Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/3 nk. 7-10
  • Nakati minyololo ya boyokani na bilimu mabe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nakati minyololo ya boyokani na bilimu mabe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bampasi na ngai ya kala
  • Bokutani ya liboso
  • Bitumba bizali kolandana ntango nyonso
  • Nazali koluka lisalisi to nkisi
  • “Nsuka na yo ekoki”
  • Etumba ya nsuka
  • Ndako molai na nguya
  • Kolongwa na mpasi kino na bolamu
  • Botondi mpo na lisungi ya sembo ya Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Kosikolama na bopusi ya bademó
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/3 nk. 7-10

Nakati minyololo ya boyokani na bilimu mabe

MPASI ekweaki likolo na libota na ngai wana nazalaki na mibu 14. Mobomi moko mabe azwaki ekateli ya kosilisa libota na ngai. Bato na ye oyo alongaki mpo na koboma liboso ezalaki bana libwa ya ndeko na ngai moko ya mwasi. Na nsima, bandeko na ngai mosusu minei ya basi mpe ya mibali babomamaki, kino totikalaki bobele ngai na mama na ngai. Nayokaki nsomo.

Na boumeli ya mibu oyo milandaki na nsima, ezala nazali kolya, kosala, nakenda kolala, nazalaki kobanga ntango nyonso, mpe mituna oyo mizalaki kotungisa ngai: “Ntango nini akobeta? Mpe nani akolanda: Mama to ngai?”

Bampasi na ngai ya kala

Mpo na koyeba malamu makambo oyo malekaki na nsima, nalingi koloba moke na ntina na bomoi na ngai. Nabotami na 1917 na Suriname kati na ekolo moko ya baindo ya Saramaccas, na esanga moko ya Maroni. Bankoko na ngai bazalaki ba lowenengre, elingi koloba baombo oyo bakimaki, mpe babombamaki kati na zamba mpo na kozala na bomoi ya mpasi kasi na bonsomi. Mpo na koloba malamu, soki bazalaki baombo ya bato te, nzokande bazalaki baombo ya bilimu mabe.

Kati na mboka na biso, bomoi ya mokolo na mokolo etambwisamaki na losambo ya bilimu mabe mpe ya bankoko. Mpo na koloka mpe kopesa bokono to koboma moko kati na baninga na bango, bamoko bazalaki kosalela wisi, magie noire, to mpe bazalaki kosenga lisalisi ya koenoe (tanga kounou), elingi koloba monyokoli. Endimeli ezali kosenga ete banyokoli yango bazala bato oyo banyokwamaki na moto moko ya libota na bango mpe oyo, nsima na kufa na bango, bazali koya kozongisa mabe oyo basalaki bango. Mpo na koloba solo, banyokoli yango bazali bilimu mabe baoyo bazali kobenda bato na makasi ete basambela bango.

Lokola nazalaki kati na lisangá ya ba fréres évangéliques, Lingomba ya misioni, nayekolaki mpe mwa makambo mosusu likolo na Nzambe. Atako bazali kati na molili mpo na ndenge oyo basengeli kosambela ye, nazalaki komona kati na zamba monene epai kuna nazalaki kofanda ebele na bilembo ya ezaleli monene ya bokabi na ye. “Nalingi kosambela Nzambe oyo azali na boboto” kasi elimu mabe te oyo azali konyokola, ndenge nazalaki koloba. Nayebaki ete banyokoli yango bazalaki kolinga kobeta baombo na bango oyo bazalaki kotomboka kino koboma bango.

Na bongo bomoni mpasi oyo nayokaki ntango nayebaki ete banguna ya libota na biso batindelaki biso koenoe moko. Nazalaki na mibu 141 ntango mobomi asalaki mosala na ye. Mibu ntuku mibale na motoba na nsima, bobele mama mpe ngai nde totikalaki na bomoi.

Bokutani ya liboso

Mama na ngai azalaki mosali monene. Mokolo moko, wana ezalaki ye kokende na ferme, akweaki na mabelé mpe akokaki kotelema te. Ezalaki ye nde koenoe aponaki. Kolongono na ye ya nzoto ebebaki mpe akomaki paralizé. Azalaki na mposa ya lisalisi-ya lisalisi na ngai. Kasi nakabwanaki ngambo mibale ngambo moko mpo na bolingo na ngai epai na ye mpe Ngambo mosusu kobanga mpo na démon oyo akangaki ye. Nzokande, na ntango koenoe azalaki kobundisa ye, mama na ngai azalaki konganga, azwamaki na mpasi makasi na boye ete mokolo mosusu, lokola nakokaki lisusu kokanga motema te, natyaki moto na ye likolo na mabolongo na ngai mpo na kolembisa mpasi na ye. Atikaki konganga; mpo na ngai, nayokaki “maboko” mazalaki kokanga ngai na nzoto.

Ntango nalingaki kokima, mama na ngai azongelaki lisusu konganga. Mpo na ye, yango nde nazongaki mpe nzoto mobimba ekomaki mpio mpo na kobanga, ezalaki mbala ya liboso oyo nakutanaki na mobomi. Nazalaki na mibu 40.

Bitumba bizali kolandana ntango nyonso

Mama na ngai akufaki. Bobele mikolo misato na nsima, nayokaki mongongo moko lokola ya moninga na ngai kolobaka na ngai ete: “Lintina, Lintina, ozali koyoka ngai te? Nazali kobenga yo.” Ezali nde na motindo yango mpasi makasi ebandaki na boye ete nakokaki kosenga ata liwa ya mbalakaka.

Na ebandeli, azalaki koya kotungisa ngai bobele ntango nazalaki nkomibongisa mpo na kolala. Na ntango oyo nazalaki kolala, mongongo moko ezalaki kolamusa ngai, mpo na kolobela ngai na ntina na cimetiere mpe liwa. Kozanga mpongi ezalaki kolembisa ngai, kasi nazalaki ntango nyonso kokokisa bamposa ya bana na ngai.

Na nsima, démon yango abandaki kobundisa ngai mbala mingi koleka. Mbala mingi nakanisaki ete azalaki kofina ngai nkingo. Nazalaki komeka kokima, kasi nazalaki kokoka te; lokola soki nde kilo monene ezalaki likolo na ngai. Nalingaki konganga, kasi mongongo ezalaki kobima te. Atako bongo, nazalaki koboya kosambela elimo oyo ezalaki konyokola ngai, obele ntango etumba ezalaki kosila, nazalaki kozongela mosala na ngai na ferme, epai kuna nazalaki kolona manioko mpe koko oyo nazalaki kokende koteka na zando ya mwa engumba moko ya moke oyo ezwami penepene na mai to ebale. Ezalaki na ngai petee mpo na kolonga bomoi na ngai. Nzokande, mpasi na ngai ya monene ezalaki koya.

Nazali koluka lisalisi to nkisi

Mokolo moko, nayokaki mongongo mpo na ebandeli ya mpasi na ngai na démon koloba na ngai ete: “Nakovimbisa yo libumu na yo lokola ndembo.” Mwa mikolo na nsima, na bongo, mbuma moko esalamaki kati na libumu na ngai mpe ebandaki koya monene kino kokomisa ngai lokola moto azali na zemi. Na kobanga nyonso mpenza, nazalaki komituna: “Nzambe, Mozalisi, akoki kosalisa ngai na kokabwana na koenoe? Akoki kotinda elimo ya malamu mpe ya makasi koleka mpo na kobengana ye?” Mpo na koyeba yango, nakendaki kotuna bonoeman moko, ndoki moko oyo asalisaka bato.

Nganga-nkisi ya liboso oyo namonaki apesaki ngai ba tapoes, bikilakila, kasi ekitisaki libumu na ngai te oyo evimbaki. Lokola nazalaki na ekateli ya koluka lisalisi to nkisi mpo na mpasi na ngai, nazalaki kokende epai na ba bonoeman mingi kasi ata eloko moko ezalaki kosalama te. Kati na bolukiluki yango, nazalaki ntango nyonso kosala mosala ya ferme mpo na kozwa mosolo ya kosomba masanga, vinu, champagne mpe maputa oyo nazalaki kofuta bangangankisi. Mbala mingi bazalaki kopesa ngai toli oyo: “Fukama mpe sambela koeno. Ndima ye lokola nkolo na yo. Sanzola ye, mpe akotika yo.” Kasi ndenge nini nakokaki kofukama mpe kosambela elimo oyo azalaki kobeta ngai mpe alingaki koboma ngai? Te, nakokaki kosala yango te.

Nzokande, nazalaki lisusu na elikya te na boye ete longola likambo yango, nazalaki kosala makambo nyonso oyo banganga bazalaki koyebisa ngai nasala. Moko na bango asalisaki ngai na boumeli ya sanza mitano. Azalaki kosukola ngai na matiti to nkasa mpe azalaki kokamola mai ya nzete zomi na moko ekeseni kati na miso na ngai “mpo na kopetola yango”, ndenge azalaki koloba nzokande nazalaki konganga na mpasi. Kasi na nsuka ya kozwa nkisi, nazongaki epai na ngai maboko mpamba, natiolami mpe mpasi eyaki makasi lisusu koleka.

“Nsuka na yo ekoki”

Moko kati na bana na ngai ya mibali, oyo azali kofanda na Pays-Bas, atindelaki ngai mosolo mpo ete nalanda koluka lisalisi. Nakendaki bongo epai ya monganga ya engumba. Nsima na kosala ngai ekzamé, asukisaki boye: “Nakoki kosala eloko moko te mpo na yo. Kende kokutana na bonoeman.” Kolongwa epai na ye, nakendaki kokutana na nganga azalaki moto na lndonésie-kasi mbala oyo lisusu, ata litomba moko ezwamaki te. Na bongo nazwaki nzela ya kozonga na ndako na ngai, kasi nakokaki te kobima na engumba. Namibendaki kino epai ya mwana na ngai ya mwasi, esika namibwakaki maladi mpe kozanga mosolo. Perte monene nasalaki, nalekisaki mibu 17 mpe nabebisaki 15 000 gulden (penepene na 50 000 francs français) mpo na koluka nkisi. Nazalaki na mibu 57.

Na etumba na ye oyo elandaki, démon alobaki na ngai likambo oyo: “Nasukisi sikawa mpo na yo. Nsuka na yo ekoki.”

Nangangaki boye, “kasi yo ozali Nzambe te, ozali Yesu te”.

Démon ayanolaki ete, “ata Nzambe akoki kopekisa ngai te”. Mikolo na yo mizali ya kotanga.

Etumba ya nsuka

Mwa baposo elekaki. Meena, Témoin de Jéhovah moko ya mwasi tofandi na ye pembeni oyo azalaki pionnier, atunaki epai na mwana na ngai ya mwasi soki likambo nini akomelaki ngai mpe ayebisaki ye ete: “Bobele Biblia nde ekoki kosalisa ye.” Lokola nayokaki lisolo na bango, nalingaki kopusana penepene na ye. Liboso ete nabelema esika bango bazalaki, bakweisaki ngai na mabelé. Meena akimaki mbango epai na ngai mpe alobaki na ngai: “Démon oyo akotika yo kimya te. Bobele Jéhovah nde akoki kosalisa yo, moto mosusu te.” Na nsima asambelaki Jéhovah Nzambe elongo na ngai mpe abandaki koya kotala ngai mbala na mbala. Kasi lokola azalaki koya mingi na ndako etumba ya démon ezalaki koya makasi. Kati na butu, natungisamaki mingi na kolenga makasi na boye ete nazalaki kopekisa ndako mobimba ete bakoka kozwa mpongi. Natikaki kolya mpe, na ntango mosusu makanisi nyonso ezalaki kokima ngai.

Mpasi na ngai eyaki makasi mpe bana na ngai ya mibali bayaki longwa na province na likanisi ya kozongisa ngai na mboka, mpo ete nakende kokufela kuna. Lokola nazalaki na makasi mingi te mpo na kosala mobembo, naboyaki. Nzokande lokola nazalaki koyoka nsolo ya liwa na ngai, nabengaki Témoin mpo na koyebisa ye bokabwani ya ngai na ye to kopesa ye mbote ya nsuka. Meena ayebisaki ngai na lisalisi ya Biblia ete ata soki nakufi elikya ya lisekwa ezali.

“Lisekwa? Olingi koloba nini?”

“Ayanolaki ete, “Nzambe akoki kozongisa yo na bomoi kati na Paradis”. Engengiseli ya elikya ebandaki kotobola molili!

Bobele na butu yango, démon azwaki ngai lisusu. Na ntango nazalaki kotuntuka, namonaki lokola koenoe elongo na ebele ya bato nsima na ye. Azalaki koseka ngai: “Akanisi ete akosekwa!” Mpe ebele wana bazalaki koseka makasi. Na bongo nasalaki likambo moko oyo nasala naino liboso te. Nabengaki: “Jéhovah! Jéhovah!” Ezalaki bobele yango nde nayebaki koloba. Mpe démon akendaki!

Bana na ngai bazongaki mpe babondelaki ngai na maloba oyo: “Mama, kokufa na engumba te. Tika tozongisa yo na mboka,” Naboyaki, mpo nalingaki koyeba makambo mingi likolo na Jéhovah. Nalobaki, “ezali solo ete, mbala mosusu nasengeli kokufa, kasi nalingi kosalela liboso Mozalisi.”

Ndako molai na nguya

Meena mpe ba Témoins mosusu balandaki kotala ngai. Balakisaki ngai motindo ya kosambela Jéhovah. Moko kati na makambo bateyaki ezalaki boye ete, bayebisaki ngai likambo oyo ekaboli Jéhovah mpe Satana mpe likambo na Yobo oyo Diable anyokolaki mpo na kobenda ye ete awangana Nzambe. Makambo oyo nazalaki koyekola elendisaki ekateli na ngai ya koboya kosambela démon, Ba Témoins batangelaki ngai mokapo moko oyo nalingaki mingi na nsima: “Nkombo na Jéhovah ezali ndako molai na nguya. Moyengebene akokima kuna mpe akobika.”​—Masese 18:10.

Mokemoke nazongelaki nguya na ngai. Ntango mwana na ngai ya mobali azongaki mpo na kotala ngai, nayebisaki ye azela moke nsima ya porte. Nalataki bilamba, kokotisaka blouse na ngai na kati ya jupe mpo na komonisa ye ete libumu na ngai ekitaki nyonso. Mpe nabimaki.

Angangaki ete: “Ezali yo mama Lintina?”

“Ee, ezali ngai ezali mpo na Jéhovah, Nzambe na ngai!”

Nazwi ekateli

Uta nazwaki makasi ya komeka kotambola, nakendaki na Salle du Royaume ya ba Témoins de Jéhovah. Kuna, nalendisamaki mingi epai na ba Témoins mosusu kobanda ntango yango kino lelo nazangisa naino makita te. Mwa basanza na nsima, nalandaki ba Témoins na mosala ya kosakola. Mokemoke, nazwaki batisimo mpe nakomaki mosaleli ya Jéhovah, Mobikisi na ngai atondi na bolingo. Nazalaki na mibu 58.

Nzokande, etikalaki na ngai likambo moko mpo na kosala. Mibu mingi liboso, kati na ndako na ngai na mboka, natongaki etumbelo moko likolo na yango nazalaki kotumba mbeka epai na bankoko na ngai. Mpo na kozala peto kati na elimo, nasengelaki koboma yango. Nasengaki epai na Jéhovah ete asalisa ngai, mpamba te ndenge na ngai ya kosala esengelaki kobimisa makelele kati na bafandi ya mboka. Na ntango nakomaki liboso ya ndako na ngai mpe nafungolaki porte, moto moko angangaki: “Pingos!” (Ngulu ya zamba to sombo!) Bazalaki eboke mpenza; bazalaki kokatisa esanga mpe kopumbwaka kati na mai mpo na kokoma na ngambo mosusu. Na mbala moko, bilenge mpe mibange babimaki na mboka mpo na kokende kokanga bangulu yango oyo bazangi mayele. Na esengo nyonso, nafukamaki mpe natondaki Jéhovah na ndenge atambwisaki makambo. Kozanga koumela, nabimisaki etumbelo yango na libanda, nasepelaki yango pétrole mpe natumbaki yango. Ntango bato ya mboka bazongaki, etumbelo esilaki kozika na moto. Ya solo, bamonaki putulu na yango, kasi bakokaki kosala lisusu eloko moko te. Na bongo, nazongaki na engumba, na elimo moko ya kimya.

Kolongwa na mpasi kino na bolamu

Mapamboli mosusu mazalaki kozela ngai. Mwana na ngai ya mobali oyo afandaka na Pays-Bas azalaki kondima te makambo nyonso oyo bazalaki koyebisa ye mpo na ngai; na bongo akamataki mpepo mpo na koya na Suriname mpo na komona ye moko na miso na ye ndenge makambo mazalaki koleka. Azalaki mpenza na esengo mpo na kokuta ngai na nzoto kolongono mpe asombelaki ngai ndako kitoko kati na kapitale, epai oyo nafandi sikawa, Oyo mbongwana ya motindo nini kati na bomoi na ngai: kolongwa na boombo mabe ya ba démons, nakomaki mosaleli ye Jéhovah ya esengo!

Mibu zomi na moko nsima ya batisimo na ngai, nazali naino na bantina mingi ya kozala na botondi. Lokola mitema na bango esimbamaki na ntina na lipamboli oyo nazwaki, bana na ngai misato mpe bokilo na ngai moko bango mpe babandaki kosepela na Biblia mpe bapesaki bomoi na bongo epai na Jéhovah. Epai mosusu, nazali kokende elongo na bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi ya elimo epai na bato oyo bazali koyekola Biblia elongo na bango mpe bazangi makasi mpo na kokata boyokani na bongo elongo na bilimu mabe. Nazali koyebisa bango ndenge nakataki minyololo ya bilimu mabe. Na motindo yango, ata mibu mabe wana ya mpasi mikoki mpe kobongwana mpo na litomba ya kosakolama ya Bokonzi.

Moloba mazangi ngai mpo na koyebisa botondi na ngai epai na Jéhovah, Nzambe na ngai. Ntembe ezali te ete loboko na ye ya nguya esalaki mpo na kobikisa ngai. Ee, Jéhovah azalaki malamu mpo na ngai!​—Tala Nzembo 18:17-19.

[Elilingi na lokasa 7]

Na komitangolaka na misala ya bilimu mabe, Lintina van Geenen ayekolaki ete Nkombo na Jéhovah ezali ndako molai na nguya

[Elilingi na lokasa 9]

Mboka Suriname, epai kuna bato mingi bazali baombo ya misala na bilimu mabe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto