali kopesa nzela to kobandisa kosalama ya glaire cervicale ya mwa makasi oyo ezali mpenza kokanga nzela ete malome (spermatozoïde) eleka te; ekoki mpe kolembisa botamboli na yango kati na batrompes mpe kobenda endomètre ezonga na lolenge na yango oyo ezalaki liboso [likoki ya kopekisa bokoli ya likeyi nyonso oyo esili kokutana na malome].”
Bato na mayele bazali kondima ete “ovule to likeyi ezali mpenza kobotama epai na basi koleka 40% oyo bazali kosalela” pilule au progestatif pur. Pilule yango ezali bongo kotika ovule to likeyi ete ebotama mbala mingi. Ekoki kozala ete bonene ya glaire cervicale epekisi malome ete eleka te mpe na mbala moko epekisi zemi; soki ezali bonge te, ekozala nde ete esika oyo zemi ekoki koya kofanda ekosila kobebisama na nzela na pilule mpe boye likeyi oyo ekutani na malome ekokoka kotelema te mpo ekola.
Na bongo tosengeli kosimba ete, ntango ba pilules yango esalelami mokolo na mokolo lokola mwango ya koboya kobota, na makambo mingi mitindo mibale oyo na ba pilules, ezali nde kopekisa kobandama ya zemi kasi ezali mpenza kobimisa zemi te. Nzokande, lokola micropilule au progestatif pur ezali mpenza kotika nzela ete likeyi ebotama mbala mingi ekoki mpe lisusu kobebisa zemi moko na kopekisaka ete bomoi oyo esili kobanda ezwa esika ya kofanda te kati na matrice. Boyekoli ya sianse ezali koyebisa ete na eleko ya malamu (ntango matrice ebongolami te na mosala ya ba pilules contraceptives) “60% ya ba ovules to makeyi oyo ekutani na malome (spermatozoïde) . . . ezali kokufa liboso ete cycle mosusu ya mwasi ebanda.” Kasi likoki oyo ezali na boyokani moko te na metode ya kopekisa kobota oyo esalelami na lisosoli nyonso, metode oyo ekoki mpenza kopekisa bokoli ya bomoi oyo esili kobanda.
Na bongo ntango babalani mibale bazali kotalela elongo na monganga likambo litali kosalela ba pilules mpo na kopekisa kobota, mitinda na bizaleli malamu ya sikisiki mizali mpe kotalelama. Ata kati na makambo oyo matali bango moko, baklisto basengeli kozwa ekateli oyo ekopesa bango nzela na “kobatela lisosoli malamu nyonso” liboso na Nzambe mpe Mozalisi na biso.—Misala 23:1; Bagalatia 6:5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala la Tour de Garde ya 15 Novembre 1977, bankasa 702 kino 704.