Libombami babilone monene, mwasi na pite, azali nani?
MWASI MOKO, ndumba ya bosoto mingi, oyo azali na bopusi likoló na bomoi ya bamiliaire na bato, abomami. Kasi ezali kobomama moko ya kokamwa. Ndenge nini? Mobomi azali nyama, nyama na yauli oyo atiki ye nyonso bolumbu, alei misuni na ye mpe atumbi oyo etikali na moto. Mwasi yango oyo azali na bopusi likoló na bomoi na bato azali nani? Mpo na nini nyama na yauli abundisi ye? Asalaki nini mpo azwa nsuka ya mpasi boye?a—Emoniseli 17:16, 17.
Ekoki kozala ebandeli ya lisolo moko ya nkuku, kasi ezali lisapo ya mpamba te. Ezali likambo ya solo oyo elingi kosalema mpe oyo etali yo, mpamba te lelo, ndumba wana ya bosoto azali mbala mosusu na bopusi likoló na bomoi na yo. Lisusu, ekobomama to okozwa bomoi soki okotikala ntango nyonso epai na ye to okokima ye. Na bongo ye azali nani?
Bakiliya ya nkuku ya mwasi yango
Mwasi mobomi wana, mozimbisi mabe azanga nsoni, amonisami epai na ntoma Yoane kati na mokanda na bisakweli ya Emoniseli; totangi boye: “[Anzelu] akambi ngai kati na elimo kuna na esobe. Namoni mwasi afandi likoló na nyama na yauli motane, oyo atondi na nkombo na kotuka, oyo mpe azalaki na mito nsambo na maseke zomi. Mwasi alati bilamba motane mwindo na motane mbondo, akembisi nzoto na wolo, na mabanga kitoko, na mangaliti mpe azalaki na kopo na wolo na loboko na ye etondaki na bosoto mpe na mbindo na pite na ye. Na elongi na ye nkombo na libombami ekomami ete: ‘Babilone Monene, mama na pite mpe na bosoto na mokili.’”—Emoniseli 17:3-5.
“Babilone Monene” azali bongo mwasi ya ntembe, mpamba te lisolo elobi sikisiki na verset 1 ete “afandi likoló na mai mingi.” Yango elingi koloba nini? Mwanze na Nzambe alimbolaki epai na Yoane ete: “Mai mamonaki yo, kuna efandi mwasi na pite, mazali bikolo, bibele, na mabota, na minoko.” (Emoniseli 17:15) Na ntembe te bopusi na ye ezali kopalangana kati na mabelé mobimba. Kasi azali ndumba ya mpambampamba te. Azali “mama ya basi na pite”, ye nde azali kotambwisa lisanga yango. Mpo na oyo etali pite, ye nde moto azali kopesa mitindo. Kasi azali mpe na bakiliya na ye moko mpenza.
Anzelu amonisi polele bakiliya oyo balingami makasi epai na ndumba monene oyo. Motindo nini azali komonisa bango? Alobi ete Babilone Monene azali oyo “elongo na ye mikonzi na mokili basali pite, nzokande bafandi na mokili balangi vinyo na pite na ye”. (Emoniseli 17:2) Asengeli kozala kitoko mpe kozala na boyokani mingi mpo na kozala na makoki ya kobenda bakonzi na politike ya mokili, ee, “mikonzi na mokili”! Na bongo azali nani?
Anzelu ayebisi sikisiki ete azali na nkombo, nkombo na libombami: “Babilone Monene.” Na bongo tala bilembo mibale oyo emonisi ye: Ya liboso etali baoyo bandimami epai na ye, ya mibale ezali nkombo na ye, Babilone Monene. Bilembo mibale oyo bimemi biso na bosukisi nini?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Zulunalo oyo ezali ya liboso kati na banimero minei ya Mosenzeli oyo ekolobela makambo yango mpe mosusu oyo matali mwasi yango ya kokamwa.