Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/1 nk. 3-6
  • Mabondeli nini mandimami?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabondeli nini mandimami?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mabondeli na bango mayokamaki
  • Masengami ya ntina mingi
  • Mpo na nini Nzambe azali kondima yango te
  • ‘Bobondelaka boye ete’
  • Mpo na nini mabondeli na bango mandimami
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mabondeli oyo mazali kondimama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mabondeli nini mandimami na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Kobondela Nzambe ezali likambo ya lokumu monene
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/1 nk. 3-6

Mabondeli nini mandimami?

Alfred Tennyson, mokomi na maloba ya kitoko na ekeke ya zomi na libwa,ye mongelesi, alobaki boye ete: “Libondeli ezali na nguya monene oyo ekanisami te na bato.” Kasi lokola bato mingi bazali kozwa eyano te wana ezali bango kobondela mpo na kozala na kolongono malamu ya nzoto, bolamu, kimya mpe kozala na bozwi, bamosusu bazali kokanisa ete Nzambe ezali mpenza koyoka mabondeli te. Nzokande, Biblia elobi ete ‘ayokaka mabondeli’.​—Nzembo 65:2.

Na yango, ntango mosusu okotuna boye ete, nani ‘Oyo akoyokaka mabondeli’? Esengeli kokokisa masɛngami mosusu mpo ete mabondeli na biso mayokama? Ndenge nini moto asengeli kobondela? Mabondeli nini mandimami?

Mabondeli na bango mayokamaki

Libondeli ezali likambo eumeli mingi. Ntango Abele, moko na bana mibali ya bankoko na biso ya liboso Adam mpe Eva, atumbaki mbeka kitoko mpo na Nzambe, ntembe te ete asalaki yango elongo na mabondeli mpe na kosanzola.​—Genese 4:1-5.

Na ekeke ya libwa liboso ya ntango na biso, mosakoli Yona “abondelaki Jehovah Nzambe na ye, longwa na libumu ya mbisi” oyo etindamaki ete emɛla ye. Libondeli na ye, liyokanaki? Ee, mpamba te “na nsuka Jéhovah apesaki lotomo na mbisi, na motindo oyo ete, mbisi yango eyaki kosanza Yona na mabelé makauki”. Na yango abandaki kokokisa mosala oyo azwaki epai na Nzambe, oyo ya kokende na Ninive.​—Yona 1:17; 2:1, 10: 3:1-5.

Wana ezingamaki ye na banguna na ye, Davidi, mokonzi ya kala na Yisraele; abelelaki: “E Jéhovah, yoka libondeli na ngai, pesa litoi epai na kolamba na ngai; zongisela ngai monoko na sembo na yo mpe na boyengebene na yo.” (Nzembo 14:1) Mabondeli ya Davidi epai na Nzambe mpo na kobikisa ye mayokanaki, mpamba te banguna na ye balongaki ye te. ezali mpo na ntina yango alobaki boye ete: “Jéhovah azali penepene na bango nyonso bakobyanga ye, baoyo bakobyangaka ye na solo.”​—Nzembo 145:18.

Masengami ya ntina mingi

Ezali bongo polele mpenza ete, na ntango ya kala, mabondeli ya basaleli na Nzambe mazalaki kondimama Na solo mpenza, bato yango bazalaki te kobondela na lolenge na bango moko, Nzambe oyo azanga nkombo. Te, na kondima nyonso bazalaki kobondela Jéhovah, “Oyo aleki-Likoló na mokili mobimba”. (Nzembo 88:18) Masengami nini ya ntina oyo tosengeli kokokisa mpo ete mabondeli na biso mayokama.

Bondela Jehovah, mpe bobele ye moko. Ezali na ntina te, mpe ekeseni nkutu na makomami, mpo na kobondela banzambe ya lokuta, oyo bikeko na bango bizali na minoko kasi bilobaka te, bizali na matoi, nde bikoyokaka te, bizali na maboko, kasi bikomamaka te, bizali na makolo kasi bikotambolaka te, bikolobaka na mongongo na bango te. (Nzembo 115:5-7; 1 Yoane 5:21.) Na bokeseni na banzambe wana bazangi ntina, Jéhovah azali kosalisa baoyo balingi ye mpe bazali kosalela ye. Na ndakisa, esili koleka bikeke mingi, basakoli ya Bala babondelaki nzambe yango ya lokuta mpo ete abimisa móto longwa na lola. Atako babondelaki ye kobanda ntongo kino mpokwa, Bala ayanolaki te. Elie abondelaki Jéhovah, oyo ayanolaki ye na kokitisaka móto oyo ezikisaki mpenza mbeka oyo ezalaki na etumbelo.​—1 Mikonzi, mokapo 18.

Kobelema epai na Nzambe bobele na nsima na Yesu Klisto ye moko. Jéhovah Nzambe atindaki Mwana na ye bobele moko, Yesu Klisto, na mabelé ete azala lisiko mpo ne kosomba bato na masumu mpe na liwa. (Yoane 3:16, 36; Baloma 5:12; 6:23) Na nsima, Jéhovah abengaki bato oyo balingi kolanda ebongiseli yango ete, bakobɛlɛma epai na ye kati na libondeli na lolenge ya sika. Ya solo, na ntango na kala, basaleli na Nzambe lokola mokomi na nzembo Davidi, bazalaki kobondela Jéhovah kozanga moyokanisi. (Nzembo 4:1; 17:1; 55:1; 102:1.) Kasi sikawa, esengeli kosala yango na nsima na Yesu, ye oyo alobaki: “Moto akokoma na Tata te soko na nzela na ngai te. Soko bokolombaka likambo nini na nkombo na ngai, ngai nakosala yango.” (Yoane 14:6, 14) Esika moko te elobami na makomami ete, esengeli kobondela Nzambe na nsima ya moto mosusu.

Na yango, kobanda sikawa lokola tosili koyeba ete, esengeli na biso kobondela Nzambe na nkombo na Yesu, mabondeli na biso makondimama bobele soko tobondeli Jéhovah na nsima ya Mwana na ye moko. Kasi ezali na bantina mosusu oyo mpo na yango Jéhovah ayanolaka na mabondeli mingi te.

Mpo na nini Nzambe azali kondima yango te

Nzambe andimaka mabondeli te na ntina bobele ete masalami na kotelema, to kofukama, to mpe kofanda, bongo na bongo. Makomami malobeli mpo na lolenge moko mpenza te. Na ntembe te, moto akoki kofukama liboso na Nzambe lokola elembo ya komikitisa. Kasi ekoki mpe lisusu kobondela na kotelema, na kofanda, na kolala na mbeto to ntango moto azali kokokisa mosala. (Danyele 6:10, 11; Malako 11:25) Ya solo, Jéhovah andimaka ata mabondeli oyo masalami mpo na ye na nsé ya motema Yango wana, liboso na koloba epai na mokonzi na Perse ete azalaki na mposa ya kotonga lisusu mur ya Yelusaleme oyo ekweaki, Nehemia ‘abondelaki Nzambe ya makolo’ na nsé na motema, mpe Jéhovah andimaki libondeli na ye. (Nehemia 2:1-6) Soko kofanda to kotelema to kofukama ezali nde likambo ezali kosɛngama te, mpo na nini mabondeli mingi mazali kozwa biyano te?

Jehovah azali kosepela na mabondeli na bato mabe te. Solo mpenza, “Ye oyo akolongola litoi na ye ete ayoka mobeko te, ata libondeli na ye likozala eloko na koboyama.” (Masese 28:9) Na monoko ya mosakoli Yisaya, Nzambe alobaki na libota na ye litomboki: “Ekosembola bino maboko na bino, nakobombela bino miso na ngai; ata bokobondela na mabondeli mingi mpenza, nakoyoka te, maboko na bino matondi na makila.” (Yisaya 1:15) Na lolenge na solo mpenza, mabondeli ya bato mabe mandimami te ata soko matindami na Nzambe na nsima na Klisto.

Nzambe andimaka mabondeli na bokosi te. Yesu alobaki: “Ekobondelaka bino, bozala lokola bakosi te, baoyo balingi kotelema mpe kobondela na biyanganelo mpe na bizwanelo na nzela ete bamonana na bato. Nazali koloba na bino solo ete basili kozwa libonza na bango.” Yesu abakisi: “Nde yo, wana ekobondela yo, ingela na eteni na yo ya ndako mpe kanga ekuke, mpe bondela epai na Tata na yo oyo azali na nkuku. Mpe Tata na yo oyo akomonaka na nkuku akopesa epai na yo.” (Matai 6:5, 6)Na maloba wana Yesu alingaki kokweisa te mabondeli nyonso oyo masalamaka liboso na bato, mpamba te, na mabaku mosusu ye moko mpe azalaki kobondela na mongongo makasi liboso na bato mosusu. (Matai 14:198) Na bokeseni, Klisto azalaki komonisa ete, ezali mabe na kobondela liboso na bato bobele mpo na komilakisa, koyokama mpe kokumisama na bamosusu.

Jéhovah andimaka te mabondeli oyo mazangi bosembo mpe oyo ya kozongela bobele makambo yango moko. Yesu alobaki: “Ezali bino kobondela bolobaloba lokola ekosalaka bapakano te, mpamba te, bazali kokanisa ete Nzambe akoyoka bango mpo na kolobaloba na bango. Bokoki kozala lokola bango te. Mpamba te Tata na bino ayebi yango ezali bino kosenga naino bolombi ye te.” (Matai 6:7, 8.) Na mikili ya Orient, bato bakanisaka ete, na ntango nyonso bakobalolaka mokanda mozingami, oyo motondi na mabondeli kati na yango bazali komona lokola ete mabondeli yango masalami lisusu. Ebele ya bato mosusu bazali kosalela chapelé to mpe bazali kozongela mabondeli oyo esili kokomama kati na mikanda ya mabondeli. Kasi moto nani alingi koyokama na Nzambe, asengeli komisenzela mpo ete azongela mabondeli te, mpe alanda mitinda mosusu ya Yesu oyo mitalelami awa na nsé.

‘Bobondelaka boye ete’

Na nsima, Yesu alobeli mpo na libondeli oyo bato bameseni kobenga yango Tata na biso. (Matai 6:9-13) Alobi: “Bino bobondela boye: ‘Tata na biso oyo azali na likoló, nkombo na yo ezala mosantu!”’ Na kobengaka ye “Tata na biso”, tondimi ete, ezali na bato mosusu oyo bazali na boyokani malamu elongo na Nzambe, mpamba te, bazali kati na libota ya basambeli na ye. Kobulisama ya Jéhovah, nkombo ya Nzambe, ezali likambo eleki ntina monene. Ndenge nini Nzambe akobulisa nkombo na ye? Akoboma bato mabe, kolongolaka bongo nsɔni oyo ezali kobebisa nkombo yango.​—Ezekiele 38:23.

Yesu abakisaki ete: “Tika Bokonzi na yo eya! Tika mokano na yo esalema na nsé pelamoko na likoló!” Nzambe, oyo azali kosalela nguya na ye na nzela ya Bokonzi na Masiya, oyo ya Mwana na ye, ekotelemela baoyo nyonso bazali koboya boyangeli na ye na kolongolaka bango na mabelé. (Danyele 2:44) Kasi tolingi koloba nini awa ezali kosɛnga ete, mokano na Nzambe esalema na nsé pelamoko na likoló? Tozali bongo kosɛnga na Jéhovah ete akokisa mikano na ye mpo na oyo etali mabelé, mingi mpenza, oyo ya koboma banguna na ye.​—Emoniseli 16:14-16: 19:11-21.

Nsima na kotya Nzambe, kobulisama na ye mpe mikano na ye na esika ya liboso kati na libondeli oyo Tata na biso, Yesu alandaki lisusu koloba boye ete: “Pesa biso lelo bilei na biso ya mokolo na mokolo.” Likambo oyo tosɛngaka na Jéhovah ete apesa oyo tozali na yango mposa “mpo na mokolo na mokolo” ezali kolendisa biso mpo na kozala na kondima na likoki na ye ya kokokisa bamposa ya basambeli na ye. Ezali wana kolɔmba oyo esalami na moyimi te, oyo esalami na mposa ya kozwa biloko minei koleka.

Yesu abakisi: “Limbisa biso nyongo na biso pelamoko biso tokolimbisaka bango na nyongo na biso.” (Luka 11:4 emonisi ete “banyongo” yango ezali “masumu”.) Tokolimbisama na Nzambe bobele soko biso mpe tokolimbisa baoyo bazali kosumuka epai na biso. (Matai 6:14, 15) Ezali na ntina yango nde ntoma Paulo apesaki toli oyo: “Pelamoko Jéhovah alimbisi bino, bino mpe bobele bongo.”​—Bakolose 3:13.

Kosukisaka bongo Tata na biso, Yesu alobi: “Mpe kendisa biso na komekama te, kasi bikisa biso na mabe”. Jéhovah akomekaka moto te na “mabe”. (Yakobo 1:13) Ya solo komekama euti na Satan le Diable, kasi elobami ntango mosusu na Bibia ete Nzambe asali likambo na ndimbola oyo ete, azali kopesa nzela mpo ete likambo yango esalema.(Luta 1:20, 21; Mosakoli 7:13) Jéhovah azali kondima libondeli oyo “kendisa biso na komekama te” na ndimbola oyo ete, azali kotika mpenza basaleli na ye ya sembo te, atako azali kopesa nzela ete bamekama. Na solo mpenza, “Nzambe azali sembo; ye oyo akotika bino te ete bomekama na koleka nguya na bino, kasi esika moko na emekeli, akobongisa ekimelo ete bokoka koyika mpiko”.​—1 Bakolinti 10:13.

Wana ezali biso kosenga ete tobikisama na mabe, tozali kobondela Jéhovah ete atika te Diable kolonga basambeli na ye ya sembo lokola biso. Soko tokosalela Nzambe na bosembo nyonso, tokoki kotya motema ete akondima motindo na kolomba wana mpo ete ntoma Petelo akomaki: “Jéhovah ayebi kobikisa bango bakosambelaka ye wana ezali bango kati na komekama.” (2 Petelo 2:9) Eteni oyo ya libondeli ya Tata na biso ezali na ntina monene, mpamba te Satan le Diable, “azali kotambola lokola nkosi konguluma, kolukaka soko akolya nani.”​—1 Petelo 5:8.

Mpo na nini mabondeli na bango mandimami

Nzambe akondimaka mabondeli na basaleli na ye ya sembo. Mpo na nini? Ezali mpo ete bazali kobondela bobele ye moko mpe bakolobaka na ye na nsima na Klisto. Bango basili koboya mabe mpe basalelaka ye mabondeli na bokosi mpe ya kozongela maloba te. Na esika ya kozongela libondeli oyo Tata na biso, ba Témoins de Jéhovah bazali kosalela makanisi mazwami na kati mpo na komonisa mayoki na bango mpo na Nzambe. Kasi bazwaka lisusu biyano na mabondeli na bango mpo na bantina mosusu.

Baoyo mabondeli na bango mondimami bazali kokokisa masɛngami oyo Paulo akomi yango na elobeli oyo: “Mpo ete ekoki na babelemi na Nzambe kondima ete azali mpe akozongisa libonza na baoyo bakolukaka ye.” (Baebele 11:6.) Totalela makanisi oyo mibale ya ntina: Jéhovah akondimaka mabondeli 1) ya baoyo bandimaka ete azali, mpe 2) ya baoyo “bakolukaka ye”.

Corneille, mopakano oyo na ezaleli ya kosambela, oyo na ekeke ya liboso akokisaki masengami yango. Andimaki Nzambe mpe azalaki koluka ye mpenza Nini asalaki nsima na kozwa boyebi ya solo? Amipesaki na motema mobimba epai na Jéhovah Nzambe, mpe azwaki batisimo lokola elembo ya komipesa na ye. Mpe nsima, amonisaki polele boyokani na ye elongo na Nzambe, oyo epesaki bopusi malamu likoló ya mabondeli na ye.​—Misala 10:1-44.

Liboso ete Corneille abatisama, mabondeli na ye mazalaki sé ‘kobuta liboso na Nzambe lokola ekaniseli’. (Misala 10:4) Kasi na komipesaka epai na Nzambe na ntina na kondima na ye kati na mbeka na lisiko ya Yesu mpe na kozwa batisimo, Corneille amipesaki ye mpenza epai na Jéhovah. Boyokani malamu bosalamaki kati na moto yango na ezaleli ya kosambela mpe Nzambe boyokani oyo bopesaki ye libaku malamu ya kobondela Nzambe na bonsomi nyonso. (Yakobo 4:8) Akokaki sikawa kobondela Tata na ye ya makoló na nsima ya Yesu Klisto na elikya ya koyokama. Likambo yango ezali mpe bongo epai na baoyo bazali lelo komipesa epai na Nzambe na nzela ya Klisto mpe bazali kozwa batisimo. Bango mpe bazali na libaku malamu ya kobondela Nzambe na bonsomi nyonso.

Olingi mpenza ete mabondeli na yo mandimama. Yango, soko omipesi naino te epai na Jéhovah mpo na kosalela ye mpe kosambela ye, ekozala likambo na mayele mpo na yo ete, oluka ye mpenza Sala lokola Corneille, mpe Nzambe akozanga kondima mabondeli na yo te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto