Tokomonana na bango mokolo mosusu?
“Otiki biso libela na ntango oyo tozalaki kokanisela yango te. Atako mpasi ya motema oyo liwa na yo esali biso, tokobosana te bambula ya esengo oyo tolekisaki elongo na yo mpe tokozala ntango nyonso na elikya ya komona yo mokolo mosusu.”
NA Luxembourg, mingimingi baboti mpe baninga na mowei bazali komonisa mayoki motindo oyo na bazulunalo na lokasa mpo na bansango ya liwa. Bipai binso na mokili bato bazali na basuvenire ya malamu mpe mawa mingi na ntina etali liwa ya molingami-elikya oyo esangani na mwa kokakatana. Mbala mosusu osili kozwa mayoki motindo wana to ayokaki moninga moko koloba ndenge wana nsima ya liwa ya molingami moko.
Mpo na bato mingi, elikya ya komonana mokolo mosusu na balingami na bango bakufa ezali polele te na makanisi na bango. Bantina ya ntembe na bango ezali polele. Ya liboso, ezali ete na mikolo na biso bato moke nde bazali kozua ntango ya kolinga koyeba ndimbola ya likambo oyo. Mpe ntango moto aluki mpo ayeba, biyano oyo akozua na mangomba mingi ezali na mobulungano mpo na kondimisa ye.
Ndenge boyebi yango mbala mosusu, bato mingi bazali kokanisa ete “bomoi na mikolo mikoya” mpo na bakufi ezali kolandana na molongo ya libota na bango. Mbala mingi maloba oyo eyokamaka ete ‘moto akolanda kozala na bomoi na nzela na bana na ye’. Kasi, “bomoi” lolenge oyo ekoki komema eloko moko ya malamu epai na mowei to ekoki kopesa ata elikya moke ya komonana lisusu na bato oyo ye atiki? Soko moke te! Likanisi oyo ezali kopesa ata elendiseli moko te ya malamu.
Lokola tomibanzabanzaka mpo na balingami na biso, ezala baoyo batika biso to baoyo bazali na bomoi, tozali na mposa ya kozua biyano na mituna oyo: Soko moto oyo tolingi mingi akufi, tokomonana na ye mokolo mosusu? Soko bongo, ntango nini mpe wapi? Na likoló to awa na mabelé? Elikya nini ezali mpo na balingami na biso baoyo bakufa mpe mpo na biso moko?
Na solo, nsango malamu ezali mpo na likambo yango. Ezali solo nsango malamu, mpamba te ezali kopesa elikya moko ya solo mpe ya esengo. Epai mosusu nsango yango ezali ya sika mpo ete ezali nsango ekeseni na oyo bato mingi basili koyoka ata na mangomba na ntina etali elikya ya bakufi.
Na ekeke ya liboso, wana ezalaki ye na mboka Athènes, Paulo oyo azalaki misionere moklisto, alobelaki mpo na elikya na bakufi oyo emonisami na kati na Makomami. Bayoki mosusu Bagreke bayokaki ye na likebi, bamosusu batiolaki ye. Kolingaka kokotisa ntembe elongo na ye bafilozofe batunaki: “Molobalobi oyo azali na mposa na koloba nini?” Bamosusu bazalaki koloba ete: “‘Amonani lokola mosakoli na banzambe na bapaya’. Nzokande, azalaki kosakola nsango malamu na Yesu mpe lisekwa.” (Misala 17:18) Ee, nsango malamu oyo Paulo asakolaki ezalaki mpo na lisekwa.
Okokaki koloba nini na koyoka diskur ezali kolobela lisekwa na ntango ezali koya mpe likoki ya komona bakufi bazongi lisusu na bomoi? Mpo na yo, yango ekozanga ntina? To, mpo na mateya ozwaki na lingomba na yo to makanisi na yo moko, nsango na elikya oyo Makomami Mosantu mazali kopesa mpo na ntina na bakufi, ezali komonana eloko na sika mpe ya bopaya lokola ete euti na “banzambe na bapaya”?
Mpo na bango, bafandi ya mboka Athènes balobaki na Paulo: “Ozali koyokisa biso makambo na bapaya. Na bongo tozali na mposa ya koyeba soko makambo oyo malimboli nini.” (Misala 17:20) Yo mpe, olingi koyeba ndimbola mpo na elikya oyo Biblia epesi na ntina na balingami na biso bakufa, mpe mpo na biso baoyo tozali na bomoi? Soki ee, lisolo elandi ekozanga te kosepelisa yo.