Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/3 nk. 13-18
  • “Tiká ete mabɔkɔ na yo malɛmba te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Tiká ete mabɔkɔ na yo malɛmba te”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bokobombama na mokolo na nkanda na [Yehova]”
  • “Lokumu mpe kosanzolama kati na mabota nyonso na mokili”
  • “Mokolo na [Yehova] ekoya”
  • “Tiká ete mabɔkɔ na yo malɛmba te”
  • Lolenge nini tosengeli kosala liboso na ezaleli ya kozanga bosepeli
  • Tókende liboso wana ezali biso kozela mokolo yango monene
  • “Zelá ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mokanda ya Biblia nimero 36—Sefania
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Libota ya Yehova ezongi mpe ezali kokumisa ye na mokili mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Luká Yehova liboso ete mokolo ya nkanda na ye eya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/3 nk. 13-18

“Tiká ete mabɔkɔ na yo malɛmba te”

“Tiká ete mabɔkɔ na yo malɛmba te. [Yehova] Nzambe na yo azali kati na yo, ye elombe na makasi, akobikisa!”​—SEFANIA 3:16, 17.

1. Nganga-mayele moko ya Biblia alobaki nini na ntina na esakweli ya Sefania?

ESAKWELI ya Sefania esukaki te bobele na kokokisama na yango ya liboso na ekeke ya nsambo mpe ya motoba L.T.B. Kati na ndimbola na ye oyo apesaki na ntina na esakweli ya Sefania, molakisi moko ya eteyelo monene, C. F. Keil alobaki ete: “Esakweli ya Sefania . . . ebandi te bobele na kosakolama ya kosambisama monene likoló na mokili mobimba, uta na yango kosambisama ebimi, oyo ekokwea likoló na Yuda mpo na masumu na yango, mpe likoló na bikólo nyonso ya mokili mpo ete bazali koyina libota ya Yehova; kasi ezali kolobela mokolo monene mpe ya nsɔ́mɔ ya Yehova.”

2. Bokokani nini bozali kati na ezalela ya makambo oyo ezalaki na eleko ya Sefania mpe ezalela ya makambo oyo ezali kati na boklisto ya nkombo mpamba lelo oyo?

2 Lelo oyo, ekateli ya Yehova ezali bongo ya koyanganisa bikólo mpo na kobebisama monene koleka oyo esalemaki na eleko ya Sefania. (Sefania 3:8) Bikólo yango oyo bizali komiloba ete bizali ya boklisto bizali mpenza na ekweli na miso ya Nzambe. Lokola Yelusaleme ezwaki mbano ekoki mpo na ezalela na yango ya kozanga bosembo epai na Yehova, bobele bongo mpe boklisto ya nkombo mpamba esengeli kozongisa monɔkɔ epai na Nzambe mpo na makambo na yango ya mbindo. Bikateli ya Nzambe oyo bisakolamaki likoló na Yuda mpe likoló na Yelusaleme na eleko ya Sefania ezali kokokisama makasi lisusu koleka likoló na mangomba minene mpe likoló na mangomba mike ya boklisto ya nkombo mpamba. Basili mpe kobebisa losambo ya pɛto na mateya na bango oyo etukaka Nzambe, oyo mingi na yango euti na bopakano. Basili kolekisa bamilió ya bana na bango ya mibali mpe ya kolɔngɔ́nɔ́ malamu lokola mbeka na kotindáká bango kati na mosala ya sodá. Lisusu, bato oyo lelo bakokani na bafandi ya Yelusaleme ya kala bazali kokamata astroloji, misala ya bilimu mabe, mpe kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo, oyo ezali kokundwela biso losambo ya Baala, mpe bazali kosangisa yango kati na boklisto.​—Sefania 1:4, 5.

3. Tokoki koloba nini na ntina na bakonzi mpe biyangeli mingi ya politiki lelo oyo, mpe Sefania asakolaki nini?

3 Bakonzi mingi ya politiki oyo bazali kati na boklisto ya nkombo mpamba balingaka ete bázala na esika ya lokumu kati na lingomba. Kasi lokola ezalaki mpo na “bankumu” ya Yuda, mingi na bango bazali konyokola bato na motindo na “bankosi na konguluma” mpe na motindo na “bambwa na zamba” oyo batondaka te. (Sefania 3:1-3) Bato oyo balandaka bakonzi motindo wana bazali “kotondisa ndako na bankolo na bango na yauli mpe na bokosi.” (Sefania 1:9) Kanyaka mpe libebi ezali koyikana mingi. Mpo na biyangeli ya politiki oyo ezali na kati mpe na libandá ya boklisto ya nkombo mpamba, ntálo monene na bango ‘bazali kotuka’ libota ya Yehova na bibele, Batatoli na ye, kotaleláká bango lokola “mwa lingomba.” (Sefania 2:8; Misala 24:5, 14) Na ntina na bakonzi nyonso wana ya politiki mpe balandi na bango, Sefania asakolaki ete: “Palata na bango mpe wolo na bango ikolónga kobikisa bango te na mokolo na nkanda na [Yehova]; na mɔ́tɔ na nkɛlɛ na ye na zúwa mokili mobimba ekozikisama. Zambi akosukisa, ee, akokómisa na nsuka mpenza baoyo nyonso bazali kofanda kati na mokili.”​—Sefania 1:18.

“Bokobombama na mokolo na nkanda na [Yehova]”

4. Nini emonisi ete na mokolo monene ya Yehova babiki bakozala, kasi basengeli kosala nini?

4 Bafandi nyonso ya Yuda te nde babomamaki na ekeke ya nsambo  L.T.B. Bobele bongo, na mokolo monene ya nkanda ya Yehova babiki bakozala. Epai na bango, Yehova alobaki na nzela ya mosakoli na ye Sefania ete: “Naino mobeko ebimi te, mokolo elongwi lokola mpumbulu; naino nkanda monene na [Yehova] eyeli bino te, naino mokolo na nkanda na [Yehova] eyeli bino te. Bóluka [Yehova], bino basɔkɛmi nyonso na mokili, baoyo bakosalaka malako na ye; bóluka boyengebene, bóluka bopɔlɔ, soko nde bokobombama na mokolo na nkanda na [Yehova].”​—Sefania 2:2, 3.

5. Na ntango oyo ya nsuka, banani bazalaki bato ya liboso ya kolanda likebisi ya Sefania, mpe lolenge nini Yehova asalelaki bango?

5 Na eleko oyo ya nsuka ya mokili, bato ya liboso oyo balandaki libyangi oyo ezwami kati na esakweli wana ezalaki bongo batikali ya Yisalaele ya elimo, baklisto bapakolami. (Baloma 2:28, 29; 9:6; Bagalatia 6:16) Lokola balukaki boyengebene mpe bopɔlɔ mpe lokola bamonisaki botosi mpo na bikateli ya Yehova, babikisamaki na Babilone monene, lisangani ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta, mpe bazongisamaki kati na ngolu ya Nzambe na 1919. Uta ntango wana, mpe mingi mpenza kobanda na 1922, kozanga kobanga, batikali wana ya sembo bazali kosakola bikateli ya Yehova likoló na mangomba minene mpe mangomba mike ya boklisto ya nkombo mpamba mpe likoló na bikólo ya politiki.

6. (a) Sefania asakolaki nini na ntina na batikali ya sembo? (b) Lolenge nini esakweli yango ekokanaki?

6 Sefania asakolaki na ntina na batikali wana ya sembo ete: “Kasi nakotika kati na yo bato batutami mpe basɔkɛmi; bakotalela nkombo na [Yehova], baoyo batikali na Yisalaele; bakosala mabe te, bakoloba nkuta te; kati na monɔkɔ na bango lolemo na bokosi ekozwama te. Zambi bakolya mpe bakolala na nsé, moko akobangisa bango te.” (Sefania 3:12, 13) Baklisto bapakolami wana bazali ntango nyonso kotya nkombo ya Yehova na esika ya liboso, kasi babandaki yango mingi mpenza uta na 1931, na ntango bazwaki nkombo Batatoli ya Yehova. (Yisaya 43:10-12) Na kolimboláká makambo matali boyangeli monene ya Yehova, bazali kopesa lokumu na nkombo ya Nzambe, mpe yango ezali libateli mpo na bango. (Masese 18:10) Yehova azali kopesa bango bilei mingi ya elimo, bazali kofanda kati na paladiso ya elimo kozanga kobanga.​—Sefania 3:16, 17.

“Lokumu mpe kosanzolama kati na mabota nyonso na mokili”

7, 8. (a) Esakweli nini mosusu ekokanaki likoló na batikali ya Yisalaele ya elimo? (b) Bamilió ya bato basosoli likambo nini, mpe mayoki na yo mazali nini na ntina na yango?

7 Bokangami na bango makasi na nkombo ya Yehova mpe na mibeko ya sembo ya Liloba na ye esili mpenza kobenda likebi na bato. Bato ya motema sembo basili komona bokeseni kati na etamboli ya batikali mpe libebi mpe bokosi oyo ezali epai na bakonzi ya politiki mpe ya mangomba ya mokili oyo. Yehova apamboli “batikali [na elimo] na Yisalaele.” Apesi bango libaku malamu ya komema nkombo na ye, mpe asali ete bázala na lokumu malamu kati na bato ya mabelé. Ezali lokola Sefania asakolaki yango, ete: “Na ntango yango, nakokɔtisa bino, na ntango yango nakoyanganisa bino elongo; ee, nakopesa bino lokumu mpe kosanzolama kati na mabota nyonso na mokili. Bongo nakokalambisa kokangama na bino liboso na miso na bino, [Yehova] alobi bongo.”​—Sefania 3:20.

8 Kobanda na 1935, bamilió ya bato basili kososola ete lipamboli ya Yehova ezali likoló na batikali. Na esengo nyonso, bazali kolanda Bayuda, to Bayisalaele wana ya elimo, kolobáká ete: “Tokokenda na yo elongo, zambi toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.” (Zekalia 8:23) “Bampate mosusu” wana bazali kondima bango lokola “moombo na sembo mpe na mayele,” oyo Klisto aponaki likoló na “bozwi na ye nyonso [oyo ezali awa na mabelé].” Na botɔ́ndi nyonso, bazali kolya bilei ya elimo oyo kelasi ya moombo ezali kobongisa “na elaka na yango.”​—Yoane 10:16; Matai 24:45-47.

9. “Monɔkɔ” nini bamilió ya bato bazali koyekola koloba yango, mpe bampate mosusu bazali kosala mosala nini monene na “motema moko” elongo na batikali bapakolami?

9 Elongo na batikali, bamilió wana ya bampate mosusu bazali koyekola kotambwisa bomoi na bango mpe koloba na boyokani na “monɔkɔ na pɛto.”a Yehova asakolaki na nzela ya Sefania ete: “Boye, nakobongola maloba na bato kino liloba na pɛto, ete bango nyonso bábyanga nkombo na [Yehova] mpe básalela ye na motema moko.” (Sefania 3:9) Ee, bampate mosusu bazali kosalela Yehova na bomoko “na motema moko” elongo na basangani ya “etongá moke” kati na mosala ya ntina mingi ya kosakola “nsango malamu oyo na Bokonzi . . . lokola litatoli na mabota nyonso.”​—Luka 12:32; Matai 24:14.

“Mokolo na [Yehova] ekoya”

10. Batikali bapakolami bandimisami ntango nyonso na likambo nini, mpe lokola kelasi, bakomona eloko nini?

10 Batikali bapakolami babateli ntango nyonso kati na makanisi na bango liloba oyo lipemami ya ntoma Petelo: “[Yehova] akoumela nsima na elaka na ye te, lokola bamosusu bazali kokanisa ete akoumela. Kasi azali na motema molai epai na bino, alingi te ete bamosusu bábeba kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema. Nde mokolo na [Yehova] ekoya lokola moyibi.” (2 Petelo 3:9, 10) Basangani ya kelasi ya moombo na sembo babɛtaka ntembe soko moke te na ntina na koya ya mokolo ya Yehova na eleko na biso. Mokolo yango monene mokobanda na kokokisama ya bikateli ya Yehova likoló na boklisto ya nkombo mpamba, oyo Yelusaleme ya kala ezali bongo elilingi na yango, mpe likoló na eteni mosusu ya Babilone monene.​—Sefania 1:2-4; Emoniseli 17:1, 5; 19:1, 2.

11, 12. (a) Eteni nini mosusu ya esakweli ya Sefania ekokanaki likoló na batikali? (b) Lolenge nini batikali bapakolami bazali kolanda libyangi oyo elobi ete: “Tiká ete mabɔkɔ na yo malɛmba te”?

11 Batikali bapakolami bazali kosepela mpamba te basilaki kosikolama na 1919 uta na Babilone monene, lisangani ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta. Basili komona kokokisama ya esakweli ya Sefania: “Yembá nzembo, ɛ mwana mwasi na Siona! Nganga, ɛ Yisalaele! Sepelá mpe yoká esengo na motema mobimba, ɛ mwana mwasi na Yelusaleme! [Yehova] alongweli yo kokitisama na yo, abwaki libandá bayini na yo nyonso. Mokonzi na Yisalaele, ye [Yehova], azali kati na yo, okobanga mabe lisusu te. Na mokolo yango, ekolobamela Yelusaleme ete, Ɛ Siona, bangá te. Tiká ete mabɔkɔ na yo malɛmba te. [Yehova] Nzambe na yo azali kati na yo, ye elombe na makasi, akobikisa!”​—Sefania 3:14-17.

12 Na kondimisama makasi mpe na bilembeteli oyo bizali komonisa ete Yehova azali na bango, kozanga kobanga, batikali bapakolami bazali kokende liboso na kokokisáká etindá oyo Nzambe apesi bango. Bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe bazali kosakola bikateli ya Yehova likoló na boklisto ya nkombo mpamba, likoló na eteni mosusu ya Babilone monene, mpe likoló na ebongiseli mabe ya Satana na mobimba na yango. Atako basili kokutana na mikakatano mingi, na boumeli ya bambula uta 1919, bazali kotosa etindá ya Nzambe: “Ɛ Siona, bangá te. Tiká ete mabɔkɔ na yo malɛmba te.” Bazali kosala na molende na kokaboláká bamilió ya batrakte, bazulunalo, babúku, mpe mwa babúku oyo esakolaka Bokonzi ya Yehova. Ndakisa na bango ezali kolendisa kondima ya bampate mosusu oyo, uta 1935, bazali koya na ngámbo na bango.

“Tiká ete mabɔkɔ na yo malɛmba te”

13, 14. (a) Mpo na nini Bayuda mosusu batikaki kosalela Yehova, mpe lolenge nini yango emonanaki polele? (b) Nini ekozala bozoba mpo na biso ete tósala yango, mpe kati na mosala nini tosengeli te kolɛmbisa mabɔkɔ na biso?

13 Awa ezali biso ‘kozela’ mokolo monene ya Yehova, lolenge nini tokoki kozwa libongi mpenza kati na esakweli ya Sefania? Ya liboso, tosengeli kokeba ete tókóma te lokola Bayuda ya eleko ya Sefania oyo batikaki kolanda Yehova mpamba te bazalaki kondima te ete mokolo ya Yehova mokómaki pene. Bayuda wana bamonisaki ntembe na bango polele mpenza te, kasi etamboli na bango emonisaki ete bazalaki mpenza kondima te ete mokolo ya Yehova mokómaki pene. Bamipesaki mingi na koluka bozwi ya mosuni na esika ya kozela Yehova.​—Sefania 1:12, 13; 3:8.

14 Lelo oyo ezali ntango te ya kotika nzela na ntembe ete ezwa misisa kati na mitema na biso. Ekozala mpenza likambo ya bozoba ete, kati na elimo mpe mitema na biso, tózongisa koya ya mokolo ya Yehova na nsima. (2 Petelo 3:1-4, 10) Tosengeli kosɛnzɛla ete tótika te kolanda Yehova to ‘tótika te ete mabɔkɔ na biso malɛmba’ kati na mosala na ye. Kati na yango, tokoki mpe kolobela “kosala na lobɔkɔ na gɔigɔi” kati na mosala na biso ya kosakola “nsango malamu.”​—Masese 10:4; Malako 13:10.

Lolenge nini tosengeli kosala liboso na ezaleli ya kozanga bosepeli

15. Nini ekoki kopusa biso ete tólɛmbisa mabɔkɔ na biso kati na mosala ya Yehova, mpe lolenge nini likambo yango lisakolamaki kati na esakweli ya Sefania?

15 Ya mibale, tosengeli kosɛnzɛla mpo na bolɛmbu oyo eyaka mpo ete bato bazali komonisa bosepeli te. Na mikili ya Mpótó, ezalela oyo bato bamonisaka ya kozanga kosepela na makambo ya elimo ekoki kolɛmbisa basakoli mosusu ya nsango malamu. Ezaleli wana ya kozanga bosepeli ezalaki mpe na eleko ya Sefania. Yehova alobaki na nzela ya mosakoli na ye ete: “Nakopesa bato bitumbu, . . . baoyo bazali koloba na mitema na bango ete, [Yehova] akosala malamu te mpe akosala mabe te.” (Sefania 1:12) Wana akomaki na ntina na mokapo oyo kati na búku Cambridge Bible for Schools and Colleges, A. B. Davidson ayebisaki ete ezali kolobela bato oyo bazali “komizindisa kati na ezaleli ya motema makasi mpe ya kozanga kondima to ata mpe komizindisa kati na ezaleli ya koboya kondima ete ye oyo azali na nguya oyo eleki likoló akoki kotya mabɔkɔ kati na makambo ya bato.”

16. Elimo nini ezali kati na basangani mingi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba, kasi Yehova azali kopesa biso elendiseli nini?

16 Ezaleli ya kozanga bosepeli ezali komonana mingi lelo oyo kati na mikili mingi na mabelé, mingi mpenza na bikólo oyo bizali na bozwi mingi. Ata basangani ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba bandimaka te ete Yehova Nzambe akotya mabɔkɔ kati na makambo ya bato na mikolo na biso. Bazali kopekisa milende na biso ya komemela bango nsango malamu ezala na mwa kosɛka oyo na nzela na yango bazali komonisa ezaleli ya kobɛta ntembe to na kopesáká bobele mwa eyano mokuse ete: “Nasepelaka na yango te!” Kati na makambo motindo wana, kolendendela kati na mosala ya kopesa litatoli ekoki kozala ntembe monene. Ezali kotya bompikiliki na biso kati na komekama. Na nzela ya mosakoli Sefania, Yehova azali kopesa basaleli na ye ya sembo makasi, kolobáká ete: “Tiká ete mabɔkɔ na yo malɛmba te. [Yehova] Nzambe na yo azali kati na yo, ye elombe na makasi, akobikisa! Akosepela na yo na esengo, na bolingo na ye akofanda na kimya. Akosepela na yo na nzembo.”​—Sefania 3:16, 17.

17. Ndakisa nini malamu bato ya sika kati na bampate mosusu basengeli kolanda yango, mpe na lolenge nini?

17 Ezali likambo oyo ezali komonana kati na lisoló ya Batatoli ya Yehova na mikolo na biso, ete batikali, mpe mibangé kati na bampate mosusu, basili kokokisa mosala monene ya koyanganisa na mikolo oyo ya nsuka. Baklisto wana nyonso ya sembo basili komonisa bompikiliki na boumeli ya bambula mingi. Batikaki te ete ezaleli ya kozanga bosepeli oyo eteni monene ya basangani ya boklisto ya nkombo mpamba bazali komonisa elɛmbisa bango. Na yango, tiká ete baoyo ya sika kati na bampate mosusu bálɛmbisa mitema na bango te mpo na ezaleli oyo bato bazali na yango ya kozanga komonisa bosepeli, oyo etondi lelo kati na mikili mingi. Bátika nzela te ete ‘mabɔkɔ na bango malɛmba,’ to ete bákóma gɔigɔi. Tiká ete básalela mabaku nyonso mpo na kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpe mikanda mosusu malamu, misalemi mingi mpenza mpo na kosunga bato oyo bakokani na bampate ete báyekola solo na ntina na Yehova mpe na ntina na mapamboli oyo boyekoli yango ememaka.

Tókende liboso wana ezali biso kozela mokolo yango monene

18, 19. (a) Elendiseli nini tozali komona yango kati na Matai 24:13 mpe kati na Yisaya 35:3, 4? (b) Mapamboli nini tokozwa soki tosali na bomoko mpo na kokende liboso kati na mosala ya Yehova?

18 Yesu alobaki ete: “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.” (Matai 24:13) Na yango, tosengeli te kozala na “mabɔkɔ malɛmbi” to na ‘mabɔ́lɔ́ngɔ́ mazangi makasi’ awa ezali biso kozela mokolo monene ya Yehova! (Yisaya 35:3, 4) Esakweli ya Sefania ezali koloba na elikya nyonso na ntina na Yehova ete: “Ye elombe na makasi, akobikisa!” (Sefania 3:17) Ee, Yehova akobikisa “ebele monene” na eteni ya nsuka ya “bolɔ́zi monene,” na ntango akotinda Mwana na ye ete abukabuka bikólo ya politiki oyo bizali kokóba ‘kotuka’ basaleli na ye.​—Emoniseli 7:9, 14; Sefania 2:10, 11; Nzembo 2:7-9.

19 Lokola mokolo monene ya Yehova mozali kobɛlɛma, tiká ete tókenda liboso na molende nyonso, kosaleláká ye na “motema moko”! (Sefania 3:9) Na kosaláká bongo, biso moko mpe ebele ya bato mosusu, tokozala na likoki ya “kobombama na mokolo na nkanda na [Yehova]” mpe ya komona kobulisama ya nkombo mosantu ya Yehova.​—Sefania 2:3.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lisoló mozindo na ntina na “monɔkɔ na pɛto” ezwami kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ya 1 Apríli 1991, lokasa 10 kino lokasa 20.

Bozongeli

◻ Makambo nini mazali kati na losambo ya boklisto ya nkombo mpamba makokani na oyo mazalaki na eleko ya Sefania?

◻ Na ndimbola nini bakonzi mingi ya politiki lelo bakokani na “bankumu” ya mboka na eleko na Sefania?

◻ Bilaka nini bizwami kati na esakweli ya Sefania bikokisami likoló na batikali?

◻ Bamilió mingi ya bato basosoli likambo nini?

◻ Mpo na nini tosengeli te kolɛmbisa

mabɔkɔ na biso kati na mosala ya Yehova?

[Bililingi na lokasa 15]

Na ndakisa ya Sefania, batikali ya baklisto bapakolami bazali kosakola bikateli ya Yehova kozanga kobanga

[Bililingi na lokasa 18]

“Bampate mosusu” batiki te ete elimo ya kozanga bosepeli oyo bato bazali komonisa elɛmbisa bango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto