Mabondeli oyo mazali kondimama
MPOSA ya kosolola na nguya eleki bokasi ya moto ebanda uta kozalisama na moto awa na mabelé. Mabondeli mazali komonana ata na makomi na Ezipito na kala. Mabondeli mosusu masalelamaki mpo na kobondela to kokumisa nzambe moko, mosusu ezali komonisa konfianse oyo bato bazalaki na yango mpo na nzambe moko boye to boye. Nzembo, basauma mpe mabondeli ezalaki komonana mingimingi na libota na Bagreke, na ekeke ya mwambe liboso na ntango na biso. Epai na Baloma, kuna bazalaki kobondela banzambe mingi, esengelaki kopona malamumalamu nzambe oyo moto alingaki kosambela
Na mikolo na biso, libondeli ezali likambo ezali komonana epai na mangomba minene ya mokili. Ba budiste, bahindu, Bayuda, Bamizilmá mpe basangani na Mangomba ya boklisto na mokili bazali kosalela mabondeli. Ata libondeli ezali ezaleli emonani mingi kati na mangomba na ekeke oyo ya 20, bato mingi oyo balingi ete mabondeli na bango mandimama bazali kokamwa mingi liboso na lolenge nyonso ya mabondeli
Kosambela ekoki?
Mpo ete libondeli ezali na mitindo mingi, ekoki bobele kosambela na lolenge moko to mosusu mpo libondeli na yo endimama? Bamoko bazali kokanisa ete maloba masalelami mpo na kobondela mazali na ntina mingi te na ntango moto oyo azali kobondela azali sembo mpe azali “mondimi”. Okanisi nini? Mpo ete bato banso bakaboli likanisi moko mpo na ndenge ya kosambela, tosengeli kotika makanisi na bato mpe kotalela likanisi ya liziba eleki monene.
Bandimbola oyo ezwami na bankasa elandi euti na liziba yango, Biblia. Yango ezali koteya biso ete mpo na kondimama, ekoki te bobele kosambela
Biblia elimboli:
Mabondeli masengeli kotindama epai na nani.
Mpo na nini mabondeli mosusu mandimamaka te.
Makambo mpo na yango tokoki kobondela.
Masengami nini moto oyo azali kosambela asengeli kokokisa?
Ye oyo azali kobondela asengeli naino kozala na kondima, elingi koloba te andima bobele ete Nzambe azali mpe azali koyoka mabondeli. (Baebele 11:6) Kondima motindo boye ekomonana na kotyaka makasi ya kozala na bomoi elongobani na mitinda na sembo mimonisami na Nzambe kati na Biblia. Ezali yango Yesu Klisto amonisaki kati na Lisolo na ye likolo na ngomba ntango alobaki: “Moto na moto oyo akolobaka na ngai, Nkolo! Nkolo! akoingela katina Bokonzi na likolo te kasi ye oyo akosalaka mokano na Tata na ngai oyo azali na likolo.”—Matai 7:21.
Tala oyo Yisaya, mosakoli moebele akomaki, na ntina na bato oyo mabondeli na bango makondimama te: “Ata bokobondela mabondeli mingi mpenza nakoyoka te, maboko na bino matondi na makila.” (Yisaya 1:15) Mabondeli na bato oyo bazali na limemya te mpo na bomoi ete ezali bulee, ata mabondeli yango ezali mingi ndenge nini ekoki kondimama te.
Mpo na nini mabondeli na “bandimi” mosusu ezwaka eyano te?
Esengeli te bobele kozala mondimi mpo na kosepelisa Nzambe mpe mpo ete mabondeli na biso endimama. Ata moto oyo azali na bindimandima akoki koloba ete azali mondimi. Kondima makasi esengeli kotongama likolo na boyebi ya solo, oyo ekoki kozwama bobele na koyekola Biblia. Lisusu, kondima esengeli komonisama na misala. “Lokola nzoto oyo ezangi mpema esili kokufa, bongo kondima oyo ezangi misala esili kokufa lokola.”—Yakobo 2:26.
Mondimi ya solo asengeli kotya Nzambe na esika ya liboso mokolo na mokolo mpe akosambela te bobele mpo akomi na ntango ya mpasi. Asengeli komonisa misala oyo mikolakisa ete azali na kondima, lokola misala ya sembo mpe mingimingi kosakola kondima na ye epai na bato mosusu.
Okosambela ndenge nini?
Libondeli ekoki kozala bobele momeseno ya mpamba te to ekoki kotangama na mokanda te. Libondeli esengeli kozala na makambo mineneminene te, to ekoki kosalema te mpo na kobenda likebi ya bato mosusu. Yesu emonisaki lolenge malamu ya kosambela mpe mabaku oyo esengeli kopengola yango, na kopesaka toli elandi: “Ekobondela bino, bozala lokola bakosi te, baoyo balingi kotelema mpe kobondela na biyanganelo mpe na bizwanelo na nzela ete bamonana na bato. . . . Ezali bino kobondela, bolobaloba lokola ekosalaka bapakano te, mpamba te bazali kokanisa ete Nzambe akoyoka bango mpo na kolobaloba na bango.”—Matai 6:5-7.
Kobatela position moko ya sikisiki na ntango ozali kosambela ezali mpenza na ntina te mpo ete Nzambe andima libondeli na yo. Nzokande, moto oyo azali kobondela asengeli komonisa kosokema mpe botosi na ezalela mpe maloba na ye.
Mabondeli makotindama epai na nani?
Mokanda etindamaki epai na Baebele esaleli elobeli ‘kobelema epai na Nzambe’. (Baebele 11:6) Nzambe nini yango? Ata bato basili komisalela banzambe ebele. Nzambe mozwi-na-nguya-nyonso azali bobele moko. (1 Bakolinti 8:5, 6) Nzambe mozwi-na-nguya-nyonso oyo alobelami ne Biblia, nkombo na ye Jéhovah. (Nzembo 83:18) Mpo ete azali Mozalisi na biloko nyonso, esengeli ete mabondeli na biso mapesama epai na ye moko. Yesu Klisto alimbolaki polele epai na bayekoli na ye ete basengeli kosambela “Tata na biso oyo azali na makoló”. (Matai 6:9) Yesu ateyaki bango te ete basengelaki kosambela ye [Yesu], to kosambela mama na ye Marie to moto mosusu. Kasi, Nzambe azali kosenga sikawa ete toyeba esika ya Mwana na ye mpe mabondeli na biso nyonso mapesamela ye na nzela na Yesu. Yango wana Yesu alobaki epai na bayekoli na ye: “Moto akokoma epai na Tala te soko na nzela na ngai te.”—Yoane 14:6.
Mpo na kosepelisa Nzambe, mabondeli na biso masengeli kotindama epai na Jéhovah Nzambe na nzela na Mwana na ye, Yesu Klisto. Na maloba mosusu, tosengeli kosambela Nzambe na nkombo na Yesu.
Makambo nini tokosenga na mabondeli na biso?
“Soko tokolomba eloko nini kati na mokano na ye, ye akoyoka biso.” Elikya oyo ezali lokola ekoki kosalema te ezwami kati na 1 Yoane 5:14. Kasi omoni lisengami mpo ekokana: “na mokano na ye”? Ee, soki mabondeli mingi mazali kondimama te, ezali mpenzampenza mpo ete moto oyo azali kosambela aluki koyeba te nini ezali mokano na Nzambe.—Masese 3:5-7.
Mpo na kopesa bango modèle, Yesu ateyaki bayekoli na ye libondeli oyo eyebani malamu lelo oyo mpe ebengami “Tata na biso”. (Matai 6:9-13) Ata epesamaki te mpo ezala molulu, libondeli yango ezali komonisa makambo masengeli kosengama liboso. Nkombo mpe mokano na Nzambe esengeli kozala na esika ya liboso. Na nsima bamposa ya mosuni, lilimbisi mpe kosikwama na lisiko na masenginya na Oyo mabe. Elobeli “Tata na biso” ekoki kosalisa ye oyo azali kosambela mpo ete alobela na kati na libondeli na ye na ntina na basangani na libota na ye, mpe na baoyo nyonso bazali koluka kosepelisa Mozalisi na bango.—Misala 17:26, 27.
Mabondeli masengeli kozala molai?
Biblia elobi te soko mabondeli masengeli kozala molai to te. Ekoki kozala mokuse mpe kosalema na nse na motema (Nehemia 2:4; 1 Samwele 1:12, 13) Ekoki mpe kozala molai. Mokolo mosusu. Yesu “aumelaki butu mobimba kobondela Nzambe” mpo na kosenga ye lisalisi ayeba kopona bantoma zomi na mibale. (Luka 6:12) Bolai ya mabondeli oyo Nzambe azali koyoka ekeseni engebene bamposa.
Mabondeli mandimamaka mpenza
Biblia etondi na bandakisa ya mabondeli mandimamaki na Ye oyo ‘ayokaka libondeli’, Jéhovah Nzambe. (Nzembo 65:2) Tozali na ndakisa monene na Mokanda ya liboso ya Mikonzi mokapo 18 na ntina na “momekamo na libondeli” oyo esalemaki na eleko na Elia. Na ekeke na liboso, bayekoli na Yesu bazwaki eyano na libondeli na bango: “Ezalaki bango kolomba, esika eyangani bango eningani. Bango nyonso batondaki na elimo santu, mpe na molende basakoli Liloba na Nzambe.—Misala 4:23-31.
Kati na mikanda mingi oyo bakomi na zulunalo oyo bazwaka, ezali na mikanda ya mibali mpe basi na mbula ndenge nyonso oyo bazwanaki na mikakatano makasi. Ndenge makambo makwelaki bango masilaki endimisaki bango ete mabondeli na bango mandimamaki mpenza.
Tala oyo elenge mobali moko afandaka na Suisse, pene na mondelo na ltalie, alobi: “Lokola nayebaki te ndenge nini nakoki kosilisa mikakatano ya bomoi, natikalaki se na mposa moko: kokufa. . . . Nasalaki se eloko moko oyo eyelaki ngai na makanisi. Nasambelaki boye: ‘E Nzambe oyo ayebani te, ozali na bomoi mpe ozali na bolingo. Salisa ngai!’” Mwa mikolo na nsima, bilenge babalani mibale ba Témoins de Jéhovah babetaki na ekuke na ye. Boyekoli ya Biblia ebandamaki, mpe lelo oyo ye moko asili kokoma Témoin de Jéhovah.
Monganga moko ya mwasi azalaki na bomoi etondi na mikakatano elongo na mobali na ye oyo azalaki kokosa ye mpe akabwanaki na ye. Mokolo mosusu, mwasi yango oyo azalaki mpenza mondimi abondelaki Nzambe ayebisa ye soki azali mpenza na mokano ya ntina oyo esengeli kosalelama. Nsima na midi ya mokolo yango, ba Témoins de Jéhovah bazalaki kosakola ndako na ndako mpe babetaki ekuke na ye. Akotisaki bango, atunaki bango mituna mingi mpe ayokaki na esengo nyonso eyano oyo bazalaki kopesa na Makomami. Mwa ntango moke nsima, mwasi yango akomaki mosakoli ya “nsango malamu” mpe azalaki kotambwisa boyekoli ya Biblia.—Matai 24:14.
Témoin de Jéhovah moko azalaki kotanga Mosenzeli kati na vuatire na ye mpe mbala moko moto moko akangaki ye na mongongo. Temwe asalaki libondeli makasi epai na Jéhovah. Bongo mobali yango aninganaki lisusu te mpe atikaki ye. Temwe apelisaki vuatire na ye, akendaki na ye mpe atikelaki moto yango mbote. Moto yango atelemaki na nzela na kokamwa nyonso.
Na mokili oyo ntembe ezali se kobakisama, baoyo balingi Nzambe mpe solo bakoki kolendisama na kondima ete Jéhovah Nzambe azali koyoka mabondeli oyo etindami epai na ye na nzela malamu, na lolenge malamu mpe na motema mpe elimo oyo esengeli. Nzambe mozwi-na-nguya-nyonso akoyoka libondeli mpe akoyanola na yango, na boyokani na mokano na ye mpe na ntango oyo akopona.
Mabondeli na Yesu mandimamaki. Mabondeli na yo makiki mpe kondimama
Mitindo mikeseni ya mabondeli
Tala mabondeli ndenge na ndenge oyo bato bazali kosalela lelo.
Bahindu basalelaki mingi libondeli moko ya moboko mpo na kopesa lokumu epai na moko na banzambe na bango oyo bazali 330 milió, mpe bazali kosambela bango kati na ba temple pene na 10 000; Kasi mingimingi, mabondeli ya bahindú ebongisami malamu mpe ekoki kozala ya ndenge mingi: kokanisa na mozindo to méditasió (dhyana) mpe lisanzoli (stotra). Mpo na bango koloba mabondeli yango na mongongo makasi ezali na ntina mingi.
Na bandako-nzambe na babudiste mpe bayaoiste oyo bauta na chine, basalaki ntango nyonso mabondeli mbala misato na mokolo (na ntongontongo, na midi mpe na mpokwa). Mabondeli yango masalemaka elongo na mwa ngonga. Mpo na kosambela, basango babudiste basalelaka chapelet ezali na bambuma 108. Bandimi mosusu bazali mpe kosalela chapelet mpo na kotanga mabondeli na bango.
Mpo na bamizilmá ya solosolo, lolenge eleki ntina ya losambo na bango ezali libondeli ya mokolo na mokolo (salat). Mondimi asengeli kozongela libondeli yango mbala mitano na mokolo na kotalaka epai na La Mecque, kuna na Arabie.
Mabondeli mosusu ya Bayuda ezwami mpenza na Biblia, mingimingi kati na Nzembo. Mabondeli mosusu mabakisamaki na bakonzi mosusu ya lingomba na bango.
Boklisto ya mokili oyo ezali kosalela mabondeli ya ndenge na ndenge: bazali kosala mabondeli yango na kotangaka yango na lisalisi ya chapelet, mabondeli mosusu makomami na mokanda mpe mosusu ezali se na mwa maloba malobami mbalakaka.