Ezali kosimba motema
Mama ya libota moko na mboka Virginie (Etats-unis) akomeli biso: “Tozali na mwana mobali moko ya mibu mitano, Keith. Mpo na sikawa, azali mpenza kosepela na makambo ya Nzambe te. Elingi koloba te ete azali mwana mabe. Azali na bolingo mingi mpe mayele, mpe azali koyokela lisosoli na ye. Kasi ntango tozali komeka kosolola makambo ya Biblia elongo na ye, mbala mingi akangaka matoi na ye mpo na koboya koyoka to azali nokinoki kobongola lisolo. Na bongo tozali kobondela mpo na kozala na motema molai mpe tozali koluka miango misusu ya kokotisa solo ya elimo kati na motema na ye ya petepete.
“Sikawa azali kosepela na masolo. Ezali wana nde Mokanda mpo na masolo ya Biblia, mpe bakasete ya botangi ya mokanda yango, esalaki likambo monene. Na yango, nkoko na ye ya mwasi apesaki ye kasete moko mpe tomonisaki ye lolenge ye kosalela yango. Banda wana, azali kofanda na boumeli ya bangonga mingi elongo na mokanda yango na maboko mpo na kolanda botangi oyo etiami kati na bande-kasete.
Tozali na momesano ya koyebisa ye lisolo moko ntango tozali kolalisa ye. Na mpokwa ya lelo, nayebisaki ye ete, nalembi mingi, kasi ye akokaki koyebisa ngai lisolo moko soki alingi, kasi ezala ya Biblia. Bokanisa esengo na ngai ntango abandaki kolobela ngai lisolo ya Yobo, David mpe Goliate, mpe na nsima Luta mpe Naomi! Ntango akomaki na esika oyo Luta azali komonisa bolingo na ye mozindo mpo na Jéhovah, alobaki na ngai na esengo nyonso: ‘Oyo ezali esika nalingaka mingi!’
Namonaki mpe na esengo nyonso ete azali komekola kotombola mongongo, kotosa mpe bapwé mpe azali kobongola to kobongisa lolenge na ye ya koloba! Mpe azali kotanga masolo yango na motó, koyebaka makambo mingi! Merci mbala nkoto!”
Ya solo, mwana moke akoki komikundola makambo mingi oyo tokoki kokanisa yango te ntango lisolo moko esepelisi ye. Baboti mingi bamoni ete Mokanda mpo na masolo ya Biblia mpe bakasete ya botangi ya mokanda yango ezali yango mpenza nde ebongi mpo na kolendisa litomba wana.
Receuil d’histoires bibliques