Mopepe ya mokili ekoki koboma
“Bino bozalaki bakufi kati na bikweli mpe na masumu na bino wana etambolaki bino kati na yango kobila nzela na mokili oyo, kobila mokolo na nguya na mopepe.”—BAEFESE 2:1, 2.
1. Mpo na nini kobeba ya mopepe ekoki koboma bato?
SOKO tobimi na ndako moko ezali na mopepe mingi te, mpe topemi mopepe ya peto, yango ekokitisaka mpenza motema. Kasi, lelo oyo ata na kati ya zamba, mopepe esili mpenza kobeba. Na bamboka mingi, pwazo nyonso oyo ekoti na mopepe esili kokoma mingi na ndenge boye ete ekomi likama. Mopepe ezali kotambwisa milinga oyo ezali mabe mpo na nzoto, pusiere to putulu oyo ekobebisaka biloko, mpe mikrobe misusu oyo ekobimisaka maladi. Mopepe, eloko oyo ezali ntina mingi mpo na bomoi, eloko oyo Mozalisi na bolingo apesaki biso na bokabi nyonso, ekomi nde likama monene mpo na bopoto mpe lokoso ya moto.
2. “Mopepe” nini ebebisami, ezali lisusu likama koleka mopepe mabe oyo tozali kopema?
2 Ata likama nini mopepe ekomi na yango, tozali mpe na likama ya kopema “mopepe” mosusu esili kobeba oyo ekoki koboma lisusu koleka, oyo ebebisami ata na aksida nikleere moko te ya Tchernobyl, kuna na U.R.S.S., soko mpe na londende makasi ya Los Angeles. Ntoma Paulo alobelaki yango ntango akomaki mokanda epai na baninga na ye baklisto: “Bino bozalaki bakufi kati na bikweli mpe na masumu na bino wana etambolaki bino kati na yango kolanda nzela na mokili oyo, kolanda mokolo na nguya na mopepe. Elimo yango ezali sikawa kosalaka mosala kati na bana na nkanza.”—Baefese 2:1, 2.
3, 4. (a) Nani azali “mokonzi na nguya ya mopepe”? (b) Mpo na nini “mopepe” oyo elobelami kati na Baefese 2:1, 2 ezali esika oyo bilimu mabe bazali kofanda te?
3 “Mopepe” yango ezali nini? Paulo amonisi ete ezali na “nguya” to bokonzi, mpe ete etambwisami na “mokonzi”. Ntembe ezali te, mokonzi yango ezali Satan le Diable, oyo Yesu Klisto abengaki ye “mokonzi na mokili oyo”. (Yoane 12:31) Kokangaka ntina na yango, bato bakoyekolaka Biblia bakanisi ete Paulo azwaki likanisi yango na mateya ya Bayuda to ya Bapakano mpe ete azalaki kolobela mpo na mopepe lokola esika oyo bilimu mabe oyo bayangelami na Diable bafandaka. Mabongoli mingi ya Biblia mazali kobimisa likanisi yango. Kasi “mopepe” yango ekeseni mpenza na “makolo” epai “milimo mabe kati na likolo” bafandi.—Baefese 6:11, 12.
4 Ntango Paulo akomaki epai na baklisto ya Efese, Satana mpe bilimu mabe, ata soko baboyamaki na Nzambe, bazalaki ntango nyonso na makolo. Babwakamaki naino pene na mabelé te. (Emoniseli 12:7-10) Mpe lisusu, likambo ya mopepe etali mingi bato koleka bikelamu ya elimo. Yango wana, ntango mbeki na nsuka ya nkanda na Nzambe esopamaki likolo na “mopepe”, bato nde bamonaki misala na yango.—Emoniseli 16:17-21.
5. “Mopepe” yango oyo tozali kolobela ezali mpenza nini, mpe ezali kosala nini epai na bato?
5 Emonani lokola ete Paulo alobeli mopepe mpo na kopesa elakiseli ya elimo to ezalela oyo bato baboi Nzambe bakomonisa mingimingi mpe oyo ekeseni na ezaleli ya moimi mpe ya kozanga botosi. “Mopepe” yango ezali ndenge moko na “elimo oyo ezali kosala mosala kati na bana na nkanza”. (Baefese 2:2; 1 Bakolinti 2:12) Lokola mopepe ya solo ezali bisika nyonso mpe ezali mpasi te mpo na kopema, ndenge moko mpe “elimo ya mokili” ezali komonana ntango nyonso. Ezali kokota, ezali na bopusi mpe ezali kobongola makanisi mpe misala ya bato, longwa na bomwana na bango kino liwa, wana ezali bango koluka kokokisa bamposa na bango, mpe bilikya na bango.
6. (a) Eloko nini ezali koyeisa makasi makama ya mopepe ya mokili, mpe ndenge nini ezali kosala nguya ma yango? (b) Ndenge nini ye oyo azali kopema mopepe” yango akoki kopusama ete amekola ezalela ya botomboki ya Diable?
6 Elimo yango, oyo emonisami na lisumu mpe na elimo ya botomboki, ezali mingi kati na libota ya bato bazangi kokoka. Bato bazali bobele kopema “mopepe” yango te, kasi makambo oyo makoki koboma, oyo yango ezali kobimisa mayeisami lisusu makasi na bopusi makasi ya bazalani na bango mpe na mposa oyo ezali se kokola ya bisengo ya mosuni. Ezali bongo na “nguya” makasi likolo na bato. (Tala Baloma 6:12-14.) Ya solo, ezali Diable nde azali mobandisi na oyo nyonso ezali mabe. (Yoane 8:44) Azali bongo kopusa bato ete bamekola ezalela na ye ya botomboki mpe, na yango, azali kopemisa, kobongola mpe koyangela elimo to “mopepe” oyo bato nyonso bazali kopema. Lokola azali “mokonzi” ya nguya yango to “bokonzi” yango ya mabe, Satana azali kosalela yango mpo na koyangela makanisi ya bato. Mokano na ye ezali boye ete bato bamipesa mpenza na bamposa ya mosuni mpe baluka mikano mitali se mokili oyo na boye ete bazangi ata ntango ata mposa ya koluka koyeba Nzambe mpe komisokisa na mosala ya elimo santu na ye, “elimo oyo ezali kopesa bomoi”. (Yoane 6:63) Na elimo, basili kokufa.
7. (a) Na ndimbola nini baklisto bazalaki liboso “bana na nkanza”? (b) Mbongwana nini basalaki ntango bakomaki baklisto?
7 Baklisto bango mpe lisusu bazalaki na nse na “bokonzi” to nguya ya “mopepe” yango ebebisami liboso ete bayekola solo ezwami kati na Liloba na Nzambe mpe babanda kolanda mitinda ya Nzambe na boyengebene. ‘Kati na bango, biso nyonso tofandaki na mposa na mosuni na biso, kosalaka mikano na mosuni mpe na mitema mpe bongo na bizaleli na biso tozalaki bana na nkanda pelamoko bango mosusu.’ Kasi wana ekomaki biso baklisto totikaki kopema “mopepe” ya mokili oyo, oyo ekoki koboma. ‘Tolongoli motindo na biso oyo ekangami na ezaleli na biso na liboso, oyo mpe esili kopola mpo na mposa mabe, mpe tolati motindo na sika oyo ezali na motindo na Nzambe na boyengebene mpe na bulee na solo.’—Baefese 2:3; 4:22-24.
8. Na likambo nini ezalela na biso ekokani na oyo ya Bayisraele na esobe?
8 Tosili bongo kokima mopepe ya mokili oyo ebebisami, kasi likama moko ezali pene na biso: tokoki komemama ete tozonga lisusu kuna. Lelo oyo, “ntango ya nsuka” elingi kosila mpe tobelemi na mokili ya sika. (Danyele 12:4) Tolingi kozanga mokili ya sika te na kokweaka kati na motambo oyo Bayisraele bakweaki. Nsima wana basikolamaki na ndenge ya ekamwiseli na Ezipito mpe ntango bakomaki na mondelo ya Mabele na ndaka, bankoto na bango “bakweaki na esobe”. Mpo na nini? Bamoko bakomaki basambeli na bikeko; bamosusu basalaki pite; mpe bamosusu bamekaki Jéhovah mpo ete bazalaki koimaima mpe komilelalela. Paulo abimisi likanisi moko ya makasi ntango alobi: “Makambo oyo eyeli bango lokola bikebiseli, ekomami mpo na kolakisa biso mpo ete nsuka na bikeke eyei na biso.”—1 Bakolinti 10:1-11.
9. (a) Ndenge nini tokoki kozala na mokili kozanga ete tosangana na yango? (b) Tosengeli kosala nini mpo ete mopepe ya mokili ebenda biso lisusu te?
9 Yesu abondelaki na maloba oyo na ntina na bayekoli na ye: “Bazali bato na mokili te pelamoko ngai nazali moto na mokili te. Nalombi te ete olongola bango na mokili kasi ete obatela bango na ye mabe.” (Yoane 17:14, 15) Jéhovah akobatela biso, kasi atye “lopango” zongazonga na biso te; azali kobatela biso te na ndenge ya ekamwiseli liboso na “mopepe” ya mokili. (Yobo 1:9, 10) Mpo na biso, mokakatano monene ezali boye ete tozali kofanda kati na mokili ya Satana kasi tokoki kosangana na yango te, tozingami na “mopepe” ebebisami na mokili oyo kasi tokoki kopema yango te. Wana ezali biso kotanga mikanda ya mokili, tozali kotala televizio to tozali kokenda na teyatre, tozali komibimisa na “mopepe” ya mokili. Soko ezali solo ete tokoki te kopengola kokutana na bato ya mokili oyo na mosala, na eteyelo to epai mosusu ata bongo tosengeli kosenzela mpo ete tobendama lisusu na mopepe mabe te ya mokili oyo, oyo ekoki koboma.—1 Bakolinti 15:33, 34.
10, 11. (a) Mpo na nini tokoki kokokisa esika tozali kati na paradis ya elimo ya Jéhovah na esika oyo ebongisami mpo na bato bamelaka likaya te? (b) Esengeli kosala nini soko tomoni ete liboke ya “mopepe” ya mokili ezali kobeta na elongi na biso?
10 Ezalela na biso ekoki kokokisama na oyo ya moto moko afandi na kati na restaurant oyo ekabolami na ngambo moko mpo na “bameli likaya” mpe ngambo mosusu mpo na bato “bamelaka likaya te”. Lokola tozali baklisto, kati na paradis ya elimo ya Jéhovah, tofandi mpenzampenza na ngambo ya “bato bamelaka likaya te”, mosika na elimo ya mokili. Ya solo mpenza tokoboya kokenda kofanda na bolingo na biso na eteni ya “bameli-likaya’; ekozala kozanga mayele. Kasi likambo nini esalemaka mingimingi soko tofandi na eteni ya “bato bamelaka likaya te” na restaurant? Mopepe ebebisami na milinga ezali kopalangana, mpe molinga yango ezali kokoma kino epai na biso. Soko ezali bongo, mopepe yango oyo ebebisami ebendaka biso, to tolongwaka na esika yango nokinoki?
11 Na yango, tosalaka nini soko molinga ya “mopepe” ya mokili oyo ezali kokomela biso? Omibendaka nokinoki mpo na kopengola bopusi yango ya mabe? Soki, na esika ete okenda, ozali kopema “mopepe” yango, wana yeba ete ekopusa makanisi na yo. Soko ozali kopema “mopepe” yango mbala mingi, na bongo okomesana na yango. Lisusu, soko opemi yango na boumeli ya ntango molai, nsolo na yango ekozala lisusu mabe te mpo na yo, kasi ekobenda yo, ekolangwisa yo mpe ekokoma malamu mpo na mosuni na yo. “Mopepe” yango ekoki kolamusa bamposa mosusu ebombana oyo ozalaki komeka kolonga.
12. Esengeli kosala nini mpo ete biloko mabe oyo etondi na “mopepe” ya mokili ekotela biso te?
12 Ndenge biloko mabe bitondi na mopepe, lokola oxyde de carbone, bizangi nsolo mpe elengi, bobele bongo biloko mosusu bikoki koboma oyo bizali na “mopepe” ya mokili bikomonana na mpasi mpenza. Likama ezali ete tomona “milinga oyo ekoki koboma’ bobele ntango oyo ekosila kotondela biso. Mpo na yango esengeli biso kosenzela mpo ete tokumbama te na motambo oyo ekoki koboma na kolandaka ezalela oyo ezali kopesa nzela na makambo nyonso na mokili to na ndenge mokili eboi kotosa mitinda ya boyengebene etyami na Nzambe. Paulo alendisaki bandeko na ye baklisto ete ‘bopesanaka toli kati na bino mpenza . . . ete moko kati na bino te azalisama makasi na bozimbisi na masumu’.—Baebele 3:13; Baloma 12:2.
“Mopepe” ya mokili
13. (a) Tanga lolenge moko ya “mopepe” ya mokili oyo tokoki komibatela na yango. (b) Nini emonisi ete “mopepe yango esili kokotela basaleli ya Jéhovah?
13 Wapi bizaleli bimonanaka mingi oyo tokoki kobanda komekola, kozanga koyeba, mpo ete bopusi ya “mopepe” ya mokili ezali makasi? Moko na yango ezali mposa ya kosakana na pite. Likanisi ya pite mpe etamboli ya mbindo esili kozinga biso mpenza. Bato mingi bazali koloba boye: ‘Mabe ezali te soko nasali pite, naboti bana kozanga ete nabala to mabe ezali te wana mobali akosangana elongo na mobali mpe mwasi elongo na mwasi. Ezali malamu.’ “Mopepe” to elimo ya mokili, ezali mpe kokotela libota ya Jéhovah? Na mawa nyonso, tokoki kondima ete ee. Na boumeli ya mbula na mosala 1986, bato 37 426 babimisamaki na lisangá ya boklisto, mingi na bango mpo ete basalaki pite. Mpe lisusu baoyo baleki mingi kasi batangami na motango yango te, bato oyo bapamelamaki mpo na etamboli na bango ya mbindo kasi babimisamaki te mpo ete babongolaki mitema na bango na bosembo nyonso.—Masese 28:13.
14. Mpo na nini mwa baklisto bazali kokoma na etamboli mabe, mpe toli nini bazali koboya?
14 Likambo nini ekomelaki baklisto oyo bazali kokwea na pite? Soko etamboli na bango eyebani, emonanaka mingimingi ete baklisto yango bazongelaki kopema “mopepe” mabe ya mokili. Bizalela ya mokili oyo bango bamekolaki ekitisaki nivo na bango ya mitinda na Nzambe. Bazongelaki mbala mosusu kotala ba films oyo bakokaki koboya kotala eleki mwa bambula. Mpe oyo ezali mabe koleka, na ndako na bango, na vidéo na bango, basili kolakisa ba filme oyo esengelaki mpenza te mpo na baklisto. Kosakana ndenge yango na pite ezali kotemela mpenza elendiseli oyo ya Biblia: “Tika te ete boloba nkombo na bikobo mpe makambo nyonso na mbindo mpe bilulela; ebongi bongo na Babulami. Tika te ete bosoto bozala to maloba na zoba to maloba na mpamba, kasi eleki malamu kopesaka matondi.”—Baefese 5:3, 4.
15. Monisa ndenge nini lisenginya ya kosakana na pite ekoki mbala mosusu kobanda lokola liseki?
15 Mbala mosusu okoki koboya kosala pite kozanga kokakatana. Kasi osalaka boni soko, na mosala to na eteyelo, moto moko azali koluka kobima na yo elongo, to azali kosimbasimba yo na nzoto to alingi ete bokutana na esika boye? Ezali wana eboke ya “mopepe” ya mokili oyo ezali kokoma kino na esika na yo. Okobanda kosepela na likebi oyo epesameli yo, na kopesaka nzela na yango? Engebene rapport ya bankulutu, etamboli na mbindo ekobandaka lokola liseki. Mobali moko akoki koloba epai na moklisto mwasi: “Ozali kitoko mpenza lelo oyo.” Ekoki kozala likambo kitoko mpenza epai ya mwasi soko ayoki maloba motindo boye, mingimingi soko azali komimona ete azangi eloko to azali ye moko. Likambo oyo eleki mabe, ezali boye ete baklisto basi bazangaki mayele ntango mibali babandaki kosimbasimba bango na nzoto. Mbala mosusu bamonisaki ete basepelaki mpenza te, kasi basalaki yango na ndenge ya polele te, na boye ete yango epesaki nzela na mibali yango bakangama na ezaleli na bango ya mabe. Moklisto mwasi akosala nini soko mobali moko azali ntango nyonso kosenga ye ete asala mabe, likambo oyo ekokani na liboke ya mopepe ebebisami oyo ezali kokoma kino esika na biso? Akoyebisa ye na nguya nyonso ete aboi kosangana na ye. Soko azali ntango nyonso kopema “mopepe” yango, akolemba mpe likama ezali ete asala pite, to andima libala oyo ekoki kobimisa mikakatano na nsima.—Tala Masese 5:3-14; 1 Bakolinti 7:39.
16. Esengeli kosala nini mpo na kozala “nsolo kitoko mpo na Klisto”?
16 Na bongo, zala pene mpo na koboya “mopepe” ya mbindo mpe oyo ekoki koboma ezwami kati na mokili oyo. Na esika ete omitika kobendama na nsolo na yango mpe kobwaka nsoni na nkombo na Jéhovah mpe lisangá na ye, ekozala malamu ete ozala na nsolo kitoko epai na Nzambe na etamboli na yo oyo ekomonisa ete ozali kobanga ye. Ezali yango Paulo alobi: “Mpamba te tozali nsolo malamu na Klisto epai na Nzambe kati na bango bazali kobika, mpe kati na bango bazali kobungana. Na baoyo nsolo na kufa mpo na kufa, na bamosusu nsolo na bomoi mpo na bomoi.” (2 Bakolinti 2:15, 16) Ata soko bato mingi bazali kotiola etamboli na yo ya boklisto, yango ezali na ntina te. (1 Petelo 4:1-5) Tika ete mokili elanda nzela oyo yango esili kopona mpe ebuka mbuma mabe: mabota mapalangani, kobota bana bazangi kokanama, maladi mabe mazwami na nzela ya kosangisa nzoto lokola SIDA mpe mitungisi mingi na makanisi mpe na nzoto! Okomipengola na bampasi mingi, kasi okondimama mpe lisusu epai na Nzambe. Mpe lisusu, ata mwa bato moke bakokamwa na etamboli na yo malamu mpe na nsango malamu ya Bokonzi oyo ozali kosakola, mpe na ndenge yango bakobendama na “nsolo na bomoi mpo na bomoi”.
“Mopepe” ya mokili ezali komonana na ezaleli na yango
17. Ndenge nini lolenge oyo moklisto azali kolata to azali kokata nsuki ekoki komonisa ete apusami na elimo ya mokili?
17 Lolenge mosusu ya “mopepe” ya mokili ezali komonana na elateli na yango mpe ekateli na yango ya nsuki. Bato mingi bazali kolata mpo na kolamusa mposa ya nzoto ya baoyo bazali komona bango. Wana ezali bango naino bana, bilenge balingi komimonisa lokola mikolo, komonisaka nzoto na bango ndenge yango ezali. Mopepe yango, oyo esili kopalangana esili kokotela yo? Olataka na motindo boye ete olamusa mposa, obendaka likebi ya baoyo bazali komona yo? Soko ezali bongo, ozali kosakana nde na moto. Na kopemaka “mopepe” yango, okobebisa bopolo na yo, mposa na yo ya komibatela na mbindo. (Mika 6:8) Na ndenge yango, okobenda bato bazali na elimo ya mokili. Misala to ezaleli na yo ekomonisa ete osili komibongisa kozala na bango elongo na etamboli na bango ya mbindo. Mpo na nini kolanda ezaleli motindo boye na kopesaka nzela na “mopepe” yango ete emema yo na kosala oyo ezali mabe na miso ya Nzambe?
18. Mpo na nini soko tozali komikundola ntango nyonso ete tozali komonisa Jéhovah, yango ekotinda biso ete tolata malamu mpe tokata nsuki na ndenge malamu?
18 Mpo na kozala na bopolo, esengeli te kolata na bopoto mpe na lolenge mabe. Tala ndenge nini, ba Témoins de Jéhovah mingi balataka mpe bakatisaki nsuki. Bazali koboya ba modes ya mokili oyo ezali kolekisa ndelo, kasi ata bongo bazali kolata malamu, mpamba te babosani te ete bazali baministres bamonisi to bantoma ya Jéhovah, Nkolo Moyangeli ya molongo mobimba. Tika ete mokili batiola elateli na bango ya bopolo, kasi bango bakopusama na mokili te mpe bakokitisa nivo ya mitinda na bango te. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bongo nazali koloba na bino mpe kotatola kati na Nkolo ete ebongi na bino lisusu te ete botambolaka pelamoko ekotambolaka bapakano na makanisi na bango mabe. . . . Bazali koyoka mawa te, bamipesi na makambo na nsoni ete basala makambo na bosoto na bilulela.” (Baefese 4:17-19) Baklisto oyo bateli bakolata bongo na bopolo, bakomitambwisa te, ndenge mabota ezali komitambwisa.—1 Timote 2:9, 10.
19. Totaleli bobele lolenge mibale ya “mopepe” ya mokili, kasi tosili kososola nini mpo na likama oyo ekoki kobima na “mopepe” yango?
19 Kino sikawa, totaleli bobele lolenge mibale ya “mopepe” ya mokili. Kasi tosili komona ete ezali mabe mingi mpo na kolongono ya elimo. Na lisolo oyo ekolanda, tokotalela lolenge mosusu ya “mopepe” yango, oyo ekoki koboma, oyo Diable mpe mokili na ye bazali ntango nyonso kotinda epai ya baklisto na elikya ete babomama. Ezali na ntina mingi ete tobwaka “mopepe” yango, mpamba te kopema elimo ya mokili elimboli kopema milinga ya mokili.
Bozongeli
◻ “Mopepe“ ya mokili ezali nini, mpe nani azali kotambwisa yango?
◻ “Nguya” nini “mopepe” ya mokili ezali na yango likolo na bato?
◻ Mpo na nini tokoki koloba ete baklisto bazali na esika ebongisami mpo na “bato bamelaka-likaya te”?
◻ Ndenge nini “mopepe” ya mokili ekoki kopusa baklisto ete basakana na pite?
◻ Mpo na oyo etali elateli mpe kokata nsuki, ndenge nini bopolo ekosalisa biso ete tobwaka bopusi ya “mopepe” ya mokili?
[Elilingi na lokasa 10]
Oboyaka kopema mopepe ya mokili oyo, oyo ekoki koboma?
[Elilingi na lokasa 13]
Osalaka nini ntango milinga ya mopepe ya mokili ezali kobeta na elongi na yo?