Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/4 nk. 23-24
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Libala ezali likabo ya Nzambe ya bolingo
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Libala—Likabo oyo euti na Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Toli ya Nzambe mpo na kopona molongani
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/4 nk. 23-24

Mituna na batangi

◼ Ezali likambo ya mayele ete moklisto oyo mwasi to mobali na ye akufi aboya kobala kozalaka na elikya ete mokolo mosusu akozongana na ye?

Ezali mpenza malamu ete moklisto alinga mobalani na ye ata nsima na liwa na ye! Bamosusu babalaki lisusu te, ezali mpo bamimonaki te ete bakoki kati na ezaleli na bango, kasi bazali nde na elikya ya kozongana lisusu na ntango ya lisekwa. Atako mayoki ya bomoto oyo mazali kolendisa elikya yango mazali mpe na biso, tozali kolendisa bato yango na kotalela mwa makanisi ya Biblia.

Na ndakisa, tala likanisi moko ya ntoma Paulo oyo ezali mpenza kotalela likambo yango: “Mwasi akangami na mobali na ye na ntango wana ezali ye na bomoi. Soko mobali akokufa, akokangwa ete abalana na ye oyo elingi ye, kasi kati na Nkolo. Nde . . . akozala na esengo koleka soko akotikala lokola ezali ye.” (1 Bakolinti 7:39, 40) Mokapo oyo ya Makomami ezali komonisa ete bikangeli ya libala bizali kokangwa na liwa ya moko kati na babalani. Nzambe amonisaki motema boboto mpo na koyebisa yango epai na baklisto; na boye mibali to basi oyo batikali bango moko bakoki kotalela bamposa na bango ya kolinga mpe bamposa mosusu liboso ya kozwa ekateli ya kobala lisusu to ya kotikala bongo. Bazali lisusu na bikangeli te elongo na oyo asili kokufa.​—1 Bakolinti 7:8, 9.

Biblia emonisi nini? Basekwi bakoki kobala to kozongela bomoi na bango ya libota oyo liwa esukisaki? Lisolo moko ya ba evanzile ezali mpe kotalela likambo yango. Mokolo moko, Basadukai, baoyo bazalaki kondima lisekwa te, bayaki kokutana na Yesu mpo na koluka kokweisa ye na maloba na ye. Mpo na yango balobelaki likambo ya mobeko na Moise oyo ezalaki kosenga ete ndeko ya mobali oyo akufi akamata mwasi na ye soki atiki bana te: “Na bongo bandeko nsambo bazalaki, esili oyo na liboso kobala mwasia, akufi nde azalaki na mwana te, oyo na mibale na oyo na misato babali te, mpe bobele bongo na bango nsambo, batiki bana te mpe bakufi. Na nsima mwasi mpe akufi. Na bongo kati na lisekwa mwasi yango akozala mwasi na nani kati na bango? Mpo ete azalaki mwasi na bango nsambo?”​—Luka 20:27-33; Matai 22:23-28.

Baklisto bazali na nse ya Mibeko te, nzokande bakoki kokutana na mokakatano ya motindo moko. Na ndakisa, ndeko mobali mpe ndeko mwasi songolo babalanaka mpe babotaka bana mibale. Ndeko mobali ayei kokufa. Ndeko mwasi songolo azalaki kolinga ye, mpe azangi ye mikolo mingi, kasi ayoki mposa ya kozala na mobali mosusu, mpo ete asalisa ye mpo na makambo etali mosolo, mpo na kokokisa bamposa na ye ya kosangisa nzoto mpe kosalisama mpo na kobokola bana na ye. Na bongo abali ndeko mobali pakala, libala na bango ezali na boyokani elongo na Makomami lokola oyo ya liboso ezalaki. Nsima ya mikolo, ndeko yango azwi mpasi mpe akufi. Soki mibali na ye wana ya kala basekwi, mpe nzela epesami na libala, nani akoki kobala ye?

Tala eyano oyo Yesu apesaki epai na Basadukai: “Bana na ekeke oyo bakobalaka mpe bakobalamaka, nde baoyo babongi kokoma na ekeke yango mpe na lisekwa na bakufi bakobalaka te, mpe bakobalamaka te, mpo ete bakoki kokufa lisusu te. Bakokani na baanze; bazali bana na lisekwa, bongo bazali mpe bana na Nzambe. Nde ete bakufi bakosekwa Moise atalisi bongo . . . kuna ebyangaki ye Jéhovah, ‘Nzambe na Abrahame mpe Nzambe na Yisaya mpe Nzambe na Yakobo’. Azali Nzambe na bakufi te, kasi na bato na bomoi, mpo ete mpo na ye bato nyonso bazali na bomoi.”​—Luka 20:34-38; Matai 22:29-32.

Bamosusu bamonaki ete Yesu azalaki kolobela awa lisekwa mpo na bomoi ya likolo. Nzokande, ezali na bantina ya kondima ete eyano na ye ezalaki kotalela lisekwa mpo na bomoi ya mabelé kati na “ebongiseli ya biloko” na sika. Na yango, baoyo bazalaki kotuna Yesu bazalaki kondima ye te to bayebaki te ete lisekwa ya likolo ezali. Motuna na bango ezalaki kotalela libota moko ya Bayuda oyo ezalaki na nse ya Mobeko. Yesu ayanolaki na kotangaka Abrahame, Yisaya mpe Yakobo, mibali oyo bazalaki na elikya ya kozala lisusu na bomoi awa na mabelé. (Genese 42:38; Yobo 14:1-15; tala Baebele 11:19) Batata na mabota oyo bakisa mpe bankoto na bato mosusu bakozonga na bomoi awa na mabele mpe baoyo bakomimonisa sembo bakozala “lokola baanze”. Atako bakoki kokufa, soki Nzambe akangi bango bayengebene mpo na kozala na bomoi ya seko, bakokufa lisusu te.

Ntango mosusu, lelo tondimaka likambo oyo mbala moko te mpo na mayoki na biso ya bomoto. Kasi, toyeba yango, esika moko te kati na Biblia emonisi ete lisekwa ya bato na sembo ezali mpe kotalela kozongela libala na bango. Yango wana, moto moko te azali kondima ete soki Akila mpe Pisikila bazwaki bomoi ya likolo, ete bazali naino babalani (Misala 18:2) Yozefe mpe Marie, mpo na bango bakozala na bomoi moto na moto na esika na ye: ye na mabelé, Marie na likolo. (Yoane 19:26; Misala 1:13, 14) Lokola moko te kati na biso asila kofanda na likolo, tokoki koyeba te mayoki ya Akila, Pisikila mpe Marie; nzokande, tozali na elikya ete batondi na esengo kati na mosala na bango kuna na likolo.

Ndenge moko mpe, naino tokoma bato ya kokoka te. Mpo na yango, tokoki koyeba sikisiki te oyo tokokanisa mpo na mabala na biso ya lelo, soki tozwi bomoi ya kokoka kati na paradis. Ezali malamu na kokanisa ete Yesu azalaki moto ya kokoka ntango alobaki maloba oyo touti kotanga awa na likolo; azalaki bongo na esika malamu koleka biso mpo na koyeba mayoki ya baoyo “babengami mpo na kokoma na ekeke yango‘’. Tokoki mpe kozala na elikya: Yesu azali na makoki ya kosalisa biso na bolembu na biso ya sikawa’. (Baebele 4:15) Na bongo soki moklisto moko azali na nkaka mpo na kondima ete lokola basekwi baka bala te, asengeli kondima ete Nzambe mpe Klisto bayebi mayoki na ye. Avenire akoyebisa biso makambo mingi koleka na ntina na likambo oyo.

Kasi, ezali mpenza na ntina te na kotya likebi mingi koleka likolo na likambo oyo. Mokomi na Nzembo akomaki: ”Boyeba ete Jéhovah azali Nzambe; ye asalaki biso, biso tozali bato na ye, mpate na elanga na ye . . . Botondo ye, bosanzola nkombo na ye. Mpamba te Jéhovah azali malamu.” (Nzembo 100:3-5) Tokoki kozala na elikya ete Nzambe na biso, na boboto na ye, akokokisa mpenza na motindo mobongi bamposa na biso ya solosolo soki “tobongi mpo na kokoma na ekeke yango“.​—Yobo 34:10-12; Nzembo 104:28; 107:9.

Nzambe ayebisaki biso ete liwa ya moko kati na babalani ezali kotya nsuka na libala; kati na yango boboto na ye mpe ezali komonana. (Baloma 7:2) Na yango, moto nyonso oyo asili kobungisa mobalani na ye ayebi ete akoki kobala lisusu soko asepeli to mpe soki azali na mposa ya libala. Ezali yango nde bamoko basalaki, mpo na kokokisa bamposa na bango moko elongo na oyo ya mabota na bango. (1 Bakolinti 7:36-38; Baefese 6:1-4) Na bongo, moklisto oyo azwami na ezaleli motindo boye akoki komiyoka te ete azali na mokumba ya kotikala bongo kozalaka na elikya ete bato oyo bakosekwa awa na mabelé kati na ebongiseli oyo ezali koya bakoka kozongela mabala na bango.

Ntango azalaki likolo na nzete, Yesu angangaki: “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai?” Yesu azangaki kondima, na kokanisaka ete Nzambe atiki ye?

Bamosusu wana ezali bango kotanga Matai 27:46 to Malako 15:34 bazali kosukisa na kolobaka ete ntango Yesu azwamaki liboso na liwa ya nsomo, elikya na ye epai na Nzambe elembaki. Bamoko bazali koloba ete ezalaki bobele likanisi ya bomoto ya Yesu, konganga ya kozanga elikya oyo tokoki kondima yango mpo na moto ya mosuni mpe ya makila oyo amemami na kobanga koleka. Na boye esengeli tokanisa mosika koleka na esika ya kotalela bobele makanisi ya bato oyo matongami likolo na bizaleli ya moto oyo bizali komonana. Atako moto moko te akoki lelo kokanga ndimbola ya sikisiki mpo na konganga yango, tokoki kobimisa bantina mibale oyo tokanisi.

Yesu ayebaki malamu ete esengeli na ye “kokenda na Yelusaleme, mpe koyoka mpasi mpo na makambo mingi . , . , mpe kobomama nde na mikolo misato kosekwa na kufa”. (Matai 16:21) Ntango azalaki na likolo, Mwana na Nzambe azalaki komona bato bazangi kokoka kobetama kino kobomama kozanga ete batika bosembo na bango. (Baebele 11:36-38) Na bongo, ntina ya kokanisa ezali te ete Yesu, moto ya kokoka, azalaki kobanga na ntango ya komekama, ata liwa na ye likolo na nzete ya mpasi endimisaki ye te ete Tata na ye abwakaki ye. Yesu ayebaki “soki liwa ya motindo nini asengelaki kokufa”, elingi koloba akokakemisama na nzete. (Yoane 12:32, 33) Epai mosusu, ayebaki ete akosekwisama nsima na mikolo misato. Na ntina yango, mpo na nini Yesu alobaki ete Nzambe atikaki ye?

Ya liboso, ntango mosusu asalelaki liloba yango na elobeli ya mokuse lokola Jehovah alongolaki libateli na ye epai na Mwana na ye mpo ete bosembo na Yesu emekama mpenza, kino kobomama na liwa ya nsomo mpe ya nsoni. Nzokande, soki Nzambe akabaki Yesu na nkanda ya banguna na ye oyo bapusamaki na Satana, yango elimboli te ete atikaki ye mpenza mobimba. Jéhovah alandaki komonisa bolingo epai na Mwana na ye, ezali yango nde makambo mamonisi, mpamba te na bokokani na ndenge Yesu azalaki kozela, asekwisaki ye nsima na mikolo misato.​—Misala 2:31-36; 17:31.

Ezali na ntina mosusu ya mibale oyo tokanisi, ekangisami esika moko na oyo ya liboso, mpo na konganga oyo Yesu angangaki likolo na nzete ya mpasi; mpamba te na kobimisaka maloba wana, Yesu azalaki kokokisa motindo moko ya esakweli oyo etalelaki Masiya. Mwa ngonga liboso, Yesu alobaki epai na bantoma ete makambo makoleka ‘pelamoko ekomami mpo na ye‘. (Matai 26:24; Malako 14:21) Na yango, alingaki kokokisa makambo oyo makomamaki oyo makomami na Nzembo 22. Na boye kokanisa Nzembo 22:7, 8 na Matai 27:39, 43; Nzembo 22:15 na Yoane 19:28, 29: Nzembo 22:16 na Malako 15:25 mpe na Yoane 20:27.. Nzembo 22:18 na Matai 27:35. Nzembo 22, oyo epesaki bilembo mingi ya bisakweli likolo na bomoi na Yesu, ezali kobanda na maloba oyo; “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai?” Na boye, na konganga motindo yango, Yesu akokisaki esakweli mosusu.​—Luka 24:44.

Kati na nzembo yango, Davidi azalaki kokanisa te ete Nzambe atikaki ye mobimba to abwakaki ye, mpamba te alandaki kolobaka ete ‘akosalakola nkombo ya Nzambe epai na bandeko na ye’ mpe alendisaki basaleli mosusu ya Jéhovah na kosambela to kokumisa Nzambe na bango. (Nzembo 22:22, 23) Ndenge moko mpe. Yesu, oyo ayebaki malamu Nzembo 22, azalaki na bantina nyonso ya kondima ete Tata na ye azalaki kosepela na ye mpe kolinga ye ntango nyonso, atako apesaki nzela ete akakemisama likolo na nzete.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Soki Moyisraele akufi liboso ete mwasi na ye abota mwana mobali oyo akoki kokitana na ye, ndeko mobali ya Moyisraele yango asengelaki kobala mwasi oyo atikalaki na bomoi mpo na kobotela mowei mwana.​—Deteronome 25:5-10.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto