Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/6 nk. 2-5
  • ‘Toyebi ete bakosekwa na lisekwa’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Toyebi ete bakosekwa na lisekwa’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Ezali mboka oyo bazongaka te’?
  • Endimeli na lisekwa
  • Elikya na likoló mpo na bato moke
  • Bayangelami na Mokonzi awa na mabelé
  • Elikya oyo etongami likoló na bilaka ya solo
  • Likambo oyo ekosukisa liwa!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Elikya ya solosolo mpo na bato olingaka oyo bakufá
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Elikya mpo na bakufi—Lisekwa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Elikya ya solosolo
    Nini ekómelaka biso soki tokufi?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/6 nk. 2-5

‘Toyebi ete bakosekwa na lisekwa’

NZAMBE Mozwi-na-Nguya-Nyonso apesaki bomoi epai na bato, mpe akoki kopesa yango lisusu na bakufi. Ezali ye lisusu nde apesaki biso liziba ya makambo oyo tokoki kotyela motema na ntina etali bomoi mpe liwa: Ezali bongo Biblia, oyo esalemi na biteni mibale, Makomami ya hébreu mpe Makomami ya greke ya boklisto. Biblia ezali na nsango oyo ya solo: mingi kati na bakufi bakoki kozonga na bomoi, mpe bakozonga solo na bomoi.​—Yoane 5:28, 29.

Mpo na kolimbola yango, totala lisolo oyo ya Lazare mofandi na Betania, moto oyo Yesu Klisto ayebaki ye malamu. Lazare abelaki, nsima na yango ayei kokufa. Nsima ya mwa ntango moke, Yesu ayebisaki Malata ndeko mwasi na Lazare: “Ndeko na yo [oyo akufaki] akosekwa.” Ye mpe azongisi eyano: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo na nsuka.” (Yoane 11:23, 24) Ayebaki yango solo. Ntango akanisaki na makambo oyo masilaki kosalema, atiaki ntembe te ete ndeko na ye Lazare akosekwisama “na mokolo na nsuka”.

Lisolo ezwami na Yoane mokapo 11 elobeli na molai makambo oyo malekaki nsima. Yesu asekwisaki Lazare, ata akufaki esilaki koleka mikolo minei. Lisekwa oyo elakisi ete Nzambe akoki kokokisa elaka na ye ya kosekwisa bakufi “na mokolo na nsuka”. Kasi epai wapi Malata azalaki kozela ete amonana na Lazare? Na makanisi ya Bayuda mosusu oyo bazalaki sembo, epai wapi lisekwa na ntango ekoya esengelaki kosalema?

‘Ezali mboka oyo bazongaka te’?

Nzambe asalaki mabelé ezala efandelo na moto. Ezali yango mokomi na nzembo amonisaki na maloba oyo: “Lola mpe likolo-na-lola ezali na Jéhovah, kasi apesaki mokili na bana na bato.” (Nzembo 115:16) Na kati na Makomami Mosantu, esika moko te elakisi ete Adam na Eva bakoki kozua bomoi ya seko esika mosusu kozanga awa na mabele soko batikalaki sembo liboso na Nzambe. “Nzete na bomoi” ezalaki awa na mabelé, na kati na paradis, esika mwasi na mobali bazalaki liboso ya komikotisa na nzela ya kozanga botosi epai na Mozalisi na bango. (Genese 2:9; 3:22) Lokola Nzambe alobaki likambo mosusu te oyo ekeseni na likanisi wana, basaleli na ye ya sembo oyo basengelaki kobika na libanda ya elanga ya Edene (kobanda mosembwi Abele, mwana ya Adam) bakokaki solo kokanisa lisekwa na esika bobele oyo moto azalaka: elingi koloba mabelé.

Zela moke, ekotya ntembe mbala mosusu bato oyo bayebi Biblia. Yobo, na mokanda na ye oyo ememi nkombo na ye, na mokapo 16 verset 22 alobi te ete: “Nakokenda na nzela ekozonga ngai na yango te”? Na Yobo 7:9, alobi lisusu: “Ye oyo akokita na nkunda [Schéol] akoya likoló lisusu te.” Mpe na verset 10, abakisi: “Akozonga lisusu na ndako na ye te, esika na ye ekoyeba ye lisusu te.”

Na yango, lokola batéolojié mosusu bazali kondimisa yango, baversets oyo mpe maloba mosusu ezali kolakisa te ete Yobo amonaki liwa lokola ‘mboka oyo bozongaka te’? Maloba oyo, mamonisi ete Yobo andimaki te lisekwa na ntango ekoya? Mpo na koyanola na mituna oyo, esengeli na biso kotalela mpo na nini malobamaki mpe kokokisa yango na makanisi mosusu oyo Yobo abimisaki mpo na likambo yango.

Yobo ayebaki te ntina na minyokoli na ye. Na ntango moke, akanisaki na komikosa ete Nzambe nde azalaki ntina na yango. (Yobo 6:4; 7:17-20; 16:11-13) Kolemba na ye na motema, akanisaki ete esika bobele moko epai kuna akokaki kosilisa bampasi na ye nokinoki ezalaki na nkunda. (Yobo 7:21; 17:1; tala 3:11-13) Kuna, na kotalela makanisi na bato na ntango na ye, akokaki kobombama, akokaki kozonga lisusu na ndako na ye te, akokaki koyebana lisusu te, akokaki kozonga te to kozala ata na elikya moke liboso na ntango oyo etyamaki na Nzambe. Na ye moko, kozanga Nzambe kokotela likambo yango, Yobo na bakitani mosusu ya Adam bazalaki na likoki te ya komibimisa kati na bakutia.​—Yobo 7:9, 10; 10:21; 14:12.

Endimeli na lisekwa

Ata bongo, ezali te ete mpo Yobo ayebaki oyo ezalaki kozwa ye te mpe avenire ezalaki molili nde andimaki lisekwa te. Maloba makomami na Yobo 14:13-15, mamonisi ete andimaki solosolo lisekwa na ntango ekoya. Na kati na mokapo yango, Yobo amonisi mposa na ye ya ‘kobombama na nkunda (Schéol) kino Nzambe ‘akokanisela’ ye. Lisusu, na Yobo 19:25-27, mobali oyo na kondima mpe na sembo alobi ete azalaki na “mosikoli” na ye mpe mokolo ekoya oyo ‘akomona Nzambe’. Ee, Yobo andimaki lisekwa. Andimisamaki ete Nzambe akokaki mpe akozongisa ye na bomoi, ndenge moko Abraham liboso na ye andimaki ya solo ete Nzambe azalaki na nguya ya ’kosekwisa bakufi’.​—Baebele 11:10, 16, 19, 35.

Bayuda bandimaki mpe bazali naino kondima lisekwa na ntango ekoya awa na mabele. Encyclopoedia Judaica (1971) elobi: “Endimeli ete na nsuka bakufi bakozongisama na bomoi na nzoto na bango mpe bakofanda awa na mabele” ezali “liteya ya moboko” ya lingomba na Bayuda (judaïsme). Ezali kotangama boye lisusu: “Bayuda oyo ya sembo bazali kozwa likanisi oyo na kondima nyonso mpe na ndenge ekomami kino bazali kondima ete bakundi bango na bilamba na bango, na nzoto na bango mobimba mpe na mboka ya Yisraele.”

Simba likambo oyo, Biblia elobi te ete na ntango ya lisekwa Nzambe akozongisa bobele nzoto na bawei oyo esili kokoma putulu. Biloko oyo babengi atomes (yango nde esali baselile oyo ezali kosala nzoto ya moto) ya nzoto ya bato bakufa kala esila kopanzana bisika nyonso mpe mosusu ekotaki na bomoi ya banyama mpe banzete-Ee, ata na kati na nzoto ya bato mosusu, baoyo mpe bakufa. Na yango, emonani polele ete na lisekwa atome moko ekoki kosalelama te mpo na nzoto ya basekwi ebele. Engebene bolingo na ye, Nzambe akozongisa bato na bomoi na nzoto ebongi, oyo ekozala na bokono te to litono mosusu te na nzoto oyo bazalaki na yango liboso na liwa na bango.​—Tala 1 Bakolinti 15:35-38.

Basekwi bakoyebana na baninga na bango mpe baboti na bango, baoyo mpe bakozongisama na bomoi? Makanisi malamu malakisi ete ezali bongo, mpo soki tokoki koyeba te bakufi oyo bakosekwa mpe bango bayeba biso te, ndenge nini tokoyeba ete balingami na biso bazongisamaki na bomoi? Ata soko nzoto ya Lazare ebandaki kopola, libota na ye mpe bato oyo bayebaki ye, ntango Yesu asekwisaki ye bayebaki ye lisusu. Na yango, biso mpe tokoki komizela ete Jéhovah Nzambe, na bolingo na ye akosala ete tomonana lisusu mpe toyebana lisusu na ntango ya lisekwa awa na mabelé.

Elikya na likoló mpo na bato moke

Lokola emonisami na ebandeli ya lisolo oyo, mabele ezali efandelo oyo Nzambe apesaki bato. Kasi, Yesu Klisto amonisaki ete motuya etangami ya bato bakosekwisama mpo na kozala na bomoi elongo na ye na makoló lokola bikelamu bikoki kobeba te mpe bikoki kopola te. (2 Timote 1:10) Na boumeli ya mwa ntango, nsima wana Yesu asilaki kobandisa “nzela na sika mpe na bomoi” oyo ezali komema na bomoi ya likoló, baklisto nyonso babiangamaki mpo na elikya oyo. (Baebele 9:24; 10:19, 20) Na nsuka motuya boni ya bato bakozwa likabo oyo? ‘Emoniseli’ epemamaki, ‘oyo Nzambe apesaki Yesu mpo ete alakisa baombo na ye makambo oyo masengeli koya’ ekati motuya ya bato 144 000 “basombami na mabelé”.​—Emoniseli 1:1; 7:4-8; 14:1, 3.

Mpo na nini motuya na bato oyo “basombami na mabelé” mpo na bomoi na likoló ezali moke? Mokanda bobele ya Emoniseli epesi ndimbola na mokapo 20 versets 5 na 6: “Oyo lisekwa na liboso. Baoyo babimi na lisekwa na liboso bazali na esengo, mpe bazali basantu. Kufa na mibale ezali na nguya likoló na bango te, kasi bakozala banganga na Nzambe mpe na Klisto, mpe bakozala bakonzi elongo na ye mbula nkoto.”​—Tala Emoniseli 5:9, 10.

Bayangelami na Mokonzi awa na mabelé

Ya solo, bato nyonso bakozala te bakonzi mpe banganga, mpo soki ezali bongo ‘bakoyangela’ likoló na banani? Etuluku oyo eponami, etongami zongazonga na bantoma ya sembo ya Yesu, bakoyangela likoló na mabelé oyo ekofandama liboso na “ebele monene” oyo eyebisami na Emoniseli mokapo 7, versets 9 kino 17. Bamilió ya bato oyo bazali sikawa kozela “etumba ya mokolo monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso”, oyo ebelemi nokinoki, mpe oyo ekosukola mabelé na makambo nyonso mazangi sembo. Na ngolu na Nzambe, bakobika na bolozi monene mpe bakozala baoyo bameká liwa te.​—Emoniseli 16:14; 21:14; Masese 2:21, 22.

Mbala mosusu ozali komituna, ‘toloba nini mpo na baoyo bakufa, ndakisa balingami oyo nabungisa’? Mpo na bato oyo mosusu, Yesu ye moko alobelaki Malata ete, ‘ata bakufi bakozonga na bomoi.’ (Yoane 11:25) Lisekwa oyo ekosalema awa na mabelé. Na boumeli ya boyangeli na Klisto na ba 144 000 bakonzi mpe banganga baoyo bakozala na ye na makoló, bamilió na bamilió na bakufi baoyo Nzambe azali kokanisela mpo na bolamu bakosekwa mpe bakozala na likoki ya koyekola kosalela losambo ya solo, losambo ya Jéhovah. Soki bakomimonisa sembo, bakozua likabo ya bomoi ya seko kati na paradis oyo ekotonda mabelé mobimba. Makambo oyo nyonso makoleka na boumeli na “mokolo na nsuka” oyo Malata alobaki ntango andimaki maloba na Yesu, maloba oyo ete ndeko na ye Lazare akozongisama na bomoi.​—Yoane 5:28, 29; 11:24; Luka 23:43.

Elikya oyo etongami likoló na bilaka ya solo

Kosekwisama ya bato mosusu oyo elobelami na Biblia ezali kopesa moboko na elendiseli mpo na elikya ya lisekwa oyo ezali kolobelama na kati na mokanda yango. Makomami Mosanto mazali komonisa kosekwisama oyo esalamaki na basakoli Elie mpe Elizé liboso na ntango na boklisto, na oyo esalamaki na Mwana na Nzambe (kati na yango oyo ya Lazare), na oyo esalamaki na bantoma Petelo mpe Paulo, mpe oyo Jéhovah Nzambe ye moko asalaki na kozongisaka Mwana na ye na bomoi. Masolo oyo okokuta yango na Biblia na yo na mikapo milandi: 1 Mikonzi 17:17-24; 2 Mikonzi 4:32-37; Matai 28:1-10; Luka 7:11-17; 8:40-56; Yoane 11:38-44; Misala 9:36-42; 10:38-42; 20:7-12.b

Lokola elikya ya lisekwa ezalaki na moboko makasi, Paulo akokaki kopesa endimiseli oyo epai na bafandi na mboka Athènes: “Nzambe . . . asili kopona mokolo wana ekosambisa ye mikili nyonso na sembo, mpe akosambisa bango na móto oyo asili kopona. Amonisi bato nyonso polele ete ezali solo, mpo ete asekwisi ye na bakufi.”​—Misala 17:30, 31.

Ya solo, lisekwa na Yesu ezali endimiseli makasi ya elikya ya lisekwa, Biso mpe tozali na ntina makasi ya kotya elikya na biso mobimba na nguya mpe na bolingo na Jéhovah Nzambe. Tokoki mpe kolakisa kondima na biso lokola Malata na kolobaka: ‘Toyebi ete bakufi bakosekwa na lisekwa na mokolo na nsuka.’

Nsima wana Paulo apesaki litatoli mpo na “lisekwa na bakufi” likoló na ngomba Ale (Mars), bayoki na ye bakabwanaki na bituluku misato: “Bamosusu baseki nde mosusu balobi: ‘Tokoyoka yo lisusu na ntina na likambo oyo.’ . . . nde mibali mosusu balandi ye mpe bandimi”.​—Misala 17:32-34.

Bongo yo, okanisi nini mpo na elikya ya lisekwa? Jéhovah akokokisa elaka apesaki ya kosekwisa bamilió, ata bamiliare ya bakufi. Ezali oyo yo ozali kosala nde ekopesa nzela ete ozala wana mpo na komona bango mpe mpo bamona yo. Okondima koyekola masengami ya bonzambe oyo esengeli kokokisama mpo na kozwa bomoi ya seko mpe kosalela yango? Ba Témoins de Jéhovah bakosepela mingi kopesa yo bandimbola mingi mpo na elikya okoki kozala na yango ya komonana na balingami na yo oyo bakufa mpe oyo osengeli kosala mpo na kobika na nsuka na mokili oyo.​—Yoane 17:3.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na likanisi bobele yango, mokomi na nzembo akomaki na kotalela lolenge na bomoi ezalaki na ntango na ye liboso ete Nzambe akotela: “[Nzambe] akanisaki ete [bana na Yisraele] bazalaki bobele mosuni, elimo [nguya euti na Nzambe] ebimi mpe ekozonga te.”​—Nzembo 78:39.

b Mpo na koyeba mingi bato oyo basekwisamaki na ntango na kala mpe elaka oyo Makomami ezali kopesa mpo na lisekwa na ntango ezali koya na nse na boyangeli na Klisto, tala mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis na mokapo 20 oyo elobi: “Lisekwa-mpo na nani mpe epai wapi?” Okoki kosomba mokanda oyo epai na ba Témoins de Jéhovah na esika oyo ofandaka to kokoma mokanda na kosalela ba adresi oyo elakisami na lokasa ya mibale ya zulunalo oyo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto