Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/1 nk. 13-17
  • Bolingo esangisi bango esika moko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolingo esangisi bango esika moko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bolingo ya sembo
  • Bokokani na ntango na biso
  • “Etonga bobele moko”
  • “Bolingo ya mozindo”
  • “Basalaki boninga makasi mpenza”
    Mekolá kondima na bango
  • Yonatana “asalaki mosala na Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Yonatane: Mobali ya mpiko mpe ya sembo
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Yonatane—“Eloko moko te ekoki kopekisa Yehova”
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/1 nk. 13-17

Bolingo esangisi bango esika moko

Liboso na makambo bolinganaka makasi.​—1 PETELO 4:8.

1. Bolingo ya motindo nini tozali komona kati na libota na Nzambe lelo, mpe baklisto bapakolami bazali kosakola nini uta 1922?

LELO OYO, tozali komona bolingo motindo yango kati na libota ya Nzambe? Solo mpenza! Bato oyo bazali komonisa yango bandimi bokonzi ya Jéhovah mpe bazali koloba mpo na kolongisa yango, lokola Davidi asalaki na kala. Mingimingi kobanda 1922, bandeko ya Yesu Klisto, “Mwana na Davidi”, baoyo bapakolami na elimo, bazali kosakola na mabelé mobimba ete Bokonzi na Nzambe esili kobelema mpe bakonzi mabe batambwisami na Satana bakobomama na maboko na Yesu Klisto, Mosambisi oyo Nzambe aponi.​—Matai 21:15, 42-44; Emoniseli 19:11; 19-21.

2. Mpo na nini tokoki koloba ete Davidi azalaki ‘moto oyo Jéhovah asepelaki na ye’?

2 Davidi azalaki ‘moto asepelisaki motema na Jéhovah’. Ezali yango nde bolingo na ye mpo na Jéhovah mpe mpo na boyengebene na Ye emonisaki​—mpe ata mokonzi mabe Saulo andimaki ete azalaki na bizaleli yango—​, mpe na molende na ye, bokangami na ye makasi epai na Jéhovah, lolenge oyo azalaki kotambwisa libota mpe komikitisa na ye mpo na kotosa ebongiseli ya teokratike.​—1 Samwele 13:14; 16:7, 11-13; 17:33-36; 24:9, 10, 17.

3. Liyoki nini ekangisaki Yonatana na Davidi, mpe mpo na nini?

3 Nsima na bolongi na ye monene likoló na Goliata, Davidi akendaki kopesa rapor epai na Saulo. Ezalaki na libaku wana nde moto moko oyo ye mpe alingaki boyengebene abimaki. Ezali bongo Yonatana, mwana mobali ya liboso ya mokonzi Saulo. “Esilaki ye [Davidi] kolobana na Saulo, motema na Yonatana ekanganaki na motema na Davidi. Yonatana alingaki ye lokola motema na ye.” (1 Samwele 18:1) Bosepeli ya solo oyo Yonatana amonisaki epai na Davidi epusamaki, mpo na motema boboto ya Davidi te to mayele na ye mpo na kosalela ebwakeli ya mabanga te, kasi mpo na molende ya solo oyo na nzela na yango alongolaki nsoni oyo ebwakamaki likoló na nkombo na Nzambe, bolingo na ye ya kozanga koluka litomba mpe motema na ye mobimba epai na Jéhovah.​—Tala Nzembo 8:1, 9; 9:1, 2.

4. Yonatana asalaki nini mpo na komonisa mpenza ete andimaki solo ete Davidi azalaki moto oyo apakolamaki mpo na kozala mokonzi?

4 Uta ntango yango, atako Yonatana alekaki Davidi na mibu 30, ekangeli ya boninga makasi ekangisaki ye na elenge mobundi oyo. “Yonatana asalaki kondimana na Davidi mpo ete alingaki ye lokola motema na ye moko. Yonatana alongolaki bilamba bizalaki na ye mpe apesaki yango epai na Davidi, yango elataki ye mpe mopanga na ye mpe litimbo na ye mpe mokaba na ye.” (1 Samwele 18:3, 4) Na wana, Yonatana andimaki polele ete Davidi akomi na esika ya liboso. Atako ye, Yonatana azalaki mokitani ya mokonzi Saulo, nzokande amonisaki epai na Davidi bolingo ya solo, bolingo etongami likoló na mitinda. Atosaki epai na Davidi lokola epai na moto oyo aponamaki mpo na kozala mokonzi, moto amonisaki ekateli na ye mpenza mpo na kolongisa nkombo mpe bokonzi ya Jéhovah.​—2 Samwele 7:18-24; 1 Ntango 29:10-13.

5. Yonatana andimaki likambo nini mpo na oyo etali etumba ya bonzambe?

5 Yonatana mpe azalaki kobunda mpo na boyengebene. Mokolo mosusu alobaki boye: “Ezali na mpasi epai na Jéhovah te kobikisa biso na bato mingi to na bato mingi te”. Na yango, Yonatana azalaki koyeba ete, mpo na kozwa elonga kati na etumba ya bonzambe, esengeli ntango nyonso koluka litambwisi na Nzambe. Kozanga koyeba lokola asalaki libunga oyo mpo na yango Saulo apeselaki ye etumbu ya liwa, Yonatana andimaki na komikitisa nyonso etumbu ya Tata na ye. Abikaki mpo ete peuple ‘balobaki’ mpo na ye.​—1 Samwele 14:6, 9, 10, 24, 27, 43-45.

Bolingo ya sembo

6. Na libaku nini Yonatana, kati na bolingo na ye ya sembo, abikisaki Davidi?

6 Saulo ayokaki zuwa mpo na lokumu oyo Davidi azwaki na kolongaka bitumba mpe alukaki koboma ye, kasi, na bolingo na ye ya sembo, Yonatana abikisaki moninga na ye. Lisolo elobi na biso: “Nde Yonatana, mwana na Saulo, alingaki Davidi mingi. Yonatana ayebisaki Davidi ete, ‘Saulo, tata na ngai, aluki ete aboma yo. Boye nalombi yo ete omibatela kino ntango na ntongo, ofanda na esika na nkuku omibomba.’” Na mokolo yango, Yonatana akitisaki nkanda ya Saulo, mpe Davidi abikisamaki. Nzokande, na nsima, Davidi “abundaki na Bafilistia mpe abomaki bango na kufa monene”. Lokola likunya na ye elamukaki, Saulo azwaki lisusu likanisi ya koboma Davidi, likambo oyo epusaki Davidi na kokima mosika.​—1 Samwele 19:2-10.

7. Ntango Yonatana mpe Davidi oyo azalaki kokima bakutanaki, balobanaki makambo nini mpo na kosala lisusu kondimana na bango?

7 Mwa mikolo na nsima, wana ezalaki ye kokima, Davidi amonanaki lisusu na Yonatana mpe Yonatana alobaki na ye: “Nakosalela yo lokola ekanisi yo na motema.” Baninga mibale bazongelaki lisusu kosala boyokani na bango liboso na Jéhovah, mpe Davidi alakaki ete ata mokolo moko te akolongola motema boboto na ye epai na ndako na Yonatana, elaka oyo akokisaki yango na bosembo nyonso. “Mpe Yonatana akatisaki ndai na Davidi lisusu mpo ete alingaki ye. Alingaki ye lokola motema na ye moko.”​—1 Samwele 20:4-17; 2 Samwele 21:7.

8. Mpo na nini Davidi mpe Yonatana bakutanaki na nkuku kati na esobe, mpe likambo nini elekaki?

8 Mokonzi Saulo azwaki ekateli makasi ya koboma Davidi. Akomaki kino kobwakela mwana na ye Yonatana likonga, mpamba te azalaki ntango nyonso kokotela Davidi. Lisusu Yonatana mpe Davidi bakutanaki na nkuku kati na zamba. Biblia elobi na biso: “Davidi. . . akweaki na elongi na ye, akumbamaki mbala misato. Bongo bayambanaki mpe balelanaki nde Davidi alekaki. Yonatana alobelaki Davidi ete, kenda na kimya mpo ete biso mibale tosili kondimana na nkombo na Jéhovah ete, “Jéhovah azali kati na biso na yo mpe kati na bana na ngai mpe bana na yo libela!”’” Na nsima bakabwanaki, mpe Davidi akimaki epai na esobe ya Zife.​—1 Samwele 20:41, 42.

9, 10. (a) Elendiseli nini Yonatana apesaki epai na Davidi, ntango bango nyonso mibale bakutanaki mpo na mbala ya nsuka? (b) Na liwa ya Yonatana mpe ya Saulo, baoyo babomamaki na Bafilistia, loyembo nini ya mawa Davidi asalaki mpe loyembo yango esuki na maloba nini?

9 Na bolingo nyonso, Yonatana abandaki koyikisa Davidi mpiko. Tozali kotanga: “Yonatana, mwana na Saulo, atelemaki mpe akendaki epai na Davidi na Holesa mpe asungaki ye kozwa makasi kati na Nzambe. Alobaki na ye ete, ‘Banga te mpo ete loboko na Saulo, tata na ngai, ekozwa yo te. Yo mpe okozala mokonzi likoló na Yisraele mpe ngai nakozala penepene na yo. Saulo tata na ngai ayebi yango na malamu.’ Mpe bango mibale bakatanaki kondimana liboso na Jéhovah.”​—1 Samwele 23:15-18.

10 Tokanisi ete, mokolo yango, ezalaki mbala ya nsuka oyo Davidi mpe moninga na ye bamonanaki. Mpamba te, Yonatana mpe Saulo babomamaki na nsima kati na etumba elongo na Bafilistia. Na libaku yango, Davidi, asalaki loyembo ya mawa. Ata amonisaki limemya na ye mpo na Saulo, mopakolami ya Jéhovah, Davidi asukisaki nzembo na ye na maloba oyo ya kitoko: “E Yonatana, obomami kati na bisika-na-likoló na yo. Nayoki mawa mingi mpo na yo, Yonatana ndeko na ngai! Yo ozalaki na bolingo epai na ngai. Bolingo na yo epai na ngai ezalaki malamu na kokamwa, koleka bolingo na basi. Bato na mpiko bakwei na kokwea boni! Mpe bibundeli na etumba bibebi nyee!” (2 Samwele 1:18, 21, 25-27) Nsima na yango, Davidi apakolamaki lisusu mpo na mbala ya mibale, na libaku yango mpo na kozala mokonzi na Yuda.

Bokokani na ntango na biso

11, 12. (a) Bolingo ya motindo nini Davidi mpe Yonatana bapesaki ndakisa? (b) Bolingo mozindo oyo esangisaki Davidi mpe Yonatana ezalaki elilingi ya nini?

11 Mpo ete “Makomi nyonso mapemami na elimo na Nzambe makoki kopesa litomba na mateyo”, liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya Davidi mpe Yonatana? (2 Timote 3:16) Na yango, tozali koyekola ete ezali na bolingo moko “koleka bolingo na basi.” Ya solo, ntango mibeko na Nzambe mitali libala mitosami malamu, “bolingo na basi” ekoki kozala kitoko mpe na mapamboli mingi. (Matai 19:6, 9; Baebele 13:4) Nzokande, Davidi mpe Yonatana bapesaki ndakisa ya motindo ya bolingo malamu koleka lisusu, likoló na yango etinda oyo ezali kotalela: “Yoka, e Yisraele, Jéhovah azali Nzambe na biso, Jéhovah moko, mpe okolinga Jéhovah Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba.”​—Deteronome 6:4, 5.

12 Kati na bomoko, Davidi mpe Yonatana bazalaki komonisa bolingo yango na kobundaka mpo na kolongola nsoni nyonso oyo banguna na Jéhovah bazalaki kobwaka likoló na nkombo na ye. Na bongo, mibali mibale yango bazalaki kolona mpe ‘bolingo mozindo moko mpo na mosusu’. (1 Petelo 4:8) Boninga oyo bazalaki na yango elekaki bongo likambo oyo etinda ezwami kati na Levitike 19:18 ezalaki kosenga: “Okolinga moninga na yo lokola yo mpenza.” Na yango, boninga wana ezalaki komonisa bolingo oyo Yesu alobelaki wana elobaki ye epai na bayekoli na ye ete: “Nazali kopesa bino lilako na sika ete, Bolinganaka; bolinganaka lokola ngai nalingi bino.” Komipesa emonanaki polele kati na bolingo na Yesu, ezali bobele te mpo ete azalaki kotosa mobimba na mokano ya Jéhovah, kasi lisusu mpo ete andimaki ‘kosopa bomoi na ye mpo na baninga na ye’.​—Yoane 13:34; 15:13.

“Etonga bobele moko”

13. Etuluku nini ya basakoli ya Bokonzi ebimaki, mingimingi kobanda 1935, mpe na nini baklisto bapakolami basangani na bango?

13 Na kala, “etonga moke” ya baklisto bapakolami eyikelaki mpiko ndambo monene na etumba oyo elongo na Goliata ya lelo. Nzokande, kobanda 1935, basakoli ya Bokonzi oyo bazwami kati na “lopango” mosusu, ya monene koleka, bayaki kosala na bango elongo. “Bampate mosusu” yango batyami esika moko na baklisto bapakolami mpo na kosala elongo na bango “etonga bobele moko” etambwisami na “mobateli na mpate se moko”, “Mwana na Davidi”. “Bampate” wana nyonso bazali bongo na bomoko na nzela na bolingo ekokani na oyo ekangisaki Davidi mpe Yonatana.​—Luka 12:32; Yoane 10:16; Ezekiele 37:24.

14. Bokokani nini makaneli ya Saulo oyo makanaki koboma Davidi mazwi lelo, mpe nani amonisamaki na Yonatana ntango amipesaki mobimba epai na Davidi?

14 Etuluku yango, oyo emonisamaki na Yonatana, ebandaki kokoma ebele monene ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki; baklisto bapakolami elongo na baninga na bango bazwaki bongo eleko ya komekama. Monyokoli makasi oyo bazwaki na boumeli ya mibu yango ezalaki mbala mingi kouta epai na bakonzi na mangomba. Ezwi bokokani kati na likambo oyo Saulo azalaki kokanela Davidi mpo na koboma ye, mopakolami na Jéhovah, mpe na nsima, Yonatana, ntango amikotisaki ye nyonso na ngambo ya Davidi. Oyo nde bolingo mozindo kelasi na Davidi mpe na Yonatana bamonisanaki na boumeli ya eleko yango! Na bongo, lisese na Yesu oyo tozali kokuta na Matai 25:35-40 mbala mingi ekokanaki na motindo na polele mpenzaa.

15. (a) Na nini etamboli ya ba Témoins ekeseni na oyo ya kelasi ya Saulo? (b) Nini lelo ekokani mbala mosusu na “elimo mabe oyo ezalaki kotungisa Saulo?

15 Bosembo ya ba Témoins de Jéhovah ekeseni na etamboli ya kelasi ya Saulo. Na boyokani na etinda na Yesu, Batemwe, baoyo “basangani na mokili te”, ‘bazali kolingana’ kati na mokili mobimba (Yoane 15:17-19) Epai mosusu, na boumeli ya bitumba mibale ya mokili mobimba, bakonzi na mangomba ya boklisto na mokili oyo basambelaki “nzambe” na bango kati na ngambo nyonso mibale mpo na kolonga, atako na ntango yango bamilió na basoda bazalaki kobomama epai na bandeko na bango ya lingomba moko na mikili misusu. Ekoki kozala ete “elimo mabe na Jéhovah” oyo ezalaki kotungisa Saulo ekokani na likambo oyo ebimi na bolozi oyo baanzelu batindaki na eleko na biso. (Emoniseli mokapo 8) Lokola yango ezali komonana, bakonzi na mangomba ya boklisto na mokili oyo bazali na elimo santu na Jéhovah te.​—1 Samwele 16:14; 18:10-12; 19:10; 20:32-34.

16. (a) Ndenge nini, kosalelaka libaku oyo bitumba mibale ya mokili mobimba ebimisaki, bakonzi na mangomba banyokolaki libota na Jéhovah? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete, mibu oyo, Saulo ya lelo alandi konyokola libota na Nzambe?

16 Na 1918, bakonzi na mangomba bamonaki ete etumba ezalaki libaku malamu mpo na kopusa bakonzi na politike na Amerike ete batombokela batambwisi na misala ya la Société Watch Tower mpe na nsima kokotisa bango na boloko. (Na nsima, Bayekoli yango ya Biblia balongisamaki kati na makambo nyonso.) Na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mosala ya ba Témoins de Jéhovah epekisamaki kati na mikili oyo Alemanye, Japon mpe ltali bazalaki kotambwisa bakisa mpe kati na mikili misusu mingi oyo mitambwisamaki na Angleterre. Meko yango mbala mingi ekamatamaki mpo na kosepelisa mangomba oyo bazalaki kotya bopusi; ezali yango nde emonisi mokanda oyo elakisami awa na likoló, mokanda oyo ekomamaki na episkopo ya Sydney (oyo na nsima akomaki cardinal) bobele liboso ete mosala ya ba Témoins de Jéhovah ekoka kopekisama na Ostrali. Meko wana, oyo eboyamaki kondimama liboso na esambiselo eleki monene ya mboka wana, ebengamaki epai na mosambisi Starke “endimami te na mibeko, ya kozanga moboko mpe ya nko”. Elongolamaki na le 14 Juin 1943, mpe basengaki na boyangeli ya mboka wana ete efuta dommages mpe intérêts. Kala mingi te, kati na mwa mikili mingi ya Afrike mpe ya Asie oyo mipusami na mangomba, ba Témoins de Jéhovah bazwaki monyoko ya makasi koleka. Na bongo, bakonzi na mangomba ya boklisto na mokili, Saulo ya lelo, bazali kolanda konyokola libota na Nzambe.

17. (a) Ndenge nini ba Témoins de Jéhovah bazali komitambwisa liboso na matumoli ya ntango nyonso ya mikonzi na politike mpe ya mangomba? (b) Lokola bazali na bomoko kati na mabelé mobimba, ba Témoins de Jéhovah bazali kokokana na banani?

17 Ndenge nini, kobanda 1980, ba Témoins de Jéhovah bazali komitambwisa liboso na matumoli oyo bazali kozwa mbala na mbala longwa epai na mikonzi na politike mpe epai na mikonzi na mangomba? Bazali komitamwisa lokola Davidi liboso na Goliata mpe mokonzi Saulo, lokola Yonatana liboso na tata na ye. Bazali koyoka ata nsomo moke te mpe, kati na likambo etali bokonzi ya molongo mobimba, bazwi ekateli ya kotikala sembo, mpamba te bayebi ete Bokonzi na Nzambe ekolonga. (Danyele 2:44) Liboso na monyoko, bazali komonisa ete bazali na bomoko mpe bazali kolendisana, bakangisami, kati na mabelé mobimba, na nzela na bolingo oyo ezali kokamwisa mokili. Lokola bakotaka na makambo ya mokili te, na ntango ya bitumba bazali kosopa makila ya bandeko na bango te oyo bazali na mikili misusu. (Mika 4:3, 5) Na bongo, bakokani na bato oyo Yesu alobelaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo”. (Yoane 13:35) Ba Témoins de Jéhovah, baoyo bazali na bomoko na bondeko ya mokili mobimba, ‘bamilatisi bolingo, mpamba te bolingo ezali ekanganeli ekoki mpenza’, ekanganeli oyo ezali kokweisa bandelo ya mposo, ya ekólo mpe ya mokili.​—Bakolose 3:14.

“Bolingo ya mozindo”

18. (a) Bokokani nini bolingo na Yonatana mpo na Davidi ezwi na eleko na biso, mpe nini emonisi yango? (b) Likambo nini etamboli kitoko ya kelasi ya Davidi ebimisaki kati na mokili mobimba?

18 Tokanisa lisusu ete “molimo na Yonatana ekanganaki na molimo na Davidi, mpe [ete] Yonatana abandaki kolinga ye lokola molimo na ye moko”. Bokokani nini ya polele bolingo yango ezwi na “mikolo oyo ya nsuka”! (2 Timote 3:1, 14) Na katikati na mobulu ezangi ntina ya eleko mabe, lisangá ya ba Témoins de Jéhovah ezali lisangá bobele moko oyo ezali na bomoko kati na bolingo awa na mabelé mobimba. Lokola bazali baklisto oyo bakotaka na makambo ya mokili te, ba Témoins bazali kokumisa Mozalisi na kondimaka ye lokola Nkolo Moyangeli ya molongo mobimba (Nzembo 100:3) Ya solo, Barefayime ya lelo, bandeko na politike ya ‘Goliata’, bakoki ntango nyonso kotumola Yisraele ya elimo (2 Samwele 21:21, 22); mpe Saulo ya lelo, bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili, bakoki kolanda kobimisa mikakatano epai na kelasi ya Davidi mpe kelasi ya Yonatana. (1 Samwele 20:32, 33) Nzokande, ‘etumba ezali ya Jéhovah’. Lokola azali Nkolo Moyangeli, akozwa elonga ya nsuka mpo na basaleli na ye ya sembo. Komonaka etamboli kitoko ya kelasi ya Davidi, bamilió na bato kati na mokili, bakisa banyokoli ya kala, bayei kotondisa milongo ya kelasi na Yonatana, kosanganaka bongo na kelasi ya Davidi ‘etambwisami na bolingo’ na Klistob​—1 Samwele 17:47; Loyembo na Salomo 2:4.

19, 20. (a) Mitango nini mitali mosala ya ba Témoins mizwami kati na tablo oyo ebimisami na Annuaire 89? (b) Kobakisama ya bokoli na motuya ya Batemwe ezalaki boni na mibu zomi, kobanda 1979-1988? (c) Mpo na nini tokoki koloba ete ba Témoins basali libota oyo ezali solo na bomoko na mabelé mobimba? Na bongo motuna nini mozali kotunama?

19 Okozala na likanisi malamu ya mosala oyo ezali ntango nyonso kokola ya ba ministres ba Témoins yango na kotalelaka tablo oyo ezwami na Annuaire 1989. Na boumeli ya mibu zomi kobanda 1979 kino 1988, ntalo ya basakoli ya nsango malamu oyo bazali koyebisa ete Bokonzi na Nzambe esilaki kotyama elongwaki na 2 186 075 mpo na kokoma na 3 592 654, oyo emonisi bokoli ya 64,3 . Kati na mokili bato yango bazali libota oyo ezali na bomoko ya solo mpenza; na yango, bazali na kondima moko, bazali kosalela Nzambe motindo moko mpe bango nyonso bakangami makasi na mitinda ya Biblia oyo mitali bizaleli malamu. Ezali epai na lisangá yango oyo ezali na bomoko kati na mokili mobimba nde maloba na Yesu mazali kotalela na eleko na biso: “Soko bokotosa malako na ngai, boumela kati na bolingo na ngai lokola ngai natosi malako na Tata na ngai mpe naumeli na bolingo na ye.”​—Yoane 15:10; tala 1 Bakolinti 1:10.

20 Atako bazali kosakola na minoko koleka 200, ba Témoins de Jéhovah bazali koloba “lokota na peto” ya solo na kosalelaka Nzambe “na bomoko”. Na wana bazali komekola bolingo ya Davidi mpe ya Yonatana. (Sofoni 3:9; 1 Samwele 20:17; Masese 18:24) Soki naino osangani te na libota ya Nzambe, ozali na mposa te ya kozala kati na kelasi ya Yonatana ya lelo? Luka kokokisa mposa oyo, mpe na bolingo mozindo, ba Témoins de Jéhovah bakosalisa yo na kokokisa yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ndakisa malamu epesameli biso kati na Annuaire ya ba Témoins de Jéhovah 1972, kobanda na page 216, paragrafe 2, kino na page 217, paragrafe 2.

b Tala Annuaire des Témoins de Jéhovah 1988, pages 150 kino 154.

Bozongeli

◻ Motindo nini Yonatana amonisaki bolingo na ye ya sembo mpo na Davidi?

◻ Bolingo ya motindo nini emonisamaki na bolingo oyo esangisaki Davidi mpe Yonatana?

◻ Mpo na nini tokoki koloba ete bakonzi na mangomba ya boklisto na mokili basalaki lokola mokonzi Saulo na ntango azalaki kobengana Davidi?

◻ Bomoko oyo ezali komonana lelo bisika nyonso kati na mokili epai na ba Témoins ezali komonisa nini?

[Etanda na lokasa 27]

St. Mary’s Cathedral

Sydney

August 20, 1940.

The Rt. Hon. W. M. Hugues, M.H.R.,K.C.,

Attorney General,

CANBEERA.

Dear Mr. Hugues:

Nazali koyebisa bino botondi na ngai mpo na mokanda na bino ya le 9 oyo etalelaki masengi oyo Mr. Jannings asalaki epai na bino.

Mpo na koloba malamu, ebongi ete bopesa likebi mingi na masengi yango oyo mazali kotalela mpenza likambo moko ya likama koleka.

Nzokande soki bobulunganisamaki moke na likambo oyo bato yango bazali koloba ete bazali kosakola bindimeli ya boklisto, nasengi na bino na limemya nyonso na kotalela mosala na bango, na nzela na maloba na bango te, kasi na misala. Mpo na oyo etali misala, natindeli bino mikanda na bango, maloba na bango mpe misala na bango, oyo etalemaki epai na la police ya Nouvelle-Galles du sud. Ezali mpasi mpo na kondima eloko moko oyo ekeseni mosika na boklisto.

Mokonzi ya la police de l’Etat amonisaki mposa na ye ya komona mikonzi ya mikili oyo mitambiwisami na Angleterre baloba ete lisanga to société yango endimami ata moke te na mibeko, mpo ete la police akoka kozwa makoki ya kobundisa lisanga to société yango.

With every good wish, I remain,

Yours faihfully,

ARCHBISHOP OF SYDNEY

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto