Mateya mauti na Makomami: Agai 1:1 kino 2:23
MOKANDA ya Agai ezongisi biso na mobu 520 liboso na ntango na biso, mbula 17 nsima wana mwa litika na Bayuda ezongaki na Yelusaleme mpo na kotonga lisusu temple ya Jéhovah. (Agai 1:1) Mpo na bango nyonso, wana ezalaki ntango ya kotya motema mobimba kati na mosala ya Nzambe. Ata bongo, Jéhovah amonaki lisusu ntina ya kotinda mosakoli Agai mpo na kokundola epai na basaleli na Ye mokumba oyo bazalaki na yango. Nsango ya mosakoli yango ezali na batoli oyo ekoki kosalisa biso?
Totya mosala ya Jéhovah na esika ya liboso
Totya soko moke te matomba na biso ya mosuni liboso na mikumba na biso ya elimo. Bayuda oyo bazongaki na mboka na bango bakokaki komibanzabanza mpo na mwayé ya kobikela mpe likunya oyo banguna na bango ya zongazonga bazalaki na yango epai na bango. Kasi bopotu na bango eutaki na makambo wana te, mpamba te bazalaki na bozwi mingi. Ezali bobele nsima wana Agai alamusaki bango na elimo nde bamipesaki mpo na kotonga lisusu temple. Bobele bongo, na mikolo na biso, tosengeli ‘kobanza na mitema na biso mpo na banzela na biso’ mpe kosenzela ete tosangana na mosala ya Nzambe engebene makoki na biso.—Agai 1:2-15.
Jéhovah azali kopambola milende ya baoyo bazali kokokisa mosala na ye na motema na bango mobimba. Nzambe alingaki kopambola mosala oyo Zorobabele mpe Bayuda mosusu bazalaki kosala mpo na kosilisa kotongama ya temple oyo nkembo na yango ekoleka nkembo ya ndako ya kala. Na mikolo na biso, “ebele monene” bazali kondima nsango malamu ya Bokonzi; ezali na ndenge yango ete “biloko na motuya biuti na mabota nyonso” bizali kokota na temple ya elimo ya Jéhovah, mpe azali ‘kotondisa ndako na ye na nkembo’.—Agai 2:1-9; Emoniseli 7:9.
Tosengeli kosalela Nzambe na motema na biso mobimba
Losambo na biso ekozala na ntina bobele soko tozali peto, soko tozali na mikano malamu, mpe soko tozali kosalela Jéhovah na motema mobimba. Bopotu ya Bayuda mpo na ndako ya Nzambe ekomisaki bango mbindo, kasi Jéhovah akokaki kopambola bango wana babandaki kotonga temple. Bobele bongo, soko tolingi ete Jéhovah apambola biso, tosengeli kosala mbongwana nyonso oyo ezali na ntina mpe kotya motema na biso na mosala na ye. (Tala Mituya 19:11-13) Wana ezali biso kozela ete Nzambe aningisa makoló mpe mabelé, kobukaka bongo bikonzi, tolanda Zorobabele ya ntango na biso, Yesu Klisto, mpe tomipesa na motema na biso mobimba na mosala ya Jéhovah.—Agai 2:10-23.