Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/4 nk. 8-9
  • Basengi mokonzi oyo aleki bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Basengi mokonzi oyo aleki bato
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Masolo mosusu
  • Balingi mokonzi oyo aleki bato
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Mokonzi oyo akoki kopekisa mbonge mpe mopɛpɛ
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu akoki kobatela biso
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Yesu atamboli likoló ya mai
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/4 nk. 8-9

Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye

Basengi mokonzi oyo aleki bato

LOKOLA bamonaki Yesu aleisaki bankoto na bato na ndenge ya ekamwiseli, bibele bakamwe. Bamilobi boye: “Solo oyo azali Mosakoli oyo azali koya na mokili.” Basukisi bobele na kondima te ete Yesu asengeli kozala mosakoli aleki Mose na monene, kasi lisusu ete akozala mokonzi aleki malamu. Balingi kokomisa ye mokonzi.

Kasi Yesu ayebi likambo oyo balingi kosala. Amibendi nokinoki mpo na kokima likambo yango ete bamema ye na makasi. Azongisi bibele, asengi bayekoli na ye ete bamata na bwato mpe bakenda na Kapernaume, mpe ye moko akei na ngomba mpo na kosambela. Butu eingeli mpe Yesu azali kuna ye moko.

Mwa ntango moke liboso ete ntongo etana, na esika ya likolo na ngomba oyo atelemi, Yesu amoni ete mai etomboki mpo na mopepe makasi. Lokola Pake ebelemi, sanza ezali kongala; mpo na kongenga ya sanza, Yesu amoni malamu bwato mpe bayekoli na ye oyo bazali kobunda mpo na kotambwisa bwato na mai oyo matomboki. Baluki nkai na makasi na bango nyonso.

Emoni ye bongo, Yesu alongwe na ngomba akiti mpe abandi kotambola esika bwatu ezali na kati ya mbonge. Atamboli kilometres mitano to motoba mpe, ntango akomi esika bayekoli na ye bazali, azali ntango nyonso kotambola lokola soko alingi koleka bango. Ntango bamoni ye, bangangi: “Ezali mongoli!”

Mpo na kokitisa mitema na bango Yesu alobi: “Bobanga te, ezali ngai.”

Kasi Petelo alobi na ye: “Nkolo, soko ezali yo, lakisa ete naya liboso na yo likolo na mai.”

Yesu ayanoli ete: “Yaka!”

Mpe Petelo akiti na bwato, abandi kotambola likolo na mai kokendaka esika Yesu azali. Kasi, ntango amoni mopepe makasi, abangi mpe, abandi kozinda, angangi: “Nkolo, bikisa ngai!”

Nokinoki Yesu asemboli loboko na ye mpe asimbi ye, alobi na ye ete, “Yo na kondima moke, mpo nini ozali kobeta ntembe?”

Ntango Petelo mpe Yesu bakoti na bwato, mopepe esili, mpe bayekoli bakamwe. Ezali malamu ete bakamwa? Soko bakangaki “ndimbola ya mampa”, ntina ya mirakle monene oyo Yesu asalaki mwa bangonga liboso na koleisaka bankoto na bato bobele na mampa mitano mpe mbisi mibale ya mike, bakokaki kokamwa te na komonaka ete azali kotambola likolo na mai mpe akitisi mopepe. Kasi sikawa, bayekoli bakumisi Yesu na kolobaka: “Solo yo ozali mwana na Nzambe.”

Mwa ntango moke na nsima, bakomi na Genesarete, libongo kitoko mpe ekobimisaka mbuma mingi oyo ezali pene na Kapernaume, mpe babwaki longo wana. Ntango bakiti na nse, bato bayebi Yesu, batamboli régio mobimba mpo na kokenda koluka baoyo bazali maladi. Ntango bakumbeli ye bato na maladi na bitoko na bango mpe basimbi bobele elamba na ye, bokono na bango nyonso esili.

Mokolo elandi, bankoto na bato oyo Yesu aleisaki na ndenge ya ekamwiseli bayei komona ete akei. Yango wana, ntango bwato mike ekomi na Tibériade, bakoti na kati mpe bakei epai na Kapernaume, mpo na koluka Yesu. Ntango bamoni ye, batuni ye boye: “Nkolo, okomaki awa ntango nini?” Eyano na Yesu ekozala na ndimbola mingi. Yoane 6:14-25; Matai 14:22-36; Malako 6:45-56.

◆ Nsima wana Yesu aleisi na ndenge ya ekamwiseli bankoto na bato, bibele balingi kokomisa ye nani?

◆ Likambo nini Yesu amoni longwa na ngomba esika oyo akei kofanda, mpe asali nini mpo na yango?

◆ Mpo na nini bayekoli bakokaki kokamwa te na ntina na makambo oyo Yesu asalaki?

◆ Likambo nini esalemi ntango bakatisi ngambo mosusu?

[Elilingi na lokasa mobimba 9]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto