Makambo mazali koleka na mokili
Epesaka esengo?
“Mbula mibale ya mosala makasi, nsima bomoi ya esengo.” Zulunalo ya ba Japonais Yomiuri Shimbun, elobi ete, elobeli oyo ezali lelo kolobelama mingi na ba étudiants ya Chine, baoyo na mokano ya kozala na bozui, bazali kozwa banyongo mpo na koya na Japon, wapi bakanisi ete mbongo ezali kokita na likoló. Bazali na elikya ete na kosalaka mosala ya ntango mokuse mbula mibale na ntango yango bazali kolanda kotanga, bakoki komibombela bamilió mibale ya yens (mbongo ya Japon) (penepene na 100 000 francs français), nsima bazonga epai na bango mpe kozala na esengo na boumeli ya mikolo mingi.
Na mokili mobimba, bato mingi bazali kokanisa to kondima ete mbongo epesaka esengo. Na kotalela L’Asahi Evening News, ankete moko ya sika esalamaki na bikolo 11 emonisaki ete na bikolo 9 kati na yango, “‘mbongo’ nde ezali eloko ya liboso” oyo bilenge bazali koluka.
Esengo ekoki ya solo kozwama na kotiaka motema na bozwi? Mokonzi na mayele Salomo ayebisi biso liboso ete “ye oyo alingi mosolo akotonda na mosolo te”. (Mosakoli 5:10; 7:12) Ezali te kotia mbongo na esika na liboso nde ekopesa esengo ya solo to komibatela mpo na mikolo mizali koya. Ndakisa, ezali kotangama boye na kati na Biblia: “Palata na bango mpe wolo na bango ekolonga kobikisa bango te na mokolo na nkanda na Jéhovah.” (Sofoni 1:18) Kasi, mokomi na nzembo David akomi: “Esengo ezali na moto oyo ati motema na ye epai na Jéhovah.” Ezali kotia motema epai na Jéhovah, kasi na mbongo te, nde ekoki kopesa esengo ezangi nsuka.—Nzembo 40:4; Yisaya 30:18.
Batisimo: mokakatano
Eleki mwa ntango, lingomba ya Anglikane ekutani na mikakatano mibale na oyo etali batisimo mpo na bana mike. Ya yambo ezali batisimo oyo “mwana akozwa yango mbala moko kozanga masengami”, oyo episkopo moko abengaki yango “mangwele ya elimo”. Mokakatano ya mibale ezali ete bakonzi ya lingomba yango oyo motuya ezali kobakama bazali koboya kobatisa bana babotami sika oyo baboti bazali kopesa maboko te na misala ya lingomba ya Anglikane.
Mingi kati na bakonzi na lingomba yango bazali komona ete mbala mingi baboti bazali kosangana te na losambo ata soko bana na bango bazali kosala yango. Na yango, mpo na nini bazali kondima kobatisa bana na bango oyo bazali naino mike? Zulunalo Times epesi bakomantere oyo: “Balingi ete bana na bango oyo babotami sika babatisama, lokola balingi kopesa to kozwa likabo ya aniversere, kobongisa bandako na bango mpo na elambo ya Noël . . . . Ezali oyo eteni moko ya bonkoko na bango: mposa ya koluka ndimbola na yango ezali te.”
Episkopo moko na lingomba atikaki mosala mpo akomaki na likatami ete bakoki kobatisa bana mike te. Alobaki: “Oyo akoki kozwa likatami motindo yango ezali bobele moto ye moko.” Abakisaki ete Yesu Klisto azalaki na mibu 30 ntango azwaki batisimo mpe ete liloba batisimo euti na greke baptizô, oyo elimboli kokotisa na mayi to kozindisa. Nsima ya kozwa batisimo na kati ya Yolodani, Yesu ‘abimaki na mayi’. (Malako 1:10; Matai 3:13, 16) Esika moko te na kati ya Biblia ezali kolobama mpo na batisimo ya bana mike na kosopelaka bango mayi. Lokola batisimo ezali elembo ya komipesa oyo moto amipesi epai na Nzambe mpo na kolanda matambe ya Yesu, ezali komonana ete ezali likatami oyo ekoki kozwama na mwana moke te.
Bakatolike mpe mitindo ya kosalela mpo na kopekisa kobota
Jean-Paul ll alongisaki botemeli ya lingomba ya Katolike mpo na likambo etali mitindo ya kosalela mpo na kopekisa kobota, na Congrès international ya théologie oyo etali bizaleli, oyo esalamki na Rome na sanza ya Novembre na mbula eleki. Engebene L’obsevatore Romano, zulunalo ya Cité ya Vatican, pape alobaki ete: “Ezali te liteya esalemi na moto; liteya yango ekomamaki na loboko ya Nzambe mozalisi na kati ya bomoto mpenza. Kotya ntembe na yango ezali koboya kotosisa mayele na biso epai na Nzambe ye moko.” Na yango, abakisaki, liteya yango “ekoki kotiama ntembe na teolojié ata moko te ya Katolike.
Kasi, zulunalo ya ltalie La Stampa emonisi ete mokanda Humanae Vitae oyo Jean-Paul ll asalelaki mpe oyo ekomama esili koleka bambula 20 na Paul Vl “etiamaki ntembe na motuya monene ya bateolojié” mpe endimami lisusu te na “ebele ya bakatolike”.
Emonani polele ete, kozanga kobongwana ya lingomba mpo na likambo oyo litali mitindo ya kosalela mpo na kopekisa kobota ezali kokotisa bokabwani kati na bateolojié mpe ezali kotungisa mingi bakatolike oyo bazali sembo mpo na lingomba. Bokabwani oyo ezali ntango nyonso mpo na ntina etali lolenge ya kosalela mpo na kopekisa kobota epusaki Jean Paul ll na kolendisa bateolojié ete bango nyonso basala bobele “diskur moko”. Kasi, na bokeseni na maloba ya pape oyo ete etelemelo ya lingomba mpo na lolenge ya kosalela mpo na kopekisa kobota “ekomamaki na loboko ya Nzambe Mozalisi”, zulunalo ya ltalie La Repubblica emonisi polele ete “ata verset moko te ya Evanzile to ya Kondimana na Kala etangami mpo na kondimisa liteya yango.”
Biblia elobi eloko moko te mpo na mitindo ya kosalela mpo na kopekisa kobota to mpe mpo na kotia ndelo ya bana oyo basengeli kobotama na kati ya libala. Biblia elobi mpe te ete baklisto basengeli kozala na bana. Liloba na Nzambe etiki ekateli na makambo yango na lisosoli na babalani. Na kotiaka mibeko na likambo etali kopekisa kobota. Lingomba ya Katolike “ekei mosika na oyo ekomami”—1 Bakolinti 4:6.