Totika te kosala oyo ezali malamu
‘Totika te kosala oyo ezali malamu, mpamba te tokobuka na ntango oyo ekoki, soki tokolemba te.”—BAGALATIA 6:9.
1. Etinda nini Yesu apesaki na bayekoli na ye?
BAKLISTO bazali kokokisa mosala moko malamu na oyo etali losambo na bango, mosala oyo elimbolami kati na etinda oyo ya polele: “Boye bokende kozalisa bayekoli bato na mabota nyonso, kobatisaka bango . . . , kolakisaka bango ete batosa nyonso esili ngai kolaka bino. Mpe tala nazali na bino elongo mikolo minso kino nsuka na biloko na ntango oyo.” (Matai 28:19, 20) Ezali Yesu Klisto ye moko nde apesaki na bayekoli na ye etinda ya kosala mosala ya koteya na mokili mobimba.
2. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete mosala ya kozalisa bayekoli ntango yango ezalaki malamu mpe na ntina? (b) Mosala ya kozalisa bayekoli ezali kosalela mikano nini?
2 Yesu apesaki bayekoli ya liboso etinda ya kozalisa bayekoli mosusu kati na moko ya maloba na ye oyo alobaki liboso ya kobuta na ye na likoló. Yango ezali endimiseli te ete ezalaki etinda moko eleki ntina? Ee, mpamba te ezalaki mpo na kobikisa bomoi na bato. (1 Timote 4:16) Ezali bongo mosala moko malamu. Na nzela na yango, baoyo bazali kotya likebi na nsango ya Bokonzi bazali kozwa mateya malamu na Biblia; epai mosusu, baoyo balingi koyoka te bakebisami. (Luka 10:10, 11) Boye, mosala yango ezali komonisa banani bazali baklisto ya solo, ndenge botosi na bango na mibeko mosusu ya Yesu ezali mpe kokesenisa bango.—Yoane 8:31.
3. Bayekoli na Yesu basalaki nini mpo na kolanda ndakisa na ye mpe kotosa etinda na ye? (b) Ezaleli nini ya elimo Yesu akotisaki epai na bayekoli na ye?
3 Yesu, Moteyi monene, atikaki ndakisa malamu epai na bayekoli na ye. Ateyaki liboso na bato banso mpe azalisaki bayekoli na “kosakolaka nsango malamu ya bokonzi”. (Matai 9:35) Lokola ye, bayekoli na ye ya sika bango mpe babandaki kozalisa bayekoli mosusu; na bongo moyekoli ya solo azali ye ‘oyo azali kondima mateya ya moto mosusu mpe azali komipesa mpo na kopalanganisa yango’. Na ebandeli bazalisaki bayekoli bobele kati na Bayuda mpe bato babongwanaki na losambo ya Bayuda. Atako bato yango bamonisaki botemeli, bayekoli ya Yesu balandaki ‘kokende ntango nyonso’, epai na bango. Ee, bazalaki kokende “epai na bampate ya ndako na Yisraele oyo babungaki”, kino bato ya liboso ya mabota to Bapakano bakomaki bandimi, na mobu 36. (Matai 10:5, 6; Misala 5:42) Elobamaki mpo na bango ete ‘batondisaki Yelusaleme na mateya na bango’. (Misala 5:28) Batikaki ata moke te, kasi bakokisaki mosala na bango ya malamu na bosembo, kino nsuka.
“Elanga, ezali mokili”
4. Na ezaleli nini bayekoli ya Yesu bakokisa na nsima mosala na bango na eteni eleki monene?
4 Yesu alakisaki bayekoli na ye ete basengelaki kokende epai na “bato na mabota nyonso”. (Matai 28:19) Kati na lisese moko etalaki nkona ya Bokonzi, alobaki: “Elanga ezali mokili.” (Matai 13:38) Baklisto bakozala bongo “batemwe” na ye bisika binso. Lisusu, bakokendeke “ntango nyonso”, kasi mbala oyo “kino nsuka ya mokili.” (Misala 1:8) Ntoma Paulo azalaki “bobele kosakola liloba”, mpe tokoki kozala na ntembe te ete ezalaki mpe bongo na baklisto mosusu.—Misala 18:5.
5. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki komizela ete bayekoli na ye balekisa ntango na bango mingi kati na mosala ya kotatola kino na nsuka ya biloko ya ntango oyo?
5 Yesu azalaki komizela ete mosala ya kotatola ekamata ntango mingi ya baklisto kino nsuka na biloko ya ntango oyo. Ezali yango elakisami na maloba oyo asakolaki mpo na mosala ya boklisto mpe teritware epai yango ekosalama. Alobaki: “Nsango malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba, lokola litatoli na mabota nyonso, mpe na nsima nsuka ekoya.”—Matai 24:14.
6. Kino ntango nini mosala ya kosakola Bokonzi esengeli kosalama, mpe ndenge nini yango esengeli kozala na bopusi likoló na lolenge oyo tozali kotalela yango?
6 Ntango Yesu atindaki bayekoli na ye ete basala mosala ya kosakola Bokonzi mpe kozalisa bayekoli kati na mokili mobimba, ayebaki ete mokolo mosusu mosala yango ya malamu ekokoma na eleko na yango ya nsuka, lokola mosala oyo esalamaki katikati na Bayuda. Kasi ekokokisa mokano na yango. ‘Yesu abakisaki ete, na nsima nsuka ekoya.’ Yango wana, kino nsuka, ba Témoins de Jéhovah bazali kokoba mosala oyo epesameli bango na elikya mpe esengo. Mpiko na bango ezali kosalisa bango ete balanda kosala mosala na bango kino ekosila.
Ndenge nini kokokisa mosala yango
7. Motó na likambo ya mosala ya Yesu mpe ya bayekoli na ye ezalaki nini?
7 Yesu ateyaki bayekoli na ye ya liboso lolenge ya kokokisa mosala na bango ya kosakola, mpe batosaki na molende etinda ya ‘kokende’. Ntango abongisaki bango mpo na mosala ya kotatola, alobaki na bango: “Wana ezali bino kotambola, bosakola ete, Bokonzi na makoló ebelemi.” (Matai 10:7) Na bongo apesaki na nsango na bango bobele motó na likambo oyo esimbaki mosala na ye, elingi koloba Bokonzi. Yango esengelaki kozala nsango moko malamu mpo na bato ya motema boboto. Nsima wana bayekoli na ye babandaki mosala na bango, Yesu atikaki oyo ya ye? Te, ata moko te. Mpo na yango tozali kotanga: “Ntango Yesu asilisaki kopesa mateya na ye na bayekoli na ye zomi na mibale, alongwaki wana mpe akendaki kolakisa mpe kosakola kati na bamboka na bango.”—Matai 11:1.
8. (a) Epai wapi mpe ndenge nini basakoli ya Bokonzi basengelaki kosakola? (b) Mpo na nini ebongi kosakola nsango malamu kati na bandako? (c) Kopesa mbote na lolenge esengeli epai na bato oyo tozali kokutana na bango ezali na matomba nini?
8 Epai wapi basakoli yango ya Bokonzi basengelaki kosakola, mpe na lolenge nini? Yesu alobaki na bango: “Ekokota bino na ndako, bopesa mbote na bafandi na yango.” (Matai 10:12) Ntango mosakoli akomi epai na moto moko mpo na koyebisa ye nsango malamu, azali kokumisa ye mpe kopesa ye libaku ya koyoka nsango ya Bokonzi kati na ndako na ye mpenza. Kobanda lisolo na kotosaka mimeseno mpe mitinda ya kopesa mbote oyo ezali kosalelama wana, ezali elembo ya limemya mpe ya botosi. Lisusu, mbote ya boninga mpe ya esengo ebimisaka mbala mosusu litomba ya esengo oyo mpe ekoki kobongola bokutani ya mbalakaka na lisolo moko malamu. (Tala Matai 28:9; Luka 1:28) Mongongo mpe biyano ya moto emonisaka mpenza mayoki na ye. Na bongo ezali malamu kososola yango liboso ya kokoba lisolo, mpamba te na ndenge yango okozala na likoki ya kokokisa bamposa ya molobani na yo.—Tala Misala 22:1, 2; 23:6.
9. Nini elakisi ete bato banso bakoyamba malamu nsango ya Bokonzi te, mpe ndenge nini bayekoli basengelaki kosala epai na baoyo baboyaki koyamba bango?
9 Yesu akebisaki bayekoli na ye ete bato banso te nde bakoyamba nsango na bango na esengo. Alobaki na bango: “Ekokoma bino na mboka monene nini to mboka moke nini, boluka soki nani azali moto malamu”. Soki ezalaki ete bato banso bakondima, mbele Yesu asalelaki te liloba “boluka.” Ezaleli ya bayekoli esengelaki kozala nini epai na baoyo bakomonisa litomba moko te mpo na nsango? “Mpe soko moto nani akoyamba bino te, soko nde akoyoka maloba na bino te,-wana ekobima bino na ndako yango to na mboka yango, bopupola mputulu ya makolo na bino.” Basakoli basengelaki kolongwa na esika yango kozanga kobenda mindondo mpe kotikela Jéhovah azwa likatami mpo na makambo makobima na koboya yango.—Matai 10:11, 14.
Ndenge mosala yango ekokisami lelo
10. Mokomi na nsango moko alobaki nini mpo na kosakola ya ba Témoins de Jéhovah?
10 Ezali bango na mposa ya kokokisa na bosembo mokumba oyo epesameli baklisto, ba Témoins de Jéhovah bazali koyebisa nsango ya Bokonzi kati na mokili mobimba. Na ntina na bango, A. Wisse, mokomi na nsango na Pays-Bas, akomaki: “Bakeseni na bamosusu. Bakeseni mpenza mpo bazali kosakola nsango malamu na molende. Mpo na bango boklisto ya solo ezali lingomba bandako-nzambe te elongo na basambeli, oyo mokomoko azali na mosala na ye eyebani mpe oyo basengaka bango likambo mosusu ya monene te bobele koyoka. Batemwe balobaka na elobeli ya solo lokola Paulo epai na moto nyonso oyo azali koyoka bango.” Na solo mpenza, Jéhovah Nzambe azali kopambola molende yango mpo na mosala ya boklisto.
11, 12. (a) Matomba nini tozwaki kati na mosala ya Nzambe na bambula oyo? (b) Lokola tozali kokoma ebele koleka, teritware epai tozali kosakola ekomi ndenge nini? (c) Mituna nini yango ezali kobimisa?
11 Basakoli ya Bokonzi koleka 3 000 000 bazali sikawa kosakola na molende kati na mikili 210. Tozali kozwa bokoli malamu na motuya ya bayekoli ya sika: na boumeli ya bambula nsambo oyo euti koleka bato 1 246 204 babatisamaki. Emonani ete Jéhovah azali kopambola milende na biso. (Yisaya 60:8-10, 22) Kati na mikili mpe bisanga koleka ntuku minei, tozali kotanga Temwe moko mpo na bafandi 300 to na nse na yango, elingi koloba mabota koleka nkama mpo na Temwe moko. Kati na teritware ya masangá mosusu ya Canada mpe ya Guadeloupe, motango ezali ya Temwe moko mpo na bafandi 40 to 50, yango elimboli ete Temwe mokomoko azali na bandako pene na zomi na mitano mpo na kotala! Bafandi ya mingi kati na bateritware yango bazali koyoka nsango sanza nyonso. Ata kati na mikili epai motango ya basakoli ezali monene te, litatoli ezali kopesama mbala na mbala kati na bateritware yango bazali koyoka nsango sanza nyonso. Ata kati na mikili epai motango ya basakoli ezali monene te, litatoli ezali kopesama mbala na mbala kati na bateritware ya bingumba. Na Séoul (République de Corée), basakoli bazali kosakola nsima na mikolo mitano nyonso kati na bakartyé mosusu. Lokola motuya na biso ezali se kobakisama mpe motuya ezali kobakisama ntango nyonso ya Batemwe oyo bazali kokota na mosala ya pionnier auxiliaire mpe permanent bazali koyikana, tokokendeke kotala bazalani na biso mbala mingi lisusu. Yango ezali kobimisa mikakatano?
12 Tosengeli kondima ete likambo yango ezali kobimisa mikakatano na bamboka mosusu, ezala mpo na ba Témoins de Jéhovah to mpo na bato oyo bango bazali kokende kotala. Esengeli kobakisa na mikakatano yango, kozanga bosepeli oyo motuya monene ya bato bazali komonisa kati na mikili mingi. Na ndenge yango, awa ezali biso kokoma ebele, tozali kotika mokemoke mosala na biso ya malamu? Tozali kozwa bosukisi ete mosala na biso esili mpe ete tosili ‘koluka’ baoyo nyonso bazali pene mpo na kondima nsango mpe kokoma bayekoli? Olembi, to ozangi molende, mpo na kokende kotala bobele bato yango oyo basepelaka na nsango te? Tokoki kosala nini mpo na kobatela molende na biso kati na mosala?
Tobatela elimo ebongi
13, 14. (a) Ndenge nini tosengeli kotalela ezalela oyo tozali kokutana na yango kati na bateritware epai tosakolaka mbala na mbala? (b) Mpo na nini tozali kolemba te na ntina na baoyo baboi kondima nsango ya Bokonzi? (c) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya bantoma soko bamoko bazali kotombokela biso?
13 Bolongi ekouta mingimingi na elimo oyo tozali komonisa lokola ba Témoins de Jéhovah. Ezali ntina na kotalela makambo na lolenge malamu. Eyebanaki uta kala ete ntango mosala na biso ekokoma na eleko na yango ya nsuka, tokobanda kotala bateritware mbala mingi koleka mpo na motango monene ya basakoli na bokokani na motuya ya bato. Kasi tosambelaki te mpo ézala bongo? (2 Batesalonike 3:1) Oyo tozali komona sikawa esengeli kosepelisa biso mpe kondimisa biso ete tozali na eteni ya nsuka ya mosala etali kozalisa bayekoli. Bokonzi esakolami malamu, lokola Yesu ayebisaki yango. Mpe ata ntango bato bazali koboya ‘koyoka maloba na biso’, mosala na biso ya kosakola epesi nzela na kokebisa bango. Tobosana te ete longola kozalisa bayekoli, tozali kosakola nsango malamu “mpo na litatoli.”—Matai 10:14; 24:14.
14 Lisusu, tosengeli komizela ete bato mingi mpe baboya kondima nsango ya Bokonzi na meko oyo nsuka ezali kobelema. Bisakweli bizali polele, mpe lisolo ya mosala oyo Yesu mpe Paulo bakokisaki ezali kondimisa biso ete bamosusu “bakoboya kondima” mpe bakozala na motema “makasi”. Na mikolo na biso, tosengeli bongo kokeba ete biso mpe “tozanga mayoki” te mpo na mosala oyo batindi biso. Tosengeli kosakola “lisusu mpe lisusu”, ata epai na baoyo bazali kosepela te. (Yisaya 6:9-11; Matai 13:14, 15; Masese 10:21) Solo, tosengeli komonisa molende mpo na kokende kotala bato oyo bazali kosilika na komona biso. Kasi, tika ata moke te ete ezaleli ya bafandi ya teritware moko etinda biso na kokanisa ete tosengeli kotika koloba! Nde, lokola bantoma, tosambela mpo na kozwa mpiko ya ‘kotika te koloba liloba’, ata yango ezali kosepelisa te bamosusu to ezali kosilikisa bango, mpe tosala bongo kino mosala ekosila.—Misala 4:18-20, 24-31.
15. Elendiseli nini tozali kokuta na Bagalatia 6:9, mpe na nini yango etali lolenge na biso ya kotalela mosala ya kokende kotala bazalani na biso mpo na koyebisa bango nsango malamu?
15 Mpenzampenza, tokutanaka bobele na ndenge mibale ya bato ezala esika nini tozali kosakola: baoyo bazali kosepela na nsango malamu mpe baoyo bazali kosepela na yango te. Tosengeli bongo kolanda kokokisa mosala etali ‘koluka baoyo bazali na motema malamu’. Mosala yango ezali moko ya misala mingi kitoko oyo tosengeli kosala lokola baklisto mpo na komonisa bolingo na biso mpe bosembo na biso epai na Jéhovah. “Totika te kosala oyo ezali malamu, mpo tokobuka na ntango oyo ekoki, soki tokolemba te.” (Bagalatia 6:9) Lokola tozali sikawa pene mpenza na nsuka ya biloko ya ntango oyo, ezali ntango te ya kotika to ya kolemba kotala bazalani na biso mpo na koyebisa bango nsango malamu ya Bokonzi. Naino Jéhovah alobi te ete mosala esili.
Mpo na nini tosengeli ‘kotika te koloba liloba’
16. (a) Makambo nini makoki kobongola lolenge oyo bato bazali koyamba nsango na biso? b) Bandakisa nini bokoki kotanga mpo na kolimbola mbongwana yango ya ezaleli kati na teritware na bino?
16 Tokobatela lisusu elimo ebongi soki tozali komikundola ete na molende na biso kati na mosala ya kosakola Bokonzi, tozali komonisa bosembo na biso epai na Jéhovah. Tobosana mpe te ete bateritware ezali kobongwana ntango nyonso na balolenge mingi. Bamoko bazali kolongwa mpe kokende kofanda epai mosusu mpe bamosusu bazali kokutana na makambo ya sika. Ekoki kozala ete basepelaki te na mbala ya nsuka oyo totalaki bango, kasi kolongwa na mosala, liwa ya ndeko moko, mbongwana monene kati na kowelana ya banguya minene ya mokili, maladi makasi-makambo nyonso wana mpe mosusu ekoki kotinda bango na koyoka biso ntango tokoleka na mbala ya nsima. Bamosusu, eyokaki bango ete moninga to mosangani moko ya libota na bango akomi Témoin de Jéhovah, balingi sikawa kosolola na biso mpo na koyeba mateya nini mpenza ebimisaki mbongwana wana.
17. Sikawa, ndenge nini bamosusu bazali koyamba nsango ya Bokonzi? Pesa bandakisa ya esika bofandi.
17 Tobosana mpe te ete baoyo bazalaki bana, bakomi sikawa mikolo, basali sikawa mabota, bazali kosakana lisusu na bomoi te mpe bazali komituna mituna oyo bobele Liloba na Nzambe nde ekoki koyanola na yango. Yango wana mokolo moko elenge mama moko abengisaki Batemwe mibale bakota epai na ye mpe alobaki na bango: ‘Ntango nazalaki mwana, nakangaki ntina te mpo na nini mama na ngai azalaki koboya koyamba Batemwe mpe koloba na bango ete nsango na bango ezalaki kosepelisa ye te, nzokande bazali bobele na mposa ya koloba mpo na Biblia. Namilakelaki ete ntango nakokoma mokolo mpe nakobala, nakokotisa batemwe ya Jéhovah mpo balimbwela ngai Biblia.’
18. Ndenge nini makambo mazali kobima kati na mangomba mazali kosimba bafandi ya teritware epai tozali kosakola mpe koteya?
18 Bomoni ete bato mosusu oyo bazalaki koboya koloba na biso esili koleka bambula mpe oyo bazalaki kokanisa ete “babiki” bazali sikawa kotuna biso mituna ya solo? Ntina na yango ezali nini? Makanisi na bango na ntina ya mangomba ebongwani. Bazali koloba ete bayokisami mpenza mawa mpe batungisami mpo na bansango oyo etali ezaleli ya mbindo, misala ya politike mpe bobebisi mosolo ya lingomba oyo esalemaki na bapastere bayebani mingi oyo bazalaki kotyela motema. Ezali komonana ete lolenge yango ya ezaleli ekopalangana lisusu mingi na meko oyo makambo makokoma lisusu mabe koleka kati na Babilone Monene kino libebi na yango.—Emoniseli 18:1-8.
19, 20. Nini ezali komonisa ete tokoki kolemba te mpo na kotala bato oyo bazali koboya koyoka nsango?
19 Ata boni, tokoki kolemba te soki mingi kati na bato bazali kosepela te. Nsima na boleki na biso, ekoki kozala ete bakanisaka na oyo toyebisaki bango. Mokolo moko, na ndakisa, mwasa moko ya mboka Canada alobaki polele na batemwe mibale oyo bayaki kobetela ye porte ete azalaki kosepela na lingomba na bango te. Na nsima, akanisaki lisusu na maloba na bango mpe azwaki mposa ya kokutana lisusu na batemwe mibale wana mpo bayanola na mituna na ye. Azwaki bongo vuatire na ye mpe alekalekaki na kartye na ye koluka bango, kasi bamonanaki te. Atikaki? Te, akendaki epai na moninga moko ya mwasi kotuna ye soki basilaki koya kotala ye. Moninga yango ayanolaki ete te, kasi ayebisaki ye ete moko na baninga na ye azali Témoin de Jéhovah mpe akosenga na moninga yango akenda kotala ye. Yango ebimisaki kolandana ya bokutani ya masolo epai mwasi yango abengisaki baninga, bato ya pembeni, baboti mpe baninga ya mosala. Mbala mosusu, bazalaki kokoma kino bato 15 bayangani epai na ye, Temwe akabolaki na ndako yango mikanda mpe ba Biblia 430 mpe bazulunalo 2015.
20 Bato mingi basepelaka ndenge tokendeke kotala bango. Kati na mokanda moko etindamaki na biro ya la Société Watch Tower, mwasi moko akomaki: “Mersi na ndenge bozali kokolisa ezaleli ya komipesa, epai na baninga na bino kati na kondima. Mersi ndenge bozali kotala biso . . . mpe kokabola bolingo ya Nkolo elongo na bazalani na bino. Likambo yango ya moke ezali kosala malamu mingi epai na bamosusu. . . . Atako bamosusu bazali kotomboka, bamosusu bazali kosepela te, mpe bamosusu bazali koyoka, . . . ezali mpenza litomba monene na kozwa moto oyo ayei kokundwela yo makambo ya elimo. Namonaka ete ezali malamu na kolobela mpo na Nkolo.” Kati na mokanda mosusu, moto mosusu asengaki biso ete ‘totika bato te’, ata eyambeli na bango ezali lolenge nini. “Totika te kosala oyo ezali malamu mpo tokobuka na ntango ekoki, soki tokolemba te”. (Bagalatia 6:9) Mosala ya kosakola endimami mpe epambolami na Jéhovah. Na kosanganaka na yango, tozali komonisa bolingo tozali na yango mpo na ye mpe mpo na bazalani na biso. (Matai 22:37-39) Na bongo, tika ete tosala yango kino na nsuka.—Tala Bafilipi 1:6.
21. (a) Mpo na nini, ntango mosusu, bateritware oyo etalelamaka mbala na mbala ezalaka na mokakatano? (b) Tokolobela nini kati na lisolo oyo ekolanda?
21 Tosengeli kondima ete ezali ntango nyonso te mpo na eyambeli na bato nde tozali na mpasi mpo na kotala mbala na mbala bafandi ya teritware na biso. Mbala mosusu biso moko nde tozali na bolembu. Tozali kokende na makanisi malongobani te, na komilobaka ete toyebi bato banso mpe ete tosili koyeba nini ekozala eyambeli na bango? Lolenge yango ya kokanisa ezali kosala bopusi likoló na ezaleli na biso mpe, ndenge emonanaka, likoló na mongongo na biso mpe elongi na biso. Tosalelaka ntango nyonso bobele bametode yango moko, bobele maloba yango moko, uta bambula? Lokola teritware ezali kobongwana, ekoki kozala ete mitindo ya kosakola oyo ezalaki kobimisa matomba kala, ezali lisusu kosimba bato mosusu te oyo ‘babongi’ na nsango malamu. Mbala mosusu ekosengela ete tosala na lolenge mosusu mpe tozala na emoneli ya sika mpo na mosala na biso. Na lisolo oyo ekolanda, tokotalela bongo oyo tokoki kosala mpo ‘totika te, kasi nde, tobuka na ntango ekoki’.
Bozongeli
◻ Mpo na nini tosengeli te ‘kotika’ kolakisa nsango malamu na bazalani na biso?
◻ Nani atindi biso tozalisa bayekoli lokola tozali kosala yango, mpe biteni ya moboko ya metode yango ezali nini?
◻ Likambo nini tozali kokuta na bateritware mingi, mpe nini ekoki kosalisa biso na kotalela yango na elimo malamu?
◻ Mpo na nini tosengeli ‘kolanda kosakola’ nsango malamu mpe “totika” te.
[Etanda na lokasa 17]
‘TOKOTIKA TE’ KOSAKOLA BOKONZI SOKI TOZALI KOBOSANA TE . . .
◻ nani apesi biso mosala yango mpe alakisi biso lolenge ya kokokisa yango.
◻ ete Jéhovah apamboli mosala oyo tosili kosala kati na mokili mobimba.
◻ kobatela elimo ebongi atako bato mosusu na “mitema makasi” baboi kondima.
◻ kobondela mpo na ‘kotika te koloba’ liloba lokola bantoma basalaki yango.