Motuya ya bana—Likanisi ya boklisto ezali nini
NA 1974, basalaki mpo na mbala ya liboso Likita mpo na kotalela motuya ya bafandi na mokili; mikili 140 miyanganaki na likita yango, na nzela ya bamonisi na yango; bango balobaki polele ete babalani nyonso “bazali na lotomo ya kozwa ekateli na bonsomi nyonso mpe nsima na kokanisa malamu likoló na mokumba na bango, motuya boni ya bana bakobota mpe mbula boni bakobanda kolekisa kati na mwana moko mpe mwana mosusu, mpe ekosengela kolakisa babalani mpe kopesa bango makoki masengeli mpo ete bakoka kosalela lotomo yango.”
Maloba oyo mandimami na bato mingi. Ya solo, Nzambe atindaki Adam na Eva, mpe na nsima libota ya Noa, ete “babota mingi, bayikana mpe batondisa mokili,” kasi apesaki etinda moko te ya lolenge oyo epai ya baklisto. (Genese 1:28; 9:1) Makomami matindi baklisto te ete babota bana mpe mapekisi bango te ete babota bana te. Ezali likambo oyo babalani bango moko basengeli kozwa ekateli mpo na yango, motindo moko bakozwa ekateli mpo na motuya ya bana oyo bakobota mpe mbula boni bakobanda kolekisa kati na mwana moko mpe mwana mosusu.
Mokumba mouti na Nzambe
Ekateli ezwamaki na Likita mpo na kotalela motuya ya bafandi na mokili elobaki sikisiki ete babalani basengeli kozwa ekateli “nsima na kokanisa malamu likoló na mokumba na bango, motuya boni ya bana bakobota mpe mbula boni bakobanda kolekisa kati na mwana moko mpe mwana mosusu.” Likanisi oyo ya mokumba eyokani na likanisi ya Biblia. Baboti baklisto bayebi ete bana bazali likabo ya motuya liuti na Nzambe, kasi ezali mpe mokumba monene.
Ya liboso, esengeli kokokisa bamposa ya bana na makambo ya mosuni. Biblia elobi: “Soki moto nani akoleisa bato na ye te mpe koleka bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.”—1 Timoté 5:8.
Mokumba esuki te bobele na koleisa mpe kofuta mai mpe lotiliki, atako yango ezali likambo monene. Na kokanáká motuya ya bana oyo bakobota, babalani baklisto oyo bayebi ntina na mokumba na bango bakokanisa mpo na kolongono ya nzoto ya mama mpe mpo na bolamu na ye na maoki, na makanisi mpe na elimo. Mwana apesaka mama mosala mingi, mpe soki bana balandani, mama akozala lisusu na ntango ya kopema te, ntango ya kominyolisa lisusu te, ntango ya koyekola lisusu te, ntango ya kosangana lisusu na misala ya boklisto te, mpe kolongono na ye na mosuni mpe na elimo ekobeba.
Baboti baklisto oyo bayebi ntina na mokumba na bango bazali mpe kotalela bamposa ya bana na bango. Mokanda État de la population mondiale 1991 elobaki ete: “Bana oyo babotami mingi kati na mabota na bango, epai bana balandanaki penepene mpo na kobotama, basengeli kowelana na bandeko na bango mibali mpe basi mpo na bilei, bilamba mpe bolingo ya baboti na bango. Bakozalaka mpe na nzoto makasi mpenza te mpe bakozwaka bongo bokono mingi. Mpe ata soki bakufi te na boumeli ya bambula ya bomwana oyo ekozalaka na makámá mingi, nzokande kokóla na bango na nzoto mpe na mayele ekozalaka ntango mosusu ya malembe mpenza. Bazali na elikya mpenza te ya kozala na bomoi malamu ntango bakokóma mikóló.” Ya solo, ekozalaka boye te kati na mabota nyonso ya bana mingi, kasi ebongi na babalani baklisto ete bakanisa malamumalamu wana ezali bango kozwa ekateli mpo na motuya ya bana oyo bakobota.
Baboti baklisto bazali na mokumba ya kokokisa bamposa ya elimo ya bana na bango. Biblia elobi na ntina yango ete: “Bino batata mpe boyokisa bana na bino nkanda te, kasi bobokola bango na mateya mpe na mpamela na Jéhovah.”—Baefese 6:4.
Emeka azali moklisto, akolakisaka mateya matali mibeko (droit) na Nigéria. Eleki mbula moko uta abali mpe azali kowela te mpo na kobota bana mingi. Alobi ete: “Ngai mpe mwasi na ngai tosololaki likoló na motuya ya bana oyo tolingi kobota. Liboso tokanaki ete tobota bana mitano, kasi na nsima, toyei kotelema na misato. Mpo na kosukisa, tomoni ete ekoleka malamu tobota bobele mibale. Kobokola bana engebene mitinda ya Biblia ezali likambo ya petee te. Ezali mokumba monene.”
Babalani baklisto mosusu bazwi ekateli ete bakobota ata mwana moko te, mpo bakoka kopesa ntango na bango nyonso na mosala ya Nzambe. Tala litatoli ya mwasi moko misionere na Afrika, oyo, elongo na mobali na ye, bazwaki ekateli yango: “Nazali komona te ete nazangi eloko lokola naboti te. Ya solo, ngai na mobali na ngai, tozangi kooka esengo ya kozala baboti, kasi tozwi bisengo mingi mosusu. Kosangana na biso na mosala ya kolakisa bato solo ezwami na Biblia epesi biso nzela ya kozala na bana na elimo na bamboka mingi na mokili. Tolingi bango, mpe bango balingi biso. Ekangiseli ya ntina mingi ezali kati na bango mpe biso. Ezali na ntina soki ntoma Paulo amikokanisaki na mama oyo azali kobatela malamu bana na ye oyo ye azali kobokola mpo na komonisa malamu bolingo oyo azalaki na yango mpo na baye ye asalisaki bango na elimo.”—1 Batesaloniki 2:7, 8.
Kokanga kobota
Biblia epekisi kokanga kobota? Soko moke te. Ezali likambo litali babalani ete bazwa ekateli mpo na yango, mpe bango moko bakopona mwango nini bakosalela. Nzokande, babalani baklisto bakokeba ete babebisa bomoi te, mpamba te bomoi ezali bulee. Lokola Biblia emonisi ete bomoi ya moto ezali kobanda uta mama azwi zemi, baklisto bakoboya myango oyo mizali kobebisa zemi, mpamba te mizali koboma mwana oyo abandi kosalema.—Nzembo 139:16; tala Exode 21:22, 23; Yilimia 1:5.
Myango ya kosalela mizali mingi na makambo matali kotya ndelo mpo na motuya ya bana mpe kozanga kolandisa kobota. Babalani mosusu bakolinga kotya ndelo na motuya ya bana oyo bakobota. Basusu mpe bakolinga kobota ata mwana moko te, mpe mpo na yango bakoluka kokanga kobota. Myango ya kokanga kobota mizali mingi, mokomoko ezali na matomba na yango mpe na mabe na yango. Liboso ya kopona moko na yango, babalani basengeli komikundola ete myango misusu mizali malamu koleka misusu. Bakotuna mpe mpo na koyeba mabe nini ekobimaka nsima. Minganga mpe balopitalo epai bakolakisaka babalani makambo oyo bakoki kopesa bango toli mpe kosalisa bango mpo ete bapona mwango nini ebongi na bango mpo na kokanga kobota to mpo na kolekisa mbula mingi kati na mwana moko mpe mwana mosusu.
Ekateli oyo babalani bakozwa ya kobota bana mingi to bobele bana moke to mpe mwana moko te, etali bobele bango. Ezali mpe ekateli moko monene mpo na yango ezali likambo na mayele na kokanisa malamumalamu kati na libondeli.
[Etanda na nkasa 8, 9]
Myango miyebani mingi mpo na kokanga kobota
Komikomisa ekomba to stérilisation
Epai ya mobali: Mwa lipaso moke kati na enama ya kobotela mpo na kokata misisa esika mai ya mobali mpe mbóto to spermatozoïdes elekaka.
Epai ya mwasi: Lipaso kati na enama ya kobotela mpo na kokanga to kokata nzela (trompes de Fallope) esika likei ya mwasi elekaka mpo ete likei ekita lisusu te kati na matrice.
Matomba na yango: Yango nde ezali kolónga malamu koleka myango nyonso ya kokanga kobota.
Mabe na yango: Ekoki kozala mpo na libela. Mibali misusu mpe basi mosusu bazongelaki kobota nsima na lipaso mosusu, kasi ndangá ezali te.a
Nkisi ya komela oyo babengi pilules
Kati na yango ezali na oyo babengi micro-pilules au progestatif pur. Mosala ya pilules ezali mpo na kobongola biloko babengi hormones epai ya mwasi, mpo ete likei ya mwasi ekoka kokóla te mpe ekoka kokita te epai ya matrice.b
Matomba na yango: ezali kolónga mpenza.
Mabe na yango: ebongi bobele na basi oyo bazali na kolongono malamu, oyo bakokisi naino mibu 40 te mpe bakomelaka likaya te.
Diaphragme mpe spermicide
Diaphragme ezali mwa eloko moke ya motopé to kawutshu esalemi lokola kopo, na mbebu na yango ezali na eloko mosusu ya petepete ezali lokola lopɛtɛ. Bakotondisa kati na yango nkisi moko ezali lokola mafuta, nkisi yango ekobomaka mbóto na mai ya mobali (yango nde spermicide). Na nsima bakokotisa yango kati na nzoto ya mwasi mpo ete ekanga nzela ya matrice.
Matomba na yango: Ezali mwango ya makasi mpo na kopekisa kobota oyo ekopesaka mpasi na nzoto te mpe ezali kolónga malamu mpenza.
Mabe na yango: Babalani basengeli kosalela yango ntango nyonso oyo balingi kosangisa nzoto. Kosalela yango esengaka mpenza mayele mingi. Esengeli kotyama liboso ya kosangisa nzoto mpe ekotikala ngonga motoba kino mwambe nsima ya kosangisa nzoto.
Cape cervicale
Ezali lolenge moko na diaphragme oyo esalemi na plastique to na motopé kasi yango ezali moke mpenza. Yango ekokangaka makasi kati na nzoto ya mwasi, esengaka te ete batya yango spermicide mingi.
Matomba na yango: Ezali makasi lolenge moko na diaphragme, yango ekoki kotikala kati na nzoto na boumeli ya bangonga 48. Ekosengaka te kobakisa spermicide mbala na mbala ntango ya kosangisa nzoto.
Mabe na yango: Ezalaka mpenza mpasi koleka diaphragme mpo na kokotisa yango kati na nzoto ya mwasi; kotyama na yango esengeli kotalelama mbala na mbala, liboso mpe nsima ya kosangisa nzoto. Ekoki kokotisa microbe na matrice. Ekoki kosalelama bobele epai ya basi oyo nzoto na bango ezali malamu.
Éponge
Ezali éponge esalemi na eloko ebyangami polyuréthane epolisami na nkisi oyo ekobomaka mbóto na mai ya mobali; mwasi akotya yango na nzoto kino na ebandeli ya matrice mpo ete ekanga nzela na mai ya mobali. Akobwaka yango nsima na kosalela.
Matomba na yango: ekoki koumela na nzoto ngonga 24 mpe ekozala naino makasi ata kosangana mosusu esalemi na kati wana.
Mabe na yango: ekoki kopesa mokosa, mpe esalaki mpasi epai na basi mosusu.
Stérilet
Ebengami lisusu ete D.I.U. (dispositif intra-utérin), ezali mwa eloko esalemi na ebende to na plastique mpo na kotya kati na matrice. Atako ndenge na yango ya kosala eyebani mpenza malamumalamu te, minganga bakanisi ete ekopekisaka kobota na mitindo mingi. Moko na yango ezali ete likei ya mwasi oyo esili kokutana na mai ya mobali epekisami kofanda kati na matrice, esika oyo yango ekoki kokóla.c
Matomba na yango: ezali kolónga.
Mabe na yango: Ntango mosusu ekotumolaka kobima ya makila to mpe ekopesaka mpasi na mwasi; ekoki mpe kobimisa zemi.
Kapote to condom
Ezali mwa saki ya motopé ya petepete lokola eloko ya mpema oyo mobali akolata na nzoto na ye mpo ete mai na ye esopana te kati na nzoto ya mwasi.
Matomba na yango: ezali kolónga mpe ezali na likámá moko te. Ezali libateli mpo na bamaladi oyo ekozwamaka na nzela ya kosangisa nzoto, na ndakisa SIDA.
Mabe na yango: Mingi basepelaka na yango te, mpamba te kosalela yango ezali kokata bosangisi nzoto.
Kobwaka mai libanda
Mobali akobenda nzoto na ye libanda ya nzoto ya mwasi soki amoni ete mai na ye malingi kobima.
Matomba na yango: ezali kosenga mosolo te, meko moko mpe te.
Mabe na yango: ezali kosilisa mposa te; ezali kosenga komipekisa mpenza; mbala mingi ezali kolónga te.
Kolanda manáka
Mobali mpe mwasi bayokani ete basangana te na boumeli ya mikolo oyo miyebani ete mwasi akoki kozwa zemi.
Matomba na yango: Ezali na likámá moko te; ezali kosenga eloko moko te na ntango ya kosangana.
Mabe na yango: Ezali kolónga mingi te; bobele soki babalani bazali na ntina mpenza ya kosala bongo mpe bazali kolanda manáka yango malamumalamu.
Implant hormonal
Ezali mwango ya sika mpo na kopekisa kobota: bakotya mwa biloko mikemike babengi “batonnets en silicone” na nse ya loposo ya loboko ya mwasi. Na boumeli ya bambula mitano, ekobanda kobimisa biloko babengi hormone, yango ekobanda kotambola kati na makila ya mwasi mpe na boumeli ya bambula mitano yango akozwa zemi te.
Matomba na yango: Ezali mpenza makasi. Kolongolama ya biloko yango ekoki kosala ete mwasi azongela kobota.
Mabe na yango: Ezali na makámá bobele moke mpenza. Ezali na makámá lolenge moko na oyo ya micropilule au progestatif pur. Ntango mosusu ekoki kobimisa zemi.d
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba soki stérilisation ezali na boyokani to ezali na boyokani te na mitinda ya boklisto, tanga La Tour de Garde ya le 1er Mai 1985, lokasa 32.
b Okokuta bandimbola mpo na lolenge ya kosalela ba pilules contraceptives kati na Mosenzeli ya le 15 Juin 1989, lokasa 29.
c Mpo na koyeba soki kosalela stérilet ezali na boyokani to ezali na boyokani te na mitinda ya boklisto, talá La Tour de Garde ya le 1er Septembre 1979, nkasa 30, 31.
d Mpo na kozwa bandimbola mosusu na ntina na micropilule talá Mosenzeli ya le 15 Juin 1989, lokasa 29.