Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/3 nk. 23-28
  • Bilenge—bokeba ete bozala na mitindo mibale ya bomoi te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge—bokeba ete bozala na mitindo mibale ya bomoi te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini bamosusu bazalaka na mitindo mibale ya bomoi
  • Mokumba ya baboti
  • Yango ekokani mpenza na nini?
  • Ndenge nini kopengola ezaleli yango
  • Bosalisa bamosusu ete bazala na mitindo mibale ya bomoi te
  • Nasala nini mpo natika kozala na bomoi ya lolenge mibale?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Nasengeli koloba makambo oyo nasalaka na kobombana?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Bilenge​—Bokolónga nde momekamo ya bosembo na boklisto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mpo na nini nasengeli kotosa baboti na ngai?
    Lamuká!—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/3 nk. 23-28

Bilenge​—bokeba ete bozala na mitindo mibale ya bomoi te

“E elenge, sepela na bolenge na yo. . . . Kasi yeba ete mpo na makambo yango nyonso, Nzambe akoyeisa yo na kosambisama.”​—MOSAKOLI 11:9.

1, 2. Tanga ndakisa ya elenge mobali moko oyo azalaki na mitindo mibale ya bomoi?

ELENGE mobali moko akomi boye: Uta bomwana na ngai, nakobwamaki kati na boklisto ya solo, katikati na ba Témoins de Jéhovah. Nzokande etamboli na ngai, ata na ndako, ekesenaki mpenza na mitinda mpe na bindimeli ya baboti na ngai. Nazalaki na bomoi moko ezangi mibeko, bomoi oyo ezangi botosi, ya mokili oyo.

2 Abakisi: Ata liboso ete nakoma na mbula zomi, nazalaki na bomoi lolenge mibale mpe nasalaki mayele mabe na ndenge nyoso oyo nakokaki mpo ete eyebana te. Nalingaki ete nandimama mpe nazwa baninga na eteyelo, na kotikala mpe na boyokani malamu elongo na baboti na ngai. Na kelasi, nazalaki komekola mpenza molato mpe etamboli ya bamosusu. . . . Nzokande, na ndako nazalaki moto mosusu mpenza: lokola moklisto oyo azali na etamboli malamu, ndenge baboti na ngai bazalaki kolinga.”

3. (a) Kondimisama nini tozali na yango, kasi nini tobungi te? (b) Mpo na ntina nini tozali koloba mpenzampenza na bilenge?

3 Solo, etamboli ya elenge mobali oyo, ezali te oyo ya mingi kati na bino bilenge oyo bozali basangani ya lisangá. Tozali kotya ntembe te ete mingi kati na bino, bozali sembo epai na baboti na bino mpe epai na lisangá, mpe yango ezali kosepelisa biso. Tobungi te ete bamosusu bazali kosala lokola nde bazali na etamboli ya sembo, kasi bazali kosala nyonso oyo bakoki mpo na kobomba misala na bango ya mabe ete mikóló bayeba te. Yango ebimisi motuya oyo: Bozalaka se ndenge oyo tozala komona bino, to mpe bozalaka na mitindo mibale ya bomoi? Tobimisi motuna oyo mpo na kokanisela bino mabe te, kasi mpamba te tolingi bino solo mpe tolingi kosalisa bino ete bosepela na bolenge na bino na lolenge oyo ezali malamu na miso ya Jéhovah.​—Mosakoli 11:9, 10; 12:14; 2 Bakolinti 5:10.

4. Bandakisa nini Biblia ezali kolobela, ya mikóló oyo bozalaki na mitindo mibale ya bomoi? Nzokande, nini tomoni mikóló oyo katikati na bilenge?

4 Mbala mosusu bozali komituna: ‘Mpo na nini kotya bilenge mpanzi likoló? Bongo mikóló? Ntembe ezali ata moke te ete mikóló mpe lisusu basengeli kokeba ete bazala na mitindo mibale ya bomoi te. Gehazi, mosaleli na Elizé, alukaki kokosa nkolo na ye. Amekaki kobomba likambo asalaki ya kondima makabo na maboko ya Namana. (2 Mikonzi 5:20-26) Anania mpe Safira, oyo bazalaki mikóló, bakosaki mpo bamona bango bato malamu koleka ndenge bazalaki. Balobaki ete bapesaki na bantoma motuya nyonso oyo bazwaki na botekisi ya elanga, nzokande babombaki ndambo na yango mosusu. (Misala 5:1-4) Kasi soki tozali koloba mpenzampenza na bino bilenge, ezali mpo ete mikolo oyo tomoni ete mingi kati na bino bakwei na motambo oyo ya kozala na mitindo mibale ya bomoi.

Mpo na nini bamosusu bazalaka na mitindo mibale ya bomoi

5. (a) Mpo na nini bilenge mosusu bazalaka na mitindo mibale ya bomoi? (b) Ndenge nini bilenge oyo bazali na etamboli malamu batalelami mbala mingi na bamosusu, mpe bamosusu kati na bango bazali kosala nini?

5 Mpo na nini bamosusu bazalaka na mitindo mibale ya bomoi? Elenge mobali moko apesi moko na bantina minene na yango na kolobaka: Nalingaki kokesena te, kobangaka ete nabungisa baninga na ngai. Solo, mbala mingi basekaka moto soki azali komikesenisa na bamosusu na kosalaka malamu. (Tala 1 Petelo 3:16; 4:4) Ezali mpo na kopengola likambo yango mpe kondimama na bamosusu nde bilenge bazali kokoma kino kolangwa to kosangisa nzoto mwasi na mobali. Elenge mwasi moko moyekoli ya bambula 13, oyo azali Temwe te, oyo azalaki kozwa bapwé malamu na mateya nyonso mpe azalaki ntango nyonso kosangana na masolo ya kelasi, alobaki boye na mawa: “Bana mibali basepelaka te na moto oyo azali komonana kimya lokola ngai . . . Nazali kokana koyekola lisusu malamu mingi te mpe kosala likambo mosusu mpo ete nandimama na bango.”

6. Eloko nini epusaki Petelo na kosala mabe, mpe tokoki kozwa na yango bosukisi nini mpo na bilenge?

6 Ekomelaki ntoma Petelo ye moko na komibanzabanza mpo na lokumu na ye mingi koleka makambo oyo ye ayebaki ete ezalaki sembo. Ntango baklisto Bayuda bautaki Yelusaleme mpe bakomaki na Antioka epai ye azalaki, abangaki ete mbele bakongangela ye ndenge afandi esika moko na Bapakano oyo bakomaki baklisto, yango wana akabwanaki na bango. (Bagalatia 2:11-14) Lokola ata baklisto oyo bateli bakweaki na bopusi ya bamoko kati na baninga na bango, tosengeli kokamwa ete likambo yango ekomela mpe bilenge oyo bameseni na makambo mingi te?​—Masese 22:15.

7. Mpo na nini bilenge mosusu bapusamaki na kozala na mitindo mibale ya bomoi?

7 Bilenge mosusu bazalaka na mitindo mibale ya bomoi mpo na ntina moko oyo ekangani na oyo touti kolobela: bazali kokanisa ete bazangi bantango ya bisengo. Bazali koyoka baninga na bango ya kelasi bazali kolobela mpo na kominanola na bango, na ndakisa mpokwa moko kitoko oyo balekisaki na koyoka miziki ya elengi mingi”, na komela masanga mpe bangi. To lisusu, bazali koyoka bango koloba ete basimbanaki na mwana mobali Songolo to na mwana mwasi Pakala mpe basangisaki nzoto elongo na ye. Na bongo mposa ya koyeba makambo yango ezali kobotama kati na mitema na bango mpe ezali kopusa bango na koluka koyeba oyo Biblia ezali kobenga “bisengo ya masumu oyo eumelaka bobele mwa ntango moke.”​—Baebele 11:24, 25; 1 Bakolinti 10:6-8.

8. Mpo na ntina monene nini bilenge bazalaka na mitindo mibale ya bomoi?

8 Kasi, tala ntina monene oyo bilenge bazalaka na mitindo mibale ya bomoi: Mpo na bango, Jéhovah azali moto ya solo te mpe kosalama ya mokili ya sika oyo ebelami ezali solo te. Bazali kondima mpenza te bandaka ya Jéhovah mpe bazali ata kotalela te makebisi oyo azali kopesa, na nzela ya Liloba na ye mpe lisangá na ye oyo emonanaka, mpo na makambo oyo mabimaka mpo na kozanga botosi na mibeko na ye. (Bagalatia 6:7, 8) Bazali lokola Moïse te, oyo mpo na ye Biblia elobi: “Atyaki miso na ye epai na libonza [elakamaki na Nzambe]. . . . atikalaki sembo lokola ete azalaki komona ye oyo akomonanaka te.” Mpo na Moïse, Jéhovah azalaki mpenza solo, bakisa mpe bandaka na ye. Kasi baoyo bazali na mitindo mibale ya bomoi bazali na kondima wana ya mozindo te. Bazali komona bobele oyo Satana alingi ete bamona: Kongenga ya lokuta ya biloko ya ntango ye azali kotambwisa. Bazali bongo koluka bisengo ya ntango mokuse ya masumu, na kolukaka mpe komonana lokola bato na sembo.​—Baebele 11:26, 27.

Mokumba ya baboti

9. (a) Ndenge nini baboti bakoki kopusa bana na bango na kozala na mitindo mibale ya bomoi? (b) Mikóló basengeli kosala nini, mpe basengeli kozala ne mpo na kosala nini?

9 Elenge mobali oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo amonisaki likambo oyo: “Makambo oyo mpo na yango bazalaki koboya ngai na eteyelo mazalaki komemela ngai longonya mingi na ndako. Kasi mpo na ngai elekaki oyo wana, nazalaki na mposa ya moto moko oyo nakokaki kotyela ye motema, oyo nakokaki koloba na ye mpe oyo nakokaki komipesa na ye. Nzokande, nazwaki nyonso wana epai na baboti na ngai te.” Baboti, bozali kokeba ete bopusa te bana na bino na kozala na mitindo mibale ya bomoi? Bozali kopesa bango bino moko likebi mpe kotambwisama oyo basengeli na yango? Ezali likambo na ntina ete mikóló basosola mimekamo makasi oyo bilenge baklisto bazali kozwa na eteyelo, mimekamo oyo mikoki kobebisa kondima na bango. Basengeli kozala pene mpo na kosala nyonso oyo bakoki mpo na kolendisa bango mpe kosalisa bango.​—Nzembo 73:2, 3; Baebele 12:3, 12, 13.

10. a) Na mituna nini baboti bazali na mokumba ya koyanola? (b) Nini esalemaka mbala mingi soki baboti bazali kopesana bana na bango ata mobeko moko te etali bizaleli?

10 Mbala mingi bilenge bazali komituna mpo na oyo etali boyokani kati na mibali mpe basi. Kasi likambo na mawa ezali ete baboti mingi baboyaka kolobela likambo yango. Elenge mwasi moko kitoko ya Lycée oyo azalaki na bambula 15 amikundolaki boye: “Ata mbala moko te basololaki na ngai na motema polele. Nyonso oyo nayebi mpo na makambo matali kosangisa nzoto, nayekolaki yango ngai moko. . . . Nakokaki te komeka kolobela bango likambo yango, nzokande nazalaki na makambo mingi oyo nazalaki na mposa ya koyeba.” Asukisaki na kolobaka: “Libulu oyo ezalaki kokabola ngai na baboti na ngai ekomaki lisusu monene, mpe nakomaki na mposa ya koyeba makambo mingi, nakomaki zoba mpe bindimandima.” Na nsima, elenge mwasi yango asalaki pite elongo na elenge mobali moko oyo azalaki kosenginya ye mbala na mbala. Kasi azali bobele ye moko nkolo ya libunga na ye?​—Masese 22:3; 27:12.

11. (a) Ndenge nini baboti bazali komonisa ete balingaka bana na bango? (b) Ndenge nini mbala mingi bilenge batalelaka bolingo yango?

11 Ezali likambo na ntina koleka ete baboti bamonisa na bana na bango ete balingaka bango mpenza na kopesaka bango ntango, na kozalaka na masolo ya nkuku elongo na bango, mpe na kotyeleka bango mibeko mpo na etamboli (Masese 15:22; 20:18) Elenge mobali mosusu alobaki: “Nazali na liyoki ete soki bazalaki mpenza komibanzabanza mpo na ngai, mbele batyelaki ngai mwa mibeko.” Atako sikawa bana na bino bazali komona lokola ete mibeko oyo bozali kotyela bango eleki makasi, bakomona ntina na yango na nsima. Tozali na endimiseli na yango na maloba oyo elenge mwasi moko akomelaki mama na ye: “Ngai moto nazalaki ntango nyonso kokoma kino pene na kosala oyo ezalaki kosepelisa yo te mpe koluka mbala nyonso kobuka mibeko makasi oyo ozalaki kotyela ngai, lelo nazali kotonda yo mingi mpenza ndenge okangaki ngai makasi.”, Na bongo bomonisa ete bolingi bana na bino na kosengaka ete batosa motinda na bino. Bosalisa bango mpo ete bazala na mitindo mibale ya bomoi te, na kosenzelaka ete bozalaka na masolo elongo na bango mpe na kozalaka pene ntango bazali na mposa na bino!

12. Ezaleli nini ya mayele mpenza te baboti mosusu bazali na yango, oyo ezali kopusa bana na kozala na mitindo mibale ya bomoi?

12 Baboti bakoki lisusu kosalisa bana na bango na lolenge mosusu mpenza mpo ete bazala na mitindo mibale ya bomoi te. Ezali yango emonisami na maloba oyo ya mosambisi moko ya Tribunal de grande instance ya mboka New Jersey (Etats-Unis): “Balakisi bazali komeka kosembola bana ya kelasi oyo bazali komitambwisa mabe na eteyelo, kasi baboti bazali kokweisa bango mpo na yango na esika ete basala elongo na balakisi yango.” Ezali komonana ete bamosusu bazali komikosa na kokanisaka ete bana na bango bakoki kosala mabe te. Bazali kokanga matoi ata ntango bankulutu to bandeko mosusu bazali na mikumba kati na lisangá ya boklisto bazali koyebisa bango etamboli mabe ya bana na bango. Na kosalaka bongo, bazali kopusa bana na bango ete bamitambwisa na bokosi.

Yango ekokani mpenza na nini?

13. Na bosolo, kozala na mitindo mibale ya bomoi ekokani na nini?

13 Esengeli kokanga ntina malamu ete kozala na mitindo mibale ya bomoi ezali lokola kozala na bomoi ya bokosi, komitambwisa lokola moto na mayele mabe, lokola moto azali kobomba lolenge na ye ya solo to ipokrite. (Nzembo 12:2; 2 Timote 3:13) Kosala bongo ezali komekola Satana, oyo “amimonisaka ntango nyonso lokola ntoma na moi.” (2 Bakolinti 11:14, 15) Ezali mpe kokokana na bakonzi ya mangomba epai na bango Yesu alobaki: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi! mpamba te bozali lokola mayita mapakolami mpembe, oyo mamonani kitoko na libanda, kasi na katikati etondi na mikwa ya bakufi mpe na lolenge nyonso ya mbindo. Na bongo bino mpe, na libanda bomonani sembo epai na bato, kasi na katikati botondi na bokosi mpe na botyoli ya mibeko.” (Matai 23:27, 28) Na solo, baoyo bazali na motindo mibale ya bomoi bazali kotumola Nzambe na lolenge mabe mpenza.

14. Mpo na nini esengeli te kozala na mitindo mibale ya bomoi?

14 Likambo mosusu esengeli mpe kotalelama malamu malamu ezali oyo: Tokoki te kobomba libela etamboli ya bokosi. Biblia elobi: “Ata mwana ayebani na misala na ye, soko mosala na ye ezali na mpeto mpe soko ezali sembo.” (Masese 20:11; Luka 12:1-3) Na solo, etamboli na yo, ezala malamu to mabe, ekosuka na koyebana lelo to lobi. Nzokande, Biblia ezali kondimisa biso ete Nzambe akopesa etumbu makasi epai na bakosi. (Matai 24:51) Na ntembe te, eleki mpenza malamu ete tozala na mitindo mibale ya bomoi te.

Ndenge nini kopengola ezaleli yango

15. Eloko nini ekoki kosalisa bilenge ete bazala na mitindo mibale ya bomoi te?

15 Nzela malamu mpo na kopengola ezaleli ya kozala na mitindo mibale ya bomoi, ezali ya kokanisa na oyo elimboli mpenza ezaleli yango, mpe komituna: Nalingi solo ete natalelama lokola mokosi, momekoli ya Satana mpe ya Bafalisai? Mpenza te! Nzela mosusu ezali ya kokanisa na bampasi mpe mawa oyo okoki kozwa na kosalaka bongo. Omikundola oyo eyelaki Gehazi mpo amekaki kobika na lokuta: maba ya Namana mazwaki ye, mpe atikalaki na yango kino liwa na ye. Mpo na Anania mpe Safira, bango nyonso mibale babomamaki na Nzambe mpo bamekaki komimonisa na bokosi lokola bato oyo bayebi kokaba.​—2 Mikonzi 5:27; Misala 5:5, 9, 10.

16. Nini ekomelaki elenge mobali moko oyo amekolaki lolenge ya bomoi ya mokili oyo?

16 Totalela mpe bandakisa ya ntango na biso. Na Etats-Unis, elenge mobali moko abandaki koyekola Biblia mpe koyangana na makita na Salle du Royaume. Kasi na nsima akomaki na lolenge ya bomoi ya mokili oyo mpe atikaki kokende na lisangá. Nsima na bambula, akomaki ete: “Eleki basanza soki mibale, nasambelaki Nzambe ete atindela ngai Témoin moko mpamba te nazalaki na mposa ya kozongela libota na ye. Nazongelaki koyekola, mpe ezali na ntango yango nde nayokaki nsango moko ya kobangisa: esili koleka sanza moko, botali ya monganga emonisaki ete nazwaki maladi na nkombo Sarcone de kaposi, yango ezali nzela moko na maladi oyo babikaka na yango te na nkombo SIDA.” Asukisi na maloba oyo: “Soki nayokaki mpe natosaki makebisi ya Biblia, mbele lelo nyonso oyo ekomeli ngai te!” Ya solo, bokolinga te kozala na etamboli oyo ezali kobimisa makambo ya mawa ndenge yango! Mokili ezali mpenza na eloko moko malamu ya kopesa biso te.​—1 Yoane 2:15-17.

17. Na likambo mosusu nini bilenge basengeli kokanisa mpo na kozala na mitindo mibale ya bomoi te?

17 Ekozala petee koleka mpo na bino kopengola ezaleli ya kozala na mitindo mibale ya bomoi, soki bozali kokanisa makambo oyo etamboli yango ekoki kobimisa likóló na nkombo ya Jéhovah. Elenge mobali oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, alobaki ete mokolo moko moto moko amonaki ye azali kokamata likaya mpe alobaki na ye: “Nayebaki te ete ba Témoins de Jéhovah bakoki komela likaya. Ozali Témoin de Jéhovah te?” Alobaki na nsima ete motuna yango ebulunganisaki ye mpenza, mpamba te etindaki ye asosola ete etamboli na ye ezalaki kobwaka nsoni likoló na Jéhovah. Ezali yango nde bolingi? Lokola Bayisraele ya kala oyo batikalaki sembo te, bozali kotya likebi mingi te na Nzambe na biso kino koyeisa bosoto likoló na nkombo na ye?​—Nzembo 78:36, 37, 41; Ezekiele 36:22.

18. (a) Mingimingi baboti bazalaka ndenge nini soki bayebi ete mwana na bango azali na mitindo mibale ya bomoi? (b) Mpo na nini yango esengeli kopusa bilenge baklisto ete bazala te na mitindo mibale ya bomoi?

18 Bokanisa mpe na lokumu mpe na mayoki ya baboti na bino. Elenge mobali oyo tolobelaki liboso abakisi ete: “Mokolo moko, baboti na ngai bayebaki lolenge na ngai ya solo. Yango elembisaki bango makasi. Mpe mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, namonaki mama na ngai mpe tata na ngai bazali kolela. Bayokaki mpasi mingi koleka, mpo na oyo ngai nasalaki.” Baboti na bino mbala mosusu bango mpe bakolela, soki bayoki mokolo mosusu ete bozali na mitindo mibale ya bomoi. Ezali yango nde bolingi? Biblia elobi: “Kozala na lokumu malamu eleki kozala na bozwi mingi.” (Masese 22:1) Na kozalaka na mitindo mibale ya bomoi, bozali kobebisa bobele lokumu na bino moko te, kasi lisusu oyo ya baboti na bino. Bozali kotya yango na potopoto, na koyokisaka bango nsoni mpe mawa.​—Masese 10:1; 17:21.

19. Etamboli mabe ya bana mibali na Yakobo, ebimiselaki tata na bango makambo nini, mpe liteya nini tokoki kozwa na yango?

19 Likambo ya bana na Yakobo ezali komonisa ete bana bakoki kobebisa lokumu ya baboti na bango. Nsima wana mwana mobali moko asanganaki na makasi na leki na bango ya mwasi Dina, babomaki mibali ya mboka epai likambo yango ya mabe esalemaki mpe babebisaki mboka yango; ntina wana epusaki Yakobo na komilela na maloba oyo: “Bino bomemeli ngai mpasi, mpo na ntina na bino nakomi nsolo mabe mpo na bafandi ya mokili oyo.” Na nsima Nzambe mpe alobaki na Yakobo ete alongwa na esika yango. (Genese 34:30; 35:1) Soki bozali na mitindo mibale ya bomoi, bokoki bino mpe kokomisa nkombo ya tata na bino mpe ya mama na bino nsolo mabe, kopusa bango bamiyoka nsoni ata wana ezali bango liboso na bafandi ya pembeni mpe baninga na bango. Liloba oyo ya Biblia ezali solo mpenza: “Mwana ya bozoba apesaka tata na ye mawa mpe apesaka bololo na oyo abotaki ye.”​—Masese 17:25.

20. Baboti baklisto bapesi bana na bango nzela ete basepela na likabo nini ya kitoko?

20 Nzokande, tozali na kondimisama ete bozali te na mposa ya kopesa mawa to bololo epai na baboti na bino. Na bongo bokanisa na makambo oyo etamboli na bino ekobimisela bango. Lisusu, soki bozali na bolamu ya kozala na baboti baklisto, bokanisa ete bapesi bino bobele bomoi te, kasi eloko moko ya motuya lisusu koleka. Na yango Biblia ezali koloba mpo na Jéhovah: “Boboto na yo ya motema eleki bomoi.” (Nzembo 63:3) Ee, na kobokolaka bino kati na solo, baboti na bino bapesi bino nzela ya kosepela na boboto ya motema ya Nzambe, basalisi bino na kozala na boyokani malamu elongo na ye. Ezali wana libaku malamu oyo ezali na motuya koleka bomoi, mpamba te ata soki bokufi, Nzambe akopesa bino lisusu bomoi ya seko kati na Paradis.

Bosalisa bamosusu ete bazala na mitindo mibale ya bomoi te

21. (a) Mokumba nini ezali na bilenge oyo bayebi ete bamosusu bazali komitambwisa mabe? (b) Ndakisa malamu nini elenge mwasi moko ya mibu 13 apesaki mpo na yango?

21 Okosala nini soki oyebi ete moklisto moko azali na mitindo mibale ya bomoi? Libosoliboso, lendisa ye ete akende kokutana na bankulutu. Bongo soki aboyi kosala yango? Mpo na yango, engebene Biblia, osengeli koyebisa etamboli mabe ya moto yango. (Levitike 5:1) Toyebi ete ezali likambo ya petee te, kasi ezali yango ebongi kosala. Biblia elobi: “Bampota oyo moninga azokisi ezali sembo”. (Masese 27:6) Nsima na koyoka diskur oyo ezalaki kolobela mokumba yango ya Biblia, elenge mwasi moko ya mibu 13 akendaki kokutana na moninga moko ya mwasi oyo, ndenge ayebaki, azalaki kosala misala mabe, mpe ayebisaki moninga yango ete esengelaki na ye ayambola yango epai na bankulutu. Akomi boye: “Na nsima nalukaki koyeba soki ayebisaki libunga na ye epai na bankulutu. Lokola asalaki yango te, nakendeki koyebisa yango epai na moko na bango.” Na nsima elenge mwasi yango azalaki kotuna motuna oyo: “Nasalaki malamu ndenge nafundaki ‘moninga na ngai ya kala ya motema”’? Ee, na solo! Atako kosala bongo ekoki kobimisa mpasi liboso, ekoki komonana na nsima ete ezali liziba ya esengo, mpe ekoki ata kozala ntina ya lobiko mpo na oyo asalaki lisumu.​—Baebele 12:11.

22. Batoli nini ya bwanya bilenge balendisami mpo na kolanda yango, mpe bolamu nini ekobima na yango?

22 Nzokande, bilenge, bokoki kopengola mikakatano yango soki bozali na mitindo mibale ya bomoi te. Na bongo bozalaka na bwanya. Bozalaka na boyokani makasi elongo na Nzambe, lokola moninga ya motema. Bobondelaka ye mbala na mbala, bosengaka lisalisi na ye mpe boyekolaka mingi Liloba na ye, Biblia, mpo ete bokoma mpenza koyeba bizaleli na ye. Bongo, bokozwa na yango bolamu mpe bokosepelisa mitema ya baboti na bino. Mpe, oyo eleki ntina lisusu bokosepelisa motema ya Jéhovah.​—Masese 27:11.

Bozongeli

□ Mpo na nini bilenge mosusu bazalaka na mitindo mibale ya bomoi?

□ Ndenge nini baboti mosusu bapusaka bana na bango na kozala na mitindo mibale ya bomoi?

□ Na bosolo, kozala na mitindo mibale ya bomoi ekokani na nini?

□ Nini ekoki kosalisa bilenge ete bazala na mitindo mibale ya bomoi te?

□ Mokumba nini bilenge bazali na yango soki bayebi ete bilenge mosusu asali mabunga minene?

[Elilingi na lokasa 25]

Baboti bazali komonisa ete balingaka bana na bango na kozala na masolo ya nkuku elongo na bango.

[Elilingi na lokasa 27]

Soki oyebi ete moklisto moko asali libunga monene, lendisa ye ete ayambola yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto