Omitambwisa ntango nyonso na elimo oyo ekopesaka bomoi
“Ezali elimo nde ekopesaka bomoi; mosuni ezali na lisungi te.”—YOANE 6:63.
1. (a) Ndenge nini Jéhovah azali kosalisa basaleli na ye ete bayika mpiko na “mopepe” ya mokili? (b) Mpo na nini mbuma ya elimo ekosalisa biso ete tozala na makanisi mabongi?
TOZALI mpenza na mposa ya elimo na Jéhovah mpo na kotemela “mopepe” ya mokili, elingi koloba bizalela na yango. (Baefese 2:1, 2) Biblia mpe ezali na ntina mingi, mpamba te ezali na makanisi ya Nzambe oyo ekomamaki na lisungi ya elimo santu. Mpe esengeli na biso kozala na ezalela ya boklisto ya kosokema, ezalela oyo tokokolisa soko tozali kolona bambuma ya elimo ya Nzambe, elingi koloba: “Bolingo, esengo, kimya, motema petee, boboto, malamu, kondima, bopolo mpe komikanga motema.” Ntoma Paulo apesaki elendiseli oyo: “Botambola na elimo mpe bopesa mposa na nzoto nzela te. Mpamba te mposa na nzoto ekobundaka na mposa na elimo mpe mposa na elimo ekobundaka na mposa na nzoto; nyonso mibale ekotemanaka, kopekisa bino ete bozanga kosala yango ekani bino.”—Bagalatia 5:16, 17, 22, 23.
2. Monisa bokeseni ezali kati na makambo oyo elimo ya Nzambe ebimisi mpe mabe ebimisami na “elimo ya mokili”.
2 Paulo akomaki lisusu boye: “Biso toyambi elimo na mokili te kasi elimo uta na Nzambe, ete tososola makambo oyo Nzambe apesi biso.” (1 Bakolinti 2:12) “Mopepe” to ezalela ya elimo ya mokili ekoki koboma, nzokande oyo Nzambe azali kopesa na nzela na elimo santu na ye ekopesaka bomoi ya seko. Yesu alobaki: “Elimo ezali yango oyo ekopesaka bomoi; mosuni ezali na lisungi te. Maloba masili ngai kosololana na bino mazali na elimo mpe mazali na bomoi.” (Yoane 6:63) Mpo ete “mosuni ezali na lisungi te”, tozali na mposa na lisalisi na Nzambe mpo na kolonga lisumu mpe kotemela elimo ya mokili.
3, 4. (a) Lokoso ezali nini, mpe ndenge nini ‘mokonzi na mopepe’ azali kosalela mposa ya komilukela biloko ya mosuni? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete moto na lokoso ezali mosambeli na bikeko?
3 Na lisolo oyo euti koleka tolobelaki lolenge mibale mabe ya “mopepe” ya mokili: mposa ya kosakana na pite, elateli mpe lolenge ya kokata nsuki to kokangisa yango na ndenge mabe. Kasi mopepe ya mokili ezali na makama mosusu. Na ndakisa, esili kotonda na lokoso, na mposa makasi ya moimi na kolinga kozwa matomba to biloko ya mosuni. ‘Mokonzi na mopepe’ azali kosenzela na boye ete kopanza nsango mpe piblisité ya mokili emonisa yo lokola okoki te soko ozali na biloko mingi te ya mosuni. Lolenge yango ya “mopepe” ya mokili ekoki kobebisa yo na kotindaka yo okanisa ete biloko ya mosuni ezali makambo maleki ntina na bomoi. “Mopepe” yango mpe esili kobeta yo na miso?
4 Biblia elobi: “Moto na pite te mpe moto na bosoto te mpe moto na elulela te-elingi koloba ete mosambeli na bikeko-azali na libula kati na bokonzi na Klisto mpe na Nzambe.” (Baefese 5:5) Omoni ete moto na elulela to lokoso azali mosambeli na bikeko. Mbala mosusu okoki komiloba boye: ‘Nakolekisa ndelo te; nakokoma mosambeli na bikeko te.’ Kasi kosambela bikeko elimboli nini? Yango elimboli kotya eloko mosusu na esika ya Jehovah mpe losambo na ye, kotya likebi likolo na yango na esika ya kotya likebi epai na Nzambe mpe lisanga na ye. Lokoso ekoki kozala kosambela mosolo, kosambela nguya na yango mpe bopusi na yango. Soko ozali bobele kotya na esika ya liboso makanisi ya kosomba voiture ya sika, radio-cassette ya sika to eloko mosusu na esika ete okolisa mosala na yo mpo na Jéhovah, yango ezali elembo ete “mopepe” ya mokili ezali na bopusi epai na yo. Biloko ya mosuni ekomi nde banzambe mpo na yo, boye te?
5. Nini emonisi ete “mopepe” ya mokili etondi na mposa ya bozwi?
5 Soko ozali koluka kotanga mingi to kozwa mosala oyo ezali lifuti yo malamu, yango ezali mpo ete okoma mozwi to ozala na biloko mingi ya mosuni koleka oyo ozali na yango mposa? Ozali koluka koyeba myango oyo ekoki kobimisela yo mosolo mbangombango, mpe ozali na mposa ya kosalela yango? “Mopepe” ya mokili etondisami na mposa mabe ya kokoma na mosolo mingi mpe na mayele mabe ya kokosa mpo na kozanga kofuta bampako esengami na Leta. Kati na mopepe motindo yango, lisano mpe makambo mosusu ekokani na yango ezali koya mingi. Tika ete omekama te. Baoyo bazali kobwaka “mopepe” ya mokili oyo emonisami na lokoso bazali koyeba ete mpo na kozala solo na esengo esengeli kosepela na biloko oyo bizali ntina mpe kotya na esika ya liboso matomba ya Bokonzi.—Matai 6:25-34; 1 Yoane 2:15-17.
Koyeba kosalela lolemo
6. Elobeli ya mokili ekoki kobimisa mbuma nini ya mabe epai na baklisto?
6 Tokoloba boni mpo na elobeli na biso? Maloba ya nsoni, maloba na nkanda, lokuta-“mopepe” nyonso ya mokili esili kobebisama na elobeli ya bosoto. Nzokande, ekomaka ete mwa bamoko na baoyo bazali koyangana na lisangá na boklisto bazali na elobeli ya nkanda, to elobeli ya bongo na bongo. Moyekoli Yakobo ayebisi biso boye na polele nyonso: “Na monoko yango moko, ekobimaka kokumisa mpe kofinga. Bandeko na ngai, ekoki te ete makambo mazala bongo. Liziba ekobimisaka mai na elengi mpe mai na bololo na monoko moko?” (Yakobo 3:10, 11) Osalelaka maloba oyo bilenge ya mokili bazali kosalela? Ozali na vokabilere mibale: moko ntango ozali elongo na baklisto, mpe mosusu ntango ozali na libanda? Paulo akomaki: “Tika te ete maloba na bosoto mabima na minoko na bino kasi bobele yango mazali malamu mpo na kolendisa, pelamoko ezali bosenga, ete mapesa bayoki ngolu.” (Baefese 4:29) Ezali na ntina mingi ete ozala na elobeli moko malamu mpe ya peto ntango nyonso.
7. ‘Kotika lokuta mpe koloba solo’ elimboli nini?
7 Tosengeli mpe lisusu kosenzela ete toloba ntango nyonso solo. Kobomba makambo to kotya baninga na libunga na ndenge ya nko mpo na komibimisa na makambo ezali lolenge mosusu ya lokuta. Ekozala malamu ete olanda toli ya Paulo: “Bongo, ekobwaka bino makambo na lokuta, tika ete moto na moto aloba sembo na mozalani na ye, mpamba te bozali lokola bilembo na nzoto, moko elembo na mosusu.”—Baefese 4:25; Masese 3:32.
8. (a) Bato mingi basalaka nini soko batumoli bango? (b) Tokosala nini soko batumoli biso?
8 Kosilika ezali lolenge mosusu ya elimo ya mokili. Bato mingi babungisaka mpambampamba ezaleli ya komikanga motema. Bakosilika mpe na nsima bakosenga lilimbisi na kolobaka ete balingaki bobele ‘kobimisa nkanda’ na bango. Kasi ezali yango te Paulo asengi; akomaki boye: “Makambo nyonso na bololo mpe likunya mpe nkanda mpe kongala mpe kotonga malongwa na bino mpe makambo nyonso na mabe lokola.” (Baefese 4:31) Kasi okosala nini, soko ata tozali kolona ezaleli ya komikanga motema mpe bambuma ya elimo na Nzambe, nkanda eyeli biso. Mpo na yango Paulo akomaki: “Boyoka nkanda, nde na lisumu te: tika te ete moi elimwa naino bozali na nkanda na bino. Boye bopesa Diable nzela te.” (Baefese 4:26, 27) Soko likambo moko to moto moko apesi yo nkanda, esengeli kobongisa likambo yango mbala moko, liboso ete mpokwa eingela, soko te koyina mpe kobomba nkanda ekoki kokotela yo na motema, mpe ekozala mpasi ete olongola yango. Kotika te ete opema “molimo” ya mokili oyo emonisami na nkanda mpe na kobomba nkanda na motema.—Nzembo 37:8.
9. Mingimingi basali bazalaka na ezalela nini, mpe mpo na nini tosengeli kotalela ezalela na biso na esika ya mosala?
9 Okokisaka malamu mosala na yo? Emonanaka mingi lelo oyo ete basali bazali kolekaleka mpamba na esika ya mosala to bazali koyiba biloko ya mosala. Osili kopema mwa ndambo ya “mopepe” yango? Likanisi oyo elobi ete ‘bato nyonso basalaka bongo’ esili kokotela yo? Tobosana te ete lolenge oyo, biso baklisto, tozali kosala mosala na biso ezali kokumisa to kotiola Jéhovah mpe losambo na ye ya solo. Okolinga ete moto moko aboya nsango malamu oyo Témoin de Jéhovah moko akosakolela ye, mpo ezaleli na yo na mosala ezalaka mabe? Paulo alobi boye: “Moyibi ayiba lisusu te, kasi tika ete asalaka mosala, . . . ete akoka kokabela bango bazali kozanga.”—Baefese 4:28.
10. Ndenge nini, na esika ya mosala, tokoki komonisa ete tomitiki kotambwisama te na “mopepe” mabe ya mokili?
10 Ezali solo ete basali bazali lisusu baombo te epai na bankolo na bango ndenge yango ezalaki na ekeke ya liboso, kasi basali baklisto bakoki kozwa liteya na maloba oyo Paulo akomaki epai na baombo baklisto na Efese 6:5-8. Alobaki na bango ete ‘batosa baoyo bazalaki kosala, bobele mpo na kosepelisa bato te, kasi lokola baombo na Klisto’. Moklisto akoluka te ete asala mwa ndambo ya mokolo mpe kolekisa ngonga mosusu to kosilisa mosala oyo alakaki. Soko tozali kosala makambo manso “lokola mpo na Jéhovah”, tokobatela ezalela malamu mpe tokotika kopusama na ezaleli ya moimi te mpe ya goigoi oyo ezali komonana na “mopepe” ya mokili oyo.
Kolya, komela mpe kominanola
11. Ndenge nini basaleli mosusu Jéhovah na ntango eleki bapusamaki na ezalela ya mokili mpo na oyo etali kolya mpe komela?
11 Osili kobendama na lokoso ya kolya mpe komela oyo ezali komonana na mokili? Likanisi ya mokili ezali boye ete: ‘Tolya, tomela mpe tosepela, mpamba te mbala mosusu tokokufa lobi.’ (1 Bakolinti 15:32) Elimo yango esili kokotela basaleli mingi ya Nzambe, mpe yango ebandaki uta kala. Omikundola mokolo oyo na esobe, Bayisraele ‘bafandaki mpo na kolya mpe komela, mpe batemaki mpo na kosana’. (Exode 32:6) Bamipesaki kozanga komipekisa na etamboli ya mbindo mpe losambo ya bikeko, na boye ete nkanda ya Nzambe ekwelaki bango. Tomekola bango te.—1 Petelo 4:3-6.
12. Tosengeli kosala nini soko tozali kolekisa ndelo mpo na oyo etali kolya mpe komela?
12 Jehovah apesaki biso bilei mingi mpe masanga makeseni, oyo elengi na yango ekeseni moko na mosusu, langi mpe ndenge na yango ya koleisa nzoto, kasi alingi ete tosalela yango na bokatikati Biblia eboi kolunda mpe molangwa. (Masese 23:20, 21) Zala sembo mpe omituna motuna elandi: Nakoki kokolisa bizaleli malamu mpo na oyo etali komela mpe kolya? Soko esengeli na yo kosalela makasi ezaleli ya komikanga motema, ekozala malamu ete ondima yango mpe tya makasi na boyokani na mabondeli kati na yango ozali kosenga lisalisi ya elimo santu ya Nzambe mpo na kolonga bolembu yango. Paulo alobaki: “Bolangwaka vinyo te mpamba te yango ezali kozanga kobika. Nde botondaka na elimo.” (Baefese 5:18) Ee, omitondisa na elimo na Nzambe mpe kopesa nzela te na elimo ezangi ndelo ya mokili. “Boye, soko bokolyaka soko bokomelaka, soko bokosalaka nini, bosala nyonso mpo na nkembo na Nzambe.” (1 Bakolinti 10:31) Soko ozali ntango nyonso na mikakatano na makambo yango, wana luka lisalisi ya mibali na elimo oyo bateli kati na lisanga—Bagalatia 6:1; Yakobo 5:14, 15.
13. (a) Nini emonisi polele ete Diable asili kobebisa masano mingi oyo mapesameli biso lelo oyo? (b) Ndenge nini tokoki kopengola ete tomekola te ezaleli ya mokili mpo na oyo etali masano?
13 Mokili esili komipesa makasi na masano, na miziki mpe na lolenge nyonso ya kominanola. Mabe ezali te ya kolinga makambo motindo oyo, soko etemeli te mitinda ya Makomami. Kasi mokakatano ezali boye ete Satana, “oyo azali koyangela lokola mokonzi likolo na mopepe” asili kobebisa masano oyo mazali kolakisamela biso. (Baefese 2:2, ebongolami uta na Biblia ya Kuen). Mingimingi pite elendisami mpe mobulu epesameli nzela; bazali komonisa kolonga ya bato mosusu na nzela na lokuta, ya moyibi to na nzela ya koboma bamosusu. Soko tozali kotala makambo motindo boye, tozali kopema makanisi motindo yango mpe tozali kotika ete ekotela biso, na boye ete makama na yango oyo ekoki koboma ekozanga te kosala biso mabe. Epai mosusu, ata ntango masano to kominanola mosusu eboyami na Makomami te, tokoki kosepela na yango mingi mpe na bongo tokozala lisusu na ntango mingi te mpo na misala ya elimo. esengeli bongo koyeba kopona masano. Zwa ntango ya kosepela na bokatikati nyonso na lolenge boye to oyo kuna ya kominanola oyo ezali peto mpe na litomba, kasi osenzela ete omekola te kolekisa ndelo oyo emonani na mokili. Ata ezali na nsolo malamu to mabe, “mopepe” ya mokili esili kobeba mpe ekoki koboma.—Masese 11:19.
Lolendo ya mposo: mopepe mabe
14. Ndenge nini “mopepe” ya mokili ekoki kotambwisa ndenge na biso ya kotalela makambo etali ekolo, mposo, boyekoli mpe mosolo?
14 Lolendo ya mposo to kolinga ekolo ezali lolenge mosusu ya mayele mabe ya “mopepe” ya mokili. Bamoko bazali koloba na libunga nyonso ete mposo boye eleki mposo mosusu. Kolinga ekolo elendisi bato na kotalela ete ekolo na bango eleki bikolo mosusu. Ya solo, bato mingi bazali koyika mpiko na bampasi ezangi ntina mpe bazangi ata biloko ya ntina mpo na bomoi mpe bazangi lotomo ya bomoto oyo moto nyonso asengeli kozala na yango, mpo na moimi mpe makanisi mabe ya bazalani na bango. Yango ezali kobimisa koyina mpe mobulu. Bato mingi bazali kotomboka mpe bazali kolinga kobongisa mibeko, bamindimisi ete bakoki kosilisa mikakatano etali kokabwana kati na bato. Biso mpe tokoki komitika ete makanisi motindo yango malonga biso. Soko tozali komona to tozali kozwa mpasi motindo yango oyo ezangi ntina mpe tozali bongo koyoka baoyo bazali kosenga na makasi nyonso ete libongwani esalema, tozali na likama ete tomitika kopusama soko totye likebi te. Tokoki kobanda kopengwa na ezalela na biso ya bokatikati mpe kokota na makambo ya mokili. (Yoane 15:19) Oyo eleki lisusu mabe, tokoki komekama ete tokota na etuluku ya bato basali greve to oyo bazali kotomboka, to lisusu kosalela mobulu mpo na kosenga libongwani na makasi.
15. Biblia epesi biso toli nini wana tomemami ete ‘tozongisa mabe na mabe’?
15 Elimo ya lisangá ekoki kobebisama na mayoki ya kokabola mposo to ya kolinga ekolo. (Tala Misala 6:1-7.) Tokomekola bongo ezalela malamu na kolandaka toli oyo: “Soko ekokoka, mpe lokola ezali likambo na bino, bozala na bato nyonso kimya. Balingami, bobukanisa mpo na bino mpenza te, kasi tika esika mpo na nkanda na Nzambe. Pelamoko ekomami ete, Nkolo alobi ete, Kobukanisa ezali likambo na ngai, ngai nakofuta.” (Baloma 12:18, 19) Mpo ete mposo nyonso euti na baboti na biso ya liboso mpe ete Nzambe azali na kokabolakabola te, esika ezali te mpo na lolendo na mposo to lolendo na ekolo kati na lisangá ya boklisto.—Misala 10:34, 35; 17:26; Baloma 10:12; Baefese 4:1-3.
Opema ntango nyonso “mopepe” oyo ekopesaka bomoi
16. Eloko nini ekosalisa biso ete toboya bopusi ya elimo ya mokili?
16 Tosili kolobela mitindo minene ya “mopepe” oyo ekoki koboma to elimo ya mokili. “Mopepe” yango ya mabe ezingi biso mpe ezali kopusa biso na boye ete soki totiki kolendisa elimo na biso, mopepe yango ekokotela biso. Tokotemela yango mpe tokolonga soko tozali kolinga makambo ya peto mpe ya sembo, mpe soko toyini makambo ya mbindo mpe ya mabe. Tokopema ntango nyonso “mopepe” kitoko soko tolandi ntango nyonso kolona makanisi malamu mpe komitika komitambwisama na elimo santu ya Jéhovah.—Baloma 12:9; 2 Timote 1:7; Bagalatia 6:7, 8.
17. Tosengeli kosala nini ntango tomoni ete liboke ya mopepe ya mokili ezali kokoma kino esika na biso?
17 Keba mpenza na boye ete eloko moko te ezwami kati na “mopepe” oyo mabe emonana na miso na yo lokola ete ezali kitoko. Mokonzi na “mopepe” yango ayebi malamu nini oyo esengeli mpo na kobenda mayoki mpe kobotisa kati na yango mposa oyo mbala mingi ekomema na lisumu. (Yakobo 1:14, 15) Tikala na ngambo ya “bato bamelaka—likaya te” elingi koloba kati na paradis ya elimo ya Jéhovah. Soko omoni ete liboke ya “mopepe” ya mokili ezali kokoma kino esika na yo, na bongo bengana yango. Oboya yango ndenge okoboya pwazo oyo ekoki koboma. “Bongo, bokeba mpo na etambweli na bino, bozalaka bazoba te kasi bato na mayele mpenza. Bosalisa ntango na bino misala malamu, mpamba te mikolo ezali mabe. Na ntina yango bozala bilema te nde bososola yango ezali mokano na Nkolo.”—Baefese 5:15-17.
18. Ezalela nini ekozala kati na bato oyo bakozwa bolamu ya kozala na bomoi na mabelé oyo epetolami?
18 Nzambe alingi ete tosalela ye na bosembo nyonso. Na ndenge yango, tokozwa bomoi ya seko kati na ebongiseli ya sika oyo alaki mpe oyo esili kobelema. Ntango tokozala kopema mopepe na ebongiseli yango, ekozala kitoko mpenza. Ekozala mopepe ekopesaka bomoi mpe ya peto, oyo ekozanga ata eloko moko ya mabe. Ekozala mpe bongo mpo na mopepe ya solo oyo ezingi biso, kasi lisusu, mpe likambo eleki ntina, ekozala ndenge yango mpo na elimo ya baoyo nyonso bakozala na bolamu ya kozala na bomoi na mabelé epetolami. Bakozala na botosi mpe na kosokema. “Mopepe” ya mokili, etondi na botomboki, ebebi mpe etondi na ezaleli ya kozanga kobanga Nzambe, ekolimwa.—Emoniseli 21:5-8.
19. Lolenge nini ya bato bakobika mpe bakokota na ebongiseli ya sika elakami na Jehovah?
19 Ya solo toboi ete bakuta biso kati na bato oyo bazali kopema “mopepe” ya mokili oyo ntango Jéhovah akopepola mopepe mpe akolimwisa babebisi na yango na Armagedon. Ekozala lisiko mpenza ntango mokili oyo ekozala lisusu te mpe ete ‘mokonzi ya mopepe’ akobwakama na libulu mozindo! Baoyo bakotikala na bomoi, ekozala baoyo balingi Jéhovah mpe makambo mazali peto, mabongi mpe mazali sembo. Jéhovah alingi ete bafanda libela mpe ye akosalisa bango na elimo na ye. Akopesa bango bomoi ya seko kati na ebongiseli ya sika ya kitoko mpe ya peto. Tolekisa libaku malamu oyo te na kopemaka “mopepe” mabe ya biloko ya ntango oyo.
Bozongeli
◻ Mpo na nini tokoki koloba ete moto na lokoso azali mosambeli na bikeko?
◻ Ndenge nini “mopepe” ya mokili ekoki komonana na elobeli na yo?
◻ Elimo nini basali baklisto basengeli kozala na yango na esika ya mosala?
◻ Ndenge nini tokoki kopengola ete topusama na ezalela ya mokili mpo na oyo etali kolya, komela mpe kominanola?
◻ Mpo na oyo etali mposo mpe kolinga ekolo, elimo nini ekoki te kokota kati na lisangá ya boklisto?
[Elilingi na lokasa 18]
Libota na yo ezali mpenza makasi kati na elimo mpo na kotemela mopepe ya mokili?
[Elilingi na lokasa 19]
Soko tokosala makambo nyonso lokola mpo na Jehovah tokopusama na moimi mpe goigoi te oyo ezali komonisa mopepe ya mokili