Liboso na kozwa lokumu oyeba komikitisa
ELENGE mobali abwakamaki kati na boloko ya Baezipito na efundeli moko ya lokuta. Asambwaki mingi mpe azalaki ata na libaku moke te mpo na kobimisama. Kasi mokolo moko, Faraon abengaki ye. Bakengeli ya boloko babimisaki ye nokinoki; akataki mandefu na ye, alataki bilamba mosusu, mpe amimonisaki liboso na mokonzi.
Likambo ya kokamwa ezalaki kozela elenge mobali oyo Yozefe. Na lisalisi ya Jéhovah, alimbolaki na bosolo nyonso ndoto mibale ya Faraon, oyo ayebisaki ye na nsima: “Tala ngai nasili kotia yo liboso na mokili na Ezipito mobimba.” (Genese 41:41). Oyo mbongwana nini monene boye! Kobima na boloko mpe komimona mbala moko kati na ndako monene! Likambo oyo ekomelaki Yozefe ezali komonisa malamu maloba oyo mokonzi Salomo alobaki na nsima kati na kopemama na Nzambe: “Mpamba te abimi na minyololo mpo na kokoma mokonzi.” Salomo alobaki maloba oyo ya ntina mbala mibale: “Kosokema ezali liboso na lokumu.”—Mosakoli 4:14; Masese 15:33; 18:12.
Liboso ya kozwa liteya na solo oyo ya Nzambe, tomituna mituna miye: Nini esimbaki to elendisaki Yozefe na ntango ya komekama wana ya nsoni? Ndenge nini mosaleli na sembo wana ya Jéhovah asalaki liboso na efundeli wana ya lokuta oyo ekotisaki ye na boloko? Lokumu nini Jéhovah azalaki kokana kopesa ye? Lokumu ya motindo nini ezali kozela baoyo bayikelaki mpiko na bosembo nyonso mpe na molende nyonso monyokoli mpe nsoni na boumeli ya bikeke? Likoló na nyonso, nini ezali kosalisa biso na kobatela bokatikati ntango toyokisami nsoni?
Yozefe akanisaki mbala mingi na ndoto mibale ya esakweli oyo alotaki kalakala kati na bomoi na ye, ndoto oyo ezalaki koyebisa ete bandeko na ye mpe ata baboti na ye ‘bakongumbama’ liboso na ye. Ntango ayebisaki ndoto ya liboso kati na ndoto mibale yango epai na bandeko na ye bango balobaki na ye: “Yo okozala mokonzi na biso?”—Genese 37:8-10.
Komonisaka likunya, bandeko mibali na Yosefe bakomaki mpenza kino penepene ya koboma ye! Kasi na nzela na litambwisi ya Jéhovah, elenge mobali ya mibu 17 atekamaki epai na bato na mombongo oyo batambolaka; bango mpe, batekaki ye epai na Potifare, mokonzi na babateli na Faraon.—Genese 39:1.
Nsima ya ntango, Yozefe akomaki kapita na ndako na Potifare. Mwasi ya moto monene yango amekaki kokweisa ye, mpo amonaki ye mobali kitoko, kasi Yozefe atikalaki sembo epai na Jéhovah mpe akimaki. Na bongo, mwasi wana ya mayele mabe afundaki ye na kolobaka ete alingaki kosangana na ye na makasi. Potifare andimaki maloba ya mwasi na ye, mpe Yozefe mwana mawa abwakamaki na boloko.
Atako bongo atikalaki sembo epai na Jéhovah; lokola emonisami awa na mwa liboso ya lisolo oyo, Jéhovah asalaki na motindo boye ete abima liboso na Faraon mpo na kolimbola bandoto. Mokonzi yango apesaki Yozefe mokumba ya lokumu ya kobongisa ndenge ya kobomba bilei na Ezipito. Ntango nzala engalaki kino na mokili ya Kanana, bandeko na Yozefe bayaki mpenzampenza kongumbama liboso na ye mpo na kozwa bilei na ntina na libota na bango.
Bato mosusu oyo balekaki longwa na ‘komikitisa kino lokumu’
Moïse azalaki mosaleli mosusu ya Jéhovah oyo bomoi na ye emonisi solo ya Nzambe engebene yango “liboso na kokumisama yeba komikitisa”. Lokola abokwamaki na ndako ya bozwi ya Faraon, Moïse azalaki na avenire moko kitoko liboso na ye. Kasi makambo mabandaki lokola kotambola mabe mpo na ye. Nsima na komonisa kondima na ye na Jéhovah mpe bolingo ya solo oyo azalaki na yango epai na libota na ye, Moïse akimaki mpo ete abomama te na nzela na etinda ya Faraon oyo angalaki na nkanda. Akendaki ye moko na mokili ya Madiane, mpe na boumeli ya mbula 40 amonisaki kosokema to komikitisa na ye na kozalaka na bomoi ezangi mindondo lokola mobateli na mpate, kosalaka mpo na bokilo na ye, Yetro. Na boumeli ya mibu wana nyonso oyo ebongolaki bomoto na ye, Moïse alendisamaki na kokanisaka likoló na lolenge oyo Jéhovah azalaki kokomisa ye mosokemi mpe na kokanisaka likoló na oyo avenire ekokaki komemela ye na nsima.
Mpe lokumu eyaki. Jéhovah akomisaki Moïse Molobeli na Ye liboso na Faraon mpe apesaki ye mokumba ya kobimisa libota na Ye na Ezipito. Oyo libaku nini ya lokumu mpo na Moïse ya koyebisa malozi zomi mpe kokatisa mai monene Motane, kotambolaka liboso na Yisraele! Na nsima, azwaki Mibeko ya Jéhovah likoló na ngomba Sinaï. Wana ekitaki ye na ngomba yango, bana na Yisraele “bakokaki kotala elongi na Moïse te mpo na nkembo na elongi na ye.—2 Bakolinti 3:7.
Totalela mpe likambo na Yobo, moto oyo aleki monene kati na bato ya epai na ebimelo na ntango. Azalaki “moto malamu be mpe na sembo, oyo akotosaka Nzambe mpe akoboyaka mabe”. (Yobo 1:2, 3, 8) Nzokande, na mbala moko, abungisaki bana na ye, bakisa mpe bankoto ya bibwele na ye- bameme, bachamo, bangombe mpe bampunda.
Esuki wana te. Yobo azwaki bibimba mabe to babibo mpe abandaki kobimisa nsolo mabe mpenza. Mwasi na ye moko asekaki ye na maloba oyo: “Okangi naino boyengebene na yo makasi? Lakela Nzambe mabe mpe kufa!” (Yobo 2:9) Yobo amekamaki makasi mpe ayokisamaki nsoni, kasi ayebaki likambo moko te na ntembe oyo ezalaki kati na Jéhovah mpe Satana, motomboki monene, kuna na makoló. Ezalela na Yobo ebongwanaki te ata na nzela na lisolo molai oyo azalaki na yango elongo na “baninga“ na ye misato. Ata nyonso oyo ekomelaki ye, abatelaki bosembo na ye mpe andimaki na komikitisa nyonso ata batoli ya mayele ya Elihu, mobali oyo azalaki elenge mpenza liboso na ye.—Yobo 32:4.
Yobo azwaki mbano? Ee, Jéhovah abikisaki ye, abakisaki ntalo ya bibwele na ye mbala mibale mpe apesaki ye bana mibali nsambo mpe bana basi misato, bango balekaki kitoko kati na mboka mobimba! Oyo nsuka nini ya lokumu kosokema na Yobo ezwaki! Na likambo na ye, emonanaki lisusu ete “liboso na kokumisama ezali na kosokema”.—Yobo 42:12-15.
Nkembo ya lolenge mosusu
Ezali mpenza na bandenge mingi ya nkembo-kolongwa na nkembo ya nsuki ya mwasi kino na nkembo oyo elongi ya Moïse ezalaki na yango ntango akitaki na ngomba Sinaï. (1 Bakolinti 11:15; 2 Bakolinti 3:7) Kolala ya moi ezali mpe na nkembo ya kitoko koleka, myoto mizali mpe na nkembo mosusu.—1 Bakolinti 15:41.
Liloba “nkembo” mpe maloba mosusu mauti na yango ezali komonana mbala nkama mingi kati na Biblia. Baversets wana mpe baversets mosusu oyo ezali penepene na yango ezali komonisa polele ete Jéhovah azali liziba ya nkembo nyonso. Biloko na lokumu oyo akela mpe basaleli na ye ya sembo bakoki se kotatola mpo na nkembo na ye na mitindo mingi mpe mikeseni.
Makambo mamonisi ete, na ekeke ya ntuku mibale, baoyo bazali na elikya ya lokumu ya kozwa bomoi na likoló bayokisamaki nsoni to basambwisaki bango. Na ntango ya Etumba ya liboso ya mokili mobimba, bakambi ya la Société Watch Tower, oyo esika monene na bango ya kotambwisa mosala ezwami na Brooklyn (New York), bakatelaki bango boloko ya mbula 20 na nzela na bifundeli ya lokuta. Bobele na eleko moko wana, monyokoli engalaki kati na bisika mingi. Na ndakisa, J. Siebenlist akotisamaki na boloko na boumeli na mikolo misato kozanga ete asambisama liboso. Bazalaki kopesa ye eloko moko te ya kolia, bobele mwa biteni misato ya mapa ya masango oyo mabebi. Bato babimisaki ye na boloko, balongolaki ye bilamba, bapakolaki ye gudró ya móto mpe babetaki ye na fimbo oyo ezalaki na banzube ya bibende na motó na yango. Na ntango ya kosamba ya ebele na Bayekoli ya Biblia, avocat général alobaki ete: “Nazali koseka Biblia na bino; bosengeli kokende na lifelo, kobuka bino panzi; mbele esengeli kokanga bino nsinga na nkingo likoló na nzete.”
Na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, basaleli mosusu ya sembo ya Jéhovah banyokwamaki makasi kati na ba camps ya concentration ya nazi. Moko na bango Martin Poetzinger, Temwe moko apakolami na elimo oyo abikaki na mimekano yango mpe na nsima akomaki mosangani ya Collège central ya ba Témoins de Jéhovah. Alobaki na ntina na camp ya Dachau lokola “efandelo na bilimu mabe”. Kati na camp ya Mauthausen, elobi ye, “Gestapo (la police) ezalaki kosala nyonso mpo na kobenda biso ete towangana kondima na biso epai na Jéhovah. Kopekisa biso kolia, kosala na biso boninga ya lokuta, kosalela biso makambo na makasi, kotinda biso ete totelema na boumeli ya mokolo mobimba to kotika biso kodiembela wana maboko matiami na mokongo mpe kokangisa biso likoló na nzete moko oyo ezali na bolai ya metele misato, kobetama fimbo; minyokoli nyonso oyo, bakisa mpe mosusu, epesamelaki biso”.
Nini elendisaki baklisto wana na sembo?
Nini esalisaki baklisto yango na koyikela makambo wana ya mawa mpe ya mabe mpiko? Kondima na bango kati na elaka epesamaki, mingimingi elikya ya avenire ya lokumu elakami epai na baoyo bakotikala sembo. Mpo na “etonga moke” ya ba Témoins bapakolami, elaka ezali libula na likoló. (Luka 12:32) Nkembo oyo eleki nyonso ezali kozela bato na sembo mosusu awa na mabelé. Bamosusu kati na bango, ndakisa Yozefe mpe Moïse, batangami kati na mokapo 11 ya mokanda na Baebele. Botanga ba versets 32 kino 40 mpe bokanisa likoló na makambo mabe oyo mibali wana na sembo bayikaki mpiko. Epai mosusu, “ebele monene” na bato bazali kosalela Jéhovah na mabelé na mikolo na biso. (Emoniseli 7:9, 15) Avenire na bango ekozala nini?
Avenire moko kitoko mingi ezali kozela bango. Bamonisi na mabelé na bokonzi na likoló etambwisami na Yesu bakosalela malako makomami kati na mikanda to barulo oyo elobelami na Emoniseli 20:12. Mibali yango bakozala na mabaku kitoko ya lokumu to nkembo, kasi bakozala te lokola mikonzi, nde lokola “bana na mokonzi na mabelé mobimba”. Lokola bango, ntalo monene na mibali basokemi mpe na sembo, kati na bango ekozala mpe basekwi, bakozwa bomoi na seko na mabelé na nkembo oyo makobongwana paradis.—Nzembo 45:16.
Na mikolo na biso, bamilió na bato bazali komonisa bosokemi to komikitisa na bango na kotikaka mangomba na lokuta mpe na kosanganaka na esengo nyonso na mosala ya kosakola ndako na ndako oyo esalemi na ba Témoins de Jéhovah. Mingi kati na bango batiolami epai na basangani ya mabota na bango mpe baninga na bango, kasi bazali kokangama na losambo ya solo. Bango nyonso bazali kondima na komikitisa mpenza disipline, mpo na kosalela Nzambe na solo, Jéhovah. Elikya na bango ezali ya kozala na bomoi kati na Paradis oyo ezongisami, ntango “mokili ekotonda na boyebi ya nkembo na Jéhovah lokola mai mazali kozipa mai na monana.”—Habakuku 2:14.
Basaleli na Jéhovah bazali kati na eleko moko ya komekama. Bazali mpo na koloba malamu bapaya kati na mokili. Libulu oyo ezali kokabola losambo na solo mpe ya lokuta ezali koliama mpe koya monene mokolo na mokolo. Biso banso tozali mpe kozwa mpasi. Kasi motindo moko lokola Yesu alendisamaki mpe ayikisamaki mpiko na nzela na esengo oyo elakamaki epai na ye, motindo moko tokokoka mpe koyikela mimekamo mpiko na kokanisaka na nsuka na yango.
Biblia epesi biso toli oyo: “Bomisokisa [komikitisa] liboso na Jéhovah, mpe akotombola bino.” (Yakobo 4:10) Soki ekomeli yo ete omekami makasi, omikundola ete “liboso na kozwa lokumu, oyeba komikitisa”, mpe Jéhovah akoki kozanga te kokokisa elaka na ye.