Mangomba, ezali kopusa bato na kosala malamu?
BAMILIO na bato bazali kondima likanisi ya George Bernard Shaw, oyo akomaki: “Mangomba ezali nguya makasi-nguya bobele moko eleki makasi kati na mokili.” Nzokande, wana ezalaki ye kokoma lisolo mpo na moboko ya bizaleli malamu, John Ruskin, mokomi na mboka Angleterre ya ekeke ya ntuku mibale, akomaki maloba mabe oyo: “Lingomba ya moyibi ezali ntango nyonso mabe koleka mabe ya moyibi ye moko.” Liloba nini kati na maloba mibale oyo emonani ete eyokani moke na solo mpo na yo?
Mpo na komonisa ete mangomba ezali nguya moko oyo ezali kopusa na kosala malamu, mbala mosusu moto akotanga likambo ya moto moko oyo “abongwani mobimba” ntango ‘akabi bomoi na ye epai na Yesu Klisto’. Zulunalo moko oyo ekomaka makambo mazali koleka kati na mokili mobimba esalelaki maloba oyo mpo na “kobongwana” ya Charles Colson, oyo nkombo na ye ezalaki kati na mobulu ya Watergate. Moto mosusu akolobela mpo na bato oyo bazali kondima ete batiki pite to bondumba to molangwa mpo na mangomba na bango. Bakabolaki bankoto na ba Biblia kati na mikili oyo ezali ya boklisto te, mpe na ntembe te yango esalisaki bato mingi na kozala na bomoi ya peto koleka. Emonani ete mangomba ekotisaki bopusi malamu kati na bizaleli ya bato wana.
Makambo na yango ya mabe
Epai mosusu, lingomba ya Hitler elongaki te na kopekisa ye ete atika kosala mabe. Bato ya motema malamu bazali komituna mpo na nini pape Pie XII ayanolaki te na maloba oyo batindelaki ye mpo na kosenga ye ete abimisa Hitler na lingomba. Na ntina na likambo yango, na nse ya moto na likambo “Telegramme etindami na pape ezali koloba ete Hitler ateyamaki na bakatolike nzokande azali koangana kondima”, tala oyo ekokaki kotangama kati na le Catholic Telegraph-Register ya Cincinnati (Etats-Unis): “Maloba etindamaki epai na Pie XII mpo na kosenga ye ete abimisa mokonzi Adolph Hitler na lingomba.” Soki meko yango ekamatamaki, nani ayebi soki yango ekokaki kopekisa bitumba mpe kopengola ebele na makama epai na bato? Ezali mawa, mpo ete pape azwaki ekateli yango te.
Libala ya makango ezali komonana mingi kati na mikili ya katolike na Amerike latine. Mpe na Amerike du Nord, sango moko alobaki kati na zulunalo moko: “Kondima bondumba kati na mibeko: ezali likambo eleki mosanto.” (Philadelphia Daily News) Totala mpe makambo oyo mazali koleka kati na mikili ya baprotestá to bamisioni epai kuna mobali akoki kozwa mwasi ya moninga mpe mwasi mobali ya moninga bakisa mpe kosangisa nzoto kati na bato babalani naino te ezali komonana mingi. Lisolo ezalaki na moto na likambo “Ba pasteurs bazali koloba eloko moko te mpo na likambo etali kosangisa nzoto mpo na bato babalani naino te”, ezali kolimbola makambo yango na maloba oyo: “Kati na masolo na bango, ba pasteurs ya Amerike bazali koloba eloko moko te mpo na oyo etali kosangisa nzoto kati na bato mibale liboso ete babalana . . . . Bazali kobanga noki te bakobungisa ntalo monene ya bato na bango.” (Telegraph ya North Platte, Nebraska) Na yango, tokoki koloba ete mangomba nyonso ezali nguya oyo ezali kopusa bato na kosala malamu?
Ezali na ntango ya bitumba nde bolembu ya bizaleli malamu ya mangomba na boklisto ya mokili oyo ezali komonana na lolenge ya polele. Botalela maloba malamu oyo malobamaki na 1934 epai na Walter Van Kirk, ntango azalaki sekretere ya biro moko ya Conseil fédéral des Eglises du Christ na Amerike: “Basakoli mpe bandimi bazwaki mpenza ekateli mpo na kotemela bitumba . . . Likambo yango, oyo mangomba esali mpo na koluka kimya, euti na likanisi oyo ete bitumba ezali na boyokani ata moke te na mateya mpe na ndakisa ya Yesu.” (Mangomba etiki bitumba, Angl.) Nsima na koloba na ntina na ebele na Mangomba mpe bakonzi na mangomba, mokanda oyo tolobaki mpo na yango liboso esukisaki na maloba oyo: “Mangomba mingi elobaki polele ete balingi kotalelama te lokola basangani na baoyo bazali kosala mosala ya koboma mpe kokata biteni ya nzoto ya bato. Basakoli . . . bazali kosukola maboko na bango na makila ya bandeko na bango, bazali komikesenisa na Kaisala.”
Nzokande, makanisi kitoko oyo esalelamaki mpenza te. Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebimaki, ata moko te kati na Mangomba minene ya boklisto ya mokili ezalaki mpenza na ekateli ya ‘kotika bitumba’. Mangomba ebundaki mpe kati na mboka na bino?
Kokwea ya bandelo ya bizaleli malamu
Nsima na kotalela na motindo ya kolongobana mwa makambo oyo, ondimi te ete kati na makambo mingi mangomba minene emonisaki te nguya oyo ezali kopusa bato na kosala malamu? Zulunalo Look emonaki likambo oyo: “Mangomba . . . mazalaki motambwisi malamu te mpo na oyo etali bizaleli malamu, mpe kokwea na yango ezali monene koleka mpamba te mokumba na bango ezali ya monene koleka.” Lisolo moko ebimaki kati na The Courier-Mail ya Brisbane (Australie) endimaki na maloba oyo ete mangomba ya boklisto na mokili oyo ezali ndako molai te mpo na kopekisa pite: “Ntango ba eveke mpe ba chanoines (bakonzi mosusu ya mangomba) . . . bazali kondima ete kosangisa nzoto kati na bato babalani te to mpe na libanda ya libala ezali mbala mosusu elembo ya bolingo oyo ‘ezali koyebisa nkembo na Nzambe’, . . . ete pite ezali na yango mabe te mpe ekobo ezali mpenza lisumu te, basi mpe mibali oyo bazali naino bilenge, mpe mingimingi bana mike mpenza, bayebi kokesenisa malamu na mabe te. Maloba nyonso wana mpo na kopesa lokumu na ‘makanisi ya sika’ ekweisaki bandelo ya bizaleli malamu.”
Te, mingimingi, mangomba mazali mpenza nguya ya solo te mpo na kopusa bato na kosala malamu. Nkutu, ezali na ngámbo monene kati na kokwea ya bizaleli oyo tozali komona lelo. Nzokande, lokola mangomba epesi nzela na “mosala mpe na losambo ya Nzambe to losambo ya Oyo aleki makasi ya bomoto”, esengelaki kozala te nguya oyo ezali kopusa bato na kosala malamu kati na mikili nyonso epai yango ezali koyangela? Na yango eloko nini ezangi bango? Ndenge nini lingomba na bino ekoki komema bopusi motindo oyo lelo?