Masolo ya basakoli ya Bokonzi
Solo ya Biblia ezali kosikola na boombo ya bilimu mabe lolenge oyo
LOLENGE oyo Nzambe azali kotalela mosala na soloka eyebisamaki polelepolele epai na Bayisraele na maloba oyo: “Bokosala nkisi mpo na kosakola liboso te, mpe bokosala nkisi mpo na koloka moto te.” (Levitike 19:26) Kasi ndenge nini moto oyo azali moombo ya maji mpe ya mosala na soloka akoki kosikolama na boombo ya bilimu mabe? Yesu alobaki: “Mpe bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.’‘ (Yoane 8:32) Yango emonisamaki polele, na likambo oyo ndeko Témoin de Jéhovah moko ya mwasi ya mboka France azali koloba:
‘Nautaki kokota kala mingi te kati na ndako na ngai ya sika wana moninga moko ya pembeni, mwasi moko malamu mpenza, atunaki ngai mpo ete ayebisa ngai horoscope na ngai. Mbala moko, nazwaki ekateli ya kokata boninga na ngai elongo na ye, kasi ekateli yango ezalaki petee te, mpamba te azalaki mpenza na bizaleli ya malamu.
‘Na Novembre 1980, nazalaki maladi mpe moninga yango asalisaki ngai. Nayaki mpenza kosepela na bizaleli na ye ya motema, lokola ayebisaki ngai ete mbala na mbala atungisamaka mingi kati na butu. Na bongo, azalaki mpenza na esengo te lokola nazalaki kokanisa. Kasi azalaki ntango nyonso kolobela likambo ya koyokana na bilimu mabe! Lokola nakokaki kokanga monoko te, nazwaki ekateli ya kolobela ye solo.
‘Mokolo moko tozalaki kosolola na ye na ntina na mikakatano oyo basi bafandaka bango moko bakutanaka na yango mpo na kozwa mwayé ya kobikela. Bongo ye ayebisaki ngai boye: “Nasi nayebi ndenge ya kosala .Nazali kozwa mosolo ntango nazali kobeta carte.” Na yango, nazwaki Biblia na ngai mpe namonisaki ye ete ezali likama monene na kozala na boyokani na bilimu mabe ya nguya mingi koleka.
‘Mpe tobandaki lisolo elongo na ye mpo na oyo etali koyokana na bilimu mabe. Ayebisaki ngai ete makambo nyonso oyo azalaki kosakola ezalaki kokokana nyonso. Nasalisaki ye na kososola mpo na yango. Nalakisaki ye maloba oyo ya Moďse oyo mazwami kati na Deteronome 18:10, 11: “Moto akozwama kati na bino te, . . . to moto na jonga, to moto na kotala myoto mpo na kosakola liboso to moto na kosala nkisi mpo na kosakola liboso, to nganga na nkisi, to . . . moto na kobyanga milimo, to nganga na soloka, to moto na kosolola na bakufi.” Lokola nazalaki kokenda, angangaki: “Ngai nakanisaki ete nazwi nzela ya kosilisa mikakatano na ngai!“ Maloba wana malendisaki ngai: na bongo, longwa na lisolo ya liboso, azalaki koloba mpo na boyokani elongo na bilimu mabe lokola likambo oyo azalaki kosala yango kala! Na miso na ngai, yango elimbolaki ete asili kokanga ntina ya liteya yango kati na motema na ye.
‘Lokola azalaki na nzala mingi ya bilei na elimo, azalaki kotanga Biblia kino na ngonga ya 3 to ya 4 ya ntongo. Na ebandeli tozalaki koyekola mbala mibale na poso moko. Abandaki koyangana na makita mpe akolaki nokinoki. Ya solo, totalelaki likambo ya koyokana na bilimu mabe na bozindo mingi mpenza mpe, na lisalisi ya mikanda ya la Société, ye moko akamataki ekateli ya kotumba biloko nyonso oyo azalaki na yango oyo etalaki bilimu mabe.
‘Ayikaki mpiko mpe aumelaki te na kosakola “nsango malamu” epai na bazalani na ye. Mbala na mbala azalaki kobengama na telefone epai na bakilya na ye ya kala, kasi nsima na kolimbola ete atikaki mosala na ye ya bonganga, azalaki kobenga bango ete baya kotala ye mpo na koyoka makambo ya kitoko koleka. Azwaki batisimo mpe sikawa azali ndeko na biso ya mwasi.’