Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/10 lok. 3
  • Kosambela ezali na ntina?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosambela ezali na ntina?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Masolo mosusu
  • Bótombola mabɔkɔ ya sembo na libondeli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mpo na nini tosengeli kobondelaka ntango nyonso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Zwá na motuya likabo oyo ozali na yango ya kobondela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/10 lok. 3

Kosambela ezali na ntina?

MOKOLO ya vendredi 31 mai 1985, mopepe makasi ebetaki na sud ya province ya Ontario, kuna na Kanada. Mokonzi moko na lingomba oyo afandaka na mboka Grand Valley amonaki ndenge nini mopepe yango ekumbaki manzanza ya ndako na ye. Zulunalo elobaki ete “amonaki ndenge nsomo mpe mirakle esanganaki na nkanda ya mopepe”.

Ezali solo mawa monene mpo na bandeko mpe baninga ya bato mibale oyo bakufaki na ntango ya mopepe yango mpe mpo na bato koleka nkoto mibale oyo bandako na bango ekweaki mpo na mopepe yango. Baoyo babikaki na liwa to bazokaki se mpota moke bazali koloba ete babiki lokola likamwisi. Ron mpe moninga na ye ya mosala bazali kati na bato yango. Awa bakebisamaki bobele mwa ba secondes liboso, bakimaki komibomba na esika libateli ezalaki makasi, kati na ndako epai basalaka. Nsima na koloba ndenge nini bango mibale babikaki na liwa, Ron alobi boye: “Nazalaki kondima Nzambe liboso, kasi sikawa naleki kondima ete azali solo.”

Moto moko alobaki mokolo mosusu ete, ntango na likama, ‘okomona ata moto moko te oyo azangi kondima Nzambe’. Soko bazali na ntango, bato mingi basambelaka na molende mpenza mpo ete babatelama to babikisama na likama.

Mokolo ya dimanche 21 juillet 1985, na Sydney, na Ostrali, bato koleka nkama, mibali, basi mpe bana bayanganaki na kati na Salle du Royaume mpo na kosambela Nzambe. Nsima na loyembo, libondeli esalemaki mpo na lisangá. Molobi abandaki kosala diskur na ye ezwami na Biblia uta minite 15 ntango likita yango ya kimya ekatanaki na bombe moko oyo eutaki kopanzana. Molobi azokaki makasi, mobali moko afandaki na molongo ya liboso akufaki mpe bato 40 bakotaki lopitalo.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 3]

Libondeli ekobongola makambo?

Makambo oyo mibale—“mopepe makasi” mpe bombe oyo epanzanaki na Salle du Royaume—etindi biso na komituna mituna mpo na motuya ya libondeli. Ebimisaka mpenza matomba? Kosambela ezali na ntina?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto