Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/6 nk. 6-7
  • Ntango Mwana na moto akoya.

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango Mwana na moto akoya.
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na esika oyo ya lisolo, bayekoli batuni: “Epai wapi Nkolo?”
  • Ntango Mwana na moto akoya
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Mwana ya moto akomonana
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Bokonzi ya nzambe ekoya ntango nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Osili komilɛngɛla mpo na Mokolo ya Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/6 nk. 6-7

Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye

Ntango Mwana na moto akoya.

YESU azali naino kosala na Nord ya mboka (ekoki kozala na Samaria, to na Galileya) ntango Bafalisai batuni ye mpo na koya ya Bokonzi. Bakanisi ekoya na pwasa makasi; kasi Yesu alobi: “Bokonzi na Nzambe ekoya na motindo ete bokotala yango te; bakoloba mpe te ete: ‘Tala oyo’!, soko ete ‘Yango wana!’ Mpo bokonzi na Nzambe ezali katikati na bino.”

Liloba na Yesu, “katikati na bino” mbala mosusu ezali kobongolama ete “kati na bino”. Na ndimbola yango, bamosusu bakanisaki ete, engebene Yesu, Bokonzi na Nzambe efandi kati na mitema ya basaleli na Nzambe. Nzokande, na kotala malamu, Bokonzi na Nzambe ezalaki te na kati na mitema ya Bafalisai bazangi kondima baoyo Yesu asololaki na bango. Kasi, ezalaki katikati na bango na ndimbola oyo ete moto oyo aponamaki mpo na kozala Mokonzi na Bokonzi na Nzambe, elingi koloba Yesu Klisto, azalaki solo katikati na bango.

Ekoki kozala ete ezali nsima wana Bafalisai bakei nde Yesu alandeli lisolo elongo na bayekoli na ye likolo ya Bokonzi. Azali kokanisa mingimingi mpo na koya (présence) na ye, na kati na nkembo ya Bokonzi ntango apesi likebisi oyo: “Bakoloba na bino ete: ‘Tala wana!’, ‘Tala awa!’ Bobima te mpe kolanda bango te [Bamasiya ya lokuta]. Mpo ete lokola mokalikali, wana ekopela yango, ekopelaka na epai moko na likoló kino epai mosusu, bongo Mwana na moto akozala na mokolo na ye.” Na maloba oyo Yesu alakisi ete, lokola mokalikali emonanaka kino mosika mpenza, bongo bilembo na koya na ye kati na nkembo na Bokonzi bikoki komonana polele na bato nyonso baoyo bakoki kolinga komona yango.

Nsima, Yesu asali bokokani na makambo maleka kala mpo na kolakisa ndenge nini bato bakozala na ntango na koya na ye. Alimboli: “Pelamoko na mikolo na Noa, ekozala bongo na mikolo na Mwana na moto . . . Lisusu pelamoko na mikolo na Lote: baliaki, bamelaki, basombaki, batekaki, bakonaki, batongaki, nde na mokolo elongwaki Lot na Sodome, moto na sufulu na likoló enokaki mpe ebomaki bango nyonso. Ekozala lokola makambo oyo na mokolo ekoya Mwana na moto.”

Yesu alingi koloba te ete bato na ntango na Noa mpe Lote babomamaki bobele mpo bazalaki kosala misala lokola kolia, komela, kosomba, koteka, kokona mpe kotonga. Ata Noa mpe Lote, elongo na mabota na bango, basalaki mpe makambo wana. Bokeseni ezali ete bamosusu bamipesaki na misala yango mokolo na mokolo kozanga kotia likebi ata moke na mokano na Nzambe, ezali mpo na ntina yango babomamaki. Ezali mpo na ntina bobele yango bato bakobomama ntango Klisto akoya na bolozi monene oyo ekokwela biloko na ntango oyo.

Kolobelaka makasi mpo na ntina ya kozwa ekateli noki ntango bilembo bikomonana, mpo na koya na ye kati na nguya ya Bokonzi, Yesu abakisi: “Na mokolo yango, oyo akozala na likoló na ndako mpe biloko na ye bizali na kati na ndako, akita kozwa yango te; bobele bongo oyo na kati na elanga azonga lisusu te. Kanisa mwasi na Lota.”

Ntango bilembo ya kozonga na Klisto bikomonana, esengeli te, na bokangami na biloko na yo ya mosuni, kozwa ekateli noki. Ezali komonana ete, ntango abimaki na Sodome, mwasi na Lote abwakaki liso na mawa na biloko oyo atikaki nsima na ye, mpe akomaki likonzi na mungwa.

Kolandaka lisolo na ye na ndenge koya na ye ekozala, Yesu alobi na bayekoli na ye: “Na butu yango bato mibale bakozala na mbeto moko, moko akokamatama, mpe mosusu akotikala. Basi mibale bakozala kotuta esika moko, moko akokamatama mpe mosusu akotikala.”

Kokamatama, nde yango ekokani na bokoti na Noa elongo na libota na ye kati na masuwa, to mpe kobima na Sodome mpo na Lota elongo na libota na ye na kotambwisama na anzelu. Elimboli lobiko. Nzokande, kotikala elimboli kobomama.

Na esika oyo ya lisolo, bayekoli batuni: “Epai wapi Nkolo?”

Yesu ayanoli: “Esika ezali nzoto, wana mpe bingondo (aigles) bikoyangana.” Baoyo “bazuami” mpo na lobiko bazali lokola bingondo oyo bazalaka na miso emonaka mosika mpo bayanganaka esika “nzoto“ ezali. Nzoto elakisi Klisto ya solo na boumeli ya kozonga na ye kozanga komonana kati na nkembo na Bokonzi mpe na elambo na elimo oyo Jéhovah abongisi. Luka 17:20-37; Genese 19:26.

◆ Na ndimbola nini Bokonzi ezalaki katikati na Bafalisai?

◆ Na likambo nini kozonga na Yesu ezali lokola mokalikali?

◆ Mpo na nini bato bakobomama na ntango na koya (présence) na Klisto?

◆ Kokamata mpe kotikala elimboli nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto