Liteya 8
Banani bazali banguna ya Nzambe?
Monguna monene ya Nzambe ezali Satana Zabolo. Azali ekelamu ya elimo oyo atombokelaki Yehova. Satana azali ntango nyonso kobundisa Nzambe mpe konyokola bato. Satana azali ekelamu mabe. Azali mobuki lokuta mpe mobomi ya bato.—Yoane 8:44.
Bikelamu mosusu ya elimo balandaki Satana na botomboki na ye. Biblia ezali kobenga bango bademo. Ndenge moko na Satana, bademo bazali banguna ya bato. Balingaka konyokola bato. (Matai 9:32, 33, NW;Matai 12:22, NW) Yehova akoboma Satana na bademo na ye mpo na libela. Batikali bobele na mwa ntango moke mpo na konyokola bato.—Emoniseli 12:12.
Soki olingi kozala moninga ya Nzambe, osengeli te kosala makambo Satana alingaka ete osala. Satana na bademo bayinaka Yehova. Bazali banguna ya Nzambe, mpe balingaka kokómisa yo monguna ya Nzambe. Osengeli kopona nani olingi kosepelisa—Satana to Yehova. Soki olingi bomoi ya seko, osengeli kopona kosala mokano ya Nzambe. Satana azali na mitambo mpe na banzela mingi mpo na kokosa bato. Azali kokosa bato ebele.—Emoniseli 12:9.